Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA LIBOSO

“Atako akufá, azali naino koloba”

“Atako akufá, azali naino koloba”

1. Nini ezalaki kopekisa libota ya Adama ná Eva ekɔta na elanga ya Edene, mpe eloko nini Abele alingaki mingi koleka biloko nyonso?

ABELE azali kotala ndenge etonga ya bampate na ye ezali kolya na kimya na esika moko ya ngombangomba. Ekoki kozala ete asuki kaka te na kotala bampate na ye kasi azali mpe kotala na mosika mwa eloko moko oyo ezali kongɛnga. Ayebaki ete kuna ezalaki na mopanga oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango, mpe ezalaki kobalukabaluka mpo moto akɔta te na elanga ya Edene. Liboso, baboti na ye bazalaki kofanda kuna, kasi sikoyo, bango ná bana na bango bakoki lisusu kokɔta na elanga yango te. Kanisá ndenge mopɛpɛ ya mpokwa ezali kopanzapanza nsuki ya Abele ntango azali kotombola miso likoló mpe kokanisa Mozalisi na ye. Bato bakoki kobongisa lisusu boyokani na bango ná Nzambe? Abele alingaki mpenza ete esalema bongo.

2-4. Na ndenge nini Abele azali koloba na biso lelo oyo?

2 Lelo oyo Abele azali koloba na yo. Okoki koyoka ye? Mbala mosusu okoki koloba ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema te. Kutu, mwana wana ya mibale ya Adama akufá banda kala. Nzoto na ye esí ekóma putulu eleki sikoyo pene na mbula 6 000. Biblia eteyaka ete bakufi “bayebi ata eloko moko te.” (Mos. 9:5, 10) Lisusu, tokokuta ata likambo moko te oyo Abele alobaki na Biblia. Boye, ndenge nini akoki koloba na biso?

3 Na litambwisi ya elimo santu ntoma Paulo alobaki mpo na Abele ete: “Na kondima na ye, atako akufá, azali naino koloba.” (Tángá Baebre 11:4.) Abele azali koloba na biso na nzela nini? Na nzela ya kondima na ye. Abele azalaki moto ya liboso oyo amonisaki ezaleli wana ya malamu. Kondima na ye ezalaki makasi mpenza, yango wana akómá ndakisa malamu oyo tokoki komekola lelo oyo. Soki tozwi liteya na kondima na ye mpe tozali komekola yango, ekozala lokola nde tozali koyoka Abele azali koloba na biso.

4 Kasi, liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya kondima ya Abele lokola Biblia elobi makambo mingi te mpo na ye? Tótala naino.

 Bato bazalaki mingi te na ntango na ye

5. Maloba oyo Yesu alobaki ete Abele azalaki na bomoi na “ebandeli ya mokili” elimboli nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

5 Ntango Abele abotamaki, bato bazalaki moke mpenza na mokili. Na nsima Yesu alobelaki Abele lokola moto oyo azalaki na bomoi na “ebandeli ya mokili.” (Tángá Luka 11:50, 51.) Emonani polele ete Yesu alobeli awa bato oyo bazali na elikya ya kosikolama na lisumu. Atako Abele azalaki moto ya minei na mokili, emonani ete azalaki moto ya liboso oyo Nzambe amonaki ete abongi kosikolama. * Na ntembe te, Abele akolaki na esika oyo moto moko te akokaki kopesa ye ndakisa malamu.

6. Abele azalaki na baboti ya lolenge nini?

6 Atako mokili ezalaki naino na bato mingi te, bato yango basengelaki kokutana na mikakatano. Baboti ya Abele, Adama ná Eva, bazalaki kitoko mpe makasi. Kasi basalaki libunga moko monene na bomoi na bango, mpe bayebaki yango. Liboso bazalaki bato ya kokoka mpe bazalaki na elikya ya kozala na bomoi libela na libela. Na nsima, batombokelaki Yehova Nzambe mpe abenganaki bango na elanga ya Edene. Lokola batyaki bamposa na bango moko, kasi te ya bakitani na bango na esika ya liboso, bakómaki bato ya kozanga kokoka mpe babungisaki bomoi ya seko.Eba. 2:15–3:24.

7, 8. Eva alobaki nini ntango Kaina abotamaki, mpe ekoki kozala ete azalaki kokanisa nini?

7 Lokola babimaki na elanga ya Edene, Adama ná Eva bakómaki na bomoi ya mpasi. Atako bongo, ntango mwana na bango ya liboso  abotamaki, bapesaki ye nkombo Kaina, to “eloko moko oyo ebotami” mpe Eva alobaki ete: “Naboti mobali na lisalisi ya Yehova.” Maloba na ye emonisi ete mbala mosusu azalaki kokanisa elaka oyo Yehova apesaki na elanga ya Edene, ntango alobaki ete mwasi moko akobimisa “momboto” oyo mokolo mosusu akoboma moto mabe oyo amemaki Adama ná Eva na nzela ya mabe. (Eba. 3:15; 4:1) Eva akanisaki ete azalaki mwasi oyo esakweli yango elobelaki mpe ete Kaina azalaki “momboto” oyo alakamaki?

8 Soki ezali bongo, amikosaki mpenza. Lisusu, soki Adama ná Eva batyaki makanisi wana na motó ya Kaina ntango azalaki kokola, na ntembe te, bakómisaki ye mpenza lolendo. Na nsima, Eva abotaki mwana mosusu ya mobali, kasi esika moko te emonisi ete akumisaki ye ndenge asalaki epai ya Kaina. Bapesaki ye nkombo Abele, oyo mbala mosusu elakisi “mwa mopɛpɛ” to “mpamba.” (Eba. 4:2) Nkombo oyo bapesaki ye emonisi nde ete bazalaki kotyela Kaina elikya mingi koleka Abele? Toyebi mpenza te.

9. Liteya nini baboti ya lelo bakoki kozwa epai ya Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso?

9 Lelo oyo, baboti bakoki koyekola makambo mingi epai ya baboti wana ya liboso. Makambo oyo olobaka mpe osalaka etindaka bana na yo bákóma lolendo, bákóma na mposa ya koleka basusu mpe bákóma na ezaleli ya moimi? To oteyaka nde bango bálinga Yehova mpe báluka kokóma baninga na ye? Likambo ya mawa, baboti ya liboso bakokisaki mokumba na bango te. Nzokande, elikya ezalaki mpo na bakitani na bango.

Nini esalisaki Abele akóma na kondima?

10, 11. Kaina ná Abele bazalaki kosala misala nini, mpe Abele akómaki na ezaleli nini?

10 Na ntembe te, ntango bana yango mibale bazalaki kokola, Adama alakisaki bango mosala oyo ekokaki kosalisa bango bákokisaka bamposa ya libota. Kaina akómaki mosali-bilanga; Abele mobateli ya bampate.

11 Nzokande Abele asalaki likambo moko ya ntina koleka. Na boumeli ya bambula, akómaki na kondima makasi, ezaleli kitoko oyo Paulo alobelaki na nsima. Kanisá naino! Ezalaki ata na moto moko te oyo Abele akokaki kolanda ndakisa na ye. Kasi ndenge nini akómaki na kondima epai ya Yehova? Tótalela makambo misato, oyo mbala mosusu esalisaki ye akóma na kondima makasi.

12, 13. Ndenge nini kotala biloko oyo Yehova akelá esalisaki Abele akóma na kondima makasi?

12 Biloko oyo Yehova akelá. Ya solo, Yehova alakelaki mabele mabe, asalaki ete ebota banzubɛ mpe matiti ya nsendensende mpo biloko ebota malamu te. Ata bongo, mabele ezalaki kobimisa biloko oyo esalisaki libota ya Abele etikala na bomoi. Banyama, bandɛkɛ mpe bambisi; ata mpe bangomba, balaki, bibale, mbu; ezala mpe  likoló, mapata, moi, sanza mpe minzoto elakelamaki mabe te. Bisika nyonso oyo Abele azalaki kotala, azalaki komona bolingo, bwanya mpe bolamu ya Yehova Nzambe oyo asalá biloko nyonso. (Tángá Baroma 1:20.) Kokanisa makambo wana nyonso, ekómisaki kondima ya Abele makasi.

Biloko oyo Nzambe akelá esalisaki Abele azala na kondima makasi epai ya Mozalisi ya bolingo

13 Na ntembe te Abele azalaki kozwa ntango ya kokanisa na ntina na Yehova. Meká komona na makanisi ndenge azali kobatela etonga na ye. Kobatela bampate esɛngaka kotambola mingi. Azalaki komema banyama yango ya kimya na bangomba, na mabwaku, pembeni ya bibale mpo na koluka matiti ya mobesu mpenza, koluka mabulu ya mai oyo eleki malamu, mpe bisika malamu ya kopema. Na bikelamu nyonso oyo Nzambe asalá, emonani ete bampate ekokaka komibatela te, lokola nde ekelamá kaka mpo moto abatelaka yango. Abele amonaki nde ete ye mpe azali na mposa ya moto moko oyo aleki mpenza bato nyonso na mayele mpe na nguya, atambwisaka mpe abatelaka ye? Na ntembe te, amonisaki mposa yango mbala mingi na libondeli, mpe yango esalaki ete kondima na ye ezala ntango nyonso makasi.

14, 15. Ndenge nini bilaka ya Yehova esalisaki Abele azala na makambo mingi ya kokanisa na mozindo?

14 Bilaka ya Yehova. Na ntembe te, Adama ná Eva bayebisaki bana na bango makambo oyo esalaki ete Nzambe abengana bango na elanga ya Edene. Na yango, Abele azalaki na makambo mingi ya komanyola.

15 Yehova alobaki ete mabele ekolakelama mabe. Abele akokaki komona polele ndenge banzubɛ mpe matiti ya nsendensende, ekokisaki maloba wana. Yehova alobaki mpe ete Eva akomona mpasi na zemi mpe na ntango ya kobota. Na ntembe te, ntango baleki na ye babotamaki, Abele ayaki koyeba ete maloba yango ekokisamaki. Yehova ayebaki ete Eva akozala na mposa ete mobali na ye alinga mpe atyela ye likebi mingi, mpe ete Adama akozala na bokonzi likoló na ye. Abele amonaki makambo yango na miso. Na makambo nyonso, Abele amonaki ete ebongi mpenza kotyela maloba ya Yehova motema. Na yango, Abele azalaki mpenza na bantina ya komonisa kondima na elaka ya Nzambe oyo etali “momboto” oyo akobongisa makambo mabe oyo ebandaki na Edene.Eba. 3:15-19.

16, 17. Ekoki kozala ete Abele azwaki liteya nini epai ya bakeruba?

 16 Basaleli ya Yehova. Atako Abele azalaki te na moto oyo akokaki kopesa ye ndakisa malamu, kasi na ntango wana, ezalaki mpe na bikelamu mosusu oyo Abele akokaki komekola kondima na bango. Ntango Yehova abenganaki Adama ná Eva na elanga, azwaki bibongiseli mpo bango ná bana na bango bázonga lisusu te na paradiso yango. Yehova atyaki bakeruba, baanzelu ya makasi na porte ya elanga ya Edene mpo na kobatela yango, ná mopanga oyo mɔtɔ ezalaki kopela na ebende na yango mpe ezalaki kobalukabaluka.Tángá Ebandeli 3:24.

17 Kanisá naino ndenge Abele azalaki komiyoka ntango azalaki kotala bakeruba yango, ntango azalaki naino mwana. Lokola balataki nzoto ya bato, Abele akokaki komona ete bazalaki na nguya mingi. “Mopanga” yango oyo ezalaki kopela mpe kobalukabaluka, ezalaki mpe kobangisa. Ntango Abele azalaki kokola, amonaki te ete bakeruba yango balɛmbi mpe batiki mosala na bango. Baanzelu yango bakobaki kosala butu moi, mbula na mbula, kaka na esika oyo batyaki bango. Na yango, Abele amonaki ete Yehova Nzambe azali na basaleli ya sembo. Abele amonaki ete bakeruba yango bazalaki sembo mpe na botosi epai na Yehova, likambo oyo amonaki te na libota na ye. Na ntembe te, ndakisa ya baanzelu wana ekómisaki kondima na ye makasi.

Na bomoi na ye mobimba, Abele amonaki ete bakeruba bazali basaleli ya Yehova ya sembo mpe ya botosi

18. Lelo oyo, nini ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi?

18 Kokanisa na mozindo na bizaleli ya Yehova oyo emonanaka na biloko oyo akelá, bilaka na ye mpe ndakisa ya baanzelu na ye, esalisaki Abele akóma na kondima makasi. Ezali polele ete ndakisa na ye ekoki koteya biso makambo mingi. Mingimingi ekoki kosalisa  bilenge báyeba ete bakoki kokóma na kondima ya solosolo epai ya Yehova Nzambe ata soki bato mosusu ya libota na bango basali nini. Lelo oyo, tozali na makambo mingi oyo ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi, na ndakisa: biloko ya kokamwa oyo Nzambe asalá oyo ezali zingazinga na biso, Biblia na mobimba na yango mpe ebele ya bandakisa ya bato ya kondima.

Mpo na nini likabo ya Abele ezalaki na valɛrɛ mingi?

19. Likambo nini ya ntina Abele asosolaki na nsima?

19 Lokola kondima na ye epai ya Yehova ezalaki kokóma makasi, Abele azalaki koluka ndenge ya komonisa yango na misala. Kasi, eloko nini moto mpamba akoki kopesa Mozalisi ya molɔ́ngɔ́? Ya solo, Nzambe azalaka te na mposa ya likabo to ya lisalisi ya moto. Na nsima Abele asosolaki likambo oyo: Soki na makanisi ya malamu, apesi Yehova eloko oyo eleki malamu na biloko oyo azali na yango, Yehova akosepela mingi.

Abele apesaki mbeka na ye na kondima; kasi Kaina te

20, 21. Kaina ná Abele bapesaki Yehova bambeka ya ndenge nini, mpe ndenge nini atalelaki yango?

20 Abele amibongisaki mpo na kopesa bampate mosusu ya etonga na ye lokola mbeka. Aponaki ya malamu koleka, bana-mpate ya liboso, mpe biteni ya banyama oyo amonaki ete eleki kitoko mpenza. Na ntango wana, Kaina mpe abongisaki mbeka oyo azwaki na bilanga na ye mpo na koluka Yehova apambola mpe andima ye. Kasi makanisi na ye ekesanaki na oyo ya Abele. Bokeseni yango emonanaki polele ntango bapesaki bambeka na bango.

21 Ekoki kozala ete bana wana ya Adama basalelaki bitumbelo mpe mɔtɔ mpo na kopesa bambeka na bango; mbala mosusu basalaki yango na miso ya bakeruba, oyo na ntango wana bazalaki mpenza bamonisi ya Yehova awa na mabele. Yehova andimaki bambeka yango? Totángi boye: “Yehova azalaki kondima Abele ná likabo na ye.” (Eba. 4:4) Biblia emonisi te ndenge oyo Nzambe andimaki.

22, 23. Nini esalaki ete Yehova andima likabo ya Abele?

22 Mpo na nini Nzambe andimaki mbeka ya Abele? Ezalaki kaka mpo na mbeka wana? Abele apesaki ekelamu ya bomoi, oyo ezali na mpema, mpe asopaki makila na yango. Abele ayebaki ete mbeka ya ndenge wana ekozala na valɛrɛ mingi? Basiɛklɛ mingi na nsima, Nzambe asalelaki mbeka ya mwana-mpate oyo ezangi litɔnɔ mpo na komonisa mbeka ya Mwana na ye ya kokoka; “Mwana-Mpate ya Nzambe,” oyo makila na ye esengelaki kosopama kaka mpamba. (Yoa. 1:29; Kob. 12:5-7) Nzokande, emonani ete Abele ayebaki te ndenge oyo Yehova akosalela bambeka na nsima.

23 Oyo toyebi ezali ete Abele apesaki likabo oyo elekaki malamu na biloko oyo azalaki na yango. Yehova andimaki kaka mbeka yango te kasi andimaki mpe moto oyo apesaki yango. Bolingo mpe kondima oyo azalaki na yango mpo na Yehova nde etindaki ye asala bongo.

24. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete mbeka ya Kaina ezalaki mpenza mabe te? (b) Na ndenge nini Kaina azalaki lokola bato mingi lelo oyo?

 24 Kasi ezalaki bongo te mpo na Kaina. Yehova “andimaki ata moke te Kaina ná likabo na ye.” (Eba. 4:5) Ezali te mpo mbeka ya Kaina ezalaki mabe; mpo na nsima, Mibeko ya Nzambe endimaki mbeka ya biloko oyo euti na bilanga. (Lev. 6:14, 15) Kasi Biblia elobi mpo na Kaina ete “misala na ye moko ezalaki mabe.” (Tángá 1 Yoane 3:12.) Ndenge moko na bato mingi lelo oyo, Kaina akanisaki ete komonisa kaka ete ozali mosambeli ya Nzambe ekoki. Eumelaki te, misala na ye emonisaki polele ete azalaki te na kondima ya solosolo mpe na bolingo epai ya Yehova.

25, 26. Yehova akebisaki Kaina na likambo nini, mpe atako bongo asalaki nini?

25 Ntango Kaina amonaki ete Yehova andimaki ye te, alukaki kozwa liteya na ndakisa ya Abele? Te. Kutu akómaki koyina ndeko na ye makasi mpenza. Yehova amonaki makanisi oyo ezalaki na motema ya Kaina mpe alingaki kosalisa ye alongwa na nzela ya mabe. Akebisaki Kaina ete ezaleli wana ezali komema ye asala lisumu moko monene, mpe apesaki ye elikya ete ‘akondimama’ soki kaka abongoli makanisi na ye.Eba. 4:6, 7.

26 Kaina aboyaki koyoka likebisi ya Nzambe. Kutu, asɛngaki leki na ye Abele bákende na elanga. Kuna Kaina akwelaki Abele mpe abomaki ye. (Eba. 4:8) Na yango, tokoki koloba ete Abele akómaki moto ya liboso oyo anyokwamaki mpo na makambo ya Nzambe, to akufaki lokola martiru. Atako akufá, Yehova abosaná ye te.

27. (a) Mpo na nini tokoki kondima ete Abele akosekwa? (b) Tosengeli kosala nini mpo tókutana na Abele?

27 Na ndenge ya elilingi, makila ya Abele ezalaki kobelela Yehova akata likambo yango. Mpe Yehova akataki yango na bosembo; apesaki Kaina etumbu mpo na mabe oyo asalaki. (Eba. 4:9-12) Likambo eleki ntina, lisolo ya kondima ya Abele ekoki koteya biso lelo oyo. Atako aumelaki na mokili mbula soki nkama moko, bambula yango ezalaki mpenza moke na kotalela ndenge bato ya ntango wana bazalaki koumela na mokili; kasi Abele atambwisaki bomoi na ye na ndenge oyo esepelisaki Nzambe. Atako akufaki, ayebaki ete Yehova, Tata na ye ya likoló azalaki kolinga mpe kondima ye. (Ebr. 11:4) Tokoki kondima ete Yehova akobosana ye soki moke te mpe azali kozela kosekwa mpo na kozala na mabele oyo ekobongwana paradiso. (Yoa. 5:28, 29) Yo mpe, okokutana na ye kuna? Okoki kokutana na ye soki ozwi ekateli ya koyoka Abele ntango azali koloba mpe kolanda ndakisa monene ya kondima na ye.

^ par. 5 Maloba “ebandeli ya mokili” epesi likanisi ya kobwaka mboto na mabele to kobota bana; boye maloba yango etaleli bato ya liboso oyo babotamaki na mokili. Kasi mpo na nini Yesu asalelaki maloba “ebandeli ya mokili” epai ya Abele kasi te epai ya Kaina, moto ya liboso oyo abotamaki na mokili? Bikateli mpe misala ya Kaina emonisaki ete atombokelaki Yehova Nzambe na nko mpenza. Tokoki koloba ete ndenge moko na baboti na ye, Kaina akosekwisama te mpe akolimbisama te.