Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MITANO

“Mwasi moko malamu mingi”

“Mwasi moko malamu mingi”

1, 2. (a) Mosala nini Ruta azalaki kosala? (b) Makambo nini ya malamu Ruta ayebaki mpo na Mibeko ya Nzambe mpe basaleli na ye?

RUTA afukami pembeni ya liboke ya mitó ya mbuma ya ɔrje oyo alɔkɔti mokolo mobimba. Molili ebandi kokɔta na bilanga oyo ezali zingazinga ya Beteleme, mpe basali mingi babandi kokende malɛmbɛmalɛmbɛ mpo na kokɔta na porte ya engumba yango ya moke oyo ezali likoló, pembeni ya mwa ngomba moko. Na ntembe te, Ruta alɛmbi mpenza mpo na mosala makasi oyo asali banda ntɔngɔ. Atako bongo, azali kaka kosala, azali kobɛtabɛta mitó ya milona mpo na kozwa mbuma. Asali mosala makasi, kasi mokolo na ye eleki malamu koleka ndenge akanisaki.

2 Makambo ya elenge mwasi yango oyo mobali akufá ebandaki nde kobonga? Ndenge tomonaki na lisolo oyo eleki, Ruta azwaki ekateli ya kokangama na mama bokilo na ye Naomi mpe kokómisa Yehova, Nzambe ya Naomi, Nzambe na ye. Basi yango mibale oyo mibali na bango bakufaki balongwaki na Moabe mpe bakendaki na Beteleme; eumelaki te, Ruta, moto ya Moabe, ayebaki ete Mibeko oyo Yehova apesaki ezalaki na ebongiseli moko ya malamu mpenza, oyo ezalaki kosalisa babola, ata mpe bapaya na Yisraele. Sikoyo, amonaki ete basaleli mosusu ya Yehova oyo bazalaki kotosa Mibeko yango, bazali kotosa yango mpo balingaka Yehova mpe bamoniselaki ye boboto; yango esimbaki motema na ye oyo ezalaki kotungisama.

3, 4. (a) Ndenge nini Boaze alendisaki Ruta? (b) Ndenge nini ndakisa ya Ruta ekoki kosalisa biso lelo oyo, lokola mbongo ekómi mpasi?

3 Moko ya bato yango ezalaki Boaze, mobange moko oyo azalaki na bozwi, nkolo-bilanga oyo Ruta azalaki kolɔkɔta mbuma. Lelo, atyeli Ruta likebi, lokola tata epai mwana na ye. Mbala mosusu Ruta azalaki kosɛka na nse ya motema soki akanisi maloba ya boboto oyo mobali yango alobaki na ye mpo na kopesa ye longonya na ndenge azalaki kokipe Naomi mpe ndenge aponaki koluka libateli epai ya Yehova, Nzambe ya solo.Tángá Ruta 2:11-14.

4 Atako bongo, mbala mosusu Ruta azalaki komituna soki bomoi na ye ekozala ndenge nini. Lokola azalaki mobola mpe mopaya, mpe azalaki na mobali te, mwana mpe te, ndenge nini akokaki kokokisa bamposa na ye mpe oyo ya Naomi na bambula oyo ezalaki  koya? Kolɔkɔta bilei na elanga elingaki kokokisa bamposa na bango? Nani alingaki kosunga ye ntango akokóma mobange? Tokokamwa te soki Ruta azalaki komituna mituna ya ndenge wana. Na mokili ya lelo oyo mbongo ekómi mpasi, bato mingi bazali komitungisa na makambo ya ndenge wana. Wana tozali kotalela ndenge oyo kondima ya Ruta esalisaki ye na mikakatano wana, tokomona ndenge oyo tokoki komekola ye.

Libota ezali nini?

5, 6. (a) Nini emonisi ete mokolo ya liboso oyo Ruta alɔkɔtaki mbuma na elanga ya Boaze elekaki malamu? (b) Naomi ayokaki ndenge nini ntango amonaki Ruta?

5 Ntango Ruta asilisaki kobɛta mbuma mpe kosangisa yango nyonso, amonaki ete alɔkɔtaki soki mezire moko ya efa. Mokumba oyo amemaki ekokaki kozala kilo pene na 14! Ekoki kozala ete akangisaki yango liboke na elamba moko mpe amemaki yango na motó; na nsima azongaki na Beteleme, na mpokwa.Ruta 2:17.

6 Naomi asepelaki komona Ruta bokilo na ye oyo azalaki kolinga mingi, mpe mbala mosusu akamwaki ntango amonaki mokumba ya kilo ya ɔrje oyo amemaki. Ruta amemaki mpe bilei oyo etikalaki na bilei oyo Boaze apesaki basali, mpe bango mibale balyaki mwa bilei yango. Naomi atunaki boye: “Epai wapi olɔkɔtaki mbuma lelo, mpe epai wapi osalaki? Moto oyo atyelaki yo likebi apambolama.” (Ruta 2:19) Naomi azalaki ekɛngɛ; amonaki ete lokola Ruta azongaki na mokumba wana ya kilo, emonisi ete moto moko atyelaki elenge mwasi yango likebi mpe amoniselaki ye boboto.

7, 8. (a) Naomi amonaki ete boboto ya Boaze eutaki epai ya nani, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini Ruta amoniselaki lisusu bokilo na ye bolingo ya sembo?

7 Bango mibale babandaki kosolola, mpe Ruta ayebisaki Naomi ndenge Boaze amoniselaki ye boboto. Lokola asepelaki, Naomi alobaki boye: “Yehova apambola ye, ye oyo alongoli te motema boboto na ye epai ya bato ya bomoi mpe bakufi.” (Ruta 2:20) Amonaki ete boboto oyo Boaze amonisaki eutaki nde epai ya Yehova, ye oyo atindaka basaleli na ye bákabela basusu mpe alaki kopambola bango mpo na boboto oyo bamonisaka. *Tángá Masese 19:17.

8 Naomi alendisaki Ruta alɔkɔtaka mbuma na bilanga ya Boaze, ndenge ye moko asɛngaki ye, mpe azalaka mosika te na bilenge basi ya ndako na ye mpo bilenge mibali oyo bazali kobuka mbuma bátungisa ye te. Ruta andimaki toli yango. Akobaki mpe “kofanda elongo na bokilo na ye.” (Ruta 2:22, 23) Maloba yango emonisi biso lisusu ezaleli malamu oyo Ruta azalaki na yango—bolingo ya sembo.  Ndakisa ya Ruta ekoki kotinda biso tómituna soki tolingaka mpenza bato ya libota na biso, soki tosungaka bango na motema moko mpe tosalisaka bango ntango bazali na mposa ya lisalisi. Yehova azangaka te komona bolingo ya sembo ya ndenge wana.

Ndakisa ya Ruta ná Naomi emonisi ete tosengeli kosepela na ndenge oyo libota na biso ezali

9. Ndakisa ya Ruta ná Naomi ekoki koteya biso nini na oyo etali libota?

9 Ruta ná Naomi basalaki mpenza libota? Bato mosusu balobaka ete na libota, esengeli kozala na tata, mama, bana, mpe bankɔkɔ, mpe bongo na bongo. Nzokande, ndakisa ya Ruta ná Naomi emonisi ete basaleli ya Yehova bakoki kosala ete esengo, boboto, mpe bolingo ezala na kati ya libota na bango, soki bazali kosolola mpenza na motema moko, ata soki bazali bato moke mpenza. Osepelaka na ndenge libota na bino ezali? Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábosana te ete lisangá ya bokristo ekoki kokóma libota mpo na baoyo bazali na libota te.Mrk. 10:29, 30.

Ruta ná Naomi bazalaki kosalisana mpe kolendisana

“Ye azali moko ya basikoli na biso”

10. Ndenge nini Naomi alingaki kosalisa Ruta?

10 Banda na eleko ya kobuka ɔrje, na sanza ya Minei, tii na eleko ya kobuka blé na sanza ya Motoba, Ruta azalaki kaka kolɔkɔta mbuma na bilanga ya Boaze. Wana bapɔsɔ ezalaki koleka, na ntembe te, Naomi azalaki kokanisa ndenge mosusu oyo akokaki kosalisa bokilo na ye oyo azalaki kolinga mingi. Ntango bazalaki na Moabe, Naomi ayebaki malamu ete akokoka kosala eloko te mpo na kosalisa Ruta azwa mobali mosusu. (Ruta 1:11-13) Kasi, sikoyo makanisi na ye ebongwani. Ayebisaki Ruta boye: “Mwana na ngai, nasengeli kolukela yo esika ya kopema.” (Ruta 3:1) Na eleko wana, baboti nde bazalaki kolukela bana na bango mobali to mwasi, mpe Ruta akómaki mpenza lokola mwana ya Naomi. Naomi azalaki na mposa ya kolukela Ruta “esika ya kopema,” elingi koloba kimya mpe libateli oyo mwasi akoki kozala na yango na ndako ya mobali na ye. Kasi, Naomi akosala nini?

11, 12. (a) Ntango Naomi abengaki Boaze “mosikoli,” azalaki kokanisa ebongiseli nini oyo ezalaki na Mibeko ya Nzambe? (b) Ruta asalaki nini ntango bokilo na ye apesaki ye toli?

11 Ntango Ruta alobelaki Boaze mpo na mbala ya liboso, Naomi alobaki ete: “Mobali yango azali ndeko na biso. Ye azali moko ya basikoli na biso.” (Ruta 2:20) Yango elingaki koloba nini? Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki mpe na ebongiseli moko malamu mpo na mabota oyo ezalaki konyokwama mpo na bobola to mpo na liwa ya moto moko ya libota. Soki mwasi oyo mobali akufá azalaki na mwana te, mwasi yango azalaki na mawa mingi mpo nkombo ya  mobali na ye ekolimwa, mpe akozala na bankɔkɔ te na bambula oyo ekoya. Kasi, Mibeko ya Nzambe epesaki nzela ete ndeko ya mobali oyo akufi abala mwasi oyo atikali mpo abota na ye mwana oyo akoki kozwa nkombo ya mobali oyo akufá mpe kobatela libula ya libota. *Mib. 25:5-7.

12 Naomi ayebisaki Ruta bibongiseli oyo azwaki mpo na libala yango. Tokoki komona na makanisi ndenge Ruta akamwaki ntango bokilo na ye azalaki koyebisa ye likambo yango. Mibeko ya Bayisraele ezalaki likambo ya sika mpo na Ruta; mpe ayebaki naino mimeseno na yango nyonso te. Kasi, lokola azalaki na limemya mingi epai ya Naomi, ayokaki ye na likebi ntango azali koloba likambo mokomoko. Toli oyo Naomi apesaki ye ekokaki komonana lokola likambo ya nsɔni, ata mpe kokitisa lokumu na ye; kasi, Ruta andimaki yango. Na komikitisa nyonso alobaki ete: “Oyo nyonso olobi na ngai nakosala yango.”Ruta 3:5.

13. Na likambo etali koyoka toli ya mikóló, Ruta apesi biso liteya nini? (Talá mpe Yobo 12:12.)

13 Ntango mosusu ezalaka mpasi mpo bilenge báyoka toli ya mikóló mpe baoyo basalá kala. Bakanisaka mbala moko ete mikóló bayebaka mpenza te mikakatano mpe mitungisi oyo bilenge bakutanaka na yango. Ndakisa ya komikitisa ya Ruta ezali kosalisa biso tóbosana te ete tokoki kozwa matomba mingi, soki tozali kolanda batoli ya bwanya oyo mikóló bapesaka biso mpo balingaka biso mpe  balukaka bolamu na biso. (Tángá Nzembo 71:17, 18.) Kasi, toli nini Naomi apesaki Ruta, mpe Ruta azwaki mpenza matomba na ndenge alandaki toli yango?

Ruta na esika ya kotutatuta mbuma

14. Esika ya kotutatuta mbuma ezalaki nini, mpe ndenge nini bazalaki kosalela yango?

14 Na mpokwa, Ruta akendaki na esika ya kotutatuta mbuma; esika moko oyo babongisá mabele mpe ekómá lokola libanga, epai basali-bilanga mosusu bazalaki koya kotuta mbuma mpe kopupola yango. Mbala mingi, esika yango ezalaki na mopanzi to likoló ya ngomba, epai mopɛpɛ ezalaki makasi na mpokwa. Mpo na kokabola mbuma ná matiti na yango, basali bazalaki kosalela kanya ya monene to bapau mpo na kobwaka yango likoló, mpe mopɛpɛ ezalaki komema matiti mpe, lokola mbuma ezali kilo, ezalaki kokwea na nse.

15, 16. (a) Lobelá ndenge makambo elekaki na esika ya kotutatuta mbuma ntango Boaze asilisaki mosala na mpokwa. (b) Ndenge nini Boaze ayebaki ete Ruta alalaki na makolo na ye?

15 Ruta azalaki kotala na mayele wana mosala ezalaki kokende kosila na mpokwa. Boaze azalaki kokɛngɛla mosala ya kopupola mbuma, oyo ebimiselaki ye ebele ya mbuma. Nsima ya kolya bilei na esengo mpenza, alalaki na nsuka ya libondo ya mbuma. Bato bazalaki kosala bongo na ntango wana, mbala mosusu mpo na kobatela mbuma na miyibi mpe bapunzi. Ruta amonaki ntango Boaze alalaki na butu. Ntango ya kosalela toli oyo Naomi apesaki ye ekokaki.

16 Ruta apusanaki penepene, wana motema na ye ezali kobɛta. Amonaki ete mobali yango alali mpenza mpɔngi makasi. Na yango, kaka ndenge Naomi ayebisaki ye, akendaki esika oyo Boaze alalaki, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo na ye, mpe alalaki. Na nsima,  abandaki kozela. Ntango ekómaki koleka. Ruta amonaki lokola ntango yango elekaki molai. Na midi ya butu, Boaze akómaki kolɛnga. Malili ekangaki ye, amigunzaki mpo na kozipa lisusu makolo na ye. Kasi, ayokaki ete moto moko azali wana. Biblia elobi boye: “Talá! mwasi moko alali na makolo na ye!”Ruta 3:8.

17. Bato oyo balobaka ete Ruta asalaki likambo ya nsɔni babosanaka makambo nini mibale?

17 Boaze atunaki ye boye: “Yo nani?” Mbala mosusu mongongo ya Ruta ezalaki kolɛnga na nsɔmɔ ntango ayanolaki ete: “Ngai Ruta moombo na yo, mpe osengeli kozipa moombo na yo nsɔngɛ ya elamba na yo, mpo ozali mosikoli.” (Ruta 3:9) Bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia balukaki komonisa ete likambo oyo Ruta asalaki mpe maloba na ye emonisaki ete alukaki Boaze asangisa na ye nzoto, kasi babosanaka makambo mibale ya ntina. Ya liboso, Ruta alandaki mimeseno ya ntango wana, oyo soki moto asali yango lelo, bato bakoki komona ye lokola abɛli motó. Na yango, ekozala libunga kokokanisa likambo oyo asalaki na makambo ya bosɔtɔ oyo ezali kosalema lelo oyo. Ya mibale, lolenge oyo Boaze ayanolaki, emonisaki polele ete Ruta azalaki te mwana mwasi ya mobulu, kasi azalaki na bizaleli malamu.

Ruta azalaki na makanisi mabe te ntango akendaki epai ya Boaze

18. Boaze alobaki nini mpo na kopesa Ruta makasi, mpe wapi mbala mibale oyo Ruta amonisaki boboto, oyo Boaze alobelaki?

18 Boaze asololaki na ye, mpe na ntembe te, mongongo mpe maloba na ye ya boboto epesaki Ruta makasi. Alobaki boye: “Yehova apambola yo, mwana na ngai. Omonisi motema boboto na yo malamu mpenza na mbala oyo koleka mbala ya liboso, na ndenge olandi bilenge mibali te, babola to bazwi.” (Ruta 3:10) Biblia emonisi ete “mbala ya liboso” oyo Ruta amonisaki bolingo ya sembo ezali na ndenge ayaki elongo na Naomi na Yisraele mpe azalaki kobatela ye. “Mbala oyo,” ezalaki likambo oyo autaki kosala. Boaze amonaki ete elenge mwasi lokola Ruta akokaki koluka mobali na kati ya mibali oyo bazali bilenge, ezala bazwi to babola. Nzokande, alingaki nde kosalela Naomi mpe mobali na ye oyo akufá malamu, mpo nkombo ya mobali yango elimwa te na mboka na ye. Na yango, tokoki komona ntina oyo Boaze asepelaki na elenge mwasi yango oyo azalaki koluka kaka bolamu na ye moko te.

19, 20. (a) Mpo na nini Boaze abalaki Ruta na mbala moko te? (b) Na ndenge nini Boaze amoniselaki Ruta boboto mpe azalaki komibanzabanza mpo na lokumu na ye?

19 Boaze abakisaki boye: “Mpe sikoyo, mwana na ngai, kobanga te. Nyonso oyo olobi nakosalela yo yango, mpo moto nyonso na  engumba ya bato na ngai ayebi ete yo ozali mpenza mwasi moko malamu mingi.” (Ruta 3:11) Asepelaki na likanisi ya kobala Ruta; ekoki kozala ete akamwaki mpenza te ntango Ruta asɛngaki ye azala mosikoli na ye. Kasi, Boaze azalaki moto ya sembo, mpe aboyaki kosala kaka oyo motema na ye elingi. Ayebisaki Ruta ete ezali na mosikoli mosusu oyo azalaki ndeko ya penepene ya mobali ya Naomi oyo akufá; Boaze asengelaki kokutana liboso na mobali yango mpe koyebisa ye ete ye nde asengeli kokóma mobali ya Ruta.

Lokola Ruta amoniselaki basusu boboto mpe amemyaki bango, yango wana ayebanaki lokola mwasi moko malamu mingi

20 Boaze asɛngaki Ruta alala lisusu mpe apema tii na ntɔngɔntɔngɔ; na nsima akokaki kokende kozanga ete bato mosusu bámona ye. Alingaki kobatela lokumu ya Ruta mpe oyo ya ye moko, mpo bato bakokaki kokanisa ete basali pite. Ruta alalaki lisusu pembeni ya makolo ya mobali yango, ekoki kozala ete na mbala oyo azalaki na motema ya kokita, mpo mobali yango ayanolaki ye na boboto. Kasi, alamukaki ntango molili ezalaki naino. Boaze akabelaki ye ɔrje; atondisaki yango na kazaka na ye mpe Ruta azongaki na Beteleme.Tángá Ruta 3:13-15.

21. Nini esalaki ete Ruta ayebana lokola “mwasi moko malamu mingi,” mpe ndenge nini tokoki komekola ndakisa na ye?

21 Na ntembe te, Ruta ayokaki mpenza esengo mpo na maloba ya Boaze ete ayebanaki na bato nyonso ete azali “mwasi moko malamu mingi”! Na ntembe te, mposa makasi oyo azalaki na yango ya koyeba Yehova mpe ya kosalela ye nde esalaki ete azala na lokumu ya ndenge wana. Amoniselaki mpe Naomi ná bato na ye boboto mingi; andimaki komesana na makambo mosusu mpe mimeseno oyo ezalaki mpenza sika mpo na ye. Soki tomekoli kondima ya Ruta, tokoluka kosalela basusu makambo na limemya mpe kotosa mimeseno mpe makambo na bango mosusu. Soki tosali bongo, tokokumisama mpo na bizaleli na biso ya malamu.

Esika ya kopema mpo na Ruta

22, 23. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Boaze apesaki Ruta likabo ya mezire motoba ya ɔrje? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Toli nini Naomi apesaki Ruta?

22 Ntango Ruta azongaki na ndako, Naomi atunaki ye boye: “Yo nani, mwana na ngai?” Mbala mosusu ezalaki mpo na molili nde Naomi atunaki bongo; kasi alingaki mpe koyeba soki likambo wana ya libala esimbi. Ruta ayebisaki mbala moko mama bokilo na ye makambo nyonso oyo ye ná Boaze basololaki. Alakisaki ye mpe likabo ya ɔrje oyo Boaze alobaki apesa ye. *Ruta 3:16, 17.

 23 Na bwanya nyonso, Naomi asɛngaki Ruta afanda na ndako mokolo yango, na esika ya kokende kolɔkɔta bilei na bilanga. Ayebisaki Ruta boye: “Mobali yango akopema te liboso asilisa likambo yango lelo.”Ruta 3:18.

24, 25. (a) Ndenge nini Boaze amonisaki ete azali moto ya sembo mpe oyo alukaka kaka matomba na ye moko te? (b) Mapamboli nini Ruta azwaki?

24 Likambo oyo Naomi alobaki mpo na Boaze ezalaki solo. Boaze akendaki na porte ya engumba, epai mikóló ya engumba bazalaki na momeseno ya kokutana, mpe azelaki tii ntango mobali oyo azalaki ndeko ya mobali ya Naomi ya penepene akoleka wana. Na miso ya batɛmwɛ, Boaze apesaki mobali yango libaku ya kobala Ruta mpo azala mosikoli. Kasi, mobali yango aboyaki, alobaki ete soki asali bongo akobebisa libula na ye. Na nsima, na miso ya batɛmwɛ oyo bazalaki wana na porte ya engumba, Boaze alobaki ete ye akozala mosikoli, akosomba biloko nyonso ya Elimeleke mobali ya Naomi oyo akufá, mpe akobala Ruta, mwasi oyo Mahalone mwana ya Elimeleke atikaki. Boaze alobaki ete akosala bongo na elikya ya “kotɛlɛmisa nkombo ya mowei na libula na ye.” (Ruta 4:1-10) Boaze azalaki mpenza moto ya sembo mpe azalaki koluka kaka matomba na ye moko te.

25 Boaze abalaki Ruta. Na nsima, Biblia elobi boye: “Yehova apesaki ye likoki ya kozwa zemi mpe abotaki mwana mobali.” Basi ya Beteleme bapambolaki Naomi mpe bakumisaki Ruta mpo na ndenge afandaki malamu ná Naomi koleka bana mibali nsambo. Na nsima, mwana ya Ruta akómaki nkɔkɔ ya mokonzi monene Davidi. (Ruta 4:11-22) Mpe Davidi akómaki nkɔkɔ ya Yesu Kristo.Mat. 1:1. *

Yehova apambolaki Ruta mpe apesaki ye libaku ya kokóma nkɔkɔ ya Masiya

26. Ndakisa ya Ruta ná Naomi emonisi biso nini?

26 Ruta azwaki mpenza mapamboli, ndenge moko mpe Naomi, oyo asalisaki ye na kobɔkɔla mwana yango kaka lokola mwana na ye moko. Bomoi ya basi wana mibale emonisi ete Yehova Nzambe amonaka baoyo nyonso bamikitisaka mpe babomaka nzoto mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na bango mpe baoyo basalelaka ye na bosembo elongo na bato na ye. Azangaka te kopambola bato ya sembo oyo bazali lokola Boaze, Naomi mpe Ruta.

^ par. 7 Ndenge Naomi amonaki yango, boboto ya Yehova esuki kaka te na bato ya bomoi; amonisaka yango mpe epai ya bato oyo bakufá. Mobali ya Naomi mpe bana na ye mibale ya mibali bakufaki. Mobali ya Ruta mpe akufaki. Na ntembe te, mibali yango misato bazalaki kolingama mingi na basi wana mibale. Komonisela Naomi ná Ruta boboto, ezalaki lokola nde komonisela yango mibali wana, oyo mposa na bango elingaki kozala ete bato básalela basi na bango makambo ya malamu.

^ par. 11 Lotomo ya kobala mwasi oyo mobali akufá epesamaki libosoliboso epai ya ndeko mpenza ya mobali oyo akufi mpe na nsima epai ya bandeko na ye mosusu ya libota, ndenge moko mpe na lotomo ya kozwa libula na ye.Mit. 27:5-11.

^ par. 22 Boaze apesaki Ruta mezire motoba ya ɔrje oyo kilo na yango eyebani te—ntango mosusu mpo na komonisa ete kaka ndenge bato bazalaki kosala na boumeli ya mikolo motoba mpe kopema na mokolo ya Sabata, mikolo oyo Ruta anyokwamaki lokola mwasi oyo mobali akufá elingaki kosila, mpe alingaki kozwa “kopema” soki azwi mobali mpe akómi na ndako na ye. Ekoki mpe kozala ete apesaki ye mezire yango motoba, mbala mosusu bapau etondá, mpo yango nde kilo oyo Ruta akokaki komema.

^ par. 25 Ruta azali na kati ya basi mitano oyo Biblia etángi na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu. Mwasi mosusu ezali Rahaba, oyo azalaki mama ya Boaze. (Mat. 1:3, 5, 6, 16) Ndenge moko na Ruta, ye mpe azalaki moto ya Yisraele te.