Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MIBALE

Nzambe na ye abɔndisaki ye

Nzambe na ye abɔndisaki ye

1, 2. Makambo minene nini esalemaki mokolo wana na bomoi ya Eliya?

ELIYA azalaki kopota mbangu na nse ya mbula, ntango mapata ezalaki kaka koyinda. Nzela ya kokende tii na Yizireele ezalaki molai, mpe azalaki elenge te. Kasi, apotaki mbangu kozanga kolɛmba, mpo “lobɔkɔ ya Yehova” ezalaki likoló na ye. Na ntembe te azalaki na nguya oyo ayokaki naino te liboso. Kutu, alekaki bampunda oyo ezalaki kobenda likalo ya Mokonzi Ahaba!Tángá 1 Bakonzi 18:46.

2 Sikoyo nzela mobimba etikalaki mpo na ye. Meká komona na makanisi ndenge Eliya azali kopota mbangu mpe kofina miso mpo mai ya mbula ekɔta ye na miso te, mpe azali kokanisa makambo minene oyo esalemaki mokolo wana na bomoi na ye. Na ntembe te, ezalaki mpenza elonga monene mpo na Yehova, Nzambe ya Eliya, mpe mpo na losambo ya solo. Ngomba Karamele, epai Yehova asalelaki Eliya mpo akweisa losambo ya Baala na ndenge ya likamwisi, etikalaki mosika; ezalaki komonana lisusu te mpo molili mpe mipɛpɛ ezalaki makasi. Eliya amonisaki lokuta ya basakoli ebele ya Baala mpe babomamaki mpo na mabe na bango. Na nsima, Eliya abondelaki Yehova mpo elanga, oyo enyokolaki bato mbula misato na nsanza motoba, esila. Mbula enɔkaki!1 Bak. 18:18-45.

3, 4. (a) Ekoki kozala mpo na bantina nini Eliya akómaki na elikya makasi ntango azalaki kokende na Yizireele? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Ntango Eliya azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 30 na nse ya mbula mpo na kokende na Yizireele, mbala mosusu akanisaki ete lokola basakoli ya Baala babomami, sikoyo makambo ebongwani. Akanisaki ete Ahaba akobongwana! Akanisaki ete makambo nyonso oyo Ahaba amonaki, esengelaki mpenza kotinda ye atika losambo ya Baala, apekisa mwasi na ye Yezabele kosala mabe, mpe atika konyokola basaleli ya Yehova.

“Eliya . . . apotaki mbangu liboso ya Ahaba tii na Yizireele”

4 Ntango tozali komona ete makambo ezali kotambola ndenge tokanisaki, mbala mingi tokómaka na elikya. Tokoki kokanisa ete bomoi na biso ekobonga ntango nyonso; tokoki kutu kokanisa ete sikoyo mikakatano na biso esili libela. Soki Eliya akanisaki bongo, tokoki kokamwa te mpo “azalaki moto lokola biso.” (Yak. 5:17) Nzokande, mikakatano ya Eliya esilaki te. Kutu, na nsima, Eliya akómaki kobanga makasi, komitungisa mingi, mpe akómaki kolinga akufa.  Nini esalemaki? Mpe ndenge nini Yehova asalisaki mosakoli na ye azongela kondima mpe mpiko na ye? Tótala.

Makambo ebongwani na mbalakaka

5. Nsima ya makambo oyo esalemaki na Ngomba Karamele, Ahaba akómaki nde kotosa Yehova, mpe ndenge nini toyebi yango?

5 Ntango Ahaba akómaki na ndako na ye na Yizireele, amonisaki nde ete abongwani? Biblia elobi: “Ahaba ayebisaki Yezabele makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge abomaki basakoli yango nyonso na mopanga.” (1 Bak. 19:1) Simbá ete ntango Ahaba azalaki koyebisa Yezabele makambo oyo elekaki mokolo wana, alobelaki ata Yehova te, Nzambe ya Eliya. Lokola Ahaba azalaki kobanga Nzambe te, amonaki ete makamwisi oyo esalamaki na mokolo wana eutaki epai ya moto; alobaki ete ezali makambo oyo “Eliya asalaki.” Emonani polele ete makambo wana eteyaki ye te mpo akóma kobanga Yehova Nzambe. Mwasi na ye Yezabele, oyo azangá mawa, asalaki nini?

6. Nsango nini Yezabele atindelaki Eliya, mpe elingaki koloba nini?

6 Yezabele adasukaki mpenza! Na nkanda wana makasi, atindelaki Eliya nsango oyo: “Tiká banzambe básala bongo mpe bábakisa yango, soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!” (1 Bak. 19:2) Maloba wana emonisaki ete akanaki mpenza koboma Eliya. Mpo na kozongisa mabe mpo na basakoli ya Baala, Yezabele alapaki ndai ete ye moko asengeli kokufa soki abomisi Eliya te liboso ete mokolo oyo elandaki esila. Meká komona na makanisi ndenge Eliya alali na mwa ndako na ye na Yizireele na butu wana oyo mbula ezalaki kobɛta, mpe ndenge momemi-nsango ya mwasi ya mokonzi alamwisi ye kaka mpo na koyebisa ye nsango wana ya mabe. Nsango yango esalaki ye nini?

Alɛmbaki nzoto mpe abangaki makasi

7. Makaneli ya Yezabele esalaki Eliya nini, mpe asalaki nini?

7 Soki Eliya akanisaki ete etumba ná losambo ya Baala esilaki, amonaki mbala moko ete amikosaki. Yezabele alɛmbaki te. Basakoli mosusu mingi ya sembo basilaki kobomama mpo na Yezabele, mpe emonani lokola ete mbala oyo, ekozala ngala ya Eliya. Makaneli wana ya Yezabele esalaki Eliya nini? Biblia elobi ete: “Abangaki.” Eliya akomaki nde komona na makanisi lolenge ya nsɔmɔ oyo Yezabele akoboma ye? Soki ezali bongo, tokoki kokamwa te ete mpiko na ye esilaki. Ezala ndenge nini, Eliya “abandaki kokima mpo na kobikisa molimo na ye,” to bomoi na ye.1 Bak. 18:4; 19:3.

Soki tolingi ete tóbatela mpiko na biso, tosengeli te kokanisakanisa makama oyo elingi kokómela biso

8. (a) Ndenge nini likambo oyo ekómelaki Eliya ekómelaki mpe Petro? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Eliya mpe Petro?

8 Longola Eliya, basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe mpe babangaki. Bambula mingi na nsima, ntoma Petro mpe abangaki lokola  Eliya. Na ndakisa, ntango Yesu abengaki Petro atambola na mai mpo akóma esika oyo azalaki, ntoma yango ‘amonaki ete mopɛpɛ ezali makasi.’ Na nsima, abangaki mpe abandaki kozinda. (Tángá Matai 14:30.) Na yango, ndakisa ya Petro mpe Eliya epesi biso liteya moko ya ntina mingi. Soki tolingi ete tóbatela mpiko na biso, tosengeli te kokanisakanisa makama oyo elingi kokómela biso. Tosengeli kotya makanisi na biso epai ya Moto oyo apesaka biso elikya mpe makasi.

“Ekoki!”

9. Lobelá mobembo oyo Eliya asalaki mpe makanisi oyo azalaki na yango ntango azalaki kokima.

9 Lokola azalaki kobanga, Eliya akimaki na Beere-sheba, engumba oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ 150 na sudi-wɛsti, mosika te na ndelo ya Yuda na ngámbo ya sudi. Kuna, atikaki mosaleli na ye mpe akendaki ye moko na esobe. Biblia elobi ete asalaki “mobembo ya mokolo moko;” mbala mosusu abandaki mobembo yango na ntɔngɔ makasi, mpe emonani ete amemaki ata eloko ya kolya te. Lokola atungisamaki makasi mpe azalaki kobanga, azalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na nse ya moi makasi na esobe wana ya mabemabe epai bato bazalaka te. Ntango moi makasi ebandaki kokita mokemoke mpe butu ekómaki kokɔta, makasi nyonso ya Eliya esilaki. Lokola alɛmbaki mpenza, afandaki na nse ya nzete moko ya letama—esika kaka moko oyo akokaki kopema na kati ya esobe wana.1 Bak. 19:4.

10, 11. (a) Libondeli oyo Eliya asalaki ezalaki na ndimbola nini? (b) Na lisalisi ya bavɛrsɛ, lobelá basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe oyo balɛmbaki mpenza nzoto.

10 Na kati ya mawa na ye, Eliya abondelaki Yehova. Asɛngaki ete akufa. Alobaki ete: “Naleki bankɔkɔ na ngai te.” Ayebaki ete bankɔkɔ na ye bakómá putulu mpe mikuwa mpamba na lilita; bakokaki kosalisa moto te. (Mos. 9:10) Eliya amonaki ete azali na ntina te. Yango wana, agangaki ete: “Ekoki!” Mpo na nini kozala na bomoi?

11 Tosengeli kokamwa ete mosaleli ya Nzambe alɛmbaki nzoto makasi ndenge wana? Mpenza te. Biblia elobeli mibali mpe basi ebele ya sembo oyo bayokaki mawa mpe basɛngaki ete bákufa, na ndakisa Rebeka, Yakobo, Moize, mpe Yobo.Eba. 25:22; 37:35; Mit. 11:13-15; Yobo 14:13.

12. Soki ekómi ete olɛmba nzoto, na likambo nini osengeli kolanda ndakisa ya Eliya?

12 Lokola tozali na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano,” tokoki kokamwa te ntango mosusu bato mingi, ata mpe  basaleli ya Nzambe ya sembo, bálɛmba mpenza nzoto. (2 Tim. 3:1) Soki likambo ya ndenge wana ekómeli mpe yo, landá ndakisa ya Eliya: Yebisá Nzambe mitungisi na yo. Kutu, Yehova azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso.” (Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.) Abɔndisaki Eliya?

Yehova asungaki mosakoli na ye

13, 14. (a) Na nzela ya anzelu moko, ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki mpenza komibanzabanza mpo na mosakoli na ye wana oyo azalaki na mpasi? (b) Mpo na nini koyeba ete Yehova ayebi makambo na biso nyonso, ata mpe esika makasi na biso esuki, ezali likambo ya kobɔndisa?

13 Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini ntango amonaki mosakoli na ye oyo alingaki mingi alali na nse ya nzete wana na esobe mpe azali kosɛnga ete akufa? Eyano ezali polele. Ntango Eliya alalaki, Yehova atindelaki ye anzelu. Anzelu yango asimbaki Eliya, alamwisaki ye na boboto mpe alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, lyá.” Eliya asalaki yango, mpo anzelu apesaki ye mwa limpa ya mɔtɔ mpe mai ya komɛla. Eliya apesaki anzelu yango mersi? Lisolo elobi kaka ete mosakoli alyaki, amɛlaki mpe azongaki na mpɔngi. Alɛmbaki nde mingi yango wana akokaki koloba te? Ezala bongo to te, anzelu alamwisaki ye mpo na mbala ya mibale, mbala mosusu na ntɔngɔntɔngɔ. Na mbala yango mpe, alobaki na Eliya ete: “Tɛlɛmá, lyá,” mpe abakisaki maloba oyo ete, “mpo mobembo na yo ekozala mpasi mingi.”1 Bak. 19:5-7.

14 Na lisalisi ya bososoli oyo Nzambe apesaki ye, anzelu yango ayebaki esika Eliya azalaki kokende. Ayebaki mpe ete mobembo ekozala mpasi mingi mpe Eliya akokoka kosala yango na makasi na ye moko te. Ezali mpenza esengo kosalela Nzambe oyo ayebi malamu koleka mikano na biso mpe esika oyo makasi na biso esuki! (Tángá Nzembo 103:13, 14.) Biloko oyo Eliya alyaki esalisaki ye ndenge nini?

15, 16. (a) Bilei oyo Yehova apesaki Eliya esalisaki ye na nini? (b) Mpo na nini tosengeli kosepela na lolenge oyo Yehova asungaka basaleli na ye lelo?

15 Biblia elobi boye: “Atɛlɛmaki, alei mpe amɛli, mpe na nguya ya biloko oyo alyaki, atambolaki mikolo ntuku minei (40) butu moi tii na Horebe, ngomba ya Nzambe ya solo.” (1 Bak. 19:8) Ndenge moko na Moize oyo azalaki na bomoi mbula soki 600 liboso na ye, mpe Yesu oyo azalaki na bomoi mbula pene na 1 000 nsima na ye, Eliya akilaki bilei mikolo 40. (Kob. 34:28; Luka 4:1, 2) Biloko wana oyo alyaki esilisaki mikakatano na ye nyonso te, kasi epesaki ye makasi na ndenge ya likamwisi. Kanisá naino ndenge mobange wana azalaki kotambola malɛmbɛmalɛmbɛ na esobe oyo ezalaki ata na nzela te, mokolo na mokolo, pɔsɔ na pɔsɔ, pene na sanza mobimba na ndambo!

16 Lelo oyo mpe Yehova asungaka basaleli na ye; apesaka bango bilei ya mosuni na ndenge ya likamwisi te, kasi asalaka yango na  lolenge moko ya malamu koleka. Apesaka basaleli na ye bilei ya elimo. (Mat. 4:4) Koyekola makambo ya Nzambe na Liloba na ye mpe na mikanda ya moombo ya sembo esalisaka biso tókoba kosalela ye. Kolya bilei ya elimo ekoki kolongola mikakatano na biso nyonso te, kasi ekoki kosalisa biso tóyika mpiko na makambo oyo tozalaki komona ete tokokoka te. Ezali mpe komema na “bomoi ya seko.”Yoa. 17:3.

17. Eliya akendaki wapi, mpe mpo na nini ezalaki esika moko ya ntina mingi?

17 Eliya atambolaki kilomɛtrɛ soki 320, mpe akómaki na Ngomba Horebe. Ezalaki esika moko ya ntina mingi, mpo kuna nde Yehova Nzambe abimelaká Moize na nzela ya anzelu moko na kati ya mwa nzete ya nzubɛ oyo ezalaki kopela mɔtɔ; ezalaki mpe kuna nde Yehova asalaki na nsima Kondimana ya Mibeko ná Yisraele. Eliya amibombaki na mobenga.

Ndenge Yehova apesaki mosakoli na ye makasi

18, 19. (a) Anzelu oyo Yehova atindaki atunaki motuna nini, mpe Eliya azongisaki eyano nini? (b) Eliya alobelaki makambo nini misato oyo elɛmbisaki ye nzoto?

18 Yehova atindelaki Eliya nsango ntango azalaki na mobenga na Horebe, mpe emonani ete asalelaki anzelu. Anzelu yango atunaki Eliya boye: “Eliya, ozali kosala nini awa?” Na ntembe te, atunaki motuna yango na boboto, mpo Eliya amonaki ete azwi libaku ya koloba ndenge azali komiyoka. Mpe alobaki makambo nyonso oyo azalaki na yango! Alobaki boye: “Nayoki zuwa mpenza mpo na Yehova Nzambe ya mampinga; mpo bana ya Yisraele batiki kondimana na yo, babuki bitumbelo na yo, mpe babomi basakoli na yo na mopanga, bongo natikali kaka ngai moko; mpe babandi koluka molimo na ngai mpo bálongola yango.” (1 Bak. 19:9, 10) Maloba ya Eliya emonisaki makambo soki misato oyo elɛmbisaki ye nzoto.

19 Ya liboso, Eliya amonaki ete asalaki mosala ya mpunda. Atako asalelaki Yehova na “zuwa mpenza” na boumeli ya bambula na ndenge atyaki nkombo mosantu ya Nzambe mpe losambo na ye na esika ya liboso, Eliya amonaki ete makambo ezalaki se kobeba. Bato bamonisaki kaka kondima te mpe bazalaki kaka kotomboka, mpe losambo ya lokuta ezalaki se kopalangana. Ya mibale, Eliya amonaki ete azali kaka ye moko. Alobaki boye: “Natikali kaka ngai moko,” lokola nde azalaki moto ya nsuka oyo azalaki naino kosalela Yehova na ekólo yango mobimba. Ya misato, Eliya azalaki kobanga. Baninga na ye mingi basakoli basilaki kobomama, mpe amonaki ete etikali sikoyo ngala na ye. Mbala mosusu ezalaki pɛtɛɛ te Eliya amonisa ndenge azalaki komiyoka, kasi atikaki te lolendo to nsɔni ezongisa ye nsima. Lokola afungwelaki Nzambe na ye motema na libondeli, atiká ndakisa ya malamu mpo na bato nyonso ya sembo.Nz. 62:8.

20, 21. (a) Lobelá makambo oyo Eliya amonaki na porte ya mobenga na Ngomba Horebe. (b) Ndenge Yehova amonisaki nguya na ye eteyaki Eliya nini?

 20 Yehova asalaki nini ntango Eliya abangaki mpe amitungisaki? Anzelu ayebisaki Eliya atɛlɛma na porte ya mobenga. Eliya atosaki, atako ayebaki te nini elingaki kosalema. Mopɛpɛ moko makasi ebɛtaki! Na ntembe te esalaki makɛlɛlɛ makasi, mpo ezalaki makasi mingi mpe epasolaki bangomba mpe ebukaki mabanga minene. Meká komona na makanisi ndenge Eliya azali koluka kobomba elongi na ye mpe kokanga elamba na ye ya nsuki ya nyama oyo ezalaki kopumbwa ntango mopɛpɛ ezali kobɛta. Esɛngaki mpe apika makolo na ye, mpo mabele ezalaki koningana na esika oyo azalaki! Ntango kaka alingaki kokóma mwa kimya, mɔtɔ makasi elekaki wana, oyo ezongisaki ye na kati ya mobenga mpo na komibatela.1 Bak. 19:11, 12.

Yehova asalelaki nguya na ye monene mpo na kopesa Eliya makasi

21 Biblia eyebisi biso ete Yehova azalaki na kati ya mopɛpɛ te, ya koningana ya mabele te, na kati ya mɔtɔ mpe te. Eliya ayebaki ete Yehova azali te nzambe moko oyo azalaki na kati ya biloko oyo ekelamá, lokola Baala, oyo basambeli na ye oyo bakosamaki bazalaki koloba ete azali “nkolo mapata,” elingi koloba anɔkisaka mbula. Yehova nde akelá biloko nyonso ya nguya oyo ezali na molɔ́ngɔ́, kasi azali mpe monene koleka biloko nyonso oyo akelá. Ata likoló oyo tomonaka ekoki kokoka ye te! (1 Bak. 8:27) Ndenge nini makambo nyonso wana esalisaki Eliya? Kobosana te ete azalaki kobanga. Lokola Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azalaki elongo na ye, Eliya asengelaki soki moke te kobanga Ahaba ná Yezabele!Tángá Nzembo 118:6.

22. (a) Ndenge nini “mongongo ya kimya, ya nse” emonisaki Eliya ete azali te moto azangá ntina? (b) Mbala mosusu “mongongo ya kimya, ya nse” ezalaki ya nani? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

22 Ntango mɔtɔ elekaki, kimya ekɔtaki mpe Eliya ayokaki “mongongo moko ya kimya, ya nse.” Esɛngaki Eliya aloba lisusu makambo oyo azali na yango na motema; asalaki yango, abimisaki mitungisi na ye mpo na mbala ya mibale. * Mbala mosusu ekitisaki ye lisusu motema. Kasi, na ntembe te, Eliya abɔndisamaki mingi koleka na makambo oyo mongongo wana elobaki na ye. Yehova amonisaki Eliya ete azali te moto oyo azangá ntina. Ndenge nini? Nzambe amonisaki makambo oyo azali kokana kosala  mpo na kolongola losambo ya Baala na Yisraele. Ya solo, mosala ya Eliya ezalaki ya mpunda te, mpo Nzambe akanaki kaka kolongola losambo ya Baala. Lisusu, Yehova akokoba kaka kosalela mosakoli Eliya, mpo apesaki ye lisusu mokumba moko ná malako ya sikisiki.1 Bak. 19:12-17.

23. Makambo nini mibale Yehova asalaki mpo na kosalisa Eliya atika komona ete azali kaka ye moko?

23 Eliya azalaki mpe komona ete azali kaka ye moko; Yehova asalaki nini mpo na yango? Asalaki makambo mibale. Ya liboso, ayebisaki Eliya atya Elisha mafuta mpo akokóma mosakoli nsima na ye. Elenge mobali yango akómaki kosala elongo na Eliya mpe asungaki ye na boumeli ya bambula mingi. Likambo yango ebɔndisaki mpenza Eliya! Ya mibale, Yehova ayebisaki ye likambo moko ya esengo ete: “Natiki bato nkóto nsambo (7 000) na Yisraele, baoyo nyonso mabɔlɔngɔ na bango efukameli Baala te, mpe baoyo nyonso monɔkɔ na bango epwɛpwi ye te.” (1 Bak. 19:18) Eliya azalaki ye moko te. Na ntembe te, asepelaki mpenza koyoka ete ezalaki na bankóto ya bato ya sembo oyo baboyaki kosambela Baala. Bazalaki na mposa ete Eliya akoba na bosembo nyonso na mosala na ye, mpe apesa mpenza ndakisa ya kokangama na Yehova na ntango wana ya mpasi. Na ntembe te, koyoka “mongongo ya kimya, ya nse” oyo Yehova atindelaki Eliya na nzela ya momemi-nsango wana, elendisaki ye mpenza.

Biblia ekoki kozala lokola ‘mongongo wana ya kimya, ya nse,’ soki totiki yango etambwisa biso lelo oyo

24, 25. (a) Ndenge nini tokoki koyoka mongongo ya Yehova lelo oyo? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete Eliya andimaki lisalisi oyo Yehova apesaki ye?

24 Ndenge moko na Eliya, biso mpe tokoki kobanga nguya oyo ezalaka na biloko oyo Nzambe akelá, mpe ezali mabe te tóbanga bongo. Biloko oyo ezalisamá emonisaka mpenza nguya ya Mozalisi. (Rom. 1:20) Lelo mpe, Yehova asalelaka nguya na ye monene mpo na kosalisa basaleli na ye ya sembo. (2 Nt. 16:9) Kasi, Nzambe alobaka na biso mingi na nzela ya Liloba na ye, Biblia. (Tángá Yisaya 30:21.) Tokoki koloba ete Biblia ezali lokola ‘mongongo wana ya kimya, ya nse,’ soki totiki yango etambwisa biso lelo oyo. Na nzela ya makambo ya ntina oyo ezali na kati ya Biblia, Yehova asembolaka biso, alendisaka biso, mpe amonisaka ete alingaka biso.

25 Eliya andimaki lisalisi oyo Yehova apesaki ye na Ngomba Horebe? Andimaki yango! Eumelaki te, akómaki lisusu kosalela Nzambe na mpiko mpe kokebisa bato ete bátika kosambela banzambe ya lokuta. Soki biso mpe tozali kobatela na motema na biso maloba ya Nzambe, elingi koloba “libɔndisi oyo euti na Makomami,” tokomekola kondima ya Eliya.Rom. 15:4.

^ par. 22 Mbala mosusu mongongo yango “ya kimya, ya nse” ezalaki ya anzelu oyo atindamaki mpo na koyebisa Eliya “liloba ya Yehova,” ndenge emonisami na 1 Bakonzi 19:9. Na vɛrsɛ 15, anzelu yango abengami “Yehova.” Yango ezali kotinda biso tókanisa lisusu anzelu oyo Yehova asalelaki mpo na kokamba Yisraele na esobe mpe oyo Nzambe alobaki mpo na ye ete: “Nkombo na ngai ezali na kati na ye.” (Kob. 23:21) Ya solo, tokoki mpenza te koloba na bosikisiki, kasi tosengeli kosimba ete liboso Yesu aya awa na mabele lokola moto, azalaki “Liloba,” elingi koloba Molobeli ya libosoliboso ya Yehova epai ya basaleli na ye.Yoa. 1:1.