Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

Maloba ya nsuka

Maloba ya nsuka

‘Bókóma bamekoli ya baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.’BAEBRE 6:12.

1, 2. Mpo na nini ezali na ntina ete tózala na kondima makasi banda sikoyo? Pesá ndakisa.

KONDIMA ezali liloba mpe ezaleli moko kitoko. Kasi, soki toyoki liloba yango, ekozala malamu tókanisa mpe na maloba mosusu: “Kosala na lombangu!” Mpo soki tozali na kondima te, tosengeli kosala na lombangu mpo na kozala na yango. Mpe soki tozali na kondima, tosengeli kosala na lombangu mpo na kobatela mpe kokómisa yango makasi. Mpo na nini?

2 Kanisá ete ozali kokatisa esobe moko ya monene. Ozali na mposa makasi ya mai. Soki omoni esika mai ezali ata mwa moke, okoluka obatela yango na moi. Na nsima, okotoka mai oyo ekosalisa yo tii okokóma epai ozali kokende. Lelo oyo, tozali na mokili oyo kondima ya solo, lokola mai wana, ezali mpenza komonana te mpe ekoki kolimwa noki soki ebatelami te mpe ezali koleisama te ntango nyonso. Tosengeli kosala likambo oyo na lombangu: ndenge kaka tokoki kozala na bomoi te soki tozangi mai, tokoki mpe kozala na boyokani ya malamu te ná Yehova soki tozangi kondima.Rom. 1:17.

3. Yehova asali nini mpo na kosalisa biso tózala na kondima makasi, mpe wapi makambo mibale oyo tokozongela?

3 Yehova ayebi ete tozali mpenza na mposa ya kondima, mpe ayebi ete ezali pɛtɛɛ te kokóma na kondima makasi lelo mpe kobatela yango. Yango wana, apesi biso bandakisa oyo tokoki komekola. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki ete: ‘Bókóma bamekoli ya baoyo bazali kozwa libula ya bilaka na nzela ya kondima mpe motema molai.’ (Ebr. 6:12) Yango wana, ebongiseli ya Yehova elendisaka biso tósala makasi tómekola bandakisa ya mibali mpe basi ya sembo, lokola baoyo totaleli na buku oyo. Kasi, tosengeli kosala nini sikoyo? Tózongela makambo oyo mibale: (1) Tosengeli kokoba kokómisa kondima na biso makasi; (2) tosengeli kobatela elikya na biso.

4. Mpo na nini Satana azali monguna ya kondima, kasi mpo na nini tosengeli kobanga te?

4 Kobá kokómisa kondima na yo makasi. Monguna monene ya kondima ezali Satana. Mokonzi ya mokili oyo akómisi mabele esika oyo ezali mpasi mpo tóbatela kondima na biso. Aleki biso mosika na makasi. Tosengeli nde kobanga ete tokoki te kozala na kondima mpe kokómisa yango makasi? Soki moke te! Yehova azali moninga monene ya bato nyonso oyo balukaka kondima ya solo. Alendisi biso ete soki ye asalisi biso, tokoki kotɛmɛla Zabolo mpe tokoki ata kokimisa ye mosika na biso! (Yak. 4:7) Tokotɛmɛla ye soki tozali kozwa ntango mokolo na mokolo mpo na kokómisa kondima na biso makasi. Ndenge nini tokoki kosala yango?

5. Ndenge nini mibali mpe basi ya sembo oyo Biblia elobeli bakómaki na kondima? Limbolá.

5 Ndenge tomonaki yango, mibali mpe basi  ya kondima oyo Biblia elobeli babotamaki te bato ya kondima. Makambo oyo basalaki na bomoi na bango emonisi ete elimo santu ya Yehova esalisaka moto akóma na kondima. (Gal. 5:22, 23) Babondelaki Yehova asalisa bango mpe akobaki kokómisa kondima na bango makasi. Tósala ndenge bango basalaki, tóbosana soki moke te ete Yehova apesaka elimo na ye na baoyo basɛngaka yango mpe basalaka makambo oyo eyokani na mabondeli na bango. (Luka 11:13) Ezali na makambo mosusu oyo tokoki kosala?

6. Ndenge nini tokoki kozwa matomba mingi ntango tozali kotánga masolo ya Biblia?

6 Na buku oyo, totaleli kaka mwa bandakisa moke ya bato oyo bamonisaki kondima makasi. Ebele ya bato mosusu ya kondima mpe bazali! (Tángá Baebre 11:32.) Longola bato oyo totaleli na buku oyo, tokoki mpe koyekola makambo mingi soki totángi masolo ya bato mosusu ya sembo oyo Biblia elobeli. Soki tozali kotánga likolólikoló masolo ya Biblia oyo elobeli bato ya kondima, tokokómisa kondima na biso makasi te. Mpo tózwa mpenza matomba na makambo oyo tozali kotánga, tosengeli kozwaka ntango ya kokɔta na mozindo mpo na koyeba soki makambo ezalaki ndenge nini ntango lisolo wana ekomamaki mpe soki mimeseno ya bato oyo balobeli na Biblia ezalaki ndenge nini. Soki tozali ntango nyonso kobatela na makanisi ete bato wana ya kozanga kokoka bazalaki bato “lokola biso,” bandakisa na bango ekosalisa biso mingi. (Yak. 5:17) Soki tomitye na esika na bango, tokoki komona ndenge bamiyokaki ntango bakutanaki na mikakatano oyo biso mpe tozali kokutana na yango.

7-9. (a) Mibali mpe basi mosusu ya sembo oyo Biblia elobeli balingaki koyoka ndenge nini soki basɛngaki bango básambela Yehova lolenge oyo biso tozali kosala lelo? (b) Mpo na nini tosengeli kokómisa kondima na biso makasi na misala?

7 Bikateli oyo tozwaka mpe makambo oyo tosalaka ekoki mpe kosala ete kondima na biso ekóma makasi. Kutu, “kondima oyo ezali na misala te ekufi.” (Yak. 2:26) Kanisá naino ndenge mibali mpe basi oyo tolobeli bakokaki kosepela soki Yehova asɛngaki bango básala mosala oyo asɛngi biso tósala lelo!

8 Na ndakisa, Abrahama alingaki komiyoka ndenge nini soki bayebisaki ye ete asengeli te kosambela Yehova na bitumbelo ya mabanga oyo etongamaki na esobe, kasi nde na kati ya bato oyo basambelaka Yehova na Bandako ya Bokonzi mpe na mayangani ya minene, epai bazali kolobela mpe kolimbola na mozindo bilaka oyo amonaki kaka “na mosika”? (Tángá Baebre 11:13.) Mpe Eliya alingaki komiyoka ndenge nini soki bayebisaki ye ete mosala na ye esɛngi te koboma basakoli mabe ya Baala, ntango azalaki kosalela Yehova na boyangeli ya mokonzi mabe oyo apɛngwaki, kasi nde kotala bato na kimya mpe kopesa bango nsango ya kobɔndisa mpe ya elikya? Na ntembe te, bato ya kondima oyo Biblia elobeli balingaki kondima na lombangu mokumba ya kosambela Yehova ndenge biso tozali kosala lelo.

 9 Na yango, tókoba kokómisa kondima na biso makasi na misala. Soki tosali yango, tokoyeba ndenge ya kosalela bandakisa ya mibali mpe basi ya kondima, oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Ndenge tolobaki yango na maloba ya ebandeli, tokokóma mpenza baninga ya bato yango. Mpe mosika te, boninga yango ekokóma likambo ya solo.

10. Esengo nini tokozala na yango na Paradiso?

10 Batelá elikya na yo. Mibali mpe basi ya sembo bazwaka ntango nyonso makasi na elikya oyo Nzambe apesá bango. Bongo yo? Na ndakisa, kanisá esengo oyo ekozala ya kokutana na basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bakosekwa na ntango ya ‘lisekwa ya bayengebene.’ (Tángá Misala 24:15.) Mituna nini okosepela kotuna bango?

11, 12. Na mokili ya sika, mituna nini okoki kotuna (a) Abele? (b) Noa? (c) Abrahama? (d) Ruta? (e) Abigaile? (f) Estere?

11 Soki okutani na Abele, okosepela kotuna ye soki baboti na ye bazalaki ndenge nini? To okoki kotuna: “Osololaki ata mbala moko te na bakeruba wana oyo bazalaki kokɛngɛla porte ya Edene? Bapesaki yo eyano?” Bongo mituna nini okotuna Noa? Okoki kotuna ye boye: “Ozalaki kobanga banefilime te? Ndenge nini obatelaki banyama wana nyonso na boumeli ya mbula wana mobimba na kati ya masuwa?” Soki okutani na Abrahama, okoki kotuna ye boye: “Okutanaki na Seme ata mbala moko te? Nani ateyaki yo makambo etali Yehova? Ezalaki mpasi kotika Ure?”

12 Ndenge moko, kanisá mituna mosusu oyo okolinga kotuna basi ya sembo oyo bakosekwa. “Ruta, nini etindaki yo okóma mosambeli ya Yehova?” “Abigaile, obangaki mpo na koyebisa Nabale ndenge osalisaki Davidi?” “Estere, nini ekómelaki yo ná Mordekai nsima ya lisolo oyo Biblia elobeli?”

13. (a) Ekoki kozala ete bato oyo bakosekwa bakotuna yo mituna nini? (b) Ozali koyoka ndenge nini lokola oyebi ete okokutana na mibali mpe basi ya sembo oyo Biblia elobeli?

13 Na ntembe te, bato wana ya sembo bakozala mpe na mituna ebele ya kotuna yo. Ekozala mpenza esengo koyebisa bango ndenge mikolo ya nsuka elekaki mpe ndenge Yehova apambolaki basaleli na ye na boumeli ya ntango ya mpasi! Na ntembe te, bakosepela koyeba ndenge Yehova akokisaki bilaka na ye nyonso. Na mokili ya sika, ekozala lisusu na ntina te tóbanda komitunatuna soki basaleli ya sembo ya Nzambe oyo Biblia elobeli bazalaki ndenge nini. Tokozala ná bango na Paradiso! Salá nyonso oyo okoki kosala banda sikoyo mpo okómisa bato yango, baninga na yo mpenza. Kobá komekola kondima na bango. Tiká ete osepela kosalela Yehova elongo na bango lokola baninga na yo libela na libela!