Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MITANO

Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe

Alobaki mpo na ekólo ya Nzambe

1-3. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Estere azalaki kobanga kokɔta epai ya mobali na ye? (b) Tokoyanola na mituna nini oyo etali Estere?

ESTERE asalaki nyonso mpo akitisa motema ntango azalaki kopusana na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, na Shushane. Ezalaki pɛtɛɛ te. Ndako yango etongamaki na etando monene ya mabele patatalu pembeni ya bangomba Zagros, oyo bansɔngɛ na yango etondá nɛjɛ mpe na nse na yango, ezalaki na Ebale Choaspès, oyo ezalaki na mai moko kitoko. Na bifelo ya ndako yango, ezalaki na mayemi ya langilangi ya bangɔmbɛ oyo ezali na mapapu, babɛti-mbanzi, bankɔsi, mpe ezalaki na makonzí ya milai mpe bikeko ya minene. Ndako yango ebongisamaki ndenge wana mpo na kosalisa moto oyo akɔti kuna abosana te nguya ya mobali oyo Estere azalaki kokende kokutana na ye, oyo azalaki komibenga “mokonzi monene.” Biloko nyonso oyo ezalaki na ndako yango ezalaki kobangisa. Mokonzi yango azalaki mpe mobali ya Estere.

2 Mobali ya Estere? Ahasueruse azalaki ata moke te lolenge ya mobali oyo elenge mwasi Moyuda ya sembo akokaki kokanisa kobala! * Akokanaki ata moke te na bato lokola Abrahama, mobali ya komikitisa oyo andimaki malako oyo Nzambe apesaki ete ayokela Sara, mwasi na ye. (Eba. 21:12) Mokonzi ayebaki te, to ayebaki mingi te makambo etali Yehova, Nzambe ya Estere, to mpe Mibeko na Ye. Kasi, Ahasueruse ayebaki mibeko ya Baperse, oyo moko na yango epekisaki polele likambo oyo Estere azalaki kosala. Ezalaki nini? Mobeko elobaki ete moto nyonso oyo ayei liboso ya mokonzi ya Perse kozanga ete mokonzi abengisa ye, asengelaki kobomama. Mokonzi abengisaki Estere te, kasi ye moko azwaki ekateli ya kokɔta epai ya mokonzi. Ntango akómaki pene na lopango ya kati, esika mokonzi akokaki komona ye longwa na kiti ya bokonzi, mbala mosusu amonaki ete liwa na ye ekómi pene.Tángá Estere 4:11; 5:1.

3 Mpo na nini Estere andimaki kotya bomoi na ye na likama  ndenge wana? Mpe kondima ya mwasi wana ya mpiko ekoki koteya biso nini? Tólobela naino ndenge Estere akómaki mwasi ya mokonzi ya Perse.

Ndenge Estere akolaki

4. Estere autaki na libota nini, mpe ebandaki boni akóma kofanda ná yaya na ye Mordekai?

4 Estere azalaki mwana etike. Toyebi makambo mingi te mpo na baboti na ye, oyo bapesaki ye nkombo Hadasa, liloba moko ya Ebre oyo elimboli “mirte,” mwa nzete moko moke oyo ebimisaka fololo ya mpɛmbɛ ya nsolo kitoko. Ntango baboti ya Estere bakufaki, ndeko moko ya libota, Mordekai, mobali moko ya boboto, azwaki ye. Mordekai azalaki ndeko na ye, kasi azalaki mokóló mpenza. Amemaki Estere epai na ye mpe abɔkɔlaki ye lokola mwana na ye.Est. 2:5-7, 15.

Ezalaki mpenza na ntina oyo Mordekai azalaki kosepela na Estere, mwana oyo abɔkɔlaki

5, 6. (a) Mordekai abɔkɔlaki Estere ndenge nini? (b) Estere ná Mordekai bazalaki na bomoi ya ndenge nini na Shushane?

5 Mordekai ná Estere bazalaki Bayuda mpe baombo oyo bakendeki kofanda na engumba-mokonzi ya Perse, mpe mbala mosusu bato bazalaki kotyola lingomba na bango mpo na Mibeko oyo bazalaki kosala makasi mpo na kotosa. Kasi, na ntembe te Estere akómaki na boyokani makasi ná ndeko na ye, wana azalaki koteya ye makambo etali Yehova, Nzambe ya motema mawa, oyo abikisaki bato na Ye mbala mingi na ntango ya kala, mpe oyo akobikisa mpe bango. (Lev. 26:44, 45) Na ntembe te, Mordekai ná Estere balinganaki makasi.

6 Mordekai azalaki kosala na ndako monene ya Shushane, mpe azalaki mbala na mbala kofanda na porte ya monene elongo na basali mosusu ya mokonzi. (Est. 2:19, 21; 3:3) Toyebi mpenza te makambo oyo Estere azalaki kosala ntango azalaki kokola, kasi tokoki koloba ete azalaki kosalisa yaya na ye oyo azalaki mokóló mpe kobatela ndako na ye. Ekoki kozala ete bazalaki kofanda na kartye ya babola mpenza. Mbala mosusu azalaki kokende na zando na Shushane, epai basali ya biloko ya wolo, ya palata, mpe bakomelesa mosusu bazalaki kotɛka biloko na bango. Estere akokaki kokanisa ata moke te ete akozala na biloko wana ya motuya na bomoi na ye; ayebaki te ndenge oyo bomoi na ye ekokóma.

 ‘Azalaki kitoko mingi na elongi’

7. Mpo na nini mokonzi aboyaki Vasheti na libala, nini esalemaki na nsima?

7 Mokolo moko, Shushane mobimba eninganaki mpo na likambo moko oyo elekaki na ndako ya mokonzi. Na fɛti moko monene oyo Ahasueruse asalelaki bato minene ya bokonzi na ye, epai bazalaki kolya mpe komɛla vinyo kitoko, mokonzi yango azwaki likanisi ya kobengisa Vasheti, mwasi na ye ya kitoko, oyo azalaki mpe kosala fɛti elongo na basi na esika mosusu. Kasi, Vasheti aboyaki koya. Mokonzi ayokaki nsɔni mpe asilikaki; atunaki bapesi-toli na ye etumbu oyo Vasheti asengeli kozwa. Esukaki ndenge nini? Mokonzi aboyaki ye na libala. Basaleli ya mokonzi babandaki kolukaluka na ekólo mobimba bilenge basi ya kitoko oyo bayebi naino mibali te; mpo mokonzi apona mwasi moko na kati na bango.Est. 1:1–2:4.

8. (a) Ntango Estere azalaki kokola, ekoki kozala mpo na ntina nini Mordekai azalaki komitungisa mwa moke? (b) Mpo na yo, ndenge nini tokoki kosalela toli ya Biblia na oyo etali kozala na bokatikati na kitoko ya nzoto? (Talá mpe Masese 31:30.)

8 Mbala mosusu Mordekai azalaki kotalatala Estere mpe komona ndenge akolaki mpe akómaki mwasi kitoko mpenza; likambo yango ezalaki kopesa ye esengo, kasi ezalaki mpe kotungisa ye mwa moke. Biblia elobi: “Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi na nzoto mpe elongi.” (Est. 2:7) Biblia emonisi ete kitoko ya nzoto ezali mabe te, kasi esengeli kotambola nzela moko ná bwanya mpe komikitisa. Soki te, ekoki kotinda moto akóma lolendo, lofundo, mpe na bizaleli mosusu ya mabe. (Tángá Masese 11:22.) Omoná likambo yango te? Sikoyo kitoko ya Estere ekosalisa ye to ekokómisa ye lolendo? Ekoyebana nsima.

9. (a) Basaleli ya mokonzi basalaki nini ntango bamonaki Estere, mpe mpo na nini kokabwana na Mordekai ezalaki mpasi? (b) Mpo na nini Mordekai andimaki Estere abalana na mopakano? (Talá mpe etanda.)

9 Estere abendaki likebi ya basaleli ya mokonzi. Batyaki ye na kati ya bilenge basi oyo baponaki; balongolaki ye na mabɔkɔ ya Mordekai mpe bamemaki ye na ndako ya mokonzi, na ngámbo mosusu ya ebale. (Est. 2:8) Na ntembe te, kokabwana ezalaki mpasi, mpamba te bakómaki lokola tata ná mwana. Mordekai akoki kolinga te ete mwana oyo abɔkɔlaki abala moto oyo asambelaka Yehova te, ata soki azali mokonzi; kasi ndenge makambo ebongwanaki, akokaki kosala eloko te. * Na ntembe te, Estere ayokaki na likebi mpenza batoli oyo Mordekai apesaki ye liboso bákende na ye! Ntango bazalaki kokende na Shushane ndako monene, azalaki komituna mituna ebele. Akozala na bomoi ya ndenge nini?

 Andimamaki “na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye”

10, 11. (a) Ndenge nini esika oyo Estere akómaki ekokaki kobebisa ye? (b) Ndenge nini Mordekai amonisaki ete azalaki mpenza komitungisa mpo na Estere?

10 Estere akómaki na esika oyo makambo nyonso ezalaki mpenza ya sika mpo na ye. Azalaki na kati ya “bilenge basi mingi” oyo bautaki na bisika ndenge na ndenge ya Ampire ya Perse. Na ntembe te, mimeseno, minɔkɔ mpe makanisi na bango ezalaki ndenge moko te. Bapesaki bilenge basi yango na mabɔkɔ ya Hegai, mosaleli moko ya mokonzi, mpe esengelaki bábongisa bango nzoto na boumeli ya mbula mobimba, na ndakisa konyɔlisa bango nzoto na mafuta ya nsolo kitoko. (Est. 2:8, 12) Nyonso wana ekokaki kotinda bilenge basi yango bátalela kaka kitoko ya nzoto na bango, bákóma na lolendo mpe kowelana. Esalaki Estere nini?

 11 Moto moko te azalaki komitungisa mpo na Estere koleka Mordekai. Biblia elobi ete mokolo na mokolo, azalaki kokende pembeni ya ndako ya basi mpe koluka koyeba soki Estere azali ndenge nini. (Est. 2:11) Na ntembe te, Mordekai azalaki koyoka esengo makasi soki ata moko ya basaleli ya ndako ya mokonzi ayebisi ye ete Estere azali malamu. Mpo na nini?

12, 13. (a) Bato oyo bazalaki komona Estere, bazalaki kotalela ye ndenge nini? (b) Mpo na nini Mordekai asepelaki ntango ayokaki ete Estere ayebisaki te ete azalaki Moyuda?

12 Estere asepelisaki Hegai mingi mpe Hegai azalaki kosalela ye makambo na boboto; apesaki ye basaleli nsambo ya basi mpe esika eleki malamu na ndako ya basi. Kutu, Biblia elobi boye: “Na ntango nyonso wana Estere azalaki kaka kondimama na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.” (Est. 2:9, 15) Ezalaki kaka mpo na kitoko na ye nde asepelisaki bato ndenge wana? Te, ezalaki mpe mpo na makambo mosusu.

Estere ayebaki ete komikitisa mpe bwanya ezali na ntina mingi koleka kitoko ya nzoto

 13 Na ndakisa, Biblia elobi ete: “Estere alobelaki eloko moko te oyo etali bato na ye to oyo etali bandeko na ye, mpo Mordekai apesaki ye mitindo ete ayebisa eloko te.” (Est. 2:10) Mordekai ayebisaki ye aloba te ete azali Moyuda; na ntembe te amonaki ete bato mosusu ya Perse oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi bazalaki kokanisela Bayuda mabe. Azalaki mpenza na esengo ntango ayokaki ete Estere, atako akómaki mosika na ye, azalaki kaka komonisa bwanya mpe botosi!

14. Ndenge nini bilenge lelo oyo bakoki komekola ndakisa ya Estere?

14 Lelo oyo mpe bilenge bakoki kosepelisa mitema ya baboti to ya bato oyo babɔkɔlaka bango. Ata ntango bazali ná baboti te, bilenge bakoki koboya bizaleli mpe makambo ya mbindo mpe kokangama na makambo oyo bayebi ete ezali malamu, ata soki bazali ná bato oyo basalaka mabe mpe makambo ya mbindo. Soki basali bongo, bakosepelisa Tata na bango ya likoló, ndenge Estere asalaki.Tángá Masese 27:11.

15, 16. (a) Ndenge nini Estere alongaki kozwa motema ya mokonzi? (b) Mpo na nini bambongwana oyo esalemaki na bomoi ya Estere ekokaki kozala mokakatano?

15 Ntango mokolo oyo Estere asengelaki kobima liboso ya mokonzi ekokaki, bayebisaki ye azwa eloko nyonso oyo akanisi ete ekoki kosalisa ye, mbala mosusu mpo amikómisa lisusu kitoko. Kasi, na komikitisa nyonso, asɛngaki eloko mosusu te na biloko oyo Hegai ayebisaki ye. (Est. 2:15) Mbala mosusu, amonaki ete kitoko ya nzoto ekoki te mpo na kozwa motema ya mokonzi; komikitisa nde ezaleli kitoko oyo bato mingi na ndako ya mokonzi bazalaki na yango te. Akanisaki malamu?

16 Biblia elobi boye: “Mokonzi alingaki Estere mingi koleka basi mosusu nyonso, bongo andimaki ye mpenza mpe amoniselaki ye motema boboto mingi koleka bangɔndɔ mosusu nyonso. Mpe atyaki motole ya bokonzi na motó na ye mpe akómisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasheti.” (Est. 2:17) Na ntembe te, ezalaki mpasi mpo na elenge mwasi Moyuda wana amesana na bomoi oyo akómaki na yango: akómaki mwasi ya mokonzi oyo alekaki na nguya na mabele mobimba na ntango wana! Lokumu wana evimbisaki ye motó, ekómisaki ye lolendo? Ata moke te!

17. (a) Makambo nini emonisi ete Estere azalaki kaka kotosa tata-mobɔkɔli na ye? (b) Mpo na nini ndakisa ya Estere ezali na ntina mpo na biso lelo oyo?

17 Estere azalaki kaka kotosa Mordekai, tata-mobɔkɔli na ye. Ayebisaki kaka moto te ete azali Moyuda. Lisusu, ntango Mordekai ayokaki bato bazali kosalela Ahasueruse likita mpo na koboma ye, ayebisaki yango Estere; mpe Estere ayebisaki yango mokonzi na nkombo ya Mordekai, mpe mwango wana mabe elongaki te. (Est. 2:20-23) Azalaki kaka na kondima epai ya Nzambe na ndenge azalaki na komikitisa mpe botosi. Ndakisa ya Estere ezali na ntina mingi  mpo na biso lelo oyo, mpamba te bato bazali komona ete kotosa ezali mpenza na ntina te, mpe kozanga botosi ná botomboki epalangani mingi! Kasi, na ndakisa ya Estere, bato oyo bazali na kondima ya solo bamonaka ete botosi ezali likambo ya ntina mingi.

Kondima ya Estere emekami

18. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini Mordekai aboyaki kogumbamela Hamane? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini mibali mpe basi ya kondima makasi lelo oyo bamekolaka ndakisa ya Mordekai?

18 Mobali moko na nkombo Hamane akómaki na lokumu mingi na ndako ya mokonzi Ahasueruse. Mokonzi atyaki ye ministre-mokonzi, akómaki mpe mopesi-toli ya liboso ya mokonzi mpe moto ya mibale na ampire mobimba. Kutu, mokonzi apesaki mobeko ete moto nyonso oyo akomona Hamane asengeli kogumbamela ye. (Est. 3:1-4) Mobeko yango ezalaki mokakatano mpo na Mordekai. Azalaki na mposa ya kotosa mokonzi, kasi te na makambo oyo ekotinda ye azanga limemya epai ya Nzambe. Hamane azalaki Moagage. Emonani ete azalaki nkɔkɔ ya Agage, mokonzi ya Amaleke, oyo mosakoli Samwele abomaki. (1 Sa. 15:33) Baamaleke bazalaki mabe mpenza mpe bamikómisaki banguna ya Yehova mpe ya Yisraele. Nzambe akatelaki ekólo mobimba ya Amaleke etumbu. * (Mib. 25:19) Ndenge nini Moyuda ya sembo akokaki kogumbamela Moamaleke? Mordekai akokaki kosala yango te. Aboyaki na motema moko. Lelo oyo mpe, mibali mpe basi ya kondima makasi batyaka bomoi na bango na likama mpo balingaka kotosa etinda oyo: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.”Mis. 5:29.

19. Hamane alingaki kosala nini, mpe alobaki nini mpo andimisa mokonzi?

19 Hamane asilikaki makasi. Kasi, amonaki ete akosala eloko te soki abomi kaka Mordekai. Alingaki kosilisa bato nyonso ya ekólo ya Mordekai! Hamane abambelaki Bayuda makambo epai ya mokonzi mpo abimisa bango mabe. Kozanga kotánga nkombo na bango, alobaki ete bazali na ntina te mpe “bapalangani mpe bakabwani na bato ya bikólo.” Kutu likambo ya mabe koleka, alobaki ete batosaka mibeko ya mokonzi te; na yango bazalaki batomboki. Alakaki ete atya mbongo ebele na esika ya kobomba mosolo ya mokonzi mpo na koboma Bayuda nyonso na ekólo. * Mokonzi Ahasueruse apesaki Hamane lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo mpo atya elembo na mobeko nyonso oyo akani.Est. 3:5-10.

20, 21. (a) Nsango ya Hamane esalaki nini epai ya Bayuda na Ampire ya Perse mobimba, ata mpe Mordekai? (b) Mordekai asɛngaki Estere asala nini?

 20 Eumelaki te, bamemi-nsango babandaki kotambola na bampunda na mboka mobimba, mpo na koyebisa ete Bayuda nyonso bakobomama. Kanisá ndenge nsango yango esalaki ntango ekómaki na Yerusaleme, epai mwa ndambo ya Bayuda oyo bautaki boombo na Babilone bazalaki kobunda mpo na kotonga lisusu engumba yango oyo ezalaki ata na efelo moko te mpo na kobatela yango. Ntango Mordekai ayokaki nsango wana ya mabe, ekoki kozala ete akanisaki bato yango, ná baninga mpe bandeko na ye na Shushane. Abulunganaki mpe apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe amipakolaki putulu na motó, mpe alelaki makasi na katikati ya engumba. Kasi, Hamane ná mokonzi bazalaki komɛla, azalaki ata na mawa te mpo na mpasi oyo abimiselaki ebele ya Bayuda mpe baninga na bango oyo bazalaki na Shushane.Tángá Estere 3:12–4:1.

21 Mordekai ayebaki ete asengeli kokanga mabɔkɔ te. Kasi, akokaki kosala nini? Estere ayokaki ete Mordekai azali na mawa mpe atindelaki ye bilamba, kasi Mordekai aboyaki bábɔndisa ye. Mbala mosusu amitunaki mingi ntina oyo Yehova, Nzambe na ye, atikaki ete Estere alongwa na mabɔkɔ na ye mpe akóma mwasi ya mokonzi oyo azalaki kosambela Yehova te. Sikoyo, akómaki komona  ntina yango. Mordekai atindelaki Estere maloba, asɛngaki ye aloba mpo na “bato na ye” epai ya mokonzi.Est. 4:4-8.

22. Mpo na nini Estere azalaki kobanga kokɔta epai ya mobali na ye mokonzi? (Talá mpe maloba ya nse ya lokasa.)

22 Na ntembe te, Estere abulunganaki ntango ayokaki maloba wana. Kondima na ye emekamaki mpenza na likambo oyo. Abangaki, ndenge amonisaki yango polele na eyano oyo atindelaki Mordekai. Akundwelaki ye mobeko ya mokonzi. Soki moto akɔti epai ya mokonzi kozanga ete mokonzi abengisa ye akokaki kobomama. Moto akokaki kobika kaka soki mokonzi asemboleli ye lingenda na ye ya bokonzi. Estere akokaki nde kolikya ete mokonzi akondima to akoyekola ye mawa, mingimingi na kotalela likambo oyo ekómelaki Vasheti ndenge aboyaki koya epai ya mokonzi ntango abengaki ye? Estere ayebisaki Mordekai ete mokonzi abengisaki ye te esalaki mikolo 30! Likambo yango ezalaki kotinda ye amona ete mbala mosusu mokonzi yango ya bongolabongola azalaki kosepela na ye lisusu te. *Est. 4:9-11.

23. (a) Mordekai alobaki nini mpo na kolendisa Estere azala na kondima makasi? (b) Mpo na nini tosengeli komekola ndakisa ya Mordekai?

23 Mordekai ayanolaki na mpiko mpo na kolendisa Estere azala na kondima makasi. Alobaki na ye ete soki asali eloko te, lobiko ya Bayuda ekoya na nzela mosusu. Kasi, ye moko akobika ndenge nini soki makambo eyei ndongo? Na maloba yango, Mordekai amonisaki ete azalaki na kondima makasi ete Yehova akotika soki moke te ete bato na Ye nyonso bábomama mpe ete bilaka na Ye ezanga kokokisama. (Yos. 23:14) Na nsima, Mordekai atunaki Estere boye: “Nani ayebi soki ezali te mpo na ntango lokola oyo nde okómi na lokumu ya bokonzi?” (Est. 4:12-14) Omoni te ete  tosengeli komekola ndakisa ya Mordekai? Atyelaki Yehova Nzambe na ye motema mobimba. Biso mpe tokoki kosala bongo?Mas. 3:5, 6.

Azalaki na kondima makasi koleka nsɔmɔ ya liwa

24. Ndenge nini Estere amonisaki kondima mpe mpiko?

24 Ntango oyo Estere akokaki kozwa ekateli ekokaki. Ayebisaki Mordekai asɛnga Bayuda nyonso bákila bilei mikolo misato lokola ye, mpe asukisaki na maloba oyo tii lelo emonisaka ete azalaki na kondima mpe mpiko. Alobaki ete: “Soki esengeli nakufa, nakufa.” (Est. 4:15-17) Na ntembe te, mikolo misato wana abondelaki makasi na ndenge oyo asalaki naino liboso te. Mpe, nsukansuka ntango ekokaki. Asalaki nyonso oyo akokaki mpo asepelisa mokonzi mpe atutaki mpenza monzɛlɛ na bilamba na ye ya bokonzi. Na nsima akendaki.

Estere atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobatela bato ya Nzambe

25. Lobelá ndenge makambo elekaki ntango Estere akendaki epai ya mobali na ye.

25 Ndenge tomonisaki yango na ebandeli, Estere akendaki epai ya mokonzi. Tómeka naino komona na makanisi ndenge azalaki komitungisa mingi, mpe kobondela makasi na nse ya motema. Akɔtaki na lopango epai akokaki komona Ahasueruse afandi na kiti na ye ya bokonzi. Mbala mosusu alukaki koyeba na elongi ya mobali na ye soki azali na nkanda to esengo. Soki esɛngaki ete azela, na ntembe te Estere amonaki ete ntango ezalaki koumela mpenza. Kasi, nsukansuka mobali na ye amonaki ye. Na ntembe te akamwaki, kasi elongi na ye efungwamaki. Asembolelaki ye lingenda na ye ya wolo!Est. 5:1, 2.

26. Mpo na nini bakristo ya solo basengeli kozala na mpiko lokola oyo ya Estere, mpe mpo na nini mosala na ye ebandaki nde kobanda?

26 Mokonzi andimaki koyoka Estere. Alobaki mpo na Nzambe na ye mpe ekólo na ye, mpe atikelá basaleli ya Nzambe ndakisa malamu ya kondima. Lelo oyo, bakristo ya solo basepelaka mingi na bandakisa ya ndenge wana. Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bakoyebana soki bazali na bolingo ya solosolo. (Tángá Yoane 13:34, 35.) Komonisa bolingo ya ndenge wana esɛngaka kozala na mpiko lokola ya Estere. Kasi, atako Estere alobaki mpo na bato ya Nzambe mokolo wana, mosala na ye ebandaki nde kobanda. Ndenge nini akondimisa mokonzi ete Hamane, mopesi-toli na ye ya motema, asalaki mwango mabe? Akosala nini mpo abikisa bato ya ekólo na ye? Tokolobela mituna yango na mokapo oyo elandi.

^ par. 2 Bato mingi balobaka ete Ahasueruse yango ezali Xerxes I, oyo azalaki mokonzi na Perse na ebandeli ya siɛklɛ ya mitano L.T.B.

^ par. 9 Talá etanda “Mituna na ntina na Estere”, na mokapo 16.

^ par. 18 Ekoki kozala ete Hamane azalaki na kati ya Baamaleke ya nsuka mpenza, mpo Baamaleke “oyo batikalaki” babomamaki na ntango ya Mokonzi Hizikiya.1 Nt. 4:43.

^ par. 19 Hamane apesaki talanta ya palata 10 000, oyo ekokani lelo na bankama ya bamilio ya dolare. Soki Ahasueruse ezalaki mpenza Xerxès I, mbongo oyo Hamane alakaki kopesa ebendaki ye. Xerxès azalaki na mposa ya mbongo mingi mpo abungisaki mbongo ebele na etumba monene oyo abundaki na Grɛsi.

^ par. 22 Xerxès I ayebanaki lokola moto ya bongolabongola mpe ya nkanda. Hérodote, Mogrɛki moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, akomaki mwa makambo oyo Xerxès asalaki na etumba oyo abundaki na Grɛsi. Mokonzi atindaki ete bátya bamasuwa ebele esala lokola gbagba mpo na kokatisa détroit d’Hellespont. Ntango mopɛpɛ moko makasi ebebisaki gbagba yango, Xerxès apesaki mitindo ete bákata mitó ya bato ya mayele oyo basalaki yango mpe atindaki bato na ye bábɛta mai ya Hellespont fimbo mpe bátánga na mongongo makasi maloba ya kofinga yango. Kaka na etumba yango, ntango moto moko ya bozwi asɛngaki mokonzi ete mwana na ye akende na mosala ya soda te, Xerxès atindaki ete bákata mwana yango na biteni mibale, mpe bálakisa nzoto na ye mpo na kokebisa bato.