Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MOTOBA

Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

Amonisaki bwanya, mpiko, mpe alukaki bolamu na ye moko te

1-3. (a) Makambo elekaki ndenge nini ntango Estere azalaki kopusana pene na kiti ya bokonzi ya mobali na ye? (b) Mokonzi asalaki nini ntango Estere akómaki epai na ye?

ESTERE azalaki kopusana malɛmbɛmalɛmbɛ pembeni ya kiti ya bokonzi, motema ezalaki kobɛta. Kimya ekɔtaki na ndako wana ya mokonzi oyo ezalaki na Shushane! Lokola kimya ezalaki makasi, Estere akokaki koyoka ndenge makolo mpe bilamba na ye ya bokonzi ezalaki kobendana na mabele. Akokaki te kolekisa ntango na kotala ndako monene yango, makonzí na yango kitoko to baplafɔ na yango oyo basalá na mabaya oyo eutaki mosika, na Libá. Atyaki likebi na ye nyonso epai ya mobali oyo afandaki na kiti ya bokonzi; bomoi na ye ezalaki na mabɔkɔ ya mobali yango.

2 Mokonzi azalaki kotala na likebi ndenge Estere azalaki kopusana, mpe asembolelaki ye lingenda na ye. Mwa jɛstɛ yango ezalaki likambo monene te, kasi ebikisaki Estere, mpo emonisaki ete mokonzi alimbisaki ye na likambo oyo autaki kosala ya kokɔta epai na ye kozanga ete abengisa ye. Ntango Estere akómaki pembeni ya kiti ya bokonzi, asembolaki lobɔkɔ mpe mpo na komonisa botɔndi na ye, asimbaki motó ya lingenda ya mokonzi.Est. 5:1, 2.

Na komikitisa, Estere amonisaki botɔndi mpo na motema mawa ya mokonzi

3 Mokonzi Ahasueruse azalaki na bozwi mpe na nguya mingi. Bilamba ya bakonzi ya Perse na ntango wana ezalaki kozwa bankama ya bamilio ya dolare. Estere akokaki komona na elongi ya mobali na ye ete alingaka ye. Alobaki boye: “Likambo nini, ee Estere mwasi ya mokonzi, mpe eloko nini ozali kosɛnga? Ata bokonzi kabolá na mibale—ɛɛ, bápesa yo yango!”Est. 5:3.

4. Mikakatano nini ezalaki kozela Estere?

4 Estere amonisaki mpenza liboso kondima mpe mpiko; ayaki liboso ya mokonzi mpo na kolobela bato ya ekólo na ye oyo basalelaki bango mwango mabe ya koboma bango nyonso. Atako mokonzi andimaki kokutana na ye, mokakatano mosusu ezalaki liboso na ye. Asengelaki kosolola na mokonzi wana ya lolendo mpo na komonisa ye ete mopesi-toli na ye ya motema azalaki moto mabe, mpe ete akosaki ye mpo abomisa bato nyonso ya ekólo ya Estere. Ndenge nini Estere akosolola na ye mpo andima likambo yango, mpe liteya nini tokoki kozwa na kondima na ye?

 Aponaki malamu “ntango ya koloba”

5, 6. (a) Ndenge nini Estere asalelaki toli ya Mosakoli 3:1, 7? (b) Ndenge nini Estere amonisaki bwanya ntango asololaki na mobali na ye?

5 Estere asengelaki nde koyebisa mokonzi likambo oyo azali na yango na miso ya bato oyo bazalaki wana? Kosala bongo ekokaki koyokisa mokonzi nsɔni mpe kopesa mopesi-toli na ye Hamane ntango ya kondima to kotya ntembe na makambo oyo Estere akoloba. Na yango, Estere asalaki nini? Basiɛklɛ mingi liboso, Mokonzi Salomo akomaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe ete: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango, . . . ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mos. 3:1, 7) Emonani ete Mordekai, mobali ya sembo, tata-mobɔkɔli ya Estere ateyaki elenge mwasi yango makambo ya ndenge wana ntango azalaki kokola. Na ntembe te, Estere akangaki ntina ete esengeli kopona malamu “ntango ya koloba.”

6 Estere alobaki boye: “Soki yango emonani malamu na miso ya mokonzi, tiká mokonzi aya lelo ná Hamane na fɛti oyo nasaleli ye.” (Est. 5:4) Mokonzi andimaki mpe abengisaki Hamane. Omoni maloba  ya bwanya oyo Estere asalelaki? Abatelaki lokumu ya mobali na ye mpe alukaki esika mpe ntango oyo ebongi mpo na koyebisa ye mitungisi na ye.Tángá Masese 10:19.

7, 8. Fɛti ya liboso oyo Estere asalaki ezalaki ndenge nini, kasi mpo na nini ayebisaki mokonzi mbala moko te likambo na ye?

7 Na ntembe te, Estere abongisaki fɛti yango malamu, mpe atyaki biloko nyonso oyo mobali na ye alingaka. Na fɛti yango, atyaki vinyo kitoko mpo esepelisa mitema ya bato. (Nz. 104:15) Ahasueruse asepelaki, mpe yango etindaki ye atuna lisusu Estere soki mposa na ye ezalaki nini. Ezalaki sikoyo ntango ya koloba?

8 Estere amonaki ete ezali te ntango malamu ya koloba. Na yango, abengisaki mokonzi ná Hamane báya na fɛti mosusu oyo akosala na mokolo elandi. (Est. 5:7, 8) Azalaki kozela nini? Tóbosana te ete bato nyonso ya ekólo ya Estere basengelaki kobomama mpo na mobeko oyo mokonzi abimisaki. Na yango, Estere asengelaki kopona ntango ya malamu mpenza, soki te bato mingi balingaki kokufa. Yango wana, azelaki mpe alukaki libaku mosusu mpo na kolakisa mobali na ye ete azalaki kozwa ye na valɛrɛ mingi.

9. Motema molai ezali na ntina nini, mpe ndenge nini tokoki komekola Estere na likambo yango?

 9 Motema molai ezali ezaleli moko malamu oyo bato mingi te bazalaka na yango. Atako azalaki komitungisa mingi mpe azalaki na mposa makasi ya koyebisa mokonzi makambo, Estere amonisaki motema molai mpe azelaki ntango oyo ebongi. Tokoki kozwa mateya na ndakisa na ye, mpo biso nyonso tomoná makambo oyo esengeli kosembolama. Soki tolingi kosolola na moto moko oyo azali na bokonzi mpo andima kosilisa mokakatano moko, ekozala malamu tólanda ndakisa ya Estere mpe tózala motema molai. Masese 25:15 elobi boye: “Na motema molai nde bandimisaka motambwisi, mpe lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.” Soki tomonisi motema molai, tozeli ntango oyo ebongi mpe tolobi na boboto, ndenge Estere asalaki, tokoki kosalisa ata moto oyo azalaki motɛmɛli makasi andima. Yehova, Nzambe ya Estere, apambolaki ye mpo na motema molai mpe bwanya oyo amonisaki?

 Motema molai ebongisi nzela mpo na bosembo

10, 11. (a) Mpo na nini Hamane azalaki lisusu na esengo te ntango alongwaki na fɛti ya liboso? (b) Mwasi na ye ná baninga na ye balobaki na ye asala nini?

10 Motema molai ya Estere ebongisaki nzela mpo na makambo ebele. Ntango fɛti ya liboso esilaki, Hamane azongaki epai na ye “na esengo mpe na nsai na motema” mpo amonaki ete mokonzi ná mwasi na ye basepelaki na ye. Kasi, ntango Hamane azalaki kobima na porte ya ndako ya mokonzi, amonaki Mordekai, Moyuda oyo azalaki se koboya kogumbamela ye. Ndenge tomonaki yango na mokapo oyo eleki, Mordekai aboyaki kogumbamela Hamane mpo na kozanga limemya te, kasi nde mpo na kotosa lisosoli na ye mpe kobatela boyokani na ye ná Yehova Nzambe. Kasi, “na mbala moko Hamane atondaki na nkanda makasi.”Est. 5:9.

11 Ntango Hamane ayebisaki mwasi na ye ná baninga na ye likambo yango, balobaki na ye abongisa nzete moko monene, ya mɛtrɛ koleka 22 na molai, mpe asɛnga mokonzi nzela mpo bákakisa Mordekai na nzete yango. Hamane asepelaki na likanisi yango mpe ayebisaki moto moko abongisa nzete yango.Est. 5:12-14.

12. Mpo na nini mokonzi asɛngaki batángela ye buku ya makambo oyo eleká na mboka, mpe ayebaki likambo nini?

12 Nzokande na butu, mokonzi alalaki malamu te. Biblia elobi ete “mpɔngi ya mokonzi ekimaki”; na yango, asɛngaki bátángela ye buku ya makambo oyo eleká na mboka. Na buku yango, batángaki mpe likambo ya bato oyo basalaki mwango mabe mpo na koboma Ahasueruse. Ayebaki lisusu likambo yango; bakangaká bato yango mpe babomá bango. Kasi, basalaki nini mpo na Mordekai, moto oyo afundaki bango? Na mbala moko, mokonzi asutukaki mpe atunaki soki mbano nini bapesaki Mordekai. Bayanolaki ete bapesaki ye eloko moko te.Tángá Estere 6:1-3.

13, 14. (a) Ndenge nini makambo ebandaki kobebela Hamane? (b) Mwasi ya Hamane ná baninga na ye bayebisaki ye nini?

13 Mokonzi atungisamaki mpe atunaki soki nani akoki kosalisa ye asembola likambo yango. Na bato nyonso, Hamane nde ayaki na ndako ya mokonzi, na ntɔngɔntɔngɔ, mbala mosusu mpo na kosɛnga nzela ya koboma Mordekai. Kasi, liboso kutu Hamane ayebisa mokonzi mposa na ye, mokonzi atunaki ye lolenge oyo eleki malamu ya kopesa lokumu na moto oyo mokonzi asepeli na ye. Hamane akanisaki ete moto yango nde ye. Na yango, Hamane alobaki makambo ya lokumu mingi mpenza: Bálatisa moto yango elamba ya bakonzi, básɛnga moto moko monene na mboka atambwisa ye na Shushane mobimba na mpunda ya mokonzi, mpe bákumisa ye na mongongo makasi mpo bato nyonso báyoka. Sikoyo, kanisá ndenge elongi ya Hamane ekómaki ntango ayokaki ete moto yango oyo asengeli kokumisama bongo, ezali nde Mordekai! Lisusu, nani oyo mokonzi aponaki mpo na kokumisa Mordekai ndenge wana? Hamane!Est. 6:4-10.

 14 Hamane akokisaki mokumba yango na mitema mibale, na nsima azongaki nokinoki na ndako na ye na mawa. Mwasi na ye ná baninga na ye balobaki ete ndenge makambo ebaluki bongo, emonisi ete akolonga te koboma Mordekai.Est. 6:12, 13.

15. (a) Motema molai ya Estere ebotaki mbuma nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina tóyeba “kozela”?

15 Lokola Estere azalaki motema molai mpe azelaki mokolo mosusu mpo ayebisa mokonzi mposa na ye, Hamane amisambwisaki ye moko. Mbala mosusu Yehova Nzambe nde asalaki ete mokonzi yango alala te. (Mas. 21:1) Na yango, tokoki kokamwa te ete Liloba ya Nzambe elendisaka biso tóyeba “kozela”! (Tángá Mika 7:7.) Soki tozeli Nzambe asala, akoki kobongisela biso makambo na ndenge oyo eleki mosika oyo tokanisaki.

Alobaki na mpiko

16, 17. (a) Na libaku nini “ntango ya koloba” ekokaki mpo na Estere? (b) Estere akesanaki na Vasheti, mwasi ya liboso ya mokonzi na nini?

16 Estere alingaki lisusu te kosukisa mokonzi motema; na fɛti ya mibale, akoyebisa ye makambo nyonso. Kasi, akosala yango ndenge nini? Mokonzi apesaki ye libaku ya koloba, mpo atunaki ye lisusu soki mposa na ye ezali nini. (Est. 7:2) “Ntango ya koloba” ekokaki mpo na Estere.

17 Mbala mosusu Estere asalaki libondeli mokuse na nse ya motema liboso aloba maloba oyo: “Soki nandimami na miso na yo, ee mokonzi, mpe soki emonani malamu na miso ya mokonzi, na lilɔmbɔ na ngai, tiká bápesa ngai molimo na ngai mpe na eloko oyo nazali kosɛnga, bápesa ngai bato na ngai.” (Est. 7:3) Na maloba yango, Estere amonisaki mokonzi ete andimaka bikateli oyo azwaka. Estere akesenaki mpenza na Vasheti, mwasi ya liboso ya mokonzi,  oyo ayokisaki mobali na ye nsɔni na nko! (Est. 1:10-12) Lisusu, Estere atyolaki mokonzi te na ndenge azalaki kotyela Hamane motema. Kasi, asɛngaki nde mokonzi abikisa ye na likambo oyo ezalaki kotya bomoi na ye na likama.

18. Ndenge nini Estere ayebisaki mokonzi likambo na ye?

18 Likambo oyo asɛngaki ekamwisaki mpenza mokonzi. Nani akokaki komeka kotya bomoi ya mwasi ya mokonzi na likama? Estere abakisaki boye: “Totɛkami, ngai ná bato na ngai, mpo tósilisama nyɛɛ, tóbomama mpe tóbebisama. Sikoyo, soki tótɛkamaka kaka lokola baombo mibali mpe lokola basali ya basi, mbɛlɛ nafandi nyɛɛ. Kasi mpasi yango ebongi te awa yango ekoyeisela mpe mokonzi likama.” (Est. 7:4) Awa, Estere abimisaki likambo na ye polele, kasi abakisaki ete alingaki koloba eloko te soki balingaki kaka kokómisa bango baombo. Kasi, mokano wana ya koboma bato ebele elingaki kozala likama ata mpo na mokonzi, yango wana akokaki kofanda nyɛɛ te.

19. Ndakisa ya Estere ekoki koteya biso nini na oyo etali mayele ya kondimisa?

19 Ndakisa ya Estere eteyi biso mingi na oyo etali mayele ya kondimisa. Soki esɛngi oyebisa likambo moko monene epai ya moto moko oyo olingaka to moto oyo azali na bokonzi, okoki kozwa matomba mingi soki ozali na motema molai, limemya, mpe olobi likambo yango polele.Mas. 16:21, 23.

20, 21. (a) Ndenge nini Estere abimisaki mwango mabe ya Hamane, mpe etindaki mokonzi asala nini? (b) Hamane asalaki nini ntango batondolaki mayele mabe na ye?

20 Ahasueruse atunaki boye: “Nani yango, mpe wapi moto yango oyo azwi mpiko ya kosala bongo?” Kanisá ndenge Estere alakisaki mosapi mpe alobaki ete: “Mobali yango, motɛmɛli mpe monguna, ezali moto mabe oyo Hamane.” Ekosukela Hamane ndenge  nini mpo na efundeli wana? Hamane ayokaki nsɔmɔ makasi. Meká komona ndenge elongi ya mokonzi ekómaki ntango ayebaki ete mopesi-toli na ye ya motema akosaki ye mpo abimisa mobeko oyo ekobomisa mpe mwasi na ye ya motema! Mokonzi abimaki mbangu mpe akendaki na elanga mpo akitisa nkanda na ye.Est. 7:5-7.

Na mpiko nyonso, Estere atondolaki mabe ya Hamane

21 Lokola mwango mabe ya Hamane eyebanaki polele, afukamaki na makolo ya mwasi ya mokonzi mpe abandaki kosɛnga pardɔ. Ntango mokonzi azongaki na ndako mpe amonaki Hamane azali kobondela Estere na mbeto oyo afandaki, asilikaki mpe alobaki ete Hamane alingi kosangisa nzoto na makasi na mwasi ya mokonzi na ndako ya mokonzi ye moko. Hamane asengelaki kobomama mpo na efundeli wana. Babimisaki ye libándá, bazipi ye elongi. Na nsima, mosaleli moko ya mokonzi ayebisaki mokonzi ete Hamane asalisaki nzete moko molai mpo na kokakisa Mordekai likoló na yango. Na mbala moko, Ahasueruse apesaki mitindo ete bákakisa nde Hamane na nzete yango.Est. 7:8-10.

22. Ndenge nini ndakisa ya Estere ekoki kosalisa biso tólongola elikya te, tósilika te mpe tóbatela kondima?

22 Na mokili oyo etondi na makambo ya kozanga bosembo, ezali mpasi tóndima ete mokolo mosusu bosembo ekozala. Yo mpe osilá kokanisa bongo? Estere alongolaki elikya te, asilikaki te, mpe abatelaki kondima na ye. Na ntango oyo esengeli, alobaki na mpiko makambo oyo ezalaki sembo, mpe atikaki Yehova asala oyo etikali. Biso mpe tosengeli kosala bongo! Yehova abongwani te, azali kaka ndenge azalaki na ntango ya Estere. Akoki kosukisa bato mabe mpe kokweisa bango na mitambo na bango moko, ndenge kaka asalaki Hamane.Tángá Nzembo 7:11-16.

Asalaki libosoliboso mpo na Yehova mpe bato na Ye

23. (a) Mbano nini mokonzi apesaki Mordekai mpe Estere? (b) Ndenge nini esakweli oyo Yakobo apesaki liboso akufa mpo na Benyamina ekokisamaki? (Talá etanda “ Esakweli moko ekokisamaki.”)

23 Nsukansuka, mokonzi ayebaki soki Mordekai azali mpenza nani; ayebaki ete azalaki kaka te moto oyo afundaki bato oyo bakanaki koboma ye, kasi azalaki mpe tata-mobɔkɔli ya Estere. Ahasueruse atyaki Mordekai ministre-mokonzi na esika ya Hamane. Mokonzi apesaki Estere ndako ya Hamane ná ebele ya bozwi na ye nyonso; mpe Estere apesaki yango na mabɔkɔ ya Mordekai.Est. 8:1, 2.

24, 25. (a) Mpo na nini Estere akokaki kotikala kimya te ata ntango mwango mabe ya Hamane eyebanaki? (b) Ndenge nini Estere atyaki lisusu bomoi na ye na likama?

 24 Sikoyo lokola Estere ná Mordekai babikaki, mama-mokonzi akitisaki nde motema? Akokaki kosala bongo soki azalaki kokanisa kaka bolamu na ye moko. Na ntango yango, mobeko oyo Hamane abimisaki ete báboma Bayuda nyonso etambolaki na mboka mobimba. Hamane abwakaki mbɛsɛ, to Pure—na ntembe te moko ya misala ya bilimo mabe—mpo na koyeba ntango malamu mpo na kokokisa mokano na ye. (Est. 9:24-26) Etikalaki naino mwa basanza, kasi mikolo yango ezalaki kopusana nokinoki. Bakolonga kopekisa likambo yango?

25 Estere atyaki lisusu bomoi na ye na likama mpo na bolamu ya basusu; akɔtaki lisusu epai ya mokonzi atako babengisaki ye te. Na mbala oyo, alelaki mpo na bato ya ekólo na ye, abondelaki mobali na ye ete alongola mobeko oyo abimisaki. Nzokande, mibeko oyo mokonzi ya Perse azalaki kobimisa ekokaki kolongolama te. (Dan. 6:12, 15) Na yango, mokonzi apesaki Estere ná Mordekai nzela ya kobimisa mobeko ya sika. Batindaki mobeko mosusu oyo epesaki Bayuda nzela ya komibatela soki balingi básala bango mabe. Bamemi-mpunda batambolaki mboka mobimba mpo na koyebisa Bayuda nsango malamu yango. Bayuda bakómaki lisusu na elikya. (Est. 8:3-16) Meká kokanisa ndenge Bayuda oyo bazalaki na ampire wana monene bazalaki kozwa bibundeli mpe komibongisa mpo na etumba, likambo oyo bakokaki kosala te soki mobeko wana ya sika  ebimaki te. Kasi, motuna ya ntina koleka yango oyo: “Yehova ya mampinga” akozala elongo na bato na ye?1 Sa. 17:45.

Estere ná Mordekai batindelaki Bayuda mikanda na ampire ya Perse mobimba

26, 27. (a) Nini emonisi ete Yehova asalisaki bato na ye bálonga mpenza banguna na bango? (b) Esakweli nini ekokisamaki ntango bana ya Hamane babomamaki?

26 Ntango mokolo yango ekokaki, bato ya ekólo ya Nzambe basilaki komilɛngɛla. Sikoyo, ata bakonzi mosusu ya Perse bakómaki na ngámbo ya Bayuda, ntango nsango etambolaki na ekólo mobimba ete Mordekai Moyuda akómi ministre-mokonzi. Yehova apesaki bato na ye elonga monene. Na ntembe te, abatelaki bato na ye mpo bányokwama te, na ndenge asukisaki banguna na bango. *Est. 9:1-6.

27 Longola yango, Mordekai akokaki kotambwisa ndako ya Hamane malamumalamu te soki bana zomi ya moto mabe yango bazali kaka na bomoi. Bango mpe babomamaki. (Est. 9:7-10) Likambo yango ekokisaki esakweli moko ya Biblia, mpamba te Nzambe asakolaki ete Baamaleke bakosila nyɛɛ, mpo bazalaki mpenza banguna ya bato na ye. (Mib. 25:17-19) Ekoki kozala ete bana ya Hamane bazalaki bato ya nsuka mpenza ya ekólo wana oyo Yehova alobaki ete ekozwa etumbu.

28, 29. (a) Mpo na nini tokoki koloba bitumba oyo Estere ná bato ya ekólo na ye babundaki ezalaki mokano ya Yehova? (b) Mpo na nini ndakisa ya Estere ezali lipamboli mpo na biso lelo oyo?

28 Atako Estere azalaki elenge, akokisaki mikumba minene, na ndakisa asalaki ete bábimisa mibeko oyo esɛngaki kobunda bitumba mpe koboma. Ezalaki pɛtɛɛ te. Kasi, mpo mokano ya Yehova ekokisama, libota na ye esengelaki kobatelama mpo ebomama te; ekólo Yisraele esengelaki kobimisa Masiya oyo alakamaki, oyo asengelaki kopesa bato nyonso elikya! (Eba. 22:18) Basaleli ya Nzambe lelo oyo bayebi ete ntango Yesu Masiya ayaki awa na mabele, apekisaki bayekoli na ye kobunda bitumba.Mat. 26:52.

29 Atako bongo, bakristo bazali na etumba ya elimo; Satana azali na ekateli makasi mpenza ya kobebisa kondima oyo tozali na yango epai ya Yehova Nzambe. (Tángá 2 Bakorinti 10:3, 4.) Ndakisa ya Estere ezali mpenza lipamboli mpo na biso! Lokola ye, tómonisa kondima; tózala na bwanya mpe motema molai mpo na kosalela mayele ya kondimisa, tómonisaka mpiko mpe tólukaka liboso bolamu ya basaleli ya Nzambe.

^ par. 26 Mokonzi abakiselaki Bayuda mokolo mosusu mpo bálonga banguna na bango malamumalamu. (Est. 9:12-14) Ata lelo oyo, Bayuda basalaka fɛti mbula na mbula mpo na kokanisa mokolo wana na sanza ya Adare, oyo ekokani na nsuka ya sanza ya mibale to na ebandeli ya sanza ya misato. Babengaka fɛti yango Purime, nkombo oyo eutá na mbɛsɛ oyo Hamane abwakaki ntango alukaki koboma bato ya Yisraele.