Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MISATO

Mabunga na ye eteyaki ye

Mabunga na ye eteyaki ye

1, 2. (a) Nini ekómelaki Yona ná bato ya masuwa? (b) Ndenge nini lisolo ya Yona ekoki kosalisa biso?

YONA alingaki mpenza makɛlɛlɛ wana makasi esila. Ezalaki kaka makɛlɛlɛ ya mopɛpɛ te, oyo ezalaki kobɛta na nsinga oyo bakangisaka masuwa soki esɛmi; ezalaki mpe kaka te mbonge makasi oyo ezalaki kobɛta masuwa mpe koningisa mabaya. Kasi, makɛlɛlɛ oyo etungisaki Yona mingi koleka ezalaki makɛlɛlɛ ya bato ya masuwa, kapitɛni ná basali na ye, ntango bazalaki kobunda mpo masuwa ezinda te. Yona amonaki ete mosika te bato wana bakokufa, mpo na foti na ye!

2 Yona akómaki na mokakatano wana ndenge nini? Asalaki libunga moko monene na miso ya Yehova, Nzambe na ye. Asalaki nini? Akokaki kobongisa eloko te? Biyano na mituna yango ekoki koteya biso makambo mingi. Na ndakisa, lisolo ya Yona ekosalisa biso tómona ete ata bato ya kondima makasi bakoki kosala mabunga; tokomona mpe oyo bakoki kosala mpo na kosembola makambo.

Mosakoli moko ya Galile

3-5. (a) Bato mingi bakanisaka kaka nini soki bayoki nkombo ya Yona? (b) Makambo nini toyebi mpo na bomoi ya Yona? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (c) Mpo na nini mosala ya Yona lokola mosakoli ezalaki pɛtɛɛ te mpe ya esengo te?

3 Ntango bato bayokaka nkombo ya Yona, mbala mingi bamonaka kaka bizaleli na ye ya mabe, na ndakisa kozanga botosi mpe motó makasi na ye. Nzokande, Yona azalaki mpe na bizaleli mingi ya malamu. Tóbosana te ete Yehova Nzambe aponaki Yona azala mosakoli na ye. Yehova akokaki te kopesa Yona mokumba monene wana soki azalaki moto ya sembo te.

Yona azalaki mpe na bizaleli ya malamu mingi

4 Biblia elobi makambo mingi te mpo na bomoi ya Yona. (Tángá 2 Bakonzi 14:25.) Azalaki moto ya Gate-efere, engumba oyo  ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ minei longwa na Nazarete, epai Yesu Kristo akolaki, mbula soki 800 na nsima. * Yona asalaki lokola mosakoli na boyangeli ya Yeroboame II, mokonzi ya Yisraele, ekólo ya mabota zomi. Eleko ya Eliya elekaki mpenza; Elisha, moto oyo azwaki esika na ye, akufaki ntango tata ya Yeroboame azalaki koyangela. Atako Yehova asalelaki bato wana mpo na kolongola losambo ya Baala, Yisraele ezongelaki lisusu losambo yango na nko. Mokonzi oyo azalaki koyangela sikoyo azalaki ‘kokoba kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.’ (2 Bak. 14:24) Na yango, mokumba ya Yona ezalaki pɛtɛɛ te mpe ya esengo te. Atako bongo, akokisaki yango na bosembo.

5 Nzokande, makambo ebongwanaki mpenza na bomoi ya Yona. Yehova apesaki ye mokumba moko mpe amonaki ete eleki mpasi. Yehova asɛngaki ye asala nini?

“Tɛlɛmá, kende na Ninive”

6. Mokumba nini Yehova apesaki Yona, mpe mpo na nini ekokaki kobangisa?

6 Yehova ayebisaki Yona boye: “Tɛlɛmá, kende na Ninive engumba monene, mpe sakwelá yango ete mabe na bango emati kino liboso na ngai.” (Yona 1:2) Ezali mpasi te tómona ntina oyo mokumba yango ekokaki kobangisa Yona. Engumba Ninive ezalaki na ɛsti, na kilomɛtrɛ soki 800, kosala mobembo tii kuna ekokaki kozwa pene na sanza mobimba na makolo. Nzokande, likambo mosusu etungisaki mingi Yona koleka kosala mobembo molai mpe ya mpasi. Na Ninive, Yona asengelaki koyebisa bitumbu oyo Yehova akatelaki bato ya Asiri, oyo bazalaki bato ya mobulu makasi mpe ya nkanza. Soki ata bato ya libota ya Nzambe bandimaki mpenza te nsango ya Yona, akokaki nde kolikya ete bapakano wana bakondima yango? Ndenge nini mosaleli kaka moko ya Yehova akokaki kosala na engumba monene wana, Ninive, oyo ekómaki kobengama “engumba oyo esopaka makila”?Nah. 3:1, 7.

7, 8. (a) Nini emonisi ete Yona akanaki kokende mosika mpenza na mokumba oyo Yehova apesaki ye? (b) Mpo na nini tosengeli te koloba ete Yona azalaki bibangabanga?

7 Toyebi te soki makanisi ya ndenge wana eyelaki Yona. Toyebi kaka ete akimaki. Yehova asɛngaki Yona akende na ɛsti; kasi ye akendeki mosika mpenza na wɛsti. Akitaki na bokula, na libongo ya engumba Yope, epai azwaki masuwa oyo ezalaki kokende na engumba Tarasisi. Bato mosusu ya mayele balobaka ete Tarasisi ezalaki na Espagne. Soki ezali bongo, boye Yona akendeki mosika mpenza,  na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 3 500 mosika na Ninive. Mobembo ya ndenge wana oyo esɛngaki kokatisa Mbu Monene ekokaki kosala ata mbula mobimba! Yona akanaki mpenza kokende mosika mpo akokisa te mokumba oyo Yehova apesaki ye!Tángá Yona 1:3.

8 Yango elingi nde koloba ete Yona azalaki bibangabanga? Tówela te koloba bongo. Ndenge tokomona yango, asalaki makambo oyo emonisaki mpiko mpenza. Kasi, ndenge moko na biso, Yona azalaki moto ya kozanga kokoka mpe azalaki kosala mabunga mingi. (Nz. 51:5) Nani na kati na biso abangá naino te?

9. Na ntango mosusu, ndenge nini tokoki komiyoka soki Yehova apesi biso mokumba moko, mpe likambo nini tosengeli kobosana te na ntango yango?

9 Na ntango mosusu tokoki komona ete makambo Nzambe asɛngi biso ezali mpasi mpenza to ete tokokoka kosala yango te. Tokoki kutu kobanga kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mokumba na biso bakristo. (Mat. 24:14) Ezali mpasi te tóbosana maloba ya ntina oyo Yesu alobaki ete: “Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.” (Mrk. 10:27) Soki ekómi ntango mosusu ete tóbosana yango, tokomona mokakatano oyo Yona azalaki na yango. Kasi, makambo nini ekómelaki Yona ntango akimaki?

Yehova asemboli mosakoli na ye oyo abungaki nzela

10, 11. (a) Mbala mosusu Yona akanisaki nini ntango masuwa etikaki libongo? (b) Masuwa mpe bato ya masuwa bakutanaki na likama nini?

10 Tómeka komona na makanisi ndenge Yona azalaki komata na masuwa wana, na ntembe te masuwa ya bato ya Fenisia oyo ememaka biloko. Azalaki kotala ndenge kapitɛni ná bato ya masuwa bazalaki kobongisa makambo nyonso liboso bálongwa na libongo. Ntango amonaki ete masuwa etiki libongo, mbala mosusu Yona akanisaki ete abiki na likama. Kasi, na mbala moko, makambo ebongwanaki.

11 Mipɛpɛ makasi ebandaki kobɛta na mbu, ematisaki mbonge makasi oyo ekokaki kozindisa ata bamasuwa ya lelo. Etikalaki kaka moke mpo masuwa wana oyo basalá na banzete ebeba mpe ebunga na kati ya mai ya mbonge oyo ezalaki makasi. Ezalaki na ntango wana nde Yona ayebaki makambo oyo akomaki na nsima ete, “Yehova atindaki mopɛpɛ moko makasi na mbu”? Toyebi te. Kasi, amonaki ndenge bato ya masuwa babandaki kobelela banzambe na bango, mpe ayebaki ete banzambe wana bakosalisa bango te. (Lev. 19:4) Biblia elobi ete “masuwa elingaki kopanzana.” (Yona 1:4) Ndenge nini Yona akokaki kobondela Nzambe oyo ye azalaki kokima?

12. (a) Mpo na nini tosengeli te kowela koloba mabe mpo na Yona ndenge alalaki ntango mopɛpɛ makasi ezalaki kobɛta? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini Yehova amonisaki ntina oyo mopɛpɛ ezalaki kobɛta makasi?

12 Lokola Yona amonaki ete akoki kosala eloko te, akitaki na  kobe ya masuwa, alalaki kuna mpe mpɔngi makasi ekangaki ye. * Kapitɛni ya masuwa amonaki Yona, alamwisaki ye, mpe asɛngaki ye abondela nzambe na ye, ndenge bato nyonso bazalaki kosala. Lokola bato ya masuwa bamonaki ete mbonge wana eutaki na bademo, babwakaki mbɛsɛ mpo na koyeba soki nani amemeli bango likama wana. Na ntembe te, motema ya Yona ezalaki kobɛta makasi ntango mbɛsɛ ezalaki koleka bato nyonso. Eumelaki te, moto yango ayebanaki. Yehova atikaki ete mbɛsɛ ekwea epai ya Yona mpe amonisaki polele ete atindaki mopɛpɛ wana mpo Yona azangaki botosi.Tángá Yona 1:5-7.

13. (a) Yona ayebisaki bato ya masuwa nini? (b) Yona asɛngaki bato ya masuwa básala nini, mpe mpo na nini?

13 Yona ayebisaki bato ya masuwa makambo nyonso. Ayebisaki bango ete azali mosaleli ya Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Azalaki kokima Nzambe yango mpe Nzambe yango asepelaki te, yango wana likama monene wana ekómelaki bango. Bato yango babangaki makasi; mpe Yona akokaki komona yango na bilongi na bango. Batunaki ye soki básala na ye nini mpo bábikisa masuwa mpe bomoi na bango. Yona alobaki nini? Mbala mosusu Yona abangaki bábwaka ye na mai wana ya malili mpe ya mabe. Kasi, ndenge nini akoki kondima ete bato wana nyonso bákufa nzokande ayebi ete akoki kobikisa bango? Na yango, ayebisaki bango boye: “Bótombola ngai mpe bóbwaka ngai na mbu, mpe mbu ekokóma nyɛɛ; mpo nayebi ete ekumbaki makasi oyo ezwi bino nde mpo na ngai.”Yona 1:12.

14, 15. (a) Ndenge nini tokoki komekola kondima ya Yona? (b) Bato ya masuwa basalaki nini na likambo oyo Yona asɛngaki?

14 Maloba ya Yona emonisi ete azalaki te moto ya bibangabanga. Na ntembe te, Yehova asepelaki mpenza ntango amonaki ndenge Yona amonisaki mpiko, mpe ndenge andimaki bábwaka ye na mai mpo basusu bábika. Awa, tomoni ete Yona azalaki na kondima makasi. Tokoki komekola ye lelo soki tozali koluka liboso bolamu ya basusu. (Yoa. 13:34, 35) Ntango tomoni moto moko oyo azangi biloko, azali na mposa ya libɔndisi, to azali na mposa básalisa ye na elimo, tomipesaka mpo na kosalisa ye? Tosepelisaka mpenza motema ya Yehova soki tosalisi bato ya lolenge wana!

15 Ekoki kozala ete bato ya masuwa bayokelaki Yona mawa, mpo na ebandeli, baboyaki kobwaka ye na mai! Na yango, basalaki nyonso oyo bakokaki mpo masuwa ezinda te, kasi esimbaki te. Mopɛpɛ ezalaki kaka kokóma makasi. Nsukansuka, bamonaki ete  likambo mosusu ya kosala ezali te. Babelelaki Yehova, Nzambe ya Yona, amonisela bango motema mawa, batombolaki Yona mpe babwakaki ye na mbu.Yona 1:13-15.

Ndenge Yona asɛngaki yango, bato ya masuwa batombolaki ye mpe babwakaki ye na mbu

Nzambe amoniseli Yona motema mawa mpe abikisi ye

16, 17. Lobelá makambo oyo elekaki ntango babwakaki Yona na mbu. (Talá mpe bililingi.)

16 Yona akitaki na kati ya mbu wana oyo ezalaki na mbonge makasi. Ekoki kozala ete asalaki makasi mpo azinda te, mpe amonaki fulufulu oyo masuwa ezalaki kosala ntango ebandaki kokende mbangumbangu. Kasi, mbonge elekaki makasi mpe ezalaki kozindisa ye. Akitaki na nse mpenza, mpe amonaki ete esili mpo na ye.

17 Na nsima, Yona ayaki kolobela ndenge azalaki koyoka na ntango wana. Akanisaki makambo ndenge na ndenge na ntango mokuse. Ayokaki mawa ndenge akomona lisusu te tempelo kitoko ya Yehova oyo ezalaki na Yerusaleme. Ayokaki lokola nde akiti mpenza na nse ya mbu, tii pene na esika bangomba ebandá, epai matiti oyo ezalaka na nse ya mai ekokaki kokanga ye. Emonanaki lokola ekozala nkunda na ye.Tángá Yona 2:2-6.

18, 19. (a) Nini ekómelaki Yona na nse ya mbu? (b) Mbisi yango ezalaki ndenge nini? (c) Nani atindaki mbisi yango? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

 18 Nzokande, eloko moko monene ya moindo ezalaki kotambola pembeni wana. Epusanaki mpenza pene na Yona. Efungolaki monɔkɔ mpe emɛlaki ye.

Yehova “atindaki mbisi moko ya monene emɛla Yona”

19 Na ntembe te, Yona amonaki ete esili. Nzokande, likambo moko ekamwisaki ye. Azalaki kaka na bomoi! Mbisi yango efinaki ye te, elyaki ye te, mpe mpema na ye ekatanaki te. Azalaki na bomoi, atako azalaki na esika oyo esengelaki mpenza kozala nkunda na ye. Mokemoke, Yona akómaki na nsɔmɔ. Na ntembe te, Yehova, Nzambe na ye, nde “atindaki mbisi moko ya monene emɛla Yona.” *Yona 1:17.

20. Libondeli oyo Yona asalaki na kati ya libumu ya mbisi monene emonisi ete azalaki moto ya ndenge nini?

20 Ntango ezalaki koleka mokemoke. Na libumu ya mbisi, na kati ya molili oyo amoná naino te, Yona akanisaki mpe abondelaki Yehova Nzambe. Tokoki koyeba makambo mingi oyo etali Yona na libondeli oyo asalaki, soki totángi mokapo ya mibale ya mokanda na ye. Emonani ete ayebaki Makomami malamu, mpo azongelaki mingi maloba ya Nzembo. Emonani mpe ete azalaki na ezaleli moko kitoko: komonisa botɔndi. Na nsuka, Yona alobaki ete: “Ngai nakopesa yo mbeka na mongongo ya matɔndi. Elako oyo nasalaki, nakokokisa yango. Lobiko ezali ya Yehova.”Yona 2:9.

21. Yona andimaki ete lobiko eutaka wapi, mpe yango ekoki koteya biso nini?

21 “Na kati ya libumu ya mbisi,” Yona andimaki ete Yehova akoki kobikisa moto esika nyonso oyo azali mpe na ntango nyonso. Ata na kati ya libumu ya mbisi yango, Yehova amonaki mosaleli na ye oyo azalaki komitungisa mpe abikisaki ye. (Yona 1:17) Kaka Yehova nde abatelaki ye na bomoi mikolo misato, butu moi na kati ya libumu ya mbisi monene. Lelo oyo,  tosengeli kobosanaka te ete “mpema na [biso] ezali na lobɔkɔ” ya Yehova Nzambe. (Dan. 5:23) Ye nde asimbi mpema mpe bomoi na biso nyonso. Tozalaka na botɔndi epai na ye? Na yango, tosengeli kotosaka ye, boye te?

22, 23. (a) Ndenge nini ezaleli ya botɔndi ya Yona emekamaki nokinoki? (b) Liteya nini tokoki kozwa epai ya Yona mpo na mabunga oyo tosalaka?

22 Bongo Yona? Botɔndi na ye etindaki ye atosa Yehova? Ɛɛ! Nsima ya mikolo misato, mbisi yango ememaki Yona tii na libongo mpe “esanzaki [ye] na mokili.” (Yona 2:10) Kanisá naino, nsima ya makambo nyonso wana, Yona abɛtaki mai te mpo akóma na libongo! Atako bongo, asengelaki sikoyo koluka nzela oyo akokende. Kasi eumelaki te, esengelaki amonisa botɔndi na ye na misala. Yona 3:1, 2, elobi boye: “Na nsima, liloba ya Yehova eyelaki Yona mbala ya mibale ete: ‘Tɛlɛmá, kende na Ninive engumba monene, mpe sakwelá yango nsango oyo nazali koyebisa yo.’” Yona akosala nini?

23 Yona akakatanaki te. Biblia elobi boye: “Bongo Yona atɛlɛmaki mpe akendaki na Ninive ndenge Yehova alobaki.” (Yona 3:3) Yona atosaki. Emonani polele ete mabunga na ye eteyaki ye. Na likambo oyo mpe, tosengeli komekola kondima ya Yona. Biso nyonso tozali bato ya masumu, biso nyonso tosalaka mabunga. (Rom. 3:23) Kasi, tolɛmbaka nzoto, to tozwaka mateya na mabunga na biso mpe tozongelaka kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe?

24, 25. (a) Lipamboli nini Yona azwaki ntango azalaki na bomoi? (b) Mapamboli nini ezali kozela Yona na mikolo ezali koya?

24 Yehova apambolaki Yona mpo na botosi na ye? Ɛɛ, apambolaki ye. Ya liboso, mbala mosusu Yona ayokaki ete bato wana ya masuwa babikaki. Mopɛpɛ makasi ekitaki ntango kaka Yona alobaki bábwaka ye na mai, mpe bato yango ya masuwa “bakómaki kobanga Yehova makasi” mpe na esika bápesa banzambe na bango ya lokuta mbeka, bapesaki nde Yehova.Yona 1:15, 16.

25 Lipamboli ya monene eyaki na nsima. Yesu amonisaki ete mikolo oyo Yona aumelaki na libumu ya mbisi monene ezalaki esakweli oyo emonisaki mikolo oyo ye moko akolekisa na nkunda, to Sheole. (Tángá Matai 12:38-40.) Ntango akosekwa mpo na bomoi awa na mabele, Yona akozala na esengo mingi ntango akoyeba ete azwaki lipamboli wana! (Yoa. 5:28, 29) Yehova akopambola mpe yo. Na ndakisa ya Yona, yo mpe okotika mabunga na yo eteya yo, okomonisa botosi mpe bolingo epai ya basusu?

^ par. 4 Koyeba ete Yona azalaki moto ya Galile ezali na ntina mingi, mpo ntango Bafarisai balobaki na ntina na Yesu, balobaki na lolendo nyonso ete: “Luká mpo omona ete ata mosakoli moko te asengeli kobima na Galile.” (Yoa. 7:52) Babongoli mingi mpe bato ya mayele na makambo ya Biblia balobaka ete Bafarisai balobaki bongo mpo na komonisa ete ata mosakoli moko te abimá to akobima na Galile, engumba oyo ezangá ntina. Soki ezali bongo, bato wana bayebaki masolo ya kala mpe bisakweli te.Yis. 9:1, 2.

^ par. 12 Libongoli ya Septante emonisi ete Yona alalaki makasi mpe ebakisi ete azalaki kokɔlɔlɔ (ronfler). Kasi, na esika tóloba ete Yona alalaki bongo mpo azalaki mafumafu, tosengeli kobosana te ete na ntango mosusu, mpɔngi makasi ekangaka nde bato oyo makambo eleki bango motó. Ntango Yesu azalaki kolekisa bangonga ya mpasi na elanga ya Getesemane, Petro, Yakobo mpe Yoane ‘balalaki mpɔngi mpo balɛmbaki na mawa.’Luka 22:45.

^ par. 19 Na monɔkɔ ya Grɛki, liloba ya Ebre oyo ebongolami na “mbisi” ezali “nyama ya nsɔmɔ ya mbu,” to “mbisi monene.” Atako tokoki mpenza te koloba na bosikisiki soki mbisi ya lolenge nini emɛlaki Yona, bato balobaka ete ba-requin ya Mbu Mediterane ezalaka minene mpe ekoki komɛla moto mobimba. Na mikili mosusu okoki kokuta ba-requin ya minene koleka; requin-baleine ekoki kokóma molai ya mɛtrɛ 15 to koleka!