Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MWAMBE

Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki

Ayikaki mpiko atako makambo ebebaki

1. Mpo na nini bato mingi na Shilo bazalaki na mawa?

SAMWELE azalaki mpe koyoka mawa lokola bato ya Shilo. Bato mingi na engumba yango bazalaki kolela. Na bandako boni kolela ya basi mpe ya bana ezalaki koyokana, oyo bayokaki ete batata, mibali, bana mpe bandeko na bango ya mibali bakozonga lisusu na ndako te? Toyebi ete basoda soki 30 000 ya Yisraele bakufaki na etumba moko ya nsɔmɔ liboso ya Bafilistia, nzokande mwa moke liboso basoda 4 000 bakufaki na etumba mosusu.1 Sa. 4:1, 2, 10.

2, 3. Makambo nini ya mpasi ememaki nsɔni na Shilo mpe esilisaki yango nkembo?

2 Makambo ya mpasi esukaki wana te. Hofini ná Finehase, bana mibale ya Nganga-nzambe monene Eli oyo bazalaki bizaleli mabe, bamemaki sanduku ya kondimana libándá ya Shilo. Sanduku yango mosantu, oyo ezalaki mbala mingi kofanda na esika oyo eleki mosantu ya tabernakle—hema oyo ezalaki lokola tempelo—ezalaki komonisa ete Nzambe azali wana. Na nsima, Bayisraele bamemaki Sanduku yango na etumba; na bozoba nyonso, bakanisaki ete ekozala lokola nkisi oyo ekosalisa bango bálonga na ndenge ya likamwisi. Kasi, Bafilistia babɔtɔlaki sanduku yango, mpe babomaki Hofini ná Finehase.1 Sa. 4:3-11.

3 Sanduku oyo eumelaki na tabernakle ya Shilo banda basiɛklɛ mingi ezalaki kokómisa esika yango mosantu. Sikoyo ezalaki lisusu te. Ntango Eli, mobange ya mbula 98, ayokaki nsango yango akweaki na ebonga na ye mpe akufaki. Bokilo na ye ya mwasi, oyo mobali akufaki kaka na mokolo yango, akufaki ntango azalaki kobota. Liboso akata motema, mwasi yango alobaki boye: “Nkembo elongwe na Yisraele mpe ekei na mboka mopaya.” Ya solo, Shilo ekozala lisusu te ndenge ezalaki.1 Sa. 4:12-22.

4. Tokolobela nini na mokapo oyo?

4 Samwele akosala nini liboso ya makambo wana ya mpasi? Akozala na kondima ya makasi mpo na kosalisa bato wana oyo Yehova azalaki lisusu kobatela te mpe kondima te? Mokomoko na biso lelo oyo, akoki kokutana na makambo ya mpasi oyo ekoki komeka kondima na ye. Na yango, tótala mateya mosusu oyo tokoki kozwa na makambo oyo ekómelaki Samwele.

 ‘Asalaki boyengebene’

5, 6. Makambo nini Biblia elobeli mingi na boumeli ya mbula wana 20, mpe Samwele azalaki kosala nini na ntango yango?

5 Na esika oyo, Biblia etiki naino kolobela Samwele, mpe ebandi kolobela Sanduku mosantu, ndenge Bafilistia banyokwamaki mpo bazwaki sanduku yango mpe ndenge esengelaki ete bázongisa yango. Biblia elobeli lisusu Samwele mbula soki 20 na nsima. (1 Sa. 7:2) Azalaki kosala nini na boumeli ya bambula wana? Biblia eyebisi biso yango.

Ndenge nini Samwele akokaki kosalisa Bayisraele báyika mpiko ntango ebele ya bato na bango bakufaki mpe ntango bazalaki komitungisa makasi?

6 Biblia elobi ete liboso na yango, “liloba ya Samwele ekobaki kokómela Yisraele mobimba.” (1 Sa. 4:1) Emonisi mpe ete nsima ya eleko yango, Samwele azalaki kokende kotala bingumba misato na Yisraele, azalaki kosala yango mbula na mbula mpo na kosilisa matata mpe kobongisa makambo. Na nsima, azalaki kozonga na ndako na ye, na Rama. (1 Sa. 7:15-17) Emonani polele ete Samwele azangaki eloko ya kosala te na boumeli ya mbula 20 wana.

Atako Biblia elobeli te makambo oyo Samwele asalaki na boumeli ya mbula 20, tokoki mpenza kondima ete akobaki kosala mingi na mosala ya Yehova

7, 8. (a) Nsango nini Samwele ayebisaki bato mbula 20 nsima ya kosala mosala makasi? (b) Bato basalaki nini lokola Samwele apesaki bango elikya?

7 Etamboli ya mbindo ya bana ya Eli ebebisaki kondima ya bato ya ekólo. Mpe bato mingi bakómaki kolanda losambo ya bikeko. Kasi, nsima ya mbula ntuku mibale ya mosala makasi, Samwele ayebisaki Bayisraele nsango oyo: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova, bólongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Ashitorete, mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye, mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”1 Sa. 7:3.

8 “Lobɔkɔ ya Bafilistia” ekómaki kilo likoló ya Bayisraele. Lokola Bafilistia balongaki basoda ya Yisraele na etumba, bakanisaki ete bakonyokola basaleli ya Nzambe ndenge balingi. Kasi, Samwele ayebisaki Bayisraele ete makambo ekoki kobongwana soki bazongeli Yehova. Bandimaki kosala yango? Samwele asepelaki ntango balongolaki bikeko na bango mpe “babandaki kosalela kaka Yehova.” Samwele ayanganisaki bato na Mizipa, engumba oyo ezalaki na bangomba na nɔrdi ya Yerusaleme. Bato bayanganaki, bakilaki bilei, mpe babongolaki motema mpo na ebele ya masumu oyo basalaki na ndenge basambelaki bikeko.Tángá 1 Samwele 7:4-6.

Ntango Bayisraele oyo babongolaki motema bayanganaki na Mizipa, Bafilistia bakanisaki ete ezali libaku malamu mpo básilisa bango

9. Bafilistia bakanisaki ete bazwi libaku nini, mpe ndenge nini Nzambe abikisaki bato na ye na likama?

9 Nzokande, Bafilistia bayokaki ete Bayisraele bayangani mpe bamonaki ete ezali libaku malamu ya kobundisa bango. Batindaki  basoda na bango na Mizipa mpo básilisa basambeli wana ya Yehova. Bayisraele bayokaki ete likama ezalaki koya. Bayokaki nsɔmɔ mpe basɛngaki Samwele abondela mpo na bango. Samwele asalaki yango mpe apesaki mbeka. Ntango azalaki kosala molulu wana mosantu, Bafilistia bayaki kobundisa Mizipa. Yehova ayanolaki na libondeli ya Samwele. Nkanda ya Yehova epelaki makasi. “Abɛtiselaki Bafilistia bankake na lokito moko makasi na mokolo yango.”1 Sa. 7:7-10.

10, 11. (a) Mpo na nini bankake oyo Yehova atindelaki basoda ya Filistia ezalaki te lokola bankake nyonso? (b) Etumba ya Mizipa esukaki ndenge nini?

10 Bafilistia yango bazalaki nde lokola bana mike oyo bakimaka na nsɔmɔ nsima ya bamama na bango ntango bayoki lokito ya nkake? Te, bazalaki basoda ya mpiko, bilombe ya etumba. Kasi, bankake wana elekaki bankake nyonso oyo bayoká. Bankake yango ezalaki makɛlɛlɛ ya “lokito makasi”? Eutaki na mapata oyo ezalaki polele, to na kati ya bangomba? Ezala ndenge nini, Bafilistia babulunganaki mpe babangaki. Na mobulungano wana, Bayisraele nde balandaki bango. Mibali ya Yisraele babimaki na Mizipa, balongaki Bafilistia, mpe balandaki bango na ntaka ya bakilomɛtrɛ ebele, tii na esika moko boye na sudi-wɛsti ya Yerusaleme.1 Sa. 7:11.

11 Etumba yango ebongolaki mpenza makambo na Yisraele. Ntango nyonso oyo Samwele azalaki mosambisi na Yisraele, Bafilistia bazalaki kokima. Basaleli ya Nzambe bazalaki kozongela bingumba nyonso oyo banguna yango bazwaki.1 Sa. 7:13, 14.

12. Na ndenge nini Samwele ‘asalaki boyengebene,’ mpe bizaleli nini esalisaki ye alonga?

12 Basiɛklɛ mingi na nsima, ntoma Paulo atángaki Samwele na molɔngɔ ya basambisi mpe basakoli ya sembo oyo “basalaki boyengebene.” (Ebr. 11:32, 33) Ya solo, Samwele asalaki makambo oyo ezalaki malamu mpe sembo na miso ya Nzambe mpe alendisaki basusu básala yango. Alongaki na makambo nyonso mpo azalaki motema molai, atyelaki Yehova motema, mpe akobaki kosala na bosembo atako makambo mosusu ezalaki kosala ye mpasi. Azalaki mpe komonisa botɔndi. Nsima ya kolonga etumba na Mizipa, Samwele atɛlɛmisaki monima moko mpo na kokanisa ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye.1 Sa. 7:12.

13. (a) Soki tolingi tómekola Samwele, bizaleli nini tosengeli kozala na yango? (b) Mpo na yo, ntango nini eleki malamu kokolisa bizaleli oyo Samwele azalaki na yango?

13 Yo mpe olingi ‘kosala boyengebene’? Soki bongo, osengeli komekola Samwele na likambo etali kozala motema molai, komikitisa  mpe komonisa botɔndi. (Tángá 1 Petro 5:6.) Nani kati na biso akolinga te kozala na bizaleli yango? Samwele asalaki malamu ndenge ayekolaki bizaleli yango mpe amonisaki yango banda bomwana, mpo esalisaki ye bambula mingi na nsima ntango akutanaki na mikakatano.

“Bana na yo batamboli na banzela na yo te”

14, 15. (a) Likambo nini ya mpasi Samwele akutanaki na yango ntango “akómaki mobange”? (b) Samwele azalaki kokanga miso na mabe ya bana na ye lokola Eli? Limbolá.

14 Biblia ezongelaki kolobela lisusu Samwele ntango “akómaki mobange.” Na ntango yango, Samwele azalaki na bana mibali mibale ya mikóló, Yoele ná Abiya, mpe apesaki bango mokumba ya kosalisa ye na mosala ya kosambisa makambo. Kasi, likambo ya mawa, amikosaki. Atako Samwele azalaki moto ya sembo mpe moyengebene, bana na ye basalelaki mikumba na bango mpo na koluka matomba na bango moko; bazalaki kopɛngwisa lisambisi mpe bazalaki kozwa kanyaka.1 Sa. 8:1-3.

15 Mokolo moko, bankumu ya Yisraele bamilelaki epai ya Samwele, mosakoli oyo akómaki mobange. Balobaki boye: “Bana na yo batamboli na banzela na yo te.” (1 Sa. 8:4, 5) Samwele ayebaki likambo yango? Biblia elobi te. Kasi, na bokeseni na Eli, Samwele  azalaki te tata oyo akangaka miso na mabe ya bana. Yehova apamelaki Eli mpe apesaki ye etumbu mpo azalaki kosembola bana na ye te na mabe oyo bazalaki kosala mpe azalaki kozwa bango na valɛrɛ mingi koleka Nzambe. (1 Sa. 2:27-29) Yehova amonaki libunga ya ndenge wana te epai ya Samwele.

Ndenge nini Samwele asalaki mpo alɛmba nzoto te ntango bana na ye bakómaki kosala mabe?

16. Baboti oyo bana na bango bazali batomboki bayokaka ndenge nini, mpe ndenge nini baboti bakoki kozwa mwa libɔndisi mpe toli na ndakisa ya Samwele?

16 Biblia eyebisi te soki Samwele ayokaki nsɔni, amitungisaki, to alɛmbaki nzoto ntango ayokaki ete bana na ye bazali na etamboli ya mabe. Kasi, baboti bakoki koyeba ndenge Samwele amiyokaki. Na mikolo oyo ya mabe, bana mingi bazali kotombokela baboti mpe koboya kotosa disiplini. (Tángá 2 Timote 3:1-5.) Baboti oyo bazali komitungisa mpo na likambo ya bongo, bakoki kozwa mwa libɔndisi mpe toli na ndakisa ya Samwele. Samwele atikaki ata moke te ete ezaleli mabe ya bana na ye ebebisa etamboli na ye. Kobosana te ete ata soki maloba mpe disiplini esimbi te bana oyo mitema na bango ekómá makasi, ndakisa ya baboti ekoki koteya bana. Mpe baboti basengeli kokoba kosepelisa Tata na bango, Yehova Nzambe—ndenge Samwele asalaki.

“Tyelá biso mokonzi”

17. Mikóló ya Yisraele basɛngaki Samwele nini, mpe ndenge nini ye atalelaki likambo yango?

17 Bana ya Samwele bayebaki te makambo oyo lokoso mpe moimi na bango ekomema. Mikóló ya Yisraele balobaki lisusu na Samwele ete: “Sikoyo, tyelá biso mokonzi mpo asambisaka biso lokola bikólo nyonso.” Samwele amonaki ete baboyi nde ye? Mpo ye nde asambisaki bato mpo na Yehova banda bambula mingi. Sikoyo, balingaki lisusu te kozala kaka na mosakoli mpamba lokola Samwele; balingaki nde mokonzi oyo akozala mosambisi na bango. Bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango ezalaki na bakonzi, mpe Bayisraele balingaki bázala na mokonzi lokola bango! Ndenge nini Samwele atalelaki likambo yango? Biblia elobi ete “likambo yango emonanaki mabe” na miso ya Samwele.1 Sa. 8:5, 6.

18. Ndenge nini Yehova akitisaki Samwele motema, mpe ndenge nini amonisaki ete Yisraele esali lisumu moko monene?

18 Tóyoka eyano oyo Yehova apesaki Samwele ntango ayebisaki ye likambo na libondeli: “Yoká mongongo ya bato oyo na makambo nyonso oyo bazali koloba na yo; mpamba te baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.” Maloba yango ekitisaki Samwele motema; kasi ezaleli oyo bato wana bamonisaki, ezalaki mpenza kozanga limemya epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso! Yehova ayebisaki mosakoli na ye ayebisa Bayisraele mikakatano oyo ekokómela bango soki bazali na mokonzi oyo azali moto. Samwele ayebisaki bango yango, kasi batingamaki kaka ete: “Te, mokonzi nde  ayangela biso.” Lokola azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe na ye, Samwele akendaki mpe atyaki mokonzi oyo Yehova aponaki mafuta.1 Sa. 8:7-19.

19, 20. (a) Ndenge nini Samwele atosaki etinda oyo Yehova apesaki ye ya kotya Saulo mafuta mpo azala mokonzi na Yisraele? (b) Ndenge nini Samwele akobaki kosalisa basaleli ya Yehova?

19 Kasi, ndenge nini Samwele atosaki? Asalaki yango na nkanda to tiká kaka asala? Atikaki nde ete mikakatano ebebisa motema na ye, mpe atikaki nzela nkanda ezwa misisa na motema? Bato mingi bakoki kosala bongo soki bakutani na likambo ya ndenge wana, kasi Samwele asalaki bongo te. Atyaki Saulo mafuta mpe andimaki ete Yehova nde aponi ye. Apwɛpwaki Saulo, mpo na komonisa ete ayambi ye malamu mpe ete andimi mokonzi yango ya sika. Mpe alobaki na bato ete: “Bomoni moto oyo Yehova aponi, ete moto moko te azali lokola ye kati na bato nyonso?”1 Sa. 10:1, 24.

20 Samwele alandaki mabunga ya Saulo te, kasi nde makambo ya malamu oyo ezalaki epai ya moto yango oyo Yehova aponaki. Ye moko alukaki nde kobatela bosembo na ye epai ya Nzambe na esika ya koluka ete bato ya bongolabongola bándima ye. (1 Sa. 12:1-4) Akokisaki mpe mokumba na ye na bosembo nyonso: azalaki kokebisa bato mpo na makambo oyo ekokaki kobebisa boyokani na bango ná Nzambe mpe kolendisa bango bátikala sembo epai ya Yehova. Batoli na ye esimbaki mitema na bango, mpe basɛngaki Samwele abondela mpo na bango. Apesaki bango eyano ya malamu; alobaki na bango boye: “Nakoki kokanisa ata moke te kosalela Yehova lisumu na kotikáká kobondela mpo na bino; mpe nasengeli koteya bino nzela ya malamu mpe ya sembo.”1 Sa. 12:21-24.

Ndakisa ya Samwele ezali kosalisa biso tóbosana te ete tosengeli soki moke te kotika zuwa mpe likunya ezwa misisa na motema na biso

21. Ndenge nini ndakisa ya Samwele ekoki kosalisa yo ntango olingi kolɛmba nzoto mpo bapesi moto mosusu mokumba moko boye?

21 Esilá kokómela yo olɛmba nzoto mpo bapesi moto mosusu mokumba moko boye? Ndakisa ya Samwele ezali mpenza kosalisa biso tóbosana te ete tosengeli soki moke te kotika zuwa to likunya ezwa misisa na motema na biso. (Tángá Masese 14:30.) Nzambe akoki kopesa mosaleli na ye mokomoko ya sembo mosala ya malamu mpe oyo ekopesa ye esengo.

“Okolela Saulo kino ntango nini?”

22. Mpo na nini Samwele asalaki malamu ndenge alukaki komona liboso makambo ya malamu epai ya Saulo?

22 Samwele asalaki malamu ndenge alukaki komona makambo  ya malamu epai ya Saulo. Saulo azalaki mobali mpenza. Azalaki molai mpe engambe, azalaki mobali ya mpiko mpe mayele mingi; atako bongo na ebandeli azalaki na komikitisa. (1 Sa. 10:22, 23, 27) Longola nyonso wana, azalaki na bonsomi ya kopona lolenge ya bomoi oyo alingi kozala na yango mpe kozwa bikateli oyo alingi. (Mib. 30:19) Asalelaki likabo yango malamu?

23. Ezaleli nini ya malamu mingi Saulo abungisaki libosoliboso, mpe ndenge nini atikaki lolendo ekóma makasi?

23 Likambo ya mawa, ntango moto akómi na bokonzi, mbala mingi ezaleli ya liboso oyo abungisaka ezali komikitisa. Eumelaki te, Saulo akómaki lolendo. Akómaki koboya kotosa mitindo ya Yehova oyo Samwele apesaki ye. Mokolo moko, Saulo akómaki motema likoló mpe atumbaki mbeka, likambo oyo Samwele nde asengelaki kosala. Samwele apamelaki ye makasi, mpe asakolaki ete bokonzi ekolongwa na libota ya Saulo. Na esika azwa liteya na disiplini oyo azwaki, Saulo akolisaki nde ezaleli ya kozanga botosi mpe akómaki kosala makambo ya mabe koleka.1 Sa. 13:8, 9, 13, 14.

24. (a) Ndenge nini Saulo azangaki botosi epai ya Yehova na etumba ná Baamaleke? (b) Saulo asalaki nini ntango bapamelaki ye, mpe ekateli nini Yehova azwaki?

24 Na nzela ya Samwele, Yehova ayebisaki Saulo abundisa Baamaleke. Na malako oyo Yehova apesaki, asɛngaki mpe ete báboma Agage, mokonzi mabe ya Baamaleke. Nzokande, Saulo abikisaki Agage mpe atikaki biloko ya motuya oyo bapunzaki, oyo esengelaki kobebisama. Ntango Samwele ayaki mpo na kosembola ye, Saulo amonisaki polele ete akómi mabe mpenza. Na esika amikitisa mpe andima mpamela, alukaki komilongisa mpe kobwaka foti epai ya bato ya ekólo. Ntango Saulo azalaki koluka kokima disiplini na ndenge azalaki koloba ete bazwaki biloko mosusu mpo na kopesa Yehova mbeka, Samwele alobaki na ye ete: “Talá! Kotosa eleki mbeka.” Na mpiko nyonso, Samwele apamelaki Saulo mpe amonisaki polele ekateli ya Yehova: Bokonzi ekolongwa epai ya Saulo mpe ekopesama na moto mosusu ya malamu koleka. *1 Sa. 15:1-33.

25, 26. (a) Mpo na nini Samwele alelaki mpo na Saulo, mpe ndenge nini Yehova apamelaki mosakoli na Ye na boboto? (b) Liteya nini Samwele azwaki ntango akendaki na ndako ya Yese?

25 Samwele atungisamaki mingi mpo na masumu ya Saulo. Ayebisaki  Yehova likambo yango na libondeli butu mobimba. Kutu, alelaki mpo na Saulo. Samwele amonaki ete Saulo akoki kosala makambo mingi, amonaki ete azali moto malamu; sikoyo bilikya nyonso oyo azalaki na yango ekendaki na mai. Moto oyo ayebaki abongwanaki—abungisaki bizaleli na ye nyonso ya malamu mpe apesaki Yehova mokɔngɔ. Samwele aboyaki ata komona lisusu elongi ya Saulo. Kasi, na boboto nyonso, Yehova apamelaki Samwele na maloba oyo: “Okolela Saulo kino ntango nini, awa ngai naboyi ye azala mokonzi ya Yisraele? Tondisá liseke na yo na mafuta mpe kende. Nakotinda yo epai ya Yese, moto ya Beteleme, mpamba te namizweli mokonzi kati na bana na ye ya mibali.”1 Sa. 15:34, 35; 16:1.

26 Mpo Yehova akokisa mokano na ye, alandaka te bato ya kozanga kokoka, mpo lelo bakoki kozala sembo mpe lobi bakwei. Soki moto moko azali lisusu sembo te, Yehova akopona moto mosusu mpo na kokokisa mokano na Ye. Samwele, mosakoli wana oyo akómaki mokóló atikaki kolela Saulo. Na litambwisi ya Yehova, Samwele akendeki na ndako ya Yese na Beteleme, epai akutaki bana na ye ya mibali, oyo misusu bazalaki bingambe. Kasi, kobanda na mwana ya liboso, Yehova ayebisaki Samwele atala kaka nzoto te. (Tángá 1 Samwele 16:7.) Nsukansuka, Samwele akutanaki na Davidi, mwana ya nsuka, mpe ye nde moto Yehova aponaki!

Samwele amonaki ete Yehova azali na nguya ya kosilisa mokakatano ya lolenge nyonso, to kobongola yango ekóma likambo ya esengo

27. (a) Nini esalaki ete kondima ya Samwele ekóma makasi koleka? (b) Okanisi nini mpo na ndakisa oyo Samwele atiká?

27 Na nsuka ya bomoi na ye, Samwele amonaki lisusu polele ete Yehova azalaki na elonga ndenge atyaki Davidi mokonzi na esika ya Saulo. Saulo akómaki koyokela Davidi zuwa, alukaki koboma ye mpe akómaki mopɛngwi. Nzokande, Davidi amonisaki bizaleli ya malamu mpenza lokola mpiko, bosembo, kondima mpe boyengebene. Ata ntango Samwele azalaki kokende na kokufa, kondima na ye ezalaki nde kokóma makasi. Amonaki ete Yehova azali na nguya ya kosilisa mokakatano ya lolenge nyonso, to kobongola yango ekóma likambo ya esengo. Nsukansuka, Samwele akufaki ntango azalaki na mbula soki 100; atikaki nkombo malamu. Tokoki kokamwa te ete Bayisraele nyonso balelaki moto wana ya sembo! Lelo oyo mpe, mosaleli nyonso ya Yehova asengeli komituna boye: ‘Nakomekola kondima ya Samwele?’

^ par. 24 Samwele ye moko abomaki Agage. Esengelaki te komonisela mokonzi yango ná libota na ye motema mawa. Basiɛklɛ mingi na nsima, moko ya bakitani ya Agage, “Hamane Moagage,” alukaki kosilisa basaleli nyonso ya Nzambe.Est. 8:3; talá mokapo 15 mpe 16 ya buku oyo.