Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MOTOBA

Abondelaki Nzambe na motema mobimba

Abondelaki Nzambe na motema mobimba

1, 2. (a) Mpo na nini Hana azalaki na esengo te ntango azalaki kobongisa mobembo? (b) Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Hana?

HANA atye makanisi na ye nyonso na kobongisa mobembo, azali kosala lokola abosana mikakatano na ye. Esengelaki kozala ntango moko ya esengo; mbula na mbula, Elekana, mobali na ye, amemaka libota mobimba mpo na kokende kosambela na tabernakle na Shilo. Yehova alingaki ete ntango yango ezala ya esengo. (Tángá Kolimbola Mibeko 16:15.) Mpe na ntembe te, banda bomwana na ye, Hana azalaki kosepela na bafɛti yango. Kasi, na bambula oyo elandaki, makambo ebongwanaki.

2 Abalaki Elekana, mobali oyo azalaki kolinga ye. Kasi, mobali yango azalaki na mwasi mosusu. Nkombo ya mwasi yango Penina, mpe emonani lokola ete azalaki koluka kokómisa bomoi ya Hana bololo. Penina azalaki kutu koluka ete bafɛti wana ezala ntango ya mpasi mpo na Hana. Asalaki nini? Kasi, ndenge nini kondima ya Hana epai ya Yehova esalisaki ye alonga likambo oyo ezalaki komonana lokola ete akokoka yango te? Soki okutani na mikakatano oyo ezali kosala lokola elongola esengo na yo, lisolo ya Hana ekoki mpenza kolendisa yo.

“Mpo na nini motema na yo ezali koyoka mpasi?”

3, 4. Mikakatano nini mibale Hana azalaki na yango, mpe mpasi ya mokomoko na yango ezalaki nini?

3 Biblia elobeli mikakatano mibale oyo Hana azalaki na yango. Akokaki kosala mwa eloko mpo na oyo ya liboso, kasi eloko moko te mpo na oyo ya mibale. Ya liboso, azalaki na mbanda oyo azalaki kolinga ye te. Ya mibale, azalaki kobota te. Ezalaka likambo ya mpasi mpo na mwasi nyonso oyo alingaka kozala na bana; kasi na ntango ya Hana, kobota te ezalaki likambo ya mawa mingi mpenza. Libota nyonso ezalaki kolinga kozala na bana mpo na kobatela nkombo ya libota. Kobota te ezalaki likambo ya nsɔni.

4 Hana alingaki koyikela likambo yango mpiko soki Penina azalaka te. Libala ya bombanda ezalaki likambo ya esengo te. Makambo lokola koswana, kowelana, mpe kozokisana na motema ezalaki kosalema mingi. Libala ya bombanda ekeseni mpenza na libala oyo Nzambe abandisaki na elanga ya Edene, elingi koloba mwasi moko,  mobali moko mpe mobali moko mwasi moko. (Eba. 2:24) Na yango, Biblia emonisi ete libala ya bombanda ezali mpasi mingi; mpe ndenge elobeli makambo mabe oyo ezalaki koleka na libota ya Elekana emonisi ete libala ya bombanda ezali mabe.

5. Mpo na nini Penina azalaki kolinga konyokola Hana, mpe ndenge nini azalaki koyokisa ye mpasi?

5 Elekana azalaki kolinga Hana mingi koleka. Masolo ya Bayuda emonisaka ete abalaki Hana liboso, mpe abalaki Penina mwa bambula na nsima. Ezala bongo to te, Penina azalaki koyokela Hana zuwa, mpe azalaki koluka ndenge ya konyokola ye. Na bokeseni na Hana, Penina azalaki kobota. Azalaki kobota bana, mpe akómaki komona ete azali na ntina mingi. Na esika ayokela Hana mawa mpe abɔndisa ye lokola azalaki kobota te, Penina azalaki kotya mbeli na mpota ya Hana. Biblia elobi ete Penina azalaki kotumola Hana mingi “mpo na kosilikisa ye.” (1 Sa. 1:6) Penina azalaki kosala makambo na nko. Azalaki koluka koyokisa Hana mpasi, mpe alongaki kosala yango.

Hana azalaki mpenza kotungisama mpo azalaki kobota te, kasi Penina azalaki kaka koluka koyokisa Hana motema mpasi

6, 7. (a) Atako Elekana alukaki kobɔndisa Hana, mpo na nini mbala mosusu Hana aboyaki koyebisa ye makambo nyonso? (b) Lokola Hana azalaki kobota te, yango emonisaki ete Yehova aboyaki ye? Limbolá. (Talá maloba na nse ya lokasa.)

6 Emonani ete ntango oyo Penina azalaki komona malamu mpo na koyokisa Hana motema mpasi, ezalaki na eleko ya kosala mibembo mbula na mbula na Shilo. Elekana azalaki kopesa bana ya Penina—“bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi”—biteni ya nyama oyo bakopesa Yehova mbeka. Nzokande, lokola Hana azalaki na mwana te, azalaki kaka kozwa eteni moko. Penina azalaki kodendadenda liboso ya Hana mpe kolobaka na ye ntango nyonso ete abotaka te; mpo na yango, Hana azalaki kolela mpe koboya ata kolya. Elekana amonaki ete Hana, mwasi na ye oyo alingaki mingi azalaki na mawa mpe azalaki kolya te; mpe alukaki kobɔndisa ye. Atunaki ye boye: “Hana, mpo na nini ozali kolela, mpe mpo na nini ozali kolya te? Mpo na nini motema na yo ezali koyoka mpasi? Mpo na yo, ngai naleki bana mibali zomi te?”1 Sa. 1:4-8.

7 Elekana asosolaki ete Hana azali na mawa mpo azalaki kobota te. Mpe na ntembe te, Hana asepelaki mingi koyoka ete Elekana azali kaka kolinga ye. * Kasi, Elekana alobelaki motema mabe ya Penina te; Biblia mpe elobi ata esika  moko te ete Hana ayebisaki Elekana mabe yango. Mbala mosusu Hana amonaki ete koyebisa mobali na ye makambo oyo Penina azalaki kosala ekobakisa kaka mafuta na mɔtɔ. Elekana alingaki mpenza kobongola makambo? Mbala mosusu Penina alingaki koyina Hana lisusu makasi, mpe bana ná basaleli ya mwasi wana ya mabe balingaki kolanda ezaleli na ye, boye te? Nyonso wana elingaki kotinda Hana akoba komiyoka lokola mopaya na ndako na ye moko.

Ntango Hana azalaki kokutana na mikakatano na libota, alukaki libɔndisi epai ya Yehova

8. Ntango basaleli yo makambo ya mabe to ya kozanga bosembo, mpo na nini kokanisa ete Yehova azali Nzambe ya sembo ekoki kobɔndisa yo?

8 Ezala Elekana ayebaki makambo oyo Penina azalaki kosala to te, Yehova Nzambe azalaki komona makambo nyonso. Liloba na ye emonisi ete amonaka makambo nyonso, mpe ekebisi moto nyonso oyo asepelaka koyokela basusu zuwa mpe koyina bango, ata mpo na makambo mike. Nzokande, baoyo bazali mabɔkɔ mpɛmbɛ mpe bato ya kimya lokola Hana bakoki kobɔndisama na koyeba ete Nzambe ya sembo asembolaka makambo na ntango oyo alingi mpe na lolenge oyo amoni malamu. (Tángá Kolimbola Mibeko 32:4.) Mbala mosusu Hana ayebaki yango, mpo alukaki nde lisalisi epai ya Yehova.

‘Azalaki mawamawa lisusu te’

9. Liteya nini tokoki kozwa epai ya Hana na ndenge andimaki kosala mobembo tii na Shilo atako ayebaki makambo oyo mbanda na ye akosala?

9 Na ntɔngɔntɔngɔ, bato nyonso na ndako bazalaki likolólikoló. Moto nyonso azalaki komibongisa mpo na mobembo, ata mpe bana. Libota wana monene ekosala mobembo ya kilomɛtrɛ koleka 30 na banzela ya ngombangomba ya mokili ya Efraime tii na Shilo. * Na makolo, mobembo yango ekokaki kozwa mokolo moko to mibale. Hana ayebaki makambo oyo mbanda na ye akosala. Atako bongo, atikalaki na ndako te. Na yango, atikelá basaleli ya Nzambe lelo oyo ndakisa moko malamu. Tosengeli te kotika bizaleli mabe ya basusu epekisa biso kosambela Nzambe. Soki tosali bongo, tokozanga mapamboli oyo ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko.

10, 11. (a) Mpo na nini Hana akendeki mbala moko na tabernakle? (b) Ndenge nini Hana afungwelaki Tata na ye ya likoló motema na ye?

10 Nsima ya mobembo molai na nzela ya mipɛpɛ mpe bangomba, libota yango ekómaki pene na Shilo. Engumba yango ezalaki komonana liboso na bango, na mwa ngomba moko oyo ezalaki na kati ya bangomba mosusu ya milai. Ntango bazalaki kopusana, mbala mosusu Hana azalaki kokanisa mingi makambo oyo akoyebisa Yehova na libondeli. Ntango bakómaki, libota mobimba efandaki mpo na kolya. Eumelaki te, Hana atikaki bango mpe akendaki na tabernakle ya Yehova. Nganga-nzambe monene Eli azalaki  kuna, afandi mosika te na porte. Kasi, Hana azalaki kobondela. Na tabernakle, ayebaki ete ezali na moto oyo akoyoka ye. Soki moto ata moko te akokaki mpenza koyeba mpasi na ye, Tata na ye ya likoló akokaki koyeba yango. Mawa etondaki na motema na ye mpe abandaki kolela.

11 Lokola azalaki kolela mpo na mawa makasi oyo azalaki na yango, Hana azalaki kobondela Yehova na nse ya motema. Mbɛbu na ye ezalaki koningana ntango azalaki koloba na nse ya motema mpo na komonisa mpasi na ye. Abondelaki ntango molai, afungwelaki Tata na ye motema. Kasi, asukaki kaka te na kosɛnga Nzambe akokisa mposa na ye ya kobota. Hana alukaki kaka kozwa lipamboli te, kasi alukaki mpe kopesa Nzambe oyo akokaki. Na yango, asalaki elako, alobaki ete soki aboti mwana mobali, akopesa ye mpo asalela Yehova bomoi na ye mobimba.1 Sa. 1:9-11.

12. Ndenge ndakisa ya Hana emonisi yango, makambo nini tosengeli kobosana te na likambo etali kobondela?

12 Hana atikelá basaleli nyonso ya Nzambe ndakisa malamu na likambo etali kobondela. Na boboto na ye, Yehova asɛngaka basaleli na ye bábondela ye na motema mobimba, mpe kozanga kokakatana, báyebisa ye mitungisi na bango nyonso, ndenge mwana oyo atyelaka moboti na ye motema akoki kosala yango. (Tángá Nzembo 62:8; 1 Batesaloniki 5:17.) Na likambo etali kobondela, ntoma Petro akomaki maloba oyo ya kolendisa: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’1 Pe. 5:7.

13, 14. (a) Likambo nini ya mabe Eli awelaki koloba mpo na Hana mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini eyano oyo Hana apesaki emonisi ete azali ndakisa malamu mpenza ya kondima?

13 Nzokande, bato bayebaka mpenza te komitya na esika ya baninga, ndenge Yehova asalaka. Ntango Hana azalaki kolela mpe kobondela, asutukaki na mongongo moko. Ezalaki Nganga-nzambe monene Eli, oyo azalaki kotala ye. Alobaki boye: “Okolangwalangwa boye tii ntango nini? Longwá na molangwa na yo ya vinyo.” Eli amonaki ndenge mbɛbu ya Hana ezalaki koningana, ndenge azalaki kolela, mpe mawa na ye. Na esika atuna ye likambo oyo ezalaki kotungisa ye, awelaki koloba ete Hana alangwe.1 Sa. 1:12-14.

14 Esalaki Hana mpasi mpenza na ntango wana oyo azalaki na mawa, koyoka maloba ya ndenge wana na monɔkɔ ya moto oyo azalaki nganga-nzambe Monene! Atako bongo, na mbala oyo mpe atikaki ndakisa kitoko ya kondima. Atikaki te ete kozanga kokoka ya moto epekisa ye kosambela Yehova. Ayanolaki Eli na limemya nyonso mpe alimbwelaki ye mokakatano na ye. Nsima ya koyeba ete asalaki mabe, Eli alobaki na Hana, mbala mosusu na maloba ya boboto ete: “Kende na kimya, mpe tiká Nzambe ya Yisraele akokisela yo lilɔmbɔ na yo, oyo osɛngi ye.”1 Sa. 1:15-17.

15, 16. (a) Hana ayokaki ndenge nini nsima ya kofungwela Yehova motema mpe kosambela ye na tabernakle? (b) Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Hana ntango tozali komitungisa?

 15 Hana ayokaki ndenge nini nsima ya kofungwela Yehova motema mpe kosambela ye na tabernakle na ye? Lisolo elobi boye: “Mwasi yango asimbaki nzela akei, mpe alyaki, mpe elongi na ye ezalaki mawamawa lisusu te.” (1 Sa. 1:18) Biblia haut fleuve elobi boye: “Mawa emɔnanaki lisusu na elongi na ye tɛ.” Hana azwaki makasi. Apesaki mitungisi na ye epai ya moto oyo aleki ye na nguya mosika, Tata na ye ya likoló. (Tángá Nzembo 55:22.) Ezali nde na likambo moko oyo eleki ye kilo? Te, ezala na ntango wana, lelo mpe libela na libela!

16 Ntango toyoki ete makambo eleki biso motó, to tolɛmbi mpo na mawa na biso, ekozala malamu tólanda ndakisa ya Hana mpe tófungola motema na biso epai ya Ye oyo Biblia ebengi “Moyoki ya libondeli.” (Nz. 65:2) Soki tosali bongo na kondima nyonso, biso mpe tokomona ete “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso” ekolongola mawa na biso.Flp. 4:6, 7.

“Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso”

17, 18. (a) Nini emonisi ete Elekana andimaki elako oyo Hana asalaki? (b) Likambo nini Penina akokaki lisusu kosala Hana te?

17 Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, Hana ná Elekana bazongaki na tabernakle. Ekoki kozala ete ayebisaki ye likambo oyo asɛngaki na libondeli mpe elako oyo asalaki, mpo Mibeko ya Moize elobaki ete mobali azali na lotomo ya kolongola elako oyo mwasi asali kozanga ete mobali apesa nzela. (Mit. 30:10-15) Kasi, mobali wana ya sembo asalaki bongo te. Kutu, ye ná Hana basambelaki Yehova elongo na tabernakle liboso bázonga ndako.

18 Ntango nini mpenza Penina amonaki ete matumoli na ye ekobanda lisusu te kosala Hana mpasi? Biblia elobi yango te, kasi maloba ‘azalaki mawamawa lisusu te’ emonisi ete Hana akómaki na kimya ya motema kobanda na ntango wana. Ezala ndenge nini, Penina aumelaki te komona ete kotyola oyo azalaki kotyola Hana eboti mbuma te. Biblia etángi lisusu nkombo na ye te.

19. Lipamboli nini Hana azwaki, mpe ndenge nini amonisaki ete abosanaki te epai lipamboli yango eutaki?

19 Nsima ya basanza, kimya ya motema oyo Hana azalaki na yango ebongwanaki esengo monene. Akómaki na zemi! Atako azalaki na esengo, Hana abosanaki ata mokolo moko te epai lipamboli yango eutaki. Ntango mwana yango ya mobali abotamaki, apesaki ye nkombo Samwele, oyo elimboli “Nkombo ya Nzambe” mpe emonani ete asengeli kobelelaka nkombo ya Nzambe, ndenge Hana asalaki. Na mbula wana, Hana akendaki te ná Elekana mpe libota mobimba na Shilo. Ye ná mwana wana ya mbula misato batikalaki na ndako, tii ntango alongolaki ye na mabɛlɛ. Na nsima, amibongisaki  mpo na mokolo oyo asengelaki kokabwana na mwana na ye oyo alingaki mingi.

20. Ndenge nini Hana ná Elekana bakokisaki elaka oyo basalaki epai ya Yehova?

20 Kokabwana ná mwana na ye ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Ya solo, Hana ayebaki ete na Shilo, Samwele akobatelama malamu, mbala mosusu basi oyo bazalaki kosala na tabernakle nde bakobatela ye. Kasi, azalaki mpenza mwana moke, mpe mama nini alingaka kokabwana ná mwana na ye? Atako bongo, Hana ná Elekana bamemaki mwana yango, na koimaima te, kasi na botɔndi na motema. Bapesaki bambeka na ndako ya Nzambe, mpe balakisaki Samwele epai ya Eli, bayebisaki ye elako oyo Hana asalaki mwa bambula liboso.

Hana azalaki mpenza lipamboli mpo na mwana na ye Samuel

21. Ndenge nini libondeli ya Hana emonisaki ete azalaki na kondima makasi? (Talá mpe etanda “ Mabondeli mibale ya mozindo.”)

21 Na nsima, Hana asalaki libondeli moko, oyo Nzambe amonaki ete esengeli kokɔta na Liloba na ye. Soki otángi maloba na ye oyo ezali na 1 Samwele 2:1-10, okomona ete azalaki mpenza na kondima makasi. Asanzolaki Yehova na ndenge asalelaka nguya na ye monene mpo na kokitisa bato ya lolendo, kopambola bato oyo bazali konyokwama, mpe kosukisa bomoi ata mpe kobikisa moto na liwa. Asanzolaki Tata na ye mpo ete azali mosantu, moyengebene, mpe sembo. Yango wana, Hana akokaki koloba ete: “Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.” Yehova abongi mpenza kotyelama motema, abongwanaka te, mpe azali ekimelo mpo na bato nyonso oyo bazali konyokwama mpe bazali koluka lisalisi epai na ye.

22, 23. (a) Ndenge nini toyebi ete ntango Samwele azalaki kokola, ayebaki ete baboti na ye balingaka ye? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki lisusu Hana?

22 Samwele azalaki mpenza na mama oyo azalaki na kondima makasi epai ya Yehova. Atako azalaki esika moko te ná mama na ye ntango azalaki kokola, amiyokaki te ete basundoli ye. Mbula na mbula, Hana azalaki kokende na Shilo, mpe komemela ye  kazaka ezangá mabɔkɔ mpo na mosala na ye na tabernakle. Kazaka mokomoko oyo azalaki kotonga ezalaki komonisa ete azalaki kolinga mpe komibanzabanza mpo na mwana na ye. (Tángá 1 Samwele 2:19.) Meká komona na makanisi ndenge azalaki kolatisa mwana na ye kazaka ya sika, kosembola yango na nzoto na ye, kotala ye na esengo, mpe koloba na ye maloba ya boboto mpe ya kolendisa. Ezalaki mpenza lipamboli mpo na Samwele kozala na mama ya ndenge wana, mpe ntango akolaki azalaki lipamboli mpo na baboti na ye mpe mpo na Yisraele mobimba.

23 Nzambe abosanaki mpe Hana te. Yehova apesaki ye bana ebele, mpe abotelaki lisusu Elekana bana mitano. (1 Sa. 2:21) Ntango mosusu, lipamboli ya monene mpo na Hana ezalaki boyokani malamu oyo azalaki na yango na Yehova, oyo ezalaki se kokóma makasi na boumeli ya bambula. Tiká ete ezala mpe bongo mpo na yo, wana ozali komekola kondima ya Hana.

^ par. 7 Atako Biblia elobi ete Yehova ‘akangaki libumu ya Hana,’ eloko moko te emonisi ete Nzambe aboyaki mwasi yango ya komikitisa mpe ya sembo. (1 Sa. 1:5) Ntango mosusu Biblia elobaka ete Nzambe asali likambo moko, nzokande atikaki kaka nzela esalema mpo na mwa ntango.

^ par. 9 Topesi ntaka yango mpo balobaka ete Rama, mboka ya Elekana, ezalaki kaka engumba wana oyo ekómaki kobengama Arimate, na mikolo ya Yesu.