Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Zwá mateya na masolo ya Biblia

 LITEYA 98

Bokristo ekɔti na bikólo ebele

Bokristo ekɔti na bikólo ebele

Bantoma batosaki etinda oyo Yesu apesaki bango ete básakola nsango malamu na mabele mobimba. Na mobu 47 T.B., bandeko ya Antiokia batindaki Paulo ná Barnabasi bákende kosakola. Basakoli yango mibale ya molende basalaki mobembo na Azia Moke mobimba mpe bakendaki na bisika lokola Derbe, Listra, mpe na Ikoniumu.

Paulo ná Barnabasi bazalaki koteya bato nyonso, ezala babola, bazwi, bilenge, mpe mikóló. Bato mingi bandimaki solo etali Kristo. Ntango Paulo ná Barnabasi bazalaki koteya Sergiusi Paulusi, guvɛrnɛrɛ ya Shipre, nganga-nkisi moko alukaki kopekisa bango. Paulo ayebisaki nganga-nkisi yango boye: ‘Yehova atɛmɛli yo.’ Na mbala moko, nganga-nkisi yango akufaki miso. Ntango Guvɛrnɛrɛ Paulusi amonaki likambo yango, akómaki mondimi.

Paulo ná Barnabasi bazalaki koteya na bisika nyonso, na ndako na ndako, na bazando, na nzela mpe na basinagoga. Ntango babikisaki motɛngumi moko na Listra, bato oyo bamonaki likamwisi yango bakanisaki ete bazali banzambe mpe balukaki kosambela bango. Kasi, Paulo ná Barnabasi bapekisaki bango, bayebisaki bato yango ete: ‘Basambelaka kaka Nzambe! Biso tozali kaka bato.’ Na nsima, Bayuda mosusu bayaki mpe batindaki ebele ya bato básilikela Paulo. Bato yango babambaki ye mabanga, babimisaki ye na engumba, mpe batikaki ye wana mpo bakanisaki akufi. Nzokande, Paulo azalaki kaka na bomoi! Na mbala moko, bandeko bakendaki kosalisa ye mpe bakɔtisaki ye lisusu na engumba. Na nsima, Paulo azongaki na Antiokia.

Na mobu 49 T.B., Paulo asalaki lisusu mibembo mpo na kosakola. Ntango azongaki kotala bandeko na Azia Moke, akendaki kosakola  nsango malamu mosika koleka, na Mpoto. Akendaki na Atene, Efese, Filipi, Tesaloniki, mpe na bisika mosusu. Paulo akobaki na mobembo yango elongo na Silasi, Luka, ná elenge mobali moko na nkombo Timote. Basalaki elongo mpo na kofungola masangá mpe basalisaki yango ekóma makasi. Paulo atikalaki na Korinti mbula moko ná ndambo mpo na kolendisa bandeko. Asakolaki, ateyaki, mpe akomelaki masangá mikanda ebele. Azalaki mpe kosala bahema. Na nsima, Paulo azongaki na Antiokia.

Na mobu 52 T.B., Paulo asalaki mobembo ya mbala ya misato mpo na kosakola, kobanda na Azia Moke. Akendaki mosika na nɔrdi, na Filipi tii akitaki na Korinti. Paulo alekisaki mbula ebele na Efese mpo na koteya, kobikisa bato, mpe kosalisa masangá. Azalaki mpe kosala badiskur mokolo na mokolo na ndako ya eteyelo moko. Bato mingi bayokaki Paulo mpe babongolaki bizaleli na bango. Nsukansuka, nsima ya kosakola nsango malamu na mikili ebele, Paulo azongaki na Yerusaleme.

“Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”​—Matai 28:19