Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MIBALE

“Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”

“Atambolaki elongo na Nzambe ya solo”

1, 2. Noa ná libota na ye bazalaki kosala mosala nini, mpe wapi mwa mikakatano oyo bakutanaki na yango?

NOA asemboli mokɔngɔ mpe anyɔlisi nzoto mpo ekómi mpasimpasi. Meká komona ye na makanisi ndenge afandi na nzete moko ya monene, azali kopema mwa moke mpe kotala masuwa ya monene oyo azali kotonga. Nsolo makasi ya gudrɔ ya mɔtɔ etondi na mopɛpɛ; makɛlɛlɛ makasi ya bisaleli ya mosala ya mabaya ezali koyokana. Na esika afandi, Noa azali komona mosala makasi oyo bana na ye bazali kosala na biteni ndenge na ndenge ya ebakata ya eloko wana oyo bazali kotonga na mabaya. Eleki sikoyo bambula mingi bandá ye ná mwasi na ye, bana na ye mpe basi na bango bazali kosala mosala wana elongo. Basilisi ndambo ya mosala, kasi mosala etikali naino mingi!

2 Bato ya mboka yango bazali komona bango bazoba. Ntango Noa ná bana na ye bazali kokoba mosala, bato bazali se kosɛka; bazali kondima te ete mpela ekozindisa mabele mobimba. Noa azali kokoba kokebisa bango kasi bazali komona yango lokola lisapo mpamba, bozoba mpenza! Bazali komituna mpo na nini Noa azali kolekisa ntango na ye ná oyo ya libota na ye na mosala wana ya bozoba. Kasi, Yehova, Nzambe ya Noa, azalaki komona ye bongo te.

3. Na ndenge nini Noa atambolaki elongo na Nzambe?

3 Biblia elobi boye: “Noa atambolaki elongo na Nzambe ya solo.” (Tángá Ebandeli 6:9.) Yango elimboli nini? Elimboli te ete Nzambe atambolaki awa na mabele to Noa akendaki na likoló. Noa atosaki Nzambe mpenza mpe alingaki ye mingi, yango wana ezalaki lokola ye ná Yehova bazalaki kotambola elongo lokola baninga. Bankóto ya bambula na nsima, Biblia elobi boye mpo na Noa: “Na kondima [na ye], akweisaki mokili na likambo.” (Ebr. 11:7) Na ndenge nini? Kondima na ye ekoki koteya biso nini lelo oyo?

Moto moko ya sembo na mokili moko mabe

4, 5. Na ntango ya Noa, ndenge nini makambo ezalaki se kobeba?

4 Noa azalaki na mokili moko oyo mabe ezalaki se kokóma mingi. Mabe ezalaki mpe na mikolo ya nkɔkɔ na ye Enoka, moto moko ya sembo oyo atambolaki mpe elongo na Nzambe. Enoka asakolaki ete mokolo oyo Nzambe akopesa bato mabe etumbu ezalaki koya.  Kasi, na ntango ya Noa, mabe ekómaki mingi mpenza. Kutu na miso ya Yehova, mabele ebebaki, mpo etondaki na mobulu. (Eba. 5:22; 6:11; Yuda 14, 15) Nini esalaki ete makambo ebeba mingi ndenge wana?

5 Baanzelu mosusu, bakolisaki ezaleli moko mabe. Moko na bango atombokelaki Yehova, akómaki Satana Zabolo na ndenge akoselaki Nzambe makambo mpe atindaki Adama ná Eva básala lisumu. Na mikolo ya Noa, baanzelu mosusu mpe batombokelaki boyangeli ya Yehova. Basundolaki esika oyo Nzambe atyá bango na likoló, balataki nzoto ya bato mpe bayaki awa na mabele; bazwaki basi ya kitoko mpe bakómisaki bango basi na bango. Baanzelu yango ya lolendo, oyo balukaka bolamu na bango moko, babebisaki mpenza bizaleli ya bato.Eba. 6:1, 2; Yuda 6, 7.

6. Ndenge nini banefilime babakisaki lisusu mabe na mokili, mpe Yehova azwaki ekateli nini?

6 Lisusu, baanzelu yango babotaki ná basi yango bana oyo bazalaki bambinga mpenza mpe bilombe. Biblia ebengi bango banefilime, oyo elimboli “bakweisi”—baoyo bakweisaka basusu. Lokola bazalaki bato ya mobulu, bakómisaki mabe lisusu mingi na mokili. Yango wana, Mozalisi “amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso.” Yehova azwaki ekateli ya koboma mokili wana ya mabe nsima ya mbula 120.Tángá Ebandeli 6:3-5.

7. Noa ná mwasi na ye bakutanaki na mokakatano nini mpo na kobatela bana na bango na bizaleli mabe ya ntango wana?

7 Kanisá naino ndenge ezalaki mpasi kobɔkɔla bana na mokili ya ndenge wana! Kasi, Noa asalaki yango. Azwaki mwasi moko malamu. Ntango Noa akómaki na mbula 500, mwasi na ye abotelaki ye bana  mibali misato: Seme, Kame, mpe Yafete. * Noa ná mwasi na ye basengelaki kobatela bana yango na bizaleli mabe oyo ezalaki zingazinga na bango. Bana mike bakamwaka mpe basepelaka na “bilombe” mpe “mibali ya lokumu”—mpe banefilime bazalaki mpenza bongo. Ezalaki mpasi mpo Noa ná mwasi na ye bábatela bana na bango na basango nyonso ya makambo ya kokamwa oyo bilombe yango bazalaki kosala; atako bongo bazalaki koteya bana na bango solo na ntina na Yehova Nzambe, oyo ayinaka mabe nyonso. Basengelaki kosalisa bana na bango báyeba ete Yehova ayokaka mpasi mpo na mobulu mpe botɔmbɔki oyo ezali na mokili.Eba. 6:6.

Noa ná mwasi na ye basengelaki kobatela bana na bango na bizaleli mabe

8. Ndenge nini baboti ya bwanya bakoki komekola ndakisa ya Noa ná mwasi na ye?

8 Lelo oyo baboti bakoki komitya na esika ya Noa mpe mwasi na ye. Mokili ya lelo mpe etondi na mobulu mpe botɔmbɔki. Bingumba etondi na bilenge ya mobulu mpe oyo bazali batomboki. Ata masano oyo ebongisami mpo na bana ekoki kozala na makambo mingi ya ndenge wana. Mpo na kobatela bana na bango na makambo ya ndenge wana, baboti ya mayele basalaka nyonso báteya bango makambo ya Yehova, Nzambe ya kimya, oyo mokolo mosusu akosukisa mobulu nyonso. (Nz. 11:5; 37:10, 11) Bana bakoki koyekola kosala oyo ezali malamu ata na mokili oyo mabe! Noa ná mwasi na ye balongaki. Bana na bango bakolaki malamu mpe babalaki basi oyo bandimaki mpe kotya Yehova Nzambe ya solo na esika ya liboso na bomoi na bango.

“Salá masuwa”

9, 10. (a) Likambo nini Yehova ayebisaki Noa, oyo ebongolaki bomoi na ye? (b) Makambo nini Yehova ayebisaki Noa oyo etali ndenge ya kosala masuwa mpe ntina na yango?

9 Mokolo moko, bomoi ya Noa ebongwanaki mpo na libela. Yehova asololaki na ye mpe ayebisaki ye ete akani koboma mokili ya ntango wana. Nzambe ayebisaki Noa boye: “Salá masuwa na mabaya ya nzete ya gofere.”Eba. 6:14.

10 Masuwa yango ezalaki te lokola bamasuwa oyo tomonaka lelo, ndenge bato mosusu bakanisaka. Ezalaki te na eteni ya liboso to ya nsima, na yenda te, ezalaki mpe te na eteni oyo egumbamá. Ezalaki nde kɛsi moko ya monene. Yehova apesaki Noa bamezire ya masuwa yango mpe ayebisaki ye likambo mokomoko oyo etali ndenge kɛsi yango ekozala mpe ndenge ya kopakola yango gudrɔ na libándá mpe na kati. Na nsima ayebisaki Noa ntina na yango: “Nazali koyeisa mpela na mabele . . . Eloko nyonso oyo ezali na mabele ekokufa.” Kasi Yehova ayebisaki Noa boye: “Osengeli kokɔta na masuwa, yo ná bana na yo ná mwasi na yo mpe ná basi ya bana na yo elongo na yo.” Noa asengelaki mpe kokɔtisa lolenge nyonso ya banyama na masuwa.  Kaka baoyo bakɔtaki na masuwa nde bakokaki kobika na Mpela oyo ezalaki koya!Eba. 6:17-20.

Noa ná libota na ye basalaki elongo mpo na kotosa malako ya Nzambe

11, 12. Mosala nini ya monene mpenza Noa asengelaki kosala, mpe asalaki yango ndenge nini?

11 Noa azalaki na mosala moko monene mpenza. Masuwa yango ezalaki monene mingi; ezalaki na molai ya mɛtrɛ 133, monene na yango ezalaki ya mɛtrɛ 22 mpe bosanda na yango mɛtrɛ 13. Ezalaki monene koleka ata masuwa oyo eleki monene ya mikolo oyo, oyo batongi na mabaya. Noa aboyaki nde mokumba yango, amilelaki, to abongolaki makambo mosusu mpo amona mpasi mingi te na mosala yango? Biblia elobi boye: “Noa abandaki kosala nyonso oyo Nzambe apesaki ye mitindo. Asalaki kaka bongo.”Eba. 6:22.

12 Mosala yango ezwaki bambula mingi, mbala mosusu mbula 40 to 50. Basengelaki kokata banzete, komema nkoni, kokata mabaya minene, kobongisa mpe kokangisa yango. Masuwa yango esengelaki kozala na baetajɛ mibale, ná bashambre mpe porte na mopanzi. Ezalaki mpe na bafɛnɛtrɛ oyo elandaná zingazinga ya nsamba; mbala mosusu nsamba yango esalaki mwa nsɔngɛ na katikati mpe ekitá mwa moke mpo na kolekisa mai.Eba. 6:14-16.

13. Mosala nini mosusu ekokaki kozala mpasi mingi koleka kotonga masuwa, mpe ndenge nini bato batalelaki yango?

13 Ntango bambula ezalaki koleka mpe masuwa ezalaki kokoba kotongama, na ntembe te Noa azalaki kosepela ndenge libota na ye ezalaki kopesa ye mabɔkɔ! Ezali mpe na mosala mosusu oyo ezalaki mpasi mingi koleka kotonga masuwa. Biblia eyebisi biso ete Noa azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (Tángá 2 Petro 2:5.) Na yango, na mpiko nyonso, azalaki kopesa ndakisa na likambo etali kokebisa bato wana ya mabe mpo na libebi oyo ezalaki koya. Ndenge nini batalelaki likebisi yango? Yesu Kristo akanisaki lisusu eleko yango mpe alobaki ete bato yango “batyaki likebi te.” Alobaki ete bamipesaki na makambo ya mokolo na mokolo na ndakisa, kolya, komɛla, kobala mpe bayokaki Noa ata moke te. (Mat. 24:37-39) Na ntembe te, mingi batyolaki ye ná libota na ye; ekoki kozala ete bamosusu bazalaki kokanela ye mpe kotɛmɛla ye makasi. Balukaki kutu kobebisa mosala ya kotonga masuwa.

Atako emonanaki polele ete Nzambe azalaki kopambola Noa, bato bazalaki kaka kosɛka ye mpe koboya nsango na ye

14. Liteya nini mabota ya bakristo ekoki kozwa epai ya Noa mpe libota na ye?

14 Atako bongo, Noa ná libota na ye batikaki mosala yango te. Bakobaki kotonga masuwa atako bato oyo bazalaki zingazinga na bango bazalaki komona ete ezalaki mosala moko ezangá ntina mpe ya bozoba. Lelo oyo, mabota ya bakristo ekoki kozwa liteya monene na ndakisa ya kondima ya Noa mpe libota na ye. Kutu, tozali na eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka” ya mokili oyo. (2 Tim. 3:1) Yesu alobaki ete eleko na biso ekokokana na eleko oyo Noa atongaki masuwa. Ebongi bakristo bákanisa lisolo ya Noa ntango bato bazali kosepela te na nsango ya Bokonzi ya Nzambe, bazali kotyola to konyokola bango. Bazali bato ya liboso te ya kokutana na mikakatano ya ndenge wana.

 “Kɔtá . . . na masuwa”

15. Ntango Noa akómaki pene na mbula 600, bato nini ya libota na ye bakufaki?

15 Bambula mingi elekaki, mpe masuwa ekómaki pene na kosila. Ntango Noa akómaki pene na mbula 600, bato mosusu ya libota na ye bakufaki. Tata na ye Lameke, akufaki. * Mbula mitano na nsima, Metusela nkɔkɔ ya Noa mpe tata ya Lameke, akufaki ntango akokisaki mbula 969; ye nde moto oyo aumelá mingi koleka na mokili ndenge Biblia emonisi yango. (Eba. 5:27) Metusela ná Lameke bazalaki na bomoi eleko moko ná Adama, moto ya liboso.

16, 17. (a) Nsango nini mosusu Noa azwaki na mbula 600 ya bomoi na ye? (b) Lobelá likambo moko oyo Noa ná libota na ye bamonaki mpe oyo bakokaki kobosana te.

16 Na mbula 600 ya bomoi na ye, Noa azwaki nsango oyo eutaki epai ya Yehova Nzambe ete: “Kɔtá yo ná bato nyonso ya ndako na yo na masuwa.” Kaka na ntango wana, Nzambe ayebisaki Noa akɔtisa banyama ya lolenge nyonso na masuwa—nsambonsambo nyama nyonso ya pɛto, oyo ebongi mpo na kopesa mbeka, mpe akɔtisa nyama mosusu nyonso mibalemibale.Eba. 7:1-3.

17 Komona ebele ya banyama ndenge wana etikalaki mpenza na makanisi na bango. Na mosika, ebele ya banyama yango ezalaki koya;  mosusu ezalaki kotambola mbangu, malɛmbɛ, kopumbwa, kobendana—banyama yango ezalaki ya lolenge nyonso, mosusu ya matata mpe mosusu ya kimya. Tókanisa naino ndenge Noa azalaki kokɔtisa banyama mosusu na mwa ndako ya banyama, kogangela bamosusu, to mpe kobondela baoyo ya zamba mpo ekɔta na esika ya nkaka na kati ya masuwa. Biblia elobi ete banyama “yango ekɔtaki . . . na masuwa epai ya Noa.”Eba. 7:9.

18, 19. (a) Ndenge nini tokoki kokanisa na mituna oyo bato ya ntembe batunaka na oyo etali makambo oyo elobelami na lisolo ya Noa? (b) Ndenge nini tozali komona bwanya ya Yehova na lolenge oyo aponaki kobikisa banyama oyo akelá?

18 Bato mosusu ya ntembe bakoki kotuna boye: ‘Ndenge nini likambo ya ndenge wana ekoki kosalema? Mpe ndenge nini banyama wana nyonso ekoki kofanda na kimya na esika ya nkaka?’ Tókanisa naino: Soki Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba alingi, ezali nde likambo ya mpasi mpo na ye akómisa banyama oyo akelá, ezala ata oyo ya zamba ekóma kimya lokola oyo ya mboka? Kobosana te ete Yehova azali Nzambe oyo akelá banyama. Bambula mingi na nsima, akabolaki mai ya Mbu motane mpe atɛlɛmisaki moi. Akoki te kokokisa makambo nyonso oyo elobelami na lisolo ya Noa? Ɛɛ, akoki kosala yango, mpe asalaki yango mpenza!

19 Toboyi te, Nzambe akokaki kosalela mayele mosusu mpo na kobikisa banyama oyo akelá. Kasi, asalelaki mayele oyo esalisi biso tóbosana te ete na ebandeli apesaki bato mokumba ya kobatela bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali awa na mabele. (Eba. 1:28) Lelo oyo, baboti mingi basalelaka lisolo ya Noa mpo na koteya bana na bango ete Yehova azwaka banyama mpe bato oyo akelá na valɛrɛ.

20. Ekoki kozala ete Noa ná libota na ye basalaki mosala nini ntango etikalaki pɔsɔ moko mpo Mpela eya?

 20 Yehova ayebisaki Noa ete etikali pɔsɔ moko Mpela eya. Na ntembe te, libota yango ekómaki kosala mbangumbangu. Kanisá naino mosala ya kokɔtisa na molɔngɔ na masuwa banyama nyonso ná biloko na bango ya kolya mpe kokɔtisa biloko ya libota. Ekoki kozala ete mwasi ya Noa mpe basi ya bana na ye bazalaki na mosala mingi mpo na kobongisa esika oyo bakofanda na masuwa.

21, 22. (a) Mpo na nini tosengeli kokamwa te ndenge bato na ntango ya Noa bazalaki kotya likebi te? (b) Ntango nini kosɛka oyo bato ya ntango ya Noa bazalaki kosɛka ye ná libota na ye esukaki?

21 Bato oyo bazalaki zingazinga na bango basalaki nini? ‘Batyaki kaka likebi te,’ atako ezalaki komonana polele ete Yehova azali kopambola Noa mpe mosala oyo azali kosala. Bazalaki kaka kotala ndenge banyama ezali kokɔta na masuwa. Kasi, ekoki kokamwisa biso te soki bazalaki kotya likebi te. Lelo oyo mpe bato bazali kotya likebi te atako ezali komonana polele ete tozali na mikolo ya nsuka ya mokili oyo. Mpe ndenge ntoma Petro asakolaki yango, basɛki bazali kosɛka baoyo balandaka makebisi ya Nzambe. (Tángá 2 Petro 3:3-6.) Ndenge moko mpe, bato bazalaki kosɛka Noa ná libota na ye.

22 Ntango nini kosɛka ya bato yango esilaki? Biblia elobi ete ntango Noa akɔtisaki libota na ye mpe banyama na masuwa, “Yehova akangaki porte nsima na ye.” Soki basɛki yango bazalaki pembeni wana, likambo wana oyo Nzambe asalaki ekangisaki bango mpenza monɔkɔ. Soki te, mbula yango moko ekangisaki bango monɔkɔ, mpo ebɛtaki mpenza! Mpe ebɛtaki tii mai etondaki mabele mobimba, kaka ndenge Yehova alobaki.Eba. 7:16-21.

23. (a) Ndenge nini toyebi ete Yehova asepelaki te na liwa ya bato wana mabe na ntango ya Noa? (b) Mpo na nini ebongi mpenza komekola kondima ya Noa lelo oyo?

23 Yehova asepelaki nde na liwa ya bato mabe wana? Te! (Ezk. 33:11) Kutu, apesaki bango libaku monene ya kotika mabe mpe kosala malamu. Bakokaki kosala bongo? Makambo oyo Noa asalaki na bomoi na ye epesaki eyano na motuna yango. Ndenge oyo Noa atambolaki elongo na Yehova mpe atosaki ye na makambo nyonso, emonisaki ete bato wana mpe bakokaki kobika. Na ndenge yango, kondima na ye ekweisaki mokili ya ntango na ye; emonisaki polele mabe ya bato ya eleko na ye. Kondima na ye ebikisaki ye ná libota na ye. Soki omekoli kondima ya Noa, yo mpe okoki komibikisa mpe kobikisa bato oyo olingaka. Lokola Noa, yo mpe okoki kotambola elongo na Yehova mpe kokómisa ye moninga na yo. Mpe boninga yango ekoki koumela libela na libela!

^ par. 7 Na ntango wana, bato bazalaki koumela mingi na mokili koleka ntango na biso. Mbala mosusu bazalaki koumela ndenge wana mpo bato bazalaki nzoto makasi mpe eumelaki naino te banda Adama ná Eva babungisaki nzoto ya kokoka oyo bazalaki na yango.

^ par. 15 Lameke apesaki mwana na ye nkombo Noa—mbala mosusu elimboli “kopema” to “libɔndisi”—mpe asakolaki ete Noa akokokisa ndimbola ya nkombo na ye na ndenge akokamba bato mpo bázwa kopema na mpasi oyo euti na mabele oyo elakelamaki mabe. (Eba. 5:28, 29) Lameke akufaki kozanga komona kokokisama ya esakweli na ye. Mbala mosusu mama ya Noa, bandeko na ye ya basi mpe ya mibali bakufaki na Mpela.