Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Zwá mateya na masolo ya Biblia

 LITEYA 94

Bayekoli bazwi elimo santu

Bayekoli bazwi elimo santu

Mikolo zomi nsima ya kozonga ya Yesu na likoló, bayekoli na ye bazwaki elimo santu. Ezalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe bato ya bisika ndenge na ndenge bayaki na Yerusaleme mpo na fɛti yango. Bayekoli soki 120 bayanganaki na shambrɛ ya likoló. Na mbala moko, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Eloko moko, elingi koloba ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki na motó ya moyekoli mokomoko, mpe bango nyonso babandaki koloba na minɔkɔ mosusu. Mopɛpɛ moko ya makasi etondaki na ndako yango.

Bapaya ya mikili mosusu oyo bayaki na Yerusaleme bayokaki makɛlɛlɛ yango mpe bakimaki mbangu na ndako yango kotala likambo oyo esalemaki. Bakamwaki koyoka bayekoli bazali koloba na minɔkɔ mosusu. Bazalaki koloba: ‘Bato oyo bazali bato ya Galile. Ndenge nini bazali koloba minɔkɔ ya mboka na biso?’

Na nsima, Petro ná bayekoli mosusu batɛlɛmaki liboso ya ebele ya bato. Petro ayebisaki bato yango ndenge Yesu abomamaki  mpe ndenge Yehova asekwisaki ye. Petro ayebisaki bango boye: ‘Sikoyo Yesu azali na likoló na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, mpe asopeli biso elimo santu oyo alakaki biso. Yango wana boyoki mpe bomoni makamwisi oyo.’

Maloba ya Petro esimbaki mpenza mitema ya bato, mpe batunaki boye: “Tosengeli kosala nini?” Azongiselaki bango ete: ‘Bótika masumu mpe bózwa batisimo na nkombo ya Yehova. Bokozwa likabo ya elimo santu.’ Na mokolo yango, bato soki 3 000 bazwaki batisimo. Banda wana, motángo ya bayekoli ekómaki kobakisama se kobakisama na Yerusaleme. Elimo santu esalisaki bantoma báfungola masangá mosusu ebele mpo báteya bayekoli ya sika makambo nyonso oyo Yesu apesaki bango etinda.

“Soki ozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na yo mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, mpe ozali kondima na motema na yo ete Nzambe alamwisaki ye uta na bakufi, okobika.”​—Baroma 10:9