Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA ZOMI NA MWAMBE

Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”

Azalaki “kokanisa yango . . . na motema na ye”

1, 2. Lobelá mobembo ya Maria mpe nini esalaki ete azala na mokakatano na mobembo yango.

MARIA azalaki kobundabunda mpo na kofanda malamu likoló ya mpunda oyo ezalaki komema ye. Asilaki kosala bangonga ebele likoló ya mpunda yango. Yozefe azalaki kotambola na makolo liboso na ye mpe bazalaki kosala mobembo molai mpo na kokende na Beteleme, mboka moko ya mosika. Maria ayokaki lisusu mwana azali koningana na libumu na ye.

2 Na ntango yango, zemi ya Maria ekómaki monene mpo Biblia elobi polele ete “akómaki pene na kobota.” (Luka 2:5) Ntango Maria ná Yozefe bazalaki koleka bilanga ya bato nzelanzela, mbala mosusu basali-bilanga bazalaki kotika naino misala na bango mpo na kotala bango mpe komituna mpo na nini mwasi ná zemi monene bongo azalaki kosala mobembo ya molai ndenge wana. Mpo na nini Maria atikaki mboka na ye Nazarete mpe azalaki kokende mosika bongo?

3. Mokumba nini Maria azwaki, mpe tokotalela nini na ntina na ye?

3 Ebandaki mwa basanza liboso, ntango elenge mwasi yango Moyuda azwaki mokumba oyo moto mosusu azwá te. Akobota mwana oyo akokóma Masiya, Mwana ya Nzambe! (Luka 1:35) Ntango akómaki pene na kobota nde likambo ya kosala mobembo wana ebimaki. Na mobembo yango, Maria akutanaki na ebele ya mikakatano oyo emekaki kondima na ye. Tótala makambo oyo esalisaki ye atikala makasi na elimo.

Mobembo na Beteleme

4, 5. (a) Mpo na nini Yozefe ná Maria bazalaki kokende na Beteleme? (b) Mobeko oyo Kaisala abimisaki ekokisaki esakweli nini?

4 Kaka Yozefe ná Maria te nde basengelaki kosala mobembo. Kaisala Augusto abimisaki mobeko ete moto nyonso akende kokomisa nkombo na mboka oyo abotamá; yango wana bato basengelaki kosala mibembo mpo na kotosa mobeko yango. Yozefe asalaki nini? Biblia elobi boye: “Yango wana Yozefe mpe alongwaki na Galile, na engumba ya Nazarete, akei na Yudea, na engumba ya Davidi, oyo babengi Beteleme, mpo azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi.”Luka 2:1-4.

 5 Kaisala abimisaki mobeko wana mpamba te. Esakweli moko oyo ekomamaki mbula soki 700 liboso elobaki ete Masiya akobotama na Beteleme. Ezalaki na engumba moko na nkombo Beteleme na ntaka ya kilomɛtrɛ 11 longwa na Nazarete. Nzokande, esakweli yango elobaki polele ete Masiya akobotama nde na “Beteleme Efrata.” (Tángá Mika 5:2.) Mpo na kokóma na mwa mboka wana kobanda na Nazarete, bato ya mobembo basengelaki kosala kilomɛtrɛ 130 mpe kokatisa Samaria, na banzela ya ngombangomba. Ezalaki na Beteleme yango nde Yozefe asengelaki kokende, mpo ezalaki mboka ya bakitani ya libota ya Mokonzi Davidi; Yozefe ná mwasi na ye Maria mpe bazalaki bato ya libota yango.

6, 7. (a) Mpo na nini mobembo na Beteleme ekokaki kozala mpasi mpo na Maria? (b) Na likambo etali kozwa bikateli, nini ebongwanaki ntango Maria abalaki? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

6 Maria akondima ekateli oyo Yozefe azwaki, ete bátosa mobeko ya Kaisala? Kutu, mobembo yango ekozala mpasi mpo na ye. Na ntembe te ezalaki na ebandeli ya eleko ya mwa malili, mpe mwa bambula ekokaki kobɛta lokola eleko ya elanga ebandaki kokóma na nsuka. Longola yango, Beteleme ezalaki likoló mpenza ya ngomba (mɛtrɛ 760); na yango, nsima ya kosala mobembo mikolo ebele, esɛngaki kosuka na komata ngomba mpo na kokóma na Beteleme. Mbala mosusu komata kuna ekozwa ntango mingi koleka, mpo lokola zemi ya Maria ekómaki monene, ekoki kosɛnga apemaka mingi na nzela. Lisusu, mwasi nyonso oyo akómi pene na kobota asepelaka kozala pembeni ya libota mpe baninga na ye, mpo  básalisa ye ntango mpasi ya kobota ekobanda. Na ntembe te, Maria asengelaki kozala na mpiko mpo andima kosala mobembo wana.

Mobembo na Beteleme ezalaki pɛtɛɛ te

7 Nzokande, mokanda ya Luka elobi ete Yozefe akendeki ‘kokomisa nkombo ye ná Maria.’ Elobi mpe ete na ntango yango Maria “asilaki kokóma mwasi [ya Yozefe].” (Luka 2:4, 5) Lokola akómaki mwasi ya libala, akokaki lisusu te kozwa bikateli ndenge azalaki kozwa liboso abala. Azalaki komona ete mobali na ye nde akobanda kotambwisa makambo ya elimo, mpe azalaki kotosa bikateli na ye mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá mwasi ya kozala mosungi ya mobali. * Maria atosaki mobali na ye, mpe na ndenge yango amonisaki kondima.

8. (a) Ekoki kozala mpo na ntina nini mosusu Maria akendaki Beteleme ná Yozefe? (b) Na ndenge nini Maria azali ndakisa monene mpo na bakristo ya sembo?

8 Ekoki kozala likambo nini etindaki Maria atosa? Ayebaki nde esakweli oyo elobaki ete Masiya akobotama na Beteleme? Biblia eyebisi te. Tokoki mbala moko te koloba ete ayebaki te, mpamba te emonani ete bakonzi ya mangomba ata mpe bato ya ekólo bayebaki  likambo yango. (Mat. 2:1-7; Yoa. 7:40-42) Maria mpe ayebaki Makomami malamu. (Luka 1:46-55) Ezala soki Maria andimaki kosala mobembo wana mpo na kotosa mobali na ye, to mpo na kotosa mobeko ya Leta, to mpo na kokokisa esakweli ya Yehova, to mpo na bantina nyonso wana, atiká ndakisa malamu mpenza. Yehova asepelaka mingi na mibali mpe basi oyo bamonisaka elimo ya komikitisa mpe ya botosi. Na mokili oyo bato mingi bamonaka ete botosi ezali na ntina te, ebongi mpenza ete bakristo ya sembo, ata soki bafandi wapi, bálanda ndakisa ya Maria.

Kobotama ya Kristo

9, 10. (a) Mbala mosusu Maria ná Yozefe bakanisaki nini ntango bakómaki pene na Beteleme? (b) Yozefe ná Maria bakendaki kolala wapi mpe mpo na nini?

9 Na ntembe te, motema ya Maria ekitaki ntango akómaki komona Beteleme na mosika. Wana bazalaki komata bangomba, bazalaki koleka na kati ya bilanga ya olive ya nsuka oyo basengelaki kobuka, mbala mosusu Maria ná Yozefe bakanisaki lisusu makambo oyo esalemá na mwa mboka yango. Ndenge kaka Mika asakolaki, engumba yango ezalaki moke mingi mpenza mpo ekoka kotángama na kati ya bingumba ya Yuda; nzokande ezalaki na engumba yango nde Boaze, Naomi mpe na nsima Davidi, babotamaki mbula koleka nkóto liboso.

10 Maria ná Yozefe bakutaki mboka yango etondi na bato. Bato mosusu oyo bayaki kokomisa nkombo bakómaki liboso na bango; bazwaki esika ya kolala te. * Basengelaki kofanda na ndako ya banyama. Na ntembe te Yozefe amitungisaki ntango azalaki komona mwasi na ye azali kobunda na mpasi makasi oyo ayoká naino te, oyo ezalaki se kobakisama. Na ndako wana ya banyama nde mpasi ya kobota ezwaki Maria!

11. (a) Mpo na nini tolobi ete basi nyonso bakoki koyeba mpasi oyo Maria ayokaki? (b) Na ndenge nini Yesu azalaki “mwana ya liboso”?

11 Mwasi nyonso akoki koyeba mpasi oyo Maria ayokaki mokolo wana. Mbula soki 4 000 liboso, Yehova asakolaki ete mwasi nyonso akobanda koyoka mpasi na ntango ya kobota mpo na lisumu ya Adama ná Eva. (Eba. 3:16) Maria mpe anyokwamaki. Mokanda ya Luka elobi makambo mingi te; elobi kaka na mokuse ete “abotaki mwana mobali, mwana ya liboso.” (Luka 2:7) Ya solo, mwana wana azalaki ‘mwana na ye ya liboso,’ na kati ya ebele ya bana oyo abotaki. Maria abotaki bana soki nsambo. (Mrk. 6:3) Kasi, mwana yango akozala lokola bana mosusu te. Azalaki kaka te mwana ya liboso ya Maria, kasi azalaki mpe “mwana ya liboso na biloko nyonso” oyo Yehova azalisá, mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki!Kol. 1:15.

12. Epai wapi Maria atyaki mwana oyo autaki kobota, mpe mpo na nini mayemi mpe bililingi oyo elakisaka kobotama ya Yesu ekesanaka mpenza na ndenge makambo elekaki?

 12 Na esika oyo nde mokanda ya Luka ebakisi likambo mosusu ya ntina mingi ete: “Azingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ.” (Luka 2:7) Mayemi mpe bililingi ndenge na ndenge ya mbotama yango oyo bato basalaka na mokili mobimba emonisaka yango na ndenge ebongi te. Kasi, tótalela yango ndenge ezali mpenza. Elyelo ya bibwɛlɛ ezali saani to eloko mosusu oyo basalelaka mpo na koleisa banyama na bilanga. Tóbosana te ete Maria ná Yozefe bafandaki na ndako ya banyama, esika oyo mbala mingi ezalaka na mopɛpɛ ya malamu te mpe ezalaka salite, ezala na ntango wana to lelo. Mpo na koloba solo, baboti bakopona te kobota mwana na bango na esika ya ndenge wana soki esika mosusu ezali. Baboti mingi balukaka bolamu ya bana na bango. Na ntembe te, Maria ná Yozefe bazalaki mpenza na mposa ya kosala bongo mpo na Mwana ya Nzambe!

13. (a) Ndenge nini Maria ná Yozefe basalaki nyonso oyo bakokaki? (b) Ndenge nini baboti ya bwanya lelo oyo bakoki komekola ndakisa ya Maria ná Yozefe?

13 Kasi, batikaki te makambo wana ekómisa bango mawamawa; basalaki nyonso oyo bakokaki na oyo bazalaki na yango. Na ndakisa, mpo na kobatela mwana, Maria azingaki ye bilamba, na nsima mpe alalisaki ye malɛmbɛ na elyelo ya banyama. Maria atikaki te ete mitungisi oyo bakutanaki na yango epekisa ye asala nyonso oyo akokaki. Ye ná Yozefe bayebaki mpe likambo ya ntina koleka oyo basengeli kosala mpo na mwana yango, ezali kokokisa bamposa na ye ya elimo. (Tángá Kolimbola Mibeko 6:6-8.) Lelo oyo mpe, baboti ya bwanya batyaka mpe makambo ya elimo na esika ya liboso mpo na kobɔkɔla bana na bango na mokili oyo bato bakipaka makambo ya Nzambe te.

Babateli ya mpate balendisaki bango

14, 15. (a) Mpo na nini babateli ya mpate bazalaki na mposa makasi ya komona mwana oyo abotamaki? (b) Babateli ya mpate basalaki nini nsima ya komona mwana alali na elyelo ya bibwɛlɛ?

14 Na mbala moko, makelele moko eyei kobebisa kimya oyo ezalaki na esika yango. Babateli ya mpate bayaki na ndako yango ya banyama, mpo bátala libota yango, mingimingi mwana oyo abotami. Mibali yango bazalaki na esengo makasi mpe ezalaki komonana na bilongi na bango. Bautaki na bangomba esika bazalaki ná bibwɛlɛ na bango. * Babɛtɛlaki Maria ná Yozefe lisolo ya likambo oyo bautaki komona, mpe Maria ná Yozefe bakamwaki. Kuna na ngomba, anzelu moko abimelaki bango na butu wana. Nkembo ya Yehova etondaki  na esika yango, mpe anzelu ayebisaki bango ete Kristo to Masiya auti kobotama na Beteleme. Ayebisaki bango ete bakokuta mwana yango alali na elyelo ya bibwɛlɛ, bazingi ye bilamba. Na nsima, likambo mosusu ya kokamwa esalemaki: baanzelu ebele bayaki mpe bazalaki kokumisa Yehova na nzembo!Luka 2:8-14.

15 Tokokamwa te ndenge bato wana ya komikitisa bayaki mbangu na Beteleme! Na ntembe te, batondaki mpenza na esengo ntango bamonaki mwana yango alali, kaka ndenge anzelu alobaki. Babombaki nsango yango mpo na bango moko te. “Bayebisaki liloba oyo anzelu ayebisaki bango . . . Mpe bato nyonso oyo bayokaki bakamwaki na makambo oyo babateli ya mpate bayebisaki bango.” (Luka 2:17, 18) Emonani ete bakonzi ya mangomba ya ntango wana bazalaki komona babateli ya mpate bato mpamba. Kasi, Yehova apesaki bato wana ya komikitisa mpe ya sembo valɛrɛ. Kasi, Maria ayokaki ndenge nini ntango babateli ya mpate bayaki kotala bango?

Yehova apesaki babateli ya mpate ya komikitisa mpe ya sembo valɛrɛ

16. Ndenge nini Maria amonisaki ete azalaki kokanisa mingi, mpe nini esalisaki ye akoba kozala na kondima makasi?

16 Maria alɛmbaki mpo autaki kobota, kasi alandaki na likebi mpenza makambo nyonso oyo babateli ya mpate balobaki. Kasi asukaki wana te: “Azalaki kobomba maloba nyonso wana mpe kokanisa yango malamumalamu na motema na ye.” (Luka 2:19) Elenge mwasi yango azalaki kokanisa mingi. Ayebaki ete nsango wana oyo anzelu amemaki ezali na ntina mingi. Nzambe na ye, Yehova, alingaki kosalisa ye ayeba soki mwana yango azali mpenza nani mpe ntina na ye ekozala mpenza nini. Yango wana, asukaki kaka na koyoka te. Abombaki makambo yango na motema mpo akanisaka yango mbala na mbala, na basanza mpe bambula oyo ezali koya. Yango nde esalisaki Maria akoba komonisa kondima bomoi na ye mobimba.Tángá Baebre 11:1.

Maria ayokaki babateli ya mpate na likebi mpe abombaki maloba na bango na motema na ye

17. Ndenge nini tokoki komekola kondima ya Maria na oyo etali mateya ya Biblia?

17 Okolanda ndakisa ya Maria? Yehova atondisi Liloba na ye na mateya ebele ya ntina mingi. Nzokande, mateya yango ekosalisa biso mpenza kaka soki totyeli yango likebi. Tokotyela yango likebi soki tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo, ndenge batángaka mikanda ya mokili te, kasi lokola Liloba ya Nzambe. (2 Tim. 3:16) Na nsima, ndenge moko na Maria, tosengeli kobomba maloba yango ya Nzambe na motema na biso, mpe kokanisa yango malamumalamu. Soki tozali komanyola makambo oyo tozali kotánga na Biblia, mpe tozali kotalela ndenge oyo tokoki kosalela toli ya Yehova malamumalamu na bomoi na biso, tokosalisa kondima na biso ekóma makasi.

 Maloba mosusu oyo Maria abombaki

18. (a) Ndenge nini Maria ná Yozefe batosaki Mibeko ya Moize ntango Yesu azalaki mwana? (b) Mbeka oyo Maria ná Yozefe bapesaki na tempelo emonisi ete bazalaki na bozwi to te?

18 Na mokolo ya mwambe nsima ya kobotama ya mwana, Yozefe ná Maria bakendaki kokatisa ye ngenga, ndenge Mibeko ya Moize esɛngaki, mpe bapesaki ye nkombo Yesu, ndenge anzelu alobaki. (Luka 1:31) Na nsima, na mokolo ya ntuku minei, bamemaki ye na tempelo na Yerusaleme, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 10 na Beteleme, mpe bapesaki mbeka ya kopɛtolama oyo Mibeko esɛngaki mpo na babola: bipopo mibale to bibenga mibale. Ata soki bayokaki nsɔni mpo bazalaki na likoki te ya kopesa mpate-mobali ná epopo ndenge baboti mosusu bazalaki kopesa, basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kotosa mobeko ya Nzambe. Ezala ndenge nini, balendisamaki mpenza ntango bakómaki kuna.Luka 2:21-24.

19. (a) Makambo nini oyo Simeone alobaki Maria abombaki lisusu na motema na ye? (b) Ana asalaki nini ntango amonaki Yesu?

19 Mobange moko na nkombo Simeone apusanaki pene na bango mpe ayebisaki Maria makambo oyo abombaki lisusu na motema. Yehova alakaki Simeone ete akomona Masiya liboso akufa, mpe elimo santu ya Yehova emonisaki ye ete mwana wana Yesu nde Mobikisi oyo alakamaki. Simeone ayebisaki mpe Maria ete mokolo mosusu akokutana na likambo moko ya mpasi. Alobaki ete akoyoka lokola mopanga moko molai etɔbɔli ye. (Luka 2:25-35) Atako maloba yango ezalaki mpenza ya kolendisa te, ekoki kozala ete esalisaki Maria ayika  mpiko ntango mpasi yango eyaki, mbula ntuku misato na misato na nsima. Longola Simeone, mosakoli moko ya mwasi na nkombo Ana amonaki mwana Yesu mpe abandaki kopesa litatoli mpo na ye epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela kosikolama ya Yerusaleme.Tángá Luka 2:36-38.

Maria ná Yozefe balendisamaki mingi na tempelo ya Yehova na Yerusaleme

20. Mpo na nini komema Yesu na tempelo ya Yerusaleme ezalaki ekateli ya malamu?

20 Yozefe ná Maria bazwaki ekateli ya malamu mpenza ya komema mwana na bango na tempelo ya Yehova na Yerusaleme! Na yango, basalisaki mwana na bango azwa momeseno oyo abatelaki bomoi na ye mobimba: kokendeke na tempelo ya Yehova. Ntango bazalaki kuna, bapesaki mbeka na kolanda makoki na bango mpe bayokaki mateya mpe balendisamaki. Na ntembe te, ntango Maria alongwaki na tempelo mokolo wana, kondima na ye ekómaki lisusu makasi mpe motema na ye etondaki na makambo ya Nzambe oyo akomanyola mpe akoyebisa basusu.

21. Tokoki kosala nini mpo kondima na biso ekóma makasi lokola oyo ya Maria?

21 Lelo oyo, ezalaka mpenza esengo komona baboti bazali kolanda ndakisa wana. Batatoli ya Yehova oyo bazali baboti mpe bazali sembo bamemaka bana na bango na makita. Baboti yango bapesaka oyo bazali na yango, balendisaka bandeko na bango bakristo na maloba na bango. Nsima ya makita, bakómaka lisusu makasi, esengo na bango ebakisamaka mpe bazwaka makambo mingi ya koyebisa basusu. Ezali mpenza esengo koyanganaka ná bango! Soki tozali kosala bongo, kondima na biso ekokóma makasi, lokola oyo ya Maria.

^ par. 7 Talá bokeseni oyo ezali kati na mokapo oyo mpe maloba oyo elobeli mobembo oyo Maria asalaki liboso: “Maria atɛlɛmaki mpe akendaki” kotala Elizabeti. (Luka 1:39) Na ntango wana, lokola azalaki fianse ya Yozefe kasi babalanaki naino te, mbala mosusu Maria akendaki kozanga ete atuna liboso Yozefe. Kasi, nsima ya libala na bango, Biblia emonisi ete Yozefe nde azwaki ekateli mpo na mobembo yango, kasi Maria te.

^ par. 10 Na ntango wana, ezalaki na ndako moko monene na bingumba nyonso mpo na bapaya mpe baleki-nzela.

^ par. 14 Ndenge babateli ya mpate bafandaki libándá ná bibwɛlɛ na bango endimisi likambo moko ya ntina mingi oyo Biblia emonisi: Kristo abotamaki na sanza ya zomi na mibale te, na ntango oyo bibwɛlɛ basengelaki kozala na ndako, kasi nde abotamaki ntango mosusu na ebandeli ya sanza ya zomi.