Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Biyano na mituna 10 oyo bilenge batunaka

 MOTUNA 2

Mpo na nini namitungisaka mpo na nzoto na ngai?

Mpo na nini namitungisaka mpo na nzoto na ngai?

NTINA NA YANGO

Ezali na makambo mosusu ya ntina koleka oyo omonaka na talatala.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Soki Julia amitali na talatala, amimonaka kaka monene. Akanisaka boye na motema: “Nasengeli kokɔnda”; nzokande baboti ná baninga na ye bayebisaka ye ete azali “moke lokola nsinga.”

Mikolo eleki, Julia akanisaki kosala nyonso alongola “kaka mwa kilo mibale.” Alobaki ete alya te mwa mikolo . . .

Soki ozalaki na makanisi lokola oyo ya Julia, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

Ntango mosusu ozali komitalela lokola moto amitali na talatala oyo etɛngamisaka bato

Ezali mabe te koluka komonana kitoko na miso ya bato. Biblia mpe elobeli kitoko ya nzoto ya basi ná mibali mingi, na ndakisa Sara, Rashele, Abigaile,Yozefe, mpe Davidi. Biblia elobi mpe ete mwasi moko na nkombo Abishage azalaki “kitoko mingi mpenza.”1 Bakonzi 1:4.

Kasi, bilenge mingi balekisaka ndelo na likambo yango. Kosala bongo ekoki kobimisa makama. Tózwa ndakisa:

  • Na ankɛtɛ moko oyo batunaki bilenge basi 100 mituna, 58 balobaki ete baleki minene, nzokande kaka 17 nde bazalaki bongo.

  • Na ankɛtɛ mosusu, kati na basi 100, basi 45 oyo kilo na bango ezalaki na nse bazalaki kokanisa ete kilo na bango eleki mingi!

  • Ntango bazali koluka kokɔnda, bilenge mosusu bakweaka na maladi babengi anorexie, ezaleli moko ya likama mpo na nzoto oyo etindaka moto amiboma nzala.

 Soki okómi na bizaleli ya moto oyo azali na maladi ya anorexie to maladi mosusu ya ndenge wana, luká lisalisi. Sololá na papa to mama, to mokóló moko oyo otyelaka motema. Biblia elobi: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”Masese 17:17.

ELOKO ELEKI MALAMU OYO OKOKI KOBONGISA!

Mpo na koloba solo, bomoto ya kati nde esalaka ete moto asepelisa basusu to te. Talá ndakisa ya Abisalome, mwana ya Mokonzi Davidi. Biblia elobi:

“Ezalaki na mobali moko te oyo akokanaki na Abisalome na kitoko, oyo bazalaki kokumisa mingi. . . . Azalaki na ata mbeba moko te.”2 Samwele 14:25.

Nzokande, elenge mobali Abisalome azalaki na lolendo, azalaki koluka lokumu, mpe azalaki mokosi! Na yango, Biblia elobeli ye na ndenge ya malamu te; emonisi ye lokola moto azangá bosembo, asilá nsɔni mpe ya motema mabe mpenza.

Yango wana Biblia epesi biso toli oyo ya malamu:

“Bólata bomoto ya sika.”Bakolose 3:10.

“Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te . . . , kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.”1 Petro 3:3, 4.

Ya solo, ezali mabe te kobongisa nzoto mpo na komonana kitoko na miso ya bato, kasi bomoto ya kati ezali na ntina mingi kolela kitoko ya nzoto. Nsima ya bambula, bizaleli na yo ya malamu nde ekosala ete bato básepela na yo mingi koleka makasi to kitoko na yo ya nzoto. Elenge mwasi moko na nkombo Phylicia alobi boye: “Kitoko ya nzoto ebɛtaka mbala moko na miso. Kasi, eloko oyo bato bakokanisa mingi mpo na yo, ezali nde bomoto mpe bizaleli na yo ya malamu.”

NDENGE OYO OMITALELAKA

Mbala mingi oyokaka mawa mpo na nzoto na yo?

Osí okanisá kosalisa lipaso to koboya biloko nyonso ya kolya mpo na kobongisa nzoto na yo?

Soki bapesi yo likoki, eloko nini na nzoto na yo okobongisa? (Tyá elembo na biyano na yo.)

  • BOLAI

  • BONENE

  • NSUKI

  • NZOTO

  • ELONGI

  • LOPOSO

Soki oyanolaki “ɛɛ” na mituna mibale ya liboso mpe otye elembo na makambo misato to koleka na motuna ya misato, kanisá likambo oyo: Ekoki mpenza kozala ete bato bamonaka yo mabe te ndenge yo moko omimonaka. Ezalaka mpasi te kolekisa ndelo mpe komitungisa mingi koleka mpo na ndenge tozali komonana.1 Samwele 16:7.