Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA LIBWA

Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te

Abatelaki, asungaki mpe alɛmbaki bango te

1, 2. (a) Mbongwana nini ekɔtaki na bomoi ya Yozefe mpe libota na ye? (b) Nsango nini ya mabe Yozefe asengelaki koyebisa mwasi na ye?

YOZEFE azali komatisa mokumba mosusu na mokɔngɔ ya mpunda. Meká komona ndenge azali kotalatala mboka Beteleme oyo ezali molili mpenza mpe azali kosimbasimba nyama wana. Na ntembe te, azali kokanisa mobembo molai oyo alingi kosala tii na Ezipito, epai ya bato oyo ayebi te, esika balobaka monɔkɔ oyo ayebi te, na mimeseno oyo ayebi te. Ndenge nini libota na ye ekosala mpo emesana na mbongwana wana monene?

2 Ezalaki pɛtɛɛ te ayebisa mwasi na ye Maria nsango yango, kasi Yozefe azwaki mpiko ya kosala yango. Ayebisaki ye nsango oyo eutaki epai ya Nzambe, oyo anzelu ayebisaki ye na ndɔtɔ, ete mokonzi Erode azalaki koluka koboma mwana na bango! Esengelaki bálongwa nokinoki na mboka wana. (Tángá Matai 2:13, 14.) Likambo yango etungisaki Maria mingi. Ndenge nini moto akoki kondima koboma mwana na ye kaka mpamba boye? Likambo yango elekelaki Maria ná Yozefe. Kasi, batyelaki Yehova motema mpe bamibongisaki mpo na kokende.

3. Lobelá makambo oyo elekaki liboso Yozefe ná libota na ye bálongwa na Beteleme. (Talá mpe elilingi.)

3 Yozefe, Maria mpe Yesu balongwaki Beteleme na butu. Na ntango yango, bato bazalaki na mpɔngi makasi mpe bayebaki te mwango nini Erode asalaki. Ntango Yozefe azali komema bango na sudi mpe ntɔngɔ ebandi kotana na ɛsti, na ntembe te azali komituna nini ezali kozela bango. Ndenge nini mosali-mabaya wana akokoka kobatela libota na ye liboso ya Satana mpe Erode? Akokokisa ntango nyonso bamposa ya libota na ye? Akokoka kokokisa mokumba wana ya kilo oyo Yehova Nzambe apesi ye, ya kobatela mpe kobɔkɔla mwana oyo akeseni na bana mosusu? Yozefe akutanaki na mikakatano makasi. Ntango tozali kotalela ndenge akokisaki mokumba na ye na bosembo nyonso, tokomona mpo na nini lelo oyo batata ya mabota, mpe biso nyonso, tosengeli komekola kondima ya Yozefe.

Yozefe abatelaki libota na ye

4, 5. (a) Na makambo nini bomoi ya Yozefe ebongwanaki mpo na libela? (b) Anzelu moko ayebisaki Yozefe nini mpo na kolendisa ye andima mokumba wana ya kilo?

4 Mwa basanza liboso, na engumba na ye Nazarete, bomoi ya Yozefe  ebongwanaki mpo na libela ntango akómaki fianse ya mwana mwasi ya Heli. Yozefe ayebaki ete Maria azalaki elenge mwasi moko ya sembo mpe na bizaleli malamu. Kasi, na nsima ayokaki ete Maria akómi na zemi! Alukaki kokabwana na ye na ndenge ya kobombana, mpo básala Maria mabe te. * Kasi, anzelu moko ayebisaki ye na ndɔtɔ ete Maria azwaki zemi na nzela ya elimo santu ya Yehova. Anzelu yango abakisaki ete mwana oyo Maria akobota “akobikisa bato na ye na masumu na bango.” Na nsima, alendisaki Yozefe boye: “Kobanga te kotya Maria mwasi na yo na ndako.”Mat. 1:18-21.

5 Yozefe, moto ya sembo mpe ya botosi, asalaki ndenge anzelu ayebisaki ye. Andimaki mokumba wana ya kilo ya kobɔkɔla mpe kobatela mwana oyo azalaki ya ye te, kasi oyo azalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe. Na nsima, mpo na kotosa mobeko ya amperɛrɛ, Yozefe amemaki mwasi na ye oyo azalaki na zemi na Beteleme mpo na kokomisa nkombo. Ezalaki kuna nde mwana yango abotamaki.

6-8. (a) Makambo nini ememaki mbongwana mosusu na bomoi ya Yozefe mpe libota na ye ya moke? (b) Ndenge nini toyebi ete Satana nde atindaki monzoto? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

6 Yozefe ná libota na ye bazongaki lisusu na Nazarete te. Kasi, bakendaki nde kofanda na Beteleme, na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na Yerusaleme. Bazalaki babola, kasi Yozefe asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kobatela Maria mpe Yesu mpo bázanga eloko te mpe bányokwama te. Eumelaki te, bakómaki kofanda na ndako moko oyo ezangi mindɔndɔ. Na nsima, ntango Yesu azalaki lisusu bebe te, kasi akolaki mwa moke, ekoki kozala ete akómaki na mbula moko to koleka, bomoi na bango ebongwanaki lisusu na mbalakaka.

7 Banganga-minzoto oyo bautaki na ɛsti bayaki epai na bango, ekoki kozala ete bautaki mosika mpenza, na Babilone. Balandaki monzoto moko mpo na kokóma na ndako ya Maria ná Yozefe mpe bazalaki koluka mwana oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Bayuda. Bato yango bazalaki na limemya mingi.

8 Ezala bayebaki yango to te, banganga-minzoto wana batyaki bomoi ya Yesu na likama. “Monzoto” oyo bamonaki ememaki bango liboso na Beteleme te, kasi nde na Yerusaleme. * Kuna, bayebisaki Erode mokonzi mabe ete bazalaki koluka mwana moko oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Bayuda. Likambo yango elamwisaki nkanda ya mokonzi wana ya zuwa.

9-11. (a) Na ndenge nini ezalaki na nguya moko oyo elekaki Erode to Satana na makasi? (b) Na ndenge nini mobembo na Ezipito ekeseni na ndenge oyo masapo ya lokuta elobelaki yango?

9 Kasi, ezalaki na nguya moko oyo elekaki Erode to Satana na makasi. Na ndenge nini? Ntango bapaya yango bakómaki epai Yesu azalaki mpe bamonaki ye ná mama na ye, babimisaki makabo oyo bayaki  na yango, mpe basɛngaki eloko te mpo na yango. Maria ná Yozefe basengelaki mpenza kokamwa, mpamba te, na mbalakaka, bakómaki na “wolo, olibana ná mire,” oyo ezali biloko ya motuya mingi! Banganga-minzoto bazalaki na mposa ya kozonga mpe koyebisa mokonzi Erode esika oyo bakutaki mwana yango. Kasi, Yehova aboyaki. Na ndɔtɔ, apesaki banganga-minzoto mitindo ete bázonga na mboka na bango na nzela mosusu.Tángá Matai 2:1-12.

10 Ntango banganga-minzoto bakendaki, mwa moke na nsima, Yehova atindaki anzelu akebisa Yozefe boye: “Tɛlɛmá, kamatá mwana ná mama na ye mpe kimá na Ezipito, mpe fandá kuna tii ntango nakoloba na yo ozonga; mpo Erode alingi koluka mwana yango mpo aboma ye.” (Mat. 2:13) Na yango, ndenge tomonaki yango na ebandeli, Yozefe atosaki kozanga kokakatana. Alukaki libosoliboso kobatela mwana na ye, yango wana amemaki libota na ye na Ezipito. Makabo oyo banganga-minzoto bamemaki, ekokaki kosalisa Yozefe ná libota na ye bázala na mwa mbongo ya kosalela kuna na Ezipito.

Yozefe asalaki nyonso mpe amipimelaki makambo mosusu mpo na kobatela mwana na ye

11 Na nsima, masapo ya lokuta mpe masapo mosusu elobelaki na ndenge ya kolekisa ndelo mobembo na bango na Ezipito; elobaki ete Yesu na bomwana na ye akómisaki mobembo yango mokuse na ndenge ya likamwisi, asilisaki bato mabe makasi mpo básala bango eloko te, akitisaki kutu nzete ya mbila mpo mama na ye abuka mbuma na yango. * Mpo na koloba solo, mobembo yango ezalaki molai, mpe ya mpasi, ezalaki lokola kokende na mokili oyo eyebani te.

Yozefe amipimelaki makambo mosusu ya malamu mpo na bolamu ya libota na ye

12. Liteya nini baboti oyo bazali kobɔkɔla bana na mokili oyo mabe bakoki kozwa epai ya Yozefe?

12 Baboti bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yozefe. Andimaki kokata mosala na ye mpe komipimela makambo mosusu ya malamu mpo na kobatela libota na ye na likama. Na ntembe te, azalaki komona libota na ye lokola likabo mosantu oyo Yehova apesaki ye. Lelo oyo, baboti bazali kobɔkɔla bana na bango na mokili moko mabe makasi, oyo etondi na makambo oyo ekoki kotya bomoi ya bana na bango na likama, kobebisa bango, ata mpe koboma bango. Baboti oyo bazali kosala na mpiko nyonso lokola Yozefe, babongi mpenza kozwa longonya na ndenge bazali kosala makasi mpo na kobatela bana na bango na makambo ya ndenge wana!

Yozefe azalaki kosunga libota na ye

13, 14. Mpo na nini Yozefe ná Maria bazongaki na Nazarete mpo na kobɔkɔla bana na bango?

13 Emonani lokola ete libota ya Yozefe efandaki mingi te na Ezipito, mpo eumelaki te, anzelu ayebisaki Yozefe ete Erode akufi.  Yozefe ná libota na ye bazongaki na mboka na bango. Esakweli moko ya kala elobaki ete Yehova akobenga mwana na ye “alongwa na Ezipito.” (Mat. 2:15) Yozefe apesaki mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli wana, kasi sikoyo, epai wapi alingaki komema libota na ye?

14 Yozefe azalaki ekɛngɛ. Amonisaki bwanya ndenge akimaki Arkelausi, mokonzi oyo akómaki koyangela nsima ya Erode, oyo azalaki mpe moto mabe mpe mobomi. Yehova ayebisaki Yozefe amema libota na ye na nɔrdi, mosika mpenza na Yerusaleme mpe mosika na banguna nyonso, azonga na mboka na ye Nazarete, na Galile. Ezali kuna nde ye ná Maria babɔkɔlaki bana na bango.Tángá Matai 2:19-23.

15, 16. Mosala ya Yozefe ezalaki mosala ya ndenge nini, mpe mbala mosusu azalaki kosalela biloko nini?

15 Bazalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ, kasi ezangaki mikakatano te. Ntango Biblia elobelaka Yozefe lokola mosali-mabaya, esalelaka liloba moko oyo elimbolaka misala ndenge na ndenge oyo basalaka na banzete, na ndakisa, kokata nzete, komema yango, kobongisa yango mpo na kotonga bandako, masuwa, bagbagba, bakarte, sharete, bikanganeli, mpe biloko ya ndenge nyonso oyo basalaka na yango mosala ya bilanga. (Mat. 13:55) Ezalaki mosala moko makasi. Mbala mingi, na ntango ya kala, basali-mabaya bazalaki kosala mosala na bango liboso ya ndako na bango to na esika oyo babongisaki pembeni ya ndako.

16 Yozefe azalaki kosalela biloko ndenge na ndenge, oyo ntango mosusu tata na ye atikelaki ye. Ekoki kozala ete azalaki na bisaleli lokola équerre, nsinga ya nivo, ekomeli, epasola, sii, marto, epalola-nzete, mwa marto oyo basalelaka mpo na kogumba litimbo, kɔlɛ ndenge na ndenge, mpe mbala mosusu mwa bansɛtɛ, atako biloko yango ezalaki ntalo mingi.

17, 18. (a) Makambo nini Yesu ayekolaki epai ya tata-mobɔkɔli na ye? (b) Mpo na nini Yozefe asengelaki kosala mosala makasi mingi koleka?

17 Meká komona ndenge Yesu, ntango azalaki mwana moke, azali kotala tata-mobɔkɔli na ye azali kosala mosala. Afungoli miso mpo na kotala likambo nyonso oyo Yozefe azali kosala, mpe na ntembe te, azali kosepela komona makasi oyo tata na ye azali kobimisa ntango mabɔkɔ na ye oyo eyebi mosala ezali kosala mpe miso na ye ezali kolandela eloko nyonso azali kosala. Ekoki kozala ete Yozefe abandaki kolakisa mwana na ye ndenge ya kosala misala ya mikemike, na ndakisa kosalela mposo ya mbisi oyo ekauká mpo na kobongisa mabaya  ekóma kitoko mpenza. Ekoki mpe kozala ete alakisaki Yesu bokeseni oyo ezali kati ya banzete ndenge na ndenge oyo azalaki kosalela, na ndakisa nzete ya figi, ya chêne, mpe ya olive.

Yozefe apesaki mwana na ye formasyo mpo akóma mosali ya mabaya

18 Yesu ayebaki mpe ete mabɔkɔ wana ya Yozefe oyo ezalaki makasi mpo na kokweisa banzete, kokatakata yango, mpe kokangisa yango esika moko, kaka na mabɔkɔ yango nde azalaki kosimba mpe kobɔndisa ye, mama na ye mpe bandeko na ye. Libota ya Maria ná Yozefe ekómaki monene; nsima ya Yesu, babotaki bana mosusu motoba. (Mat. 13:55, 56) Yozefe asengelaki kosala mosala makasi mpo na kobatela mpe koleisa bato nyonso wana.

Yozefe ayebaki ete kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ye ezalaki na ntina mingi

19. Ndenge nini Yozefe azalaki kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ye?

19 Kasi, Yozefe ayebaki ete kokokisa bamposa ya elimo ya libota na ye ezalaki na ntina mingi. Yango wana, azalaki kolekisa ntango mingi na koteya bana na ye makambo etali Yehova Nzambe mpe mibeko na ye. Ye ná Maria bazalaki komema bana na bango mbala na mbala na Sinagoga, epai Mibeko ezalaki kotángama na mongongo makasi mpe kolimbolama. Ekoki kozala ete Yesu azalaki kotuna mituna mingi nsima ya makita yango mpe Yozefe azalaki kosala nyonso mpo na kopesa Yesu biyano oyo ebongi. Yozefe azalaki mpe komema libota na ye na bafɛti ya losambo oyo ezalaki kosalema na Yerusaleme. Mpo na kokende na elambo ya Elekeli oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, mpe kozonga, Yozefe azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 120, oyo ezalaki kozwa ye pɔsɔ mibale mobimba.

Yozefe azalaki komema libota na ye na losambo na tempelo ya Yerusaleme

20. Ndenge nini batata ya mabota bakoki kolanda ndakisa ya Yozefe?

20 Lelo oyo, bakristo oyo bazali batata ya mabota balandaka mpe ndakisa yango. Bamipesaka mpo na bana na bango, batyaka makambo ya Nzambe na esika ya liboso koleka makambo mosusu nyonso, na ndakisa biloko ya mokili. Batambwisaka losambo na kati ya libota, bamemaka bana na bango na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe na mayangani. Lokola Yozefe, bayebaka ete yango ezali likambo eleki malamu oyo bakoki kosala mpo na bana na bango.

“Totamboli motó”

21. Yozefe ná libota na ye bazalaki kosala nini na eleko ya Elekeli, mpe ntango nini Yozefe ná Maria bayaki koyeba ete Yesu azali te?

21 Ntango Yesu azalaki na mbula 12, Yozefe amemaki libota na ye na Yerusaleme, lokola momeseno. Ezalaki eleko ya Elekeli, ntango ya fɛti, mpe mabota oyo ezalaki na bato ebele ezalaki kosala mobembo elongo, na nzela oyo ezalaki na matiti, bafololo mpe banzete kitoko ya eleko ya prɛnta. Ntango bazalaki kokóma penepene ya bangomba ya Yerusaleme, mingi na bango bazalaki koyemba nzembo ya komata, oyo eyebanaki mingi. (Nz. 120-134) Yerusaleme ezalaki  kotonda na bankama ata mpe bankóto ya bato. Na nsima ya milulu, mabota mpe ebele ya bato bazalaki kosala lisusu mobembo mpo na kozonga na bandako na bango. Ekoki kozala ete lokola Yozefe ná Maria bazalaki na makambo mingi ya kosala, bakanisaki ete Yesu azali ná bato mosusu ya mobembo, ntango mosusu azali ná bato mosusu ya libota. Kaka nsima ya kolongwa Yerusaleme mpe kotambola mokolo mobimba, nde bayaki koyeba ete Yesu azali te!Luka 2:41-44.

22, 23. Yozefe ná Maria basalaki nini ntango bayebaki ete mwana na bango azali te, mpe Maria alobaki nini ntango bamonaki ye?

22 Mitema likoló, bazongaki na Yerusaleme, mpe balukaki Yesu bisika nyonso. Kanisá ndenge engumba yango etikalaki mpamba mpe loyenge ezalaki lisusu te, ntango bazalaki kokatisa babalabala mpe kobelela  nkombo ya mwana na bango. Mwana yango akokaki kozala wapi? Nsima ya koluka ye mikolo misato, ntango mosusu Yozefe akómaki komituna soki akokisi te mokumba mosantu oyo Yehova apesaki ye. Nsukansuka, bakendaki na tempelo. Balukaki Yesu kuna tii bakutaki ye na shambrɛ moko afandi katikati ya bato mingi ya mayele, oyo bayebaki Mibeko malamumalamu. Kanisá ndenge motema ya Yozefe ná Maria ekitaki ntango bamonaki ye!Luka 2:45, 46.

23 Yesu azalaki koyoka bato wana ya mayele mpe kotuna bango mituna. Bato yango bakamwaki na bososoli oyo azalaki na yango mpe biyano oyo azalaki kopesa. Maria ná Yozefe mpe bakamwaki. Biblia emonisi ete na lisolo yango, Yozefe afandaki nyɛɛ. Kasi, maloba ya Maria emonisaki mpe makanisi ya Yozefe: “Mwana, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo totamboli motó mpo na koluka yo.”Luka 2:47, 48.

24. Ndenge nini Biblia elobeli mokumba ya kobɔkɔla bana?

 24 Lisolo wana emonisi ete kobɔkɔla bana ezali mokumba ya pɛtɛɛ te. Ezalaka na mitungisi, ata soki mwana yango azali moto ya kokoka lokola Yesu! Kobɔkɔla bana na mokili ya lelo oyo etondi na mabe ekoki kosala ete moto ‘atambola motó,’ kasi, batata mpe bamama bakoki kobɔndisama na koyeba ete Biblia elobeli mikakatano oyo bakutanaka na yango.

25, 26. Eyano nini Yesu apesaki baboti na ye, mpe mbala mosusu Yozefe ayokaki ndenge nini ntango ayokaki maloba ya mwana na ye?

25 Yesu atikalaki na tempelo, esika oyo amonaki ete akozala mpenza penepene ya Yehova, Tata na ye ya likoló, mpe azalaki na mposa ya koyekola mateya na ye. Yango wana, ayanolaki baboti na ye boye: “Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”Luka 2:49.

26 Na ntembe te, Yozefe azalaki kokanisa maloba wana mbala na mbala. Mbala mosusu maloba yango epesaki ye mwa lokumu. Kutu, asalaki mosala makasi mpo na koteya mwana yango oyo azalaki kobɔkɔla ete atalelaka Yehova Nzambe ndenge wana. Ntango Yesu azalaki naino elenge, ayebaki malamu soki liloba “tata” elimboli nini, mingimingi mpo alekisaki ntango mingi elongo na Yozefe.

27. Soki ozali tata, mokumba nini monene ozali na yango, mpe mpo na nini osengeli kokanisa ndakisa ya Yozefe?

27 Soki ozali tata, oyebaka mokumba oyo ozali na yango ya kosalisa bana na yo báyeba soki tata oyo alingaka bana na ye mpe abatelaka bango asengeli kozala ndenge nini? Ndenge moko mpe, soki ozali kobɔkɔla mwana ya molongani na yo to mwana moko oyo ozwá, kanisá ndakisa ya Yozefe mpe taleláká bana nyonso ete bazali ndenge moko mpe bazali na valɛrɛ. Salisá bango bápusana penepene ya Yehova Nzambe, Tata na bango ya likoló.Tángá Baefese 6:4.

Yozefe alɛmbaki libota na ye te

28, 29. (a) Maloba oyo ezali na Luka 2:51, 52 emonisi makambo nini na ntina na Yozefe? (b) Ndenge nini Yozefe asalisaki mwana na ye akola na bwanya?

28 Na nsima, Biblia elobeli Yozefe mingi te, kasi ebongi mpenza tótalela malamumalamu makambo oyo asalaki. Tozali kotánga ete Yesu “azalaki kaka komikitisa liboso na bango [baboti na ye].” Tozali  mpe kotánga ete “Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.” (Tángá Luka 2:51, 52.) Maloba wana emonisi nini na ntina na Yozefe? Emonisi makambo mingi. Eteyi biso ete Yozefe azalaki kotambwisa libota na ye malamu, yango wana mwana na ye oyo azalaki moto ya kokoka azalaki kotosa bokonzi ya tata na ye mpe akobaki komikitisa liboso na ye.

29 Tomoni mpe ete Yesu akobaki kokola na bwanya. Na ntembe te, Yozefe asalisaki mpenza Yesu akola na bwanya. Na ntango wana, Bayuda bazalaki koloba ete kaka bazwi nde bakokaki kokóma na bwanya, kasi, bato ya misala ya mabɔkɔ, na ndakisa basali-mabaya, baloni-bilanga, mpe basali misala ya ebende “bakokaki te kolobela bosembo mpe kosambisa makambo; mpe basengelaki te kolimbola masese.” Na nsima, Yesu amonisaki ete maloba wana ezali mpamba. Ntango azalaki naino mwana, mbala mingi azalaki koyoka ndenge tata-mobɔkɔli na ye, mosali mpamba ya mabaya, azalaki kolakisa malamu makambo oyo Yehova alingaka mpe oyo aboyaka! Kozanga ntembe, asalaki yango na mabaku mingi.

30. Ndakisa nini Yozefe atikeli batata ya mabota lelo oyo?

30 Ndenge oyo Yesu akolaki ekoki mpe kosalisa biso tómona ete Yozefe asalaki mosala makasi. Yesu akolaki na nzoto makasi mpe kolɔngɔnɔ mpamba te babatelaki ye malamu. Lisusu, Yozefe alakisaki mwana na ye mosala mpo ayeba yango malamu. Yesu ayebanaki kaka te lokola mwana ya mosali-mabaya, kasi mpe lokola “mosali ya mabaya.” (Mrk. 6:3) Na yango, formasyo oyo Yozefe apesaki Yesu ebotaki mbuma. Na bwanya mpenza, batata ya mabota balandaka ndakisa ya Yozefe, basalaka nyonso mpo na bolamu ya bana na bango mpe balingaka ete bana yango bákoka mpe komisalisa bango moko na nsima.

31. (a) Makambo nini esalisi biso tóyeba ntango oyo Yozefe akufaki? (Lobelá mpe makanisi ya  etanda.) (b) Yozefe atikeli biso ndakisa nini oyo tosengeli komekola?

31 Soki totángi esika oyo Biblia elobeli ntango Yesu azwaki batisimo na mbula soki 30, tokomona ete Yozefe alobelami te. Emonani lokola ete ntango Yesu abandaki mosala na ye, Yozefe mobali ya Maria azalaki lisusu na bomoi te. (Talá etanda “ Ntango nini Yozefe akufaki?”) Atako bongo, Yozefe atikaki ndakisa malamu ya tata oyo abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango mpe alɛmbaki bango te tii na nsuka. Tata nyonso, mokonzi nyonso ya libota, to mokristo mosusu nyonso akosala malamu soki amekoli kondima oyo Yozefe azalaki na yango.

^ par. 4 Na ntango wana, bazalaki kotalela bafianse ndenge moko na bato oyo babalani.

^ par. 8 “Monzoto” yango ezalaki te eloko moko oyo ebimi kaka boye na likoló; Nzambe atindaki yango te. Emonani polele ete ezalaki mwango mabe oyo Satana asalelaki mpo na koboma Yesu.

^ par. 11 Biblia emonisi polele ete Yesu asalaki likamwisi ya liboso, elingi koloba “ebandeli ya bilembo na ye,” nsima ya kozwa batisimo.Yoa. 2:1-11.