Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MINEI

“Epai okokende, ngai mpe nakokende”

“Epai okokende, ngai mpe nakokende”

1, 2. (a) Lobelá mobembo ya Ruta ná Naomi, mpe ntina oyo bazali na mawa makasi. (b) Mobembo ya Ruta ná Naomi ekeseni na nini?

RUTA azali kotambola ná Naomi na nzela oyo ekatisi mokili patatalu ya Moabe epai mopɛpɛ ezali makasi. Batikali kaka bango mibale, bazali kokatisa mokili monene wana. Ruta amoni ete molili ebandi kokɔta; atali bokilo na ye mpe amituni soki ntango ekoki naino te mpo na koluka esika ya kolala. Alingaka Naomi mingi mpe akoki kosala nyonso mpo na kobatela ye.

2 Bango nyonso mibale bakutaná na likambo ya mawa mpenza. Bambula mingi eleki banda mobali ya Naomi akufá, kasi sikoyo azali nde kolela bana na ye mibale ya mibali Mahalone ná Kilione, oyo bauti mpe kokufa. Ruta mpe azali na mawa makasi. Mahalone azalaki mobali na ye. Ye ná Naomi bazali kokende na engumba Beteleme, na Yisraele. Atako bazali kokende esika moko, ntina ya mobembo na bango ekeseni. Naomi azali kozonga na mboka na ye, kasi Ruta azali kokende esika oyo ayebi te. Atiki bandeko mpe mboka na ye ná mimeseno mpe banzambe na yango nyonso.Tángá Ruta 1:3-6.

3. Biyano na mituna nini ekosalisa biso tómekola kondima ya Ruta?

3 Nini etindi elenge mwasi yango asala mbongwana monene ndenge wana? Ndenge nini Ruta akozwa makasi ya kobanda bomoi ya sika mpe ya kobatela Naomi? Biyano na mituna yango ekosalisa biso tómona ete tokoki komekola kondima ya Ruta, Momoabe, na makambo mingi. (Talá mpe etanda “ Lisolo moko mokuse, kasi ya kitoko mingi.”) Liboso, tótala naino likambo oyo esalaki ete basi yango mibale básala mobembo molai tii na Beteleme.

Libota oyo ekutanaki na mikakatano

4, 5. (a) Mpo na nini libota ya Naomi ekendaki kofanda na Moabe? (b) Mikakatano nini Naomi akutanaki na yango na Moabe?

4 Ruta akolaki na Moabe, ekólo moko ya moke oyo ezalaki na ɛsti ya Mbu ya Mungwa. Mokili yango ezalaki mingimingi na bangomba patatalu, banzete mingi te, mpe mabulu minene oyo ekabolaki bangomba yango. “Mokili ya Moabe” ezalaki na mabele ya malamu mpo na kosala bilanga, ata ntango nzala ekɔtaki na Yisraele. Kutu nzala yango nde esalaki ete Ruta ayeba Mahalone ná libota na ye.Ruta 1:1.

 5 Nzala oyo ekɔtaki na Yisraele etindaki Elimeleke, mobali ya Naomi, azwa mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali mpo bákende kofanda lokola bapaya na Moabe. Na ntembe te, kokende kuna etyaki kondima ya moto mokomoko ya libota na bango na komekama, mpo Bayisraele basengelaki kokende kosambela na esika mosantu oyo Yehova aponaki. (Mib. 16:16, 17) Naomi abatelaki kondima na ye makasi. Atako bongo, ayokaki mawa makasi ntango mobali na ye akufaki.Ruta 1:2, 3.

6, 7. (a) Ekoki kozala ete Naomi amitungisaki mpo na nini ntango bana na ye babalaki basi ya Moabe? (b) Mpo na nini ndenge oyo Naomi azalaki kosalela basi ya bana na ye makambo ezali malamu mingi?

6 Ekoki kozala ete Naomi ayokaki lisusu mpasi na motema, ntango bana na ye babalaki basi ya Moabe. (Ruta 1:4) Ayebaki ete Abrahama, nkɔkɔ ya ekólo na ye, asalaki makasi mpo na kozwela mwana na ye Yisaka mwasi na kati ya bato ya ekólo na ye, oyo bazalaki kosambela Yehova. (Eba. 24:3, 4) Na nsima, Mibeko ya Moize epekisaki Bayisraele bábalisa bana na bango ya mibali mpe ya basi na bapaya, noki bámema libota ya Nzambe na losambo ya bikeko.Mib. 7:3, 4.

7 Atako bongo, Mahalone ná Kilione babalaki basi ya Moabe. Ata soki yango etungisaki Naomi to elɛmbisaki ye nzoto, emonani ete asalaki nyonso mpo amonisela Ruta ná Orpa, basi ya bana na ye boboto mpe bolingo ya solosolo. Mbala mosusu azalaki na elikya ete mokolo mosusu bango mpe bakokóma basambeli ya Yehova. Ezala bongo to te, Ruta ná Orpa bazalaki kosepela na Naomi mingi. Boyokani malamu oyo bazalaki na yango esalisaki bango na ntango ya mpasi. Tii ntango mibali ya bilenge basi yango bakufaki, babotaki te.Ruta 1:5.

8. Ekoki kozala ete nini esalisaki Ruta alinga Yehova?

8 Ezali mpasi tóloba ete lingomba ya Ruta esalisaki ye ayeba oyo akosala soki akutani na likambo ya mpasi ndenge wana. Bato ya Moabe bazalaki kosambela banzambe ebele; oyo alekaki bango nyonso ezalaki Kemoshe. (Mit. 21:29) Emonani ete lingomba ya bato ya Moabe ezalaki na mobulu mpe na makambo ya nsɔmɔ oyo ezalaki mingi na ntango wana, na ndakisa kotumba bana mbeka. Na ntembe te, makambo oyo Mahalone to Naomi bayebisaki Ruta na ntina na Yehova, Nzambe ya Yisraele oyo azali bolingo mpe motema mawa, emonisaki ye ete Yehova akeseni mpenza na banzambe ya Moabe. Yehova amoniselaka bato na ye bolingo, kasi anyokolaka bango te. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:5.) Ekoki kozala ete na ntango wana oyo Ruta azalaki na mawa makasi mpo na liwa ya mobali na ye, akómaki kokangama lisusu mingi na Naomi mpe azalaki kosepela koyoka mobange mwasi yango ntango azali kolobela Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, misala na ye ya kokamwa, mpe bolingo ná motema mawa oyo amoniselaka bato na ye.

Ruta akangamaki na Naomi na ntango ya mpasi mpe ya mawa

9-11. (a) Ekateli nini Naomi, Ruta, mpe Orpa bazwaki? (b) Liteya nini tokoki kozwa na makambo ya mpasi oyo ekómelaki Naomi, Ruta, mpe Orpa?

 9 Naomi azalaki kosepela koyoka bansango ya mboka na ye. Ekoki kozala ete mokolo moko, ayokaki epai ya moto moko ya mombongo oyo asalaka mibembo ete nzala esili na Yisraele. Yehova atyelaki bato na ye likebi. Beteleme ezongelaki lisusu nkombo na yango, oyo elimboli: “Ndako ya limpa.” Naomi azwaki ekateli ya kozonga na mboka na ye.Ruta 1:6.

10 Ruta ná Orpa bakosala nini? (Ruta 1:7) Liwa ya mibali na bango esalaki ete bákóma baninga makasi ná Naomi. Emonani ete Ruta akómaki moninga ya motema ya Naomi mpo na boboto mpe kondima makasi oyo Naomi azalaki na yango epai ya Yehova. Basi wana misato oyo mibali bakufá babandaki kokende na Yuda.

11 Mokanda ya Ruta emonisi ete makambo ya mpasi ekómelaka moto nyonso, ezala moto malamu to moto mabe. (Mos. 9:2, 11) Emonisi lisusu ete ntango moto oyo tolingaka akufi, ekozala malamu tóluka libɔndisi mpe lisungi epai ya basusu, mingimingi epai ya baoyo balukaka libateli epai ya Yehova, Nzambe oyo Naomi azalaki kosambela.Mas. 17:17.

Bolingo ya sembo ya Ruta

12, 13. Mpo na nini Naomi alingaki ete Ruta ná Orpa bázonga na mboka na bango na esika bákende ná ye, mpe bilenge basi yango balobaki nini?

12 Ntango basi yango misato batambolaki ntaka molai, likambo moko ebandaki kotungisa Naomi. Akanisaki bilenge basi oyo bazalaki elongo na ye mpe bolingo oyo bamoniselaki ye ná bana na ye ya mibali. Alingi te kobakisela bango mpasi mosusu. Soki batiki mboka na bango mpe bakei ná ye, akosalela bango nini na Beteleme?

13 Nsukansuka, Naomi alobaki na bango boye: “Bókende, bózonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tiká Yehova amonisela bino motema boboto, kaka ndenge bino bomoniselaki mibali oyo sikoyo basili kokufa mpe ngai.” Amonisaki mpe ete azali na elikya ete Yehova akopesa bango mibali mosusu mpe bomoi ya sika. Biblia elobi boye: “Bongo apwɛpwaki bango, mpe babandaki kotombola mingongo na bango mpe kolela.” Tomoni mpenza ntina oyo Ruta ná Orpa bakangamaki na mwasi yango ya motema malamu  mpe oyo azalaki koluka matomba ya basusu. Bilenge basi yango bazalaki koloba ete: “Te, kasi tokozonga elongo na yo epai ya bato na yo.”Ruta 1:8-10.

14, 15. (a) Orpa azongelaki nini? (b) Naomi alobaki nini mpo Ruta andima kotika ye?

14 Kasi, Naomi andimaki na mbala moko te. Amonisaki bango polelepolele ete akokoka mpenza te kosalisa bango na Yisraele, mpo azali na mobali te mpo na kokokisa bamposa na ye, azali mpe na bana mibali te oyo bakobala bango, mpe azalaki ata na elikya moko te. Amonisaki bango ete azali koyoka mpasi mpo akokoka kosalisa bango te. Orpa amonaki ete Naomi alobi solo. Atikaki bandeko na ye na Moabe, azalaki na mama, mpe ndako ya kofanda. Amonaki ete kotikala na Moabe ezali malamu. Na mpasi na motema, apwɛpwaki Naomi mpe azongaki.Ruta 1:11-14.

15 Kasi Ruta asalaki nini? Makambo oyo Naomi alobaki etalaki mpe ye. Biblia elobi boye: “Kasi Ruta, akangamaki na ye.” Ekoki kozala ete ntango Naomi azongelaki kotambola, ayaki komona ete Ruta azali kolanda ye nsimansima. Alobaki na ye boye: “Talá! Mbanda na yo, oyo mobali akufá lokola yo, azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye. Zongá elongo na mbanda na yo oyo mobali akufá.” (Ruta 1:15) Maloba ya Naomi esalisaka motángi ayeba likambo moko ya ntina mingi. Orpa azongaki kaka epai ya bato na ye te, kasi mpe epai “banzambe na ye.” Orpa amonaki mabe te kokoba kosambela Kemoshe mpe banzambe mosusu ya lokuta. Ruta mpe akanisaki bongo?

16-18. (a) Ndenge nini Ruta amonisaki bolingo ya sembo? (b) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Ruta na likambo etali bolingo ya sembo? (Talá mpe bililingi ya basi oyo mibale.)

16 Ntango atikalaki kaka ye ná Naomi na nzela, Ruta ayebaki na motema na ye ekateli nini azwi. Alingaki Naomi mingi mpe Nzambe  oyo Naomi azalaki kosalela. Na yango, Ruta alobaki boye: “Kobondela ngai te ete nasundola yo, nazonga, natika yo; mpo epai okokende, ngai mpe nakokende, epai okolala, ngai mpe nakolala. Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai. Epai okokufa, ngai mpe nakokufa, mpe kuna nde nakokundama. Tiká Yehova asala ngai bongo mpe abakisa yango, soki eloko mosusu, longola kaka liwa, ekokabola ngai ná yo.”Ruta 1:16, 17.

“Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai”

17 Ruta abimisaki maloba kitoko mpenza; atako akufá maloba yango esilaka ngala te, mpe bato bayebi yango tii lelo atako eleki sikoyo mbula 3 000. Maloba yango emonisaka ete Ruta azalaki na ezaleli moko ya malamu mingi: bolingo ya sembo. Bolingo ya Ruta epai ya Naomi ezalaki makasi mpe sembo, yango wana alobaki ete akozala na Naomi esika nyonso oyo akokende. Kaka liwa nde ekokaki kokabola bango. Bato ya Naomi bakokóma bato na ye, mpo Ruta andimaki kotika biloko nyonso oyo azalaki na yango na Moabe, ata mpe banzambe ya Moabe. Na bokeseni na Orpa, Ruta alobaki na motema mobimba ete alingi Yehova, Nzambe ya Naomi, azala mpe Nzambe na ye. *

18 Na yango, bakobaki mobembo, kaka bango mibale na nzela molai wana oyo ezalaki komema na Beteleme. Bato mosusu balobi ete mbala mosusu mobembo yango esalaki pɔsɔ mobimba. Kasi, lokola bazalaki bango mibale, na ntembe te balendisanaki na mpasi oyo bazalaki na yango.

19. Mpo na yo, ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya sembo lokola Ruta na libota na biso, epai ya baninga, mpe na lisangá?

19 Lelo oyo mpe bato bazali kokutana na makambo ya mpasi. Na eleko na biso, oyo Biblia ebengi “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” biso nyonso tokutanaka na makambo ndenge na ndenge ya mabe to ya mpasi. (2 Tim. 3:1) Na yango, ezaleli oyo Ruta amonisaki ezali na ntina mingi koleka lelo oyo. Tosengeli komonisa bolingo ya sembo, bolingo oyo esɛngaka kokangama na moto oyo olingi mpe koboya kotika ye; ezaleli yango ekotinda biso tósalisana na mokili oyo mabe. Tosengeli komonisa yango na libala, na bandeko ya libota, na baninga mpe na lisangá. (Tángá 1 Yoane 4:7, 8, 20.) Soki tozali komonisa bolingo ya ndenge wana, tozali komekola ndakisa malamu ya Ruta.

Ruta ná Naomi na Beteleme

20-22. (a) Kofanda na Moabe ekómisaki bomoi ya Naomi ndenge nini? (b) Likanisi nini ya mabe Naomi azalaki na yango mpo na bampasi na ye? (Talá mpe Yakobo 1:13.)

20 Ya solo, koloba ete ozali na bolingo ya sembo ná komonisa  yango na misala, ezali makambo mibale ekeseni. Ruta azalaki na libaku ya komonisa bolingo ya sembo kaka epai ya Naomi te, kasi mpe epai ya Yehova Nzambe, oyo ye aponaki kosambela.

21 Nsukansuka, basi yango mibale bakómaki na Beteleme, mboka oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10 na sudi ya Yerusaleme. Emonani ete Naomi ná libota na ye bayebanaki mingi na mwa engumba yango, mpo mboka eninganaki ntango bayokaki ete Naomi azongi. Basi ya mboka bazalaki kotalatala ye mpe koloba ete: “Oyo nde Naomi?” Na ntembe te, azalaki lisusu te ndenge azalaki liboso akende na Moabe; elongi na ye mpe molato na ye emonisaki ete anyokwamaki mpe akutanaki na bampasi na boumeli ya bambula.Ruta 1:19.

22 Naomi ayebisaki bandeko na ye mpe baninga na ye ya kala ete bomoi na ye ekómá mpenza bololo. Amonaki malamu kutu nkombo na ye elongwa Naomi oyo elimboli “esengo na ngai,” mpe ekóma Mara, oyo elimboli “bololo.” Mawa mpo na Naomi! Ndenge moko na Yobo oyo azalaki na bomoi liboso na ye, Naomi akanisaki ete Yehova Nzambe nde ayeiseli ye bampasi nyonso wana.Ruta 1:20, 21; Yobo 2:10; 13:24-26.

23. Ruta abandaki kokanisa nini, mpe ebongiseli nini Mibeko ya Moize ezwaki mpo na babola? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

23 Ntango bakómaki kofanda na Beteleme, Ruta abandaki kokanisa ndenge oyo akokokisa bamposa na ye ná oyo ya Naomi. Ayokaki ete Mibeko oyo Yehova apesaki bato na ye na Yisraele ezali na ebongiseli moko malamu mpo na babola. Mibeko epesaki bango nzela ya kokende na bilanga na eleko ya kobuka mbuma mpe kolanda babuki-mbuma mpo na kolɔkɔta mbuma oyo etikalaka mpe oyo ebotaka na bansuka ya elanga. *Lev. 19:9, 10; Mib. 24:19-21.

24, 25. Ruta asalaki nini ntango akómaki na bilanga ya Boaze, mpe mosala ya kolɔkɔta mbuma na bilanga ezalaki mosala ya ndenge nini?

24 Ezalaki eleko ya kobuka ɔrje, mbala mosusu na sanza ya minei na kolanda kalandriye ya lelo, mpe Ruta akendaki na bilanga kotala soki nani akopesa ye nzela ya kolɔkɔta mbuma oyo ekotikala na elanga. Kozanga kokana,  akendaki na elanga ya mobali moko na nkombo Boaze, moto moko ya bozwi oyo azalaki ndeko ya Elimeleke, mobali ya Naomi. Atako Mibeko epesaki ye nzela ya kolɔkɔta mbuma, amonaki te ete esengeli akanga mabɔkɔ; asɛngaki elenge mobali oyo azalaki kotambwisa mosala ya kobuka mbuma nzela mpo asala. Elenge mobali yango andimaki, mpe Ruta abandaki mbala moko kosala.Ruta 1:22–2:3, 7.

25 Meká komona ndenge Ruta azali kolanda bato oyo bazalaki kobuka mbuma. Ntango bazali kokata ɔrje na bambeli na bango, Ruta azali kogumbama mpo na kolɔkɔta oyo bakweisi to oyo batiki; azali kosangisa mitó yango mpe kokanga yango maboke, mpe komema yango na esika oyo akokaki kobɛtabɛta yango mpo na kozwa mbuma. Mosala yango ezalaki kosalema malɛmbɛ, ezalaki kolɛmbisa mpe ezalaki kokóma mpasi mingi wana moi ebandi kobima. Ata bongo, Ruta akobaki kosala, azalaki kopema kaka mpo na kopangwisa motoki to kolya mwa eloko na kati ya “ndako,” na ntembe te ezalaki mwa esika oyo babongisaki mpo basali bákimaka moi.

Ruta andimaki kosala mosala makasi mpe ya lokumu te mpo na kokokisa bamposa na ye moko mpe oyo ya Naomi

26, 27. Boaze azalaki moto ya ndenge nini, mpe ndenge nini azalaki kosalela Ruta makambo?

26 Mbala mosusu Ruta atyaki ata na makanisi te ete moto akomona ye mpe akotyela ye likebi; nzokande yango nde esalemaki. Boaze amonaki ye mpe atunaki elenge mobali oyo azalaki kokɛngɛla mosala soki Ruta azali nani. Boaze azalaki na kondima makasi. Kutu, ntango azali kopesa basali na ye mbote, azali koloba na bango boye: “Yehova azala na bino.” Bazalaki mpe kozongisela ye kaka bongo. Na kati ya basali yango, basusu bazalaki kosala kaka mpo na mokolo moko mpe basusu bazalaki bapaya. Mobali yango ya mobange, oyo azalaki kolinga Yehova mingi, azwaki Ruta lokola mwana na ye.Ruta 2:4-7.

 27 Boaze abengaki Ruta “mwana” na ye, mpe ayebisaki ye ete ayaka na elanga mpo na kolɔkɔta mbuma mpe azalaka ná bilenge basi ya ndako na ye mpo basali ya mibali bátungisa ye te. Azalaki kosala nyonso mpo Ruta azanga eloko ya kolya te. (Tángá Ruta 2:8, 9, 14.) Kasi, azalaki mpe kopesa ye longonya mpe kolendisa ye. Ndenge nini?

28, 29. (a) Ruta ayebanaki lokola moto ya ndenge nini? (b) Na ndakisa ya Ruta, ndenge nini yo mpe okoki koluka libateli epai ya Yehova?

28 Ntango Ruta atunaki Boaze, eloko nini mopaya lokola ye asalaki mpo Boaze amonisela ye boboto ya ndenge wana, Boaze alobaki ete ayokaki makambo nyonso oyo asalelaki bokilo na ye, Naomi. Mbala mosusu Naomi alobaki malamu mpo na Ruta epai ya basi ya Beteleme, mpe nsango yango ekómaki na matoi ya Boaze. Ayebaki mpe ete Ruta akómaki kosambela Yehova, mpo alobaki na Ruta boye: “Tiká Yehova apesa mbano mpo na oyo osalaki, mpe ozwa lifuti ya kokoka uta na Yehova Nzambe ya Yisraele, oyo na nse ya mapapu na ye oyei koluka esika ya komibomba.”Ruta 2:12.

29 Maloba wana elendisaki mpenza Ruta! Alukaki libateli epai ya Yehova, ndenge mwana ndɛkɛ amibatelaka na nse ya mapapu ya mama na ye. Ruta apesaki Boaze mersi mpo na maloba na ye ya kokitisa motema. Mpe akobaki mosala tii mpokwa.Ruta 2:13, 17.

30, 31. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Ruta na oyo etali mosala, komonisa botɔndi, mpe komonisa bolingo ya sembo?

30 Kondima oyo Ruta amonisaki ezali ndakisa malamu mpenza mpo na biso nyonso, oyo tozali kobunda etumba na eleko oyo nkita ezali se kobeba. Amonaki te ete basusu basengeli kosalela ye makambo nyonso mpo mobali na ye akufá, kasi azalaki na botɔndi mpo na oyo bapesaki ye. Ayokaki nsɔni te kosala mosala makasi mpe ntango molai mpo na kokokisa bamposa ya moto oyo alingaki mingi, atako mosala yango ezalaki ya lokumu te. Andimaki mpe asalelaki na motema moko toli ya bwanya oyo bapesaki ye mpo asala mosala kozanga likama mpe ná bato ya malamu. Likambo eleki ntina ezali ete abosanaki soki moke te ete Yehova Nzambe, azali Mobateli na ye ya solosolo.

31 Soki tomonisi bolingo ya sembo lokola Ruta mpe tolandi ndakisa na ye ya komikitisa, ya kozala makasi na mosala mpe ya komonisaka botɔndi, kondima na biso mpe ekokóma ndakisa ya malamu mpo na basusu. Kasi, ndenge nini Yehova akokisaki bamposa ya Ruta ná Naomi? Tokolobela yango na mokapo oyo elandi.

^ par. 17 Tóbosana te ete Ruta asalelaki kaka te titre “Nzambe” ndenge bapaya mingi bakokaki kosala; asalelaki mpenza nkombo ya Nzambe, Yehova. Buku moko (The Interpreter’s Bible) elobi boye: “Na ndenge yango mokomi amonisaki ete mopaya yango akómaki mosaleli ya Nzambe ya solo.”

^ par. 23 Ezalaki mobeko ya malamu mpenza, mpe ekoki kozala ete mobeko ya ndenge wana ezalaki te na mboka ya Ruta. Na ntango wana na Proche-Orient, bazalaki konyokola basi oyo mibali bakufá. Buku moko elobi boye: “Nsima ya liwa ya mobali na ye, mwasi asengelaki koluka lisalisi epai ya bana na ye ya mibali; soki azali na bango te, akokaki komitɛka lokola moombo, kosala kindumba, to kokufa.”