Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Zwá mateya na masolo ya Biblia

 LITEYA 78

Yesu asakoli nsango ya Bokonzi

Yesu asakoli nsango ya Bokonzi

Mwa moke nsima ya kobatisama, Yesu abandaki kosakola ete: ‘Bokonzi ya Nzambe ekómi pene.’ Bayekoli bazalaki kolanda ye ntango azalaki kotambola na Galile mpe na Yudea. Ntango azongaki na mboka na ye na Nazarete, akendaki na sinagoga, afungolaki rulo ya mosakoli Yisaya, mpe atángaki na mongongo makasi ete: ‘Yehova apesi ngai elimo santu mpo nasakola nsango malamu.’ Yango elingaki koloba nini? Elingaki koloba ete, atako bato bazalaki kosepela komona ndenge Yesu azalaki kosala makamwisi, ntina ya libosoliboso oyo azwaki elimo santu ezalaki nde ya kosakola nsango malamu. Na nsima, ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: ‘Lelo esakweli oyo ekokisami.’

Na nsima, Yesu akendaki na mbu ya Galile, epai akutanaki na bayekoli na ye minei, oyo bazalaki baluki-mbisi. Abengaki bango mpe alobaki: ‘Bóya epai na ngai, nakokómisa bino baluki-bato.’ Bayekoli yango ezalaki Petro, Andre, Yakobo ná Yoane. Na mbala moko, batikaki mosala na bango ya koluka mbisi mpe balandaki ye. Batambolaki Galile mobimba kosakola Bokonzi ya Yehova. Basakolaki na basinagoga, na bazando, mpe na babalabala. Ebele ya bato bazalaki kolanda bango bipai nyonso bazalaki kokende. Nsango ya Yesu epalanganaki bipai nyonso, ata mpe na Siri.

Na nsima, Yesu apesaki bayekoli na ye mosusu nguya ya kobikisa bato ya maladi mpe ya kobengana bademo. Bayekoli mosusu bazalaki kotambola elongo na ye ntango azalaki kosakola na bingumba mpe na bamboka. Basi mosusu ya sembo, na ndakisa, Maria Magadalena, Yoana, Suzana, mpe basi mosusu bazalaki kosalisa Yesu ná bayekoli na ye.

Nsima ya kopesa bayekoli na ye formasyo, Yesu atindaki bango bákende kosakola. Lokola bazalaki kotambola na Galile mobimba, bato mingi bakómaki bayekoli mpe bazwaki batisimo. Bato mingi balingaki kokóma bayekoli; yango wana, Yesu alobaki ete bazali lokola elanga oyo mbuma eteli, oyo ekómi pene bábuka yango. Alobaki boye: ‘Bóbondela Yehova atinda basali ebele na mosala ya kobuka mbuma.’ Na nsima, aponaki bayekoli 70 mpe atindaki  bango mibalemibale bákende kosakola na Yudea mobimba. Bateyaki bato ya lolenge nyonso na ntina etali Bokonzi. Ntango bayekoli bazongaki, bazalaki na esengo makasi ya koyebisa Yesu makambo oyo esalemaki. Zabolo akokaki kopekisa te mosala ya kosakola.

Yesu asalaki nyonso mpo bayekoli na ye bákoba kosala mosala wana ya ntina mingi ata ntango asengelaki kozonga na likoló. Ayebisaki bango ete: ‘Bósakola nsango malamu na mabele mobimba. Bóteya bato Liloba ya Nzambe mpe bóbatisa bango.’

“Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”​—Luka 4:43