Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MINEI

Ayekolaki komonisa motema mawa

Ayekolaki komonisa motema mawa

1. Mobembo ya ndenge nini Yona asengelaki kosala, mpe azalaki koyoka ndenge nini mpo na esika oyo azalaki kokende?

YONA akozwa mpenza ntango mingi mpo na kokanisa. Akosala mobembo ya kilomɛtrɛ 800 na nzela ya mokili; mobembo yango ekozwa ye pene na sanza mobimba, ata mpe koleka. Na ebandeli, asengelaki kopona soki akozwa banzela ya mikuse, to banzela oyo ezalaki na makama te, kasi elekaki milai; na nsima, akobaki mobembo na ye na banzela oyo etondá na mabwaku mpe bangomba. Asengelaki mpe kotambola pembenipembeni ya esobe monene ya Siri, kokatisa bibale ya minene, lokola Efrate, mpe koluka esika ya kolala na bingumba mpe bamboka ya Siri, Mezopotamia mpe Asiri, epai ya bato oyo ayebaki te. Wana mikolo ezalaki koleka, akanisaki lisusu engumba oyo ezalaki kobangisa ye makasi, esika azalaki kokende: Ninive.

2. Nini esalisaki Yona akima lisusu te mokumba na ye?

2 Kasi, Yona ayebaki malamu ete akoki kozonga nsima te mpe kokima mokumba na ye na engumba yango. Asalaki bongo liboso. Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Yehova amoniselaki ye motema molai mpe apesaki ye mateya na nzela ya mopɛpɛ oyo atindaki na mbu mpe na ndenge atindaki mbisi moko monene mpo na kobikisa ye. Nsima ya mikolo misato, mbisi yango esanzaki Yona na bomoi na libongo moko; Yona ayokaki nsɔmɔ mpe akómaki na botosi makasi.Yona, mik. 1, 2.

3. Ezaleli nini Yehova amoniselaki Yona, kasi yango ebimisi motuna nini?

3 Ntango Yehova atindaki Yona na Ninive mpo na mbala ya mibale, mosakoli yango atosaki mpe abandaki mobembo molai  na ɛsti. (Tángá Yona 3:1-3.) Kasi, atikaki nde disiplini oyo Yehova apesaki ebongisa ye mpenza? Na ndakisa, Yehova amoniselaki ye motema mawa; abikisaki ye na mai, apesaki ye etumbu te mpo na botomboki na ye, mpe apesaki ye lisusu libaku ya kokokisa mokumba oyo azwaki. Nsima ya nyonso wana, Yona ayekolaki komonisela basusu motema mawa? Mbala mingi, ezalaka mpasi mpo bato ya kozanga kokoka bámonisa motema mawa. Tótala mateya oyo tokoki kozwa na mikakatano oyo Yona akutanaki na yango.

Nsango ya etumbu esali makambo ya kokamwa

4, 5. Mpo na nini Yehova abengaki Ninive “engumba monene,” mpe yango eteyi biso nini mpo na ye?

4 Yona azalaki kotalela Ninive te ndenge Yehova azalaki kotalela yango. Biblia elobi boye: “Mpo na Nzambe Ninive ezalaki engumba moko monene.” (Yona 3:3) Mokanda ya Yona elobi mbala misato ete Yehova abengaki Ninive “engumba monene.” (Yona 1:2; 3:2; 4:11) Mpo na nini engumba yango ezalaki monene to na ntina mingi na miso ya Yehova?

5 Ninive ezalaki engumba moko ya kala, ezalaki na kati ya  bingumba ya liboso oyo Nimerode atongaki nsima ya Mpela. Ezalaki engumba moko monene, oyo mbala mosusu esangisaki bingumba mingi, mpe ezalaki kosɛnga kotambola mikolo misato na makolo mpo na kokatisa yango. (Eba. 10:11; Yona 3:3) Ninive ezalaki na batempelo minene, bifelo ya milai, mpe bandako mosusu ya mineneminene. Kasi makambo wana te nde esalaki ete engumba wana ezala na ntina mingi na miso ya Yehova Nzambe. Bato nde bazalaki na ntina na miso ya Yehova. Na ntango wana, Ninive ezalaki na bato ebele koleka bingumba mosusu. Atako bazalaki bato mabe, Yehova azalaki komibanzabanza mpo na bango. Alingaka moto mokomoko mpe azalaka na mposa moto nyonso abongola motema mpe ayekola kosala oyo ezali malamu.

Yona amonaki ete Ninive ezali engumba monene oyo etondaki na makambo mabe

6. (a) Ekoki kozala mpo na nini Ninive ebangisaki Yona? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Liteya nini tozwi epai ya Yona na mosala ya kosakola oyo asalaki?

6 Ntango Yona akómaki na Ninive, mbala mosusu koyeba ete engumba yango ezalaki na bato koleka 120 000 ebangisaki ye lisusu mingi. * Atambolaki mokolo mobimba tii akómaki na esika oyo bato bazalaka ebele mpenza, mbala mosusu azalaki koluka esika oyo ebongi mpo abanda kosakola. Ndenge nini akosolola na bato yango? Ayekolaki monɔkɔ ya Asiri? To Yehova apesaki ye likoki ya koloba monɔkɔ yango na ndenge ya likamwisi? Toyebi te. Ekoki kozala ete Yona azalaki kosakola na Ebre, monɔkɔ ya mboka na ye, mpe asɛngaki moto moko abongola yango na monɔkɔ ya bato ya Ninive. Ezala bongo to te, nsango na ye ezalaki mindɔndɔ te mpe emonanaki ete ekosepelisa bato te. Azalaki koloba ete, “Etikali mikolo ntuku minei (40) mpamba, Ninive ekwea.” (Yona 3:4) Azongelaki yango mbala na mbala mpe na mpiko nyonso. Na ndenge yango, amonisaki mpenza mpiko mpe kondima, bizaleli oyo bakristo basengeli komonisa mingi koleka lelo oyo.

Nsango ya Yona ezalaki mindɔndɔ te mpe emonanaki ete ekosepelisa bato te

7, 8. (a) Bato ya Ninive basalaki nini ntango bayokaki nsango ya Yona? (b) Mokonzi ya Ninive asalaki nini ntango ayokaki esakweli ya Yona?

7 Nsango oyo Yona asakolaki ebendaki likebi ya bato ya Ninive. Na ntembe te, akanisaki ete bato yango bakosilika mpe bakobimisa mobulu. Nzokande, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Bato yango bayokaki! Nsango ya Yona epanzanaki nokinoki. Eumelaki te, bato nyonso na engumba bakómaki kolobela esakweli ya etumbu oyo ekoyela bango. (Tángá Yona 3:5.) Bato nyonso, babola,  bazwi, bato minene, bato mpamba, bilenge, mpe mikóló, babongolaki motema. Bakilaki bilei. Eumelaki te, mokonzi ayokaki likambo yango.

Esɛngaki Yona azala na mpiko mpe kondima mpo asakola na Ninive

8 Mokonzi mpe abongolaki motema ntango ayokaki nsango ya Yona. Lokola akómaki kobanga Nzambe, alongwaki na kiti na ye ya bokonzi, alongolaki bilamba na ye ya bokonzi mpe alataki ngɔtɔ lokola bato nyonso, kutu “afandaki na putulu ya mɔtɔ.” Ye ná “bato minene,” to bankumu na ye, bazwaki ekateli ete kokila bilei ekóma mobeko oyo euti epai ya mokonzi. Mokonzi asɛngaki ete bato nyonso, ata mpe banyama ya mboka, bálata ngɔtɔ. * Na komikitisa nyonso, andimaki ete bato na ye basalaki mabe mpe bazalaki bato ya mobulu. Lokola azalaki na elikya ete Nzambe akomonisela bango motema mawa soki amoni ete babongoli motema, mokonzi alobaki boye: ‘Nzambe akoki kozonga nsima na nkanda na ye ya kongala, mpo tókufa te.’Yona 3:6-9.

9. Bato mosusu bandimaka te likambo nini, kasi ndenge nini toyebi ete bato yango bazali na libunga?

9 Bato mosusu bandimaka te ete bato ya Ninive babongolaki motema nokinoki ndenge wana. Nzokande, bato oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobi ete likambo ya ndenge wana ezalaki kosalema mingi na mboka na ntango ya kala mpo bato bazalaki na biyambayamba mpe bazalaki bongolabongola. Longola yango, bato oyo bandimaka te ete bato ya Ninive babongolaki motema bazali na libunga, mpamba te na nsima, Yesu Kristo ye moko alobaki ete bato ya Ninive babongolaki motema. (Tángá Matai 12:41.) Yesu ayebaki likambo yango malamu, mpo azalaki na bomoi na likoló mpe amonaki ndenge esalemaki. (Yoa. 8:57, 58) Ya solo, tosengeli soki moke te kokanisa ete bato mosusu bakoki kobongola motema te, ata soki bazali mabe ndenge nini. Kaka Yehova nde akoki kotánga motema ya moto.

Nzambe azalaka te motema makasi lokola bato

10, 11. (a) Yehova asalaki nini lokola bato ya Ninive babongolaki motema? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete Yehova asalaki libunga te ndenge akatelaki bato ya Ninive etumbu?

10 Yehova asalaki nini lokola bato ya Ninive babongolaki motema?  Yona akomaki boye: “Nzambe ya solo amonaki misala na bango, amonaki ete babongwani na nzela na bango ya mabe; bongo Nzambe ya solo ayokaki mawa mpo na likama oyo alobaki ete akobimisela bango; mpe abimisaki yango te.”Yona 3:10.

11 Yango elingi nde koloba ete Yehova amonaki ete asalaki libunga ndenge akatelaki bato ya Ninive etumbu? Te. Biblia elobi ete boyengebene ya Yehova ezali ya kokoka. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:4.) Elimboli kaka ete nkanda oyo Yehova azalaki na yango mpo na bato ya Ninive esilaki. Amonaki mbongwana oyo basalaki, mpe ete kopesa bango etumbu oyo akanaki ekozala sembo te. Nzambe amonaki ete asengeli komonisela bango motema mawa.

12, 13. (a) Ndenge nini Yehova amonisaki ete atalelaka ndenge likambo ezali mpe ete azali na motema mawa? (b) Mpo na nini esakweli ya Yona ezalaki lokuta te?

12 Yehova azali te Nzambe ya makambo makasi, ya motema mabe, ndenge mbala mingi mateya ya bakonzi ya mangomba etindaka bato bákanisa. Yehova atalelaka ndenge likambo ezali mpe amonisaka motema mawa. Soki akani kopesa bato mabe etumbu, atindaka liboso basaleli na ye awa na mabele mpo na kokebisa bango, mpamba te mposa na ye ezalaka ete bato mabe básala ndenge bato ya Ninive basalaki, bábongola mitema mpe bátika nzela na bango ya mabe. (Ezk. 33:11) Yehova ayebisaki mosakoli na ye Yirimia boye: “Ntango nyonso oyo nakoloba mpo na ekólo moko boye mpe mpo na bokonzi moko boye mpo na kopikola yango mpe kokweisa yango mpe kobebisa yango, mpe soki ekólo yango etiki mabe na yango oyo nalobelaki, ngai mpe nakoyoka mawa mpo na mpasi oyo nakanisaki koyeisela yango.”Yir. 18:7, 8.

Mposa ya Nzambe ezalaka ete bato mabe bábongola motema mpe bátika bizaleli na bango ya mabe, ndenge bato ya Ninive basalaki

13 Esakweli ya Yona ezalaki nde lokuta? Te; mpamba te ekebisaki bato na likambo oyo esengelaki kokómela bango soki babongoli motema te. Apesaki likebisi yango mpo bato ya Ninive bazalaki kosala mabe, mpe na nsima babongwanaki. Soki bato ya Ninive bazongeli mabe na bango, Nzambe akopesa bango etumbu. Yango nde esalemaki na nsima.Sef. 2:13-15.

14. Yona asalaki nini lokola Yehova amoniselaki bato ya Ninive motema mawa?

14 Yona asalaki nini lokola libebi eyaki te na ntango oyo azalaki kozela yango? Biblia elobi ete: “Nzokande, likambo yango esepelisaki Yona ata moke te, mpe asilikaki makasi.” (Yona 4:1) Asalaki kutu libondeli oyo emonisaki lokola ete azali kopamela Mozwi-ya-Nguya-Nyonso! Yona alobaki ete ebongaki atikala na ndako na ye, na mboka na ye. Ayebaki banda ebandeli ete Yehova akobebisa Ninive te; alobaki kutu ete ezali mpo na ntina yango nde akimaki na Tarasisi na mbala ya liboso. Na nsima, asɛngaki akufa, alobaki ete malamu akufa na esika azala na bomoi.Tángá Yona 4:2, 3.

15. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Yona asilikaki? (b) Yehova asalaki nini ntango mosakoli na ye alɛmbaki nzoto?

15 Nini ezalaki kotungisa Yona? Toyebi mpenza te nini ezalaki  kotungisa ye; kasi toyebi ete Yona asakwelaki bato wana nyonso ete Ninive ekobebisama. Bato yango bandimelaki ye. Sikoyo, libebi yango ezalaki koya te. Azalaki nde kobanga ete bato bakotyola ye to bakoloba ete azali mosakoli ya lokuta? Ezala bongo to te, Yona asepelaki te ndenge bato wana babongolaki motema; asepelaki mpe te ndenge Yehova amonisaki motema mawa. Yona asilikaki, akangaki nkanda, amonaki ete asili valɛrɛ, ete lokumu na ye ebebi. Nzokande, Nzambe ya motema mawa oyo Yona azalaki kosambela, amonaki makambo ya malamu epai ya mosakoli wana oyo alɛmbaki nzoto. Na esika apesa Yona etumbu mpo na kozanga limemya na ye, Yehova atunaki ye motuna moko oyo ekotinda ye akanisa; na boboto nyonso, atunaki ye boye: “Ozali mpenza na ntina ya kosilika makasi boye?” (Yona 4:4) Yona apesaki eyano? Biblia elobi eloko te.

16. Na makambo nini makanisi ya bato mosusu ekoki koyokana te ná oyo ya Nzambe, mpe ndakisa ya Yona ekoki koteya biso nini?

16 Ezali mpasi te tómona ete Yona asalaki mabe, kasi tóbosana te ete ekómaka mbala mingi ete makanisi ya bato ya kozanga kokoka eyokana te ná oyo ya Nzambe. Bato mosusu bakoki kokanisa ete Yehova asengelaki kopekisa likama moko boye oyo ekómeli bango to ete asengelaki kopesa moto moko ya mabe etumbu nokinoki, to kutu ete asengelaki aboma mokili oyo mabe banda kala. Ndakisa ya Yona ezali kosalisa biso tóbosana te ete soki makanisi na biso eyokani te ná oyo ya Yehova Nzambe, esɛngaka biso nde tósembola makanisi na biso, kasi ye te.

Yehova apesaki Yona liteya

17, 18. (a) Yona asalaki nini nsima ya kolongwa na Ninive? (b) Likamwisi oyo Yehova asalaki ya kobimisa molona ya ekutu esalaki Yona nini?

17 Na mawa nyonso, Yona alongwaki na Ninive; azongaki na mboka na ye te, kasi akendaki na ngámbo ya ɛsti, na etúká ya bangombangomba. Atongaki mwa ndako mpe afandaki wana mpe azalaki kozela amona nini ekokómela Ninive. Mbala mosusu azalaki kaka na elikya ya komona ndenge engumba yango ekobebisama. Ndenge nini Yehova akoteya mobali yango ya motema makasi mpo ayekola komonisa motema mawa?

18 Na butu, Yehova abimisaki molona moko ya ekutu. Ntango Yona alamukaki, amonaki molona yango oyo ebimisaki nkasa mingi, oyo ekokaki kobatela ye mingi na moi koleka mwa ndako oyo asalaki. Azalaki na esengo makasi. “Yona asepelaki mingi mpenza” na molona yango, mbala mosusu amonaki ete molona yango oyo ebimaki na ndenge ya likamwisi emonisaki ete Nzambe apamboli ye mpe asepeli na ye. Nzokande, Yehova abimisaki yango kaka te mpo na kobatela Yona na moi mpe kokitisa nkanda na ye oyo ezangá ntina. Alingaki nde kosimba motema ya Yona. Na yango, Nzambe asalaki makamwisi mosusu. Atindaki nkusu elya molona yango  mpe ebebisa yango. Na nsima, atindaki “mopɛpɛ moko ya ɛsti oyo ekaukisaka” mpe ebɛtaki Yona tii etikalaki moke “akatswa.” Yona alɛmbaki lisusu nzoto mpe asɛngaki lisusu Nzambe ete malamu akufa.Yona 4:6-8.

19, 20. Ndenge nini Yehova asalelaki molona ya ekutu mpo na kopesa Yona liteya?

19 Yehova atunaki lisusu Yona soki azalaki mpenza na ntina ya kosilika mpo mwa molona wana ya ekutu oyo ekufi. Na esika abongola motema, Yona alukaki komilongisa; alobaki boye: “Nasiliki mpenza na ntina, tii na liwa.” Sikoyo, ntango ekokaki mpo Yehova apesa ye liteya.Yona 4:9.

Nzambe asalelaki molona ya ekutu mpo na koteya Yona motema mawa

20 Nzambe ayebisaki Yona ete ayoki mawa mpo mwa molona oyo ekolaki na butu moko mpamba ekufaki, molona oyo ye alonaki te mpe akolisaki te. Na nsima, Nzambe abakisaki ete: “Bongo ngai, nasengeli nde koyokela Ninive engumba oyo monene mawa te, engumba oyo ezali na bato koleka nkóto nkama moko na ntuku mibale (120 000) oyo bayebi ata moke te kokesenisa lobɔkɔ na  bango ya mobali ná lobɔkɔ na bango ya mwasi, bakisa mpe ebele ya banyama ya mboka?”Yona 4:10, 11. *

21. (a) Ndakisa nini Yehova asalelaki mpo na koteya Yona? (b) Ndenge nini lisolo ya Yona ekoki kosalisa biso tómitalela?

21 Omoni liteya monene oyo Yehova alingaki kopesa na ndakisa wana? Yona asalaki eloko moko te mpo na kokolisa molona wana. Nzokande, Yehova nde apesaki bato ya Ninive bomoi mpe azalaki kobatela bango ndenge asalaka mpo na bikelamu na ye nyonso awa na mabele. Ndenge nini Yona akokaki kopesa mwa molona wana motuya mingi koleka bato 120 000 ya Ninive, ná bibwɛlɛ na bango nyonso? Ezali nde mpo Yona akómaki kokanisa kaka bolamu na ye? Emonani polele ete ayokaki mawa mpo na mwa molona wana kaka mpo ezalaki kobatela ye na moi. Nkanda oyo ayokaki mpo na Ninive ezalaki kaka mpo azalaki koluka matomba na ye moko, kobatela lokumu na ye, mpe mpo bato bándima ete azalaki na elonga. Lisolo ya Yona ekoki kosalisa biso tómitalela. Nani kati na biso ekómelá ye te akóma koluka naino kaka bolamu na ye moko? Tosengeli kopesa Yehova matɔndi ndenge azali koteya biso na motema molai nyonso ete tótika koluka kaka matomba na biso mpe tómonisaka motema mawa, ndenge ye asalaka!

22. (a) Nini emonisi ete Yona azwaki liteya na toli ya bwanya oyo Yehova apesaki ye? (b) Biso nyonso tokoki kozwa liteya nini?

22 Kasi, makambo oyo Yona akutanaki na yango eteyaki ye mpenza? Mokanda ya Yona esuki na motuna wana oyo Yehova atunaki ye, oyo ezwá eyano te. Bato mosusu balobaka ete Yona apesá eyano te. Nzokande, eyano ezali. Mokanda ya Yona yango moko ezali eyano. Ezali na makambo oyo emonisi polele ete Yona nde akomaki mokanda yango. Meká naino komona na makanisi mosakoli yango, ntango azongaki na mboka na ye, mpe azali kokoma mokanda yango. Tokoki mpe komona na makanisi mobali yango ya mokóló, ya bwanya mpe ya komikitisa mingi, azali koningisa motó na mawa nyonso ntango azali kokoma mabunga na ye moko, ndenge atombokaki, mpe azalaki koboya komonisela basusu motema mawa. Ya solo, Yona azwaki liteya monene na toli ya bwanya oyo Yehova apesaki ye. Ayekolaki komonisela basusu motema mawa. Tokosala lokola ye?Tángá Matai 5:7.

^ par. 6 Bato mosusu balobaka ete na ntango ya Yona, mbala mosusu Samaria, mboka-mokonzi ya Yisraele, ekólo ya mabota zomi, ezalaki na bato soki 20 000 to 30 000; nzokande, Ninive ezalaki na bato ebele mbala minei koleka yango. Na ntango wana, mbala mosusu Ninive ezalaki engumba oyo elekaki monene na mokili mobimba.

^ par. 8 Likambo yango ekoki kokamwisa, kasi esilaki kosalema liboso. Hérodote, moto moko ya mayele ya ekólo Grèce na makambo ya istware, alobaki ete ntango mokonzi moko ya basoda ya Perse akufaki, lokola bazalaki kolinga ye mingi bato balelaki mpe bakɔtisaki banyama na bango na milulu ya kolela ye.

^ par. 20 Nzambe alobaki ete bato yango bayebaki te kokesenisa lobɔkɔ na bango ya mobali ná oyo ya mwasi mpo na komonisa ete bazalaki lokola bana mike mpo bayebaki mibeko ya Nzambe te.