Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA NSAMBO

“Azalaki se kokola liboso ya Yehova”

“Azalaki se kokola liboso ya Yehova”

1, 2. Epai wapi Samwele asololaki na Bayisraele, mpe mpo na nini azalaki na mposa ya kosalisa bango bábongola motema?

SAMWELE azali kotalatala bilongi ya bato ya ekólo na ye. Mobali yango ya sembo oyo azali mosakoli mpe mosambisi banda bambula mingi asɛngaki bato ya ekólo báyangana na engumba Gilgale. Na kalandriye ya lelo, ezali na sanza ya mitano to ya motoba; mbula ezalaki kobɛta te. Bilanga ya mokili yango etondaki na mbuma ya blé oyo eteli, oyo ezali kozela kaka bábuka yango. Ebele wana ya bato bafandaki kimya. Ndenge nini Samwele akosimba mitema na bango?

2 Bayisraele bazalaki koyeba te ete basali libunga moko monene. Batingamaki kaka bátyela bango moto oyo akozala mokonzi na bango. Bazalaki komona te ete bazangi limemya epai ya Yehova, Nzambe na bango, mpe mosakoli na ye. Ezalaki lokola nde baboyi Yehova azala mokonzi na bango! Ndenge nini Samwele akosalisa bango bábongola motema?

Ndenge Samwele akolaki ekoki koteya biso ete tokoki kokóma na kondima epai ya Yehova ata soki tofandi na bato ya mabe

3, 4. (a) Mpo na nini Samwele alobelaki bolenge na ye? (b) Mpo na nini ndakisa ya kondima ya Samwele ezali na ntina mpo na biso lelo?

3 Samwele azwaki maloba. Alobaki na ebele wana ya bato ete: “Nakómi mobange mpe na nsuki mpɛmbɛ.” Nsuki mpɛmbɛ na ye epesaki maloba na ye kilo. Na nsima, abakisaki boye: “Natamboli liboso na bino banda bolenge na ngai tii na mokolo ya lelo.” (1 Sa. 11:14, 15; 12:2) Atako Samwele akómaki mobange, abosanaki te mikolo ya bolenge na ye. Amonaki lisusu makambo oyo asalaki na eleko wana. Bikateli oyo azwaki ntango azalaki naino elenge esalaki ete akóma moto ya kondima makasi mpe oyo akangamá na Yehova Nzambe.

4 Mbala mingi, esɛngaki Samwele abatela kondima makasi mpo azalaki na bato oyo bazalaki na kondima te mpe bazalaki sembo te.  Lelo oyo mpe, ezali mpasi kobatela kondima na biso, mpo tofandi na mokili ya bato bazangá kondima mpe bosembo. (Tángá Luka 18:8.) Tótala naino mateya oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Samwele, banda ntango azalaki mwana moke.

“Azalaki kosala mosala liboso ya Yehova, azalaki naino mwana”

5, 6. Na ndenge nini Samwele akolaki lokola bana nyonso te, kasi mpo na nini baboti na ye bayebaki ete abatelami malamu?

5 Samwele akolaki lokola bana nyonso te. Mwa moke nsima ya kotika komɛla mabɛlɛ, mbala mosusu na mbula misato to mwa moke koleka, abandaki kosalela Yehova na tabernakle mosantu na Shilo, oyo ezalaki na kilomɛtrɛ koleka 30 longwa na ndako na bango, na Rama. Baboti na ye, Elekana ná Hana, bapesaki ye epai ya Yehova mpo asalela ye mosala mosantu lokola Monaziri bomoi na ye mobimba. * Yango elingi nde koloba ete baboti ya Samwele basundolaki ye mpo bazalaki kolinga ye te?

6 Ezali bongo te! Bayebaki ete mwana na bango akobatelama malamu na Shilo. Na ntembe te, Nganga-nzambe monene Eli azalaki kotambwisa makambo, mpo Samwele azalaki kosala ná ye na bomoko. Ezalaki mpe na basi ebele oyo bazalaki kosala misala na tabernakle, emonani ete bazalaki kosala na molɔngɔ.Kob. 38:8; Bas. 11:34-40.

7, 8. (a) Baboti ya Samwele bazalaki kosala nini mbula na mbula mpo na kolendisa ye? (b) Liteya nini baboti bakoki kozwa lelo oyo na ndakisa ya baboti ya Samwele?

7 Lisusu, Hana ná Elekana babosanaki te mwana na bango ya liboso oyo balingaki mingi, oyo azalaki eyano ya libondeli moko. Hana asɛngaki Nzambe apesa ye mwana mobali; alakaki ete akopesa mwana yango na mosala ya Nzambe bomoi na ye mobimba. Ntango bazalaki kokende mbula na mbula kotala Samwele, Hana azalaki komemela ye kazaka ya sika oyo ezangá mabɔkɔ, oyo azalaki kotongela ye mpo asalela mosala na tabernakle. Na ntembe te, elenge Samwele azalaki kosepela soki baboti na ye bayei kotala ye. Azalaki kosepela mingi ndenge baboti na ye bazalaki kolendisa ye mpe kopesa ye batoli ete kosalela Yehova na esika wana, oyo eleki bisika nyonso, ezali libaku malamu mpenza.

8 Lelo oyo mpe, baboti bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Hana ná Elekana. Mbala mingi ntango bazali kobɔkɔla bana na bango, baboti batyaka likebi mingi na makambo ya mosuni mpe babosanaka kosalisa bana na bango bázala baninga ya Yehova. Kasi, baboti ya Samwele batyaki makambo ya Yehova na esika ya liboso, mpe yango esalisaki mwana na bango akola malamu.Tángá Masese 22:6.

9, 10. (a) Tabernakle ezalaki ndenge nini, mpe elenge Samwele azalaki koyoka ndenge nini mpo na esika mosantu yango? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Mikumba nini Samwele azalaki na yango, mpe mpo na yo, ndenge nini bilenge lelo oyo bakoki komekola ye?

 9 Meká komona na makanisi ndenge elenge Samwele azalaki kokola mpe ndenge azalaki kotambolatambola na mwa bangomba oyo ezalaki zingazinga ya Shilo. Ntango akiti na nse mpe atali lobwaku monene oyo ezalaki wana pembeni, na ntembe te motema na ye ezalaki kotonda na esengo mpe na nsai ntango azalaki komona tabernakle ya Yehova na mosika. Tabernakle ezalaki mpenza esika mosantu. * Etongamaki mbula pene na 400 liboso, na litambwisi ya Moize; ezalaki esika kaka moko mpo na losambo ya Yehova na mokili mobimba.

10 Elenge Samwele akómaki kosepela mingi na tabernakle. Na nsima, akomaki boye: “Samwele azalaki kosala mosala liboso ya Yehova, azalaki naino mwana, alati efode ya lini na loketo.” (1 Sa. 2:18) Lokola Samwele azalaki kolata elamba yango oyo ezangá mabɔkɔ, emonani ete azalaki kosalisa banganga-nzambe na tabernakle. Atako azalaki na libota ya banganga-nzambe te, Samwele azalaki na mikumba, na ndakisa kofungola ntɔngɔ nyonso baporte oyo ezalaki komema na lopango ya tabernakle mpe kosalisa Eli, oyo akómaki mobange. Atako elenge Samwele azalaki kosepela na mikumba na ye, motema na ye ekómaki kotungisama. Likambo moko ya mabe ezalaki kosalema na ndako ya Yehova.

Atikalaki pɛto liboso ya makambo ya mbindo

11, 12. (a) Libunga nini ya liboso Hofini ná Finehase basalaki? (b) Makambo nini ya mabe mpe ya mbindo Hofini ná Finehase bazalaki kosala na tabernakle? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

11 Ntango azalaki naino elenge, Samwele amonaki makambo ya mabe mpe ya mbindo. Eli azalaki na bana mibale ya mibali, Hofini ná Finehase. Mokanda ya Samwele elobi boye: “Bana mibali ya Eli bazalaki bato mpamba; bazalaki koyeba kotya Yehova na esika na ye te.” (1 Sa. 2:12) Makanisi mibale oyo balobeli na vɛrsɛ yango ezali na boyokani. Hofini ná Finehase bazalaki “bato mpamba”—oyo elimboli mpenzampenza “bana bazangá ntina”—mpo bazalaki na limemya te epai ya Yehova. Bazalaki kokipe ata moke te mitinda mpe masɛngami na ye ya sembo. Yango nde ememaki bango na kosala masumu mosusu.

 12 Mibeko ya Nzambe emonisaki polele mikumba ya banganga-nzambe mpe ndenge oyo basengelaki kopesaka bambeka na tabernakle na ye. Ezalaki mpamba te! Bambeka yango ezalaki komonisa bibongiseli oyo Nzambe azwaki mpo na kolimbisa masumu ya bato mpo bámonana pɛto na miso na ye, mpe bázala bato oyo akoki kopambola mpe kotambwisa. Kasi, Hofini ná Finehase bapusaki baninga na bango banganga-nzambe bázanga mpenza limemya mpo na bambeka oyo ezalaki kopesama. *

13, 14. (a) Bato ya sembo bazalaki koyoka ndenge nini mpo na makambo mabe oyo ezalaki kosalema na tabernakle? (b) Na ndenge nini Eli akokisaki te mokumba na ye ya tata mpe ya nganga-nzambe monene?

13 Kanisá ndenge elenge Samwele azalaki kokamwa ntango azalaki komona masumu minene wana, mpe bato oyo bazalaki kosala yango bazalaki kozwa etumbu te. Bato boni amonaki—ezala babola, bato ya komikitisa, bato oyo bazalaki konyokwama—oyo bazalaki koya na tabernakle na elikya ya kobɔndisama mpe kolendisama na elimo, kasi bazalaki kozonga nzoto elɛmbi, na mpasi na motema mpe na nsɔni? Mpe ayokaki ndenge nini ntango ayebaki ete Hofini ná Finehase bazalaki mpe kobuka mibeko ya Yehova na oyo etali kosangisa nzoto, na ndenge bazalaki kosangisa nzoto ná basi mosusu oyo bazalaki kosala na tabernakle? (1 Sa. 2:22) Mbala mosusu atyaki motema ete Eli akosembola makambo.

Na ntembe te, Samwele atungisamaki ntango azalaki komona mabe oyo bana ya Eli bazalaki kosala

14 Eli nde moto akokaki kosembola makambo wana oyo ezalaki se kokóma minene. Lokola azalaki nganga-nzambe monene, makambo nyonso oyo ezalaki kosalema na tabernakle ezalaki na motó na ye. Lokola azalaki tata, azalaki na mokumba ya kosembola bana na ye. Bazalaki komisalela mabe mpe bazalaki kosalela bato mosusu ya ekólo mabe. Nzokande, Eli akokisaki te mokumba na ye ya tata mpe ya nganga-nzambe monene. Azalaki kopamela bana na ye na ndenge ya masɛki. (Tángá 1 Samwele 2:23-25.) Nzokande, bana yango basengelaki kozwa disiplini ya makasi mpenza. Bazalaki kosala masumu oyo ebongaki na liwa!

15. Nsango nini ya etumbu makasi Yehova atindelaki Eli, mpe Eli ná libota na ye basalaki nini nsima ya koyoka makebisi wana?

15 Lokola makambo ekómaki mabe mingi, Yehova atindaki “moto moko ya Nzambe,” mosakoli moko oyo Biblia etángi nkombo na ye te, mpo na koyebisa Eli nsango ya etumbu makasi oyo Yehova akatelaki ye. Yehova ayebisaki Eli boye: “Ozali se kokumisa bana na yo koleka ngai.” Na yango, Nzambe asakolaki ete bana mabe wana ya Eli bakokufa mokolo moko mpe ete libota ya Eli ekomona mpasi mpenza, tii ekobungisa  ata esika na yango na libota ya banganga-nzambe. Makebisi wana ya makasi ebongolaki nde makambo na libota yango? Biblia elobi ata esika moko te ete babongolaki motema.1 Sa. 2:27–3:1.

16. (a) Biblia elobi ete Samwele azalaki elenge ya ndenge nini ntango azalaki kokola? (b) Makambo yango ezali kolendisa yo? Limbolá.

16 Makambo wana nyonso ya mbindo esalaki elenge Samwele nini? Na eleko wana ya mabe, makambo ya malamu mpe ezalaki, bato bazalaki koloba malamu mpo na ndenge Samwele azalaki kokola. Tóbosana te ete na 1 Samwele 2:18, totángaki ete Samwele “azalaki naino mwana” mpe “azalaki kosala mosala liboso ya Yehova” na bosembo. Atako azalaki elenge, Samwele amipesaki na mosala ya Nzambe. Vɛrsɛ 21 ya mokapo yango elobeli likambo ya esengo koleka: “Elenge Samwele azalaki se kokola liboso ya Yehova.” Wana azalaki kokola, boyokani na ye ná Tata na ye ya likoló ezalaki se kokóma makasi. Boyokani makasi ndenge wana ná Yehova nde ebatelaka na makambo nyonso ya mabe.

17, 18. (a) Ndenge nini bilenge bakristo bakoki kolanda ndakisa ya Samwele soki bazali komona makambo ya mbindo? (b) Nini emonisi ete Samwele aponaki nzela ya malamu?

17 Ekokaki kozala mpasi te Samwele amona ete lokola nganga-nzambe monene ná bana na ye bazali kosala masumu, ye mpe akoki kosala nyonso oyo alingi. Kasi, makambo mabe ya basusu, ata baoyo bazali na mikumba, epesi moto moko te nzela ya kosala lisumu. Lelo oyo, bilenge bakristo mingi bazali kolanda ndakisa ya Samwele mpe bazali kokoba “kokola liboso ya Yehova”—ata soki bato oyo bazali ná bango bazali na etamboli ya mabe.

18 Makambo esukaki ndenge nini mpo na Samwele? Biblia elobi boye: “Na ntango wana nyonso, elenge Samwele azalaki se kokola mpe azalaki kosepelisa mpenza Yehova ná bato.” (1 Sa. 2:26) Ya solo, bato mingi bazalaki mpenza kosepela na Samwele. Yehova azalaki kosepela na elenge mobali yango mpo na bosembo  na ye. Mpe na ntembe te, Samwele ayebaki ete Nzambe na ye akosembola mabe nyonso oyo ezalaki kosalema na Shilo, kasi mbala mosusu azalaki komituna soki akosala yango ntango nini. Mokolo moko na butu, azwaki eyano na mituna na ye.

“Lobá mpo mosaleli na yo azali koyoka”

19, 20. (a) Lobelá likambo oyo ekómelaki Samwele mokolo moko na butu na tabernakle. (b) Ndenge nini Samwele ayebaki moto oyo azalaki kobenga ye, mpe ndenge nini azalaki kotalela Eli?

19 Etikalaki moke ntɔngɔ etana, kasi molili ezalaki naino; mwinda monene ya hema ezalaki naino kopela. Na ntango wana oyo makɛlɛlɛ ezalaki te, Samwele ayokaki mongongo moko ezali kobenga ye. Akanisaki ezali Eli, oyo akómaki mobange mpenza mpe azalaki komona lisusu malamu te. Samwele alamukaki mpe “apotaki mbangu” epai ya mobange yango. Ozali komona na makanisi ndenge elenge mobali yango azali kopota mbangu makolo ngulu mpo na kotuna Eli soki azali na mposa ya nini? Likambo ya esengo ezali ete Samwele azalaki komemya Eli mpe kosalela ye makambo na boboto. Ata na masumu na ye wana nyonso, Eli azalaki kaka nganga-nzambe monene ya Yehova.1 Sa. 3:2-5.

20 Samwele alamusaki Eli, alobaki na ye: “Ngai oyo, mpo obengi ngai.” Kasi, Eli alobaki na ye ete abengi ye te mpe ayebisaki ye azonga kolala. Kasi, esalemaki lisusu bongo mbala mibale! Nsukansuka, Eli ayebaki likambo oyo ezali koleka. Yehova azalaki mpenza lisusu te kotinda bimonaneli to bisakweli epai ya bato na ye, mpe ezalaki mpasi te koyeba ntina oyo ekómaki bongo. Kasi, Eli amonaki ete Yehova azongeli koloba—ya mbala oyo epai ya elenge mobali wana! Eli ayebisaki Samwele azonga kolala mpe ayebisaki ye ndenge oyo asengeli koyanola. Samwele atosaki. Eumelaki te, ayokaki lisusu mongongo ezali kobenga ye: “Samwele, Samwele!” Elenge mobali yango ayanolaki boye: “Lobá, mpo mosaleli na yo azali koyoka.”1 Sa. 3:1, 5-10.

21. Ndenge nini tokoki koyoka Nzambe lelo oyo, mpe mpo na nini ebongi kosala bongo?

21 Nsukansuka, Yehova azwaki lisusu moto oyo azalaki koyoka ye na Shilo. Mpe na bomoi na ye mobimba, Samwele azalaki koyoka Nzambe. Yo mpe ozalaka bongo? Tosengeli kozela te ete mongongo ya Nzambe to ya anzelu eloba na biso mokolo moko na butu. Lelo oyo, tokoki koloba ete toyokaka mongongo ya Nzambe na lolenge moko to mosusu. Toyokaka yango na Liloba na ye, Biblia. Ntango tozali koyoka Nzambe mpe kotosa ye, kondima na biso ekokóma mpenza makasi. Yango nde Samwele asalaki.

Atako abangaki, Samwele ayebisaki na bosembo nyonso nsango ya etumbu oyo Yehova alobaki mpo na Eli

22, 23. (a) Ndenge nini nsango oyo Samwele abangaki liboso koyebisa Eli ekokisamaki? (b) Samwele akobaki se koyebana lokola moto ya ndenge nini?

22 Na butu wana na Shilo, ezalaki mokolo moko monene mpo na Samwele, mpo akómaki lisusu na boyokani ya ntina mingi ná Yehova, akómaki mosakoli mpe molobeli na ye. Na ebandeli, elenge Samwele abangaki koyebisa Eli nsango oyo Yehova apesaki, mpo ezalaki nsango ya nsuka oyo emonisaki ete etikali moke esakweli oyo elobelaki etumbu oyo libota yango ekozwa ekokisama. Kasi, Samwele azwaki mpiko ya koyebisa  Eli nsango yango—mpe Eli andimaki na komikitisa nyonso ekateli wana ya Nzambe. Eumelaki te, makambo nyonso oyo Yehova alobaki ekokisamaki: Yisraele ebundaki na Bafilistia, mpe Hofini ná Finehase babomamaki mokolo moko. Eli akufaki ntango ayokaki ete babɔtɔlaki sanduku mosantu ya Yehova.1 Sa. 3:10-18; 4:1-18.

23 Kasi, Samwele azalaki se koyebana lokola mosakoli ya Yehova ya sembo. Biblia elobi boye: “Yehova ye moko azalaki elongo na ye,” mpe ebakisi ete Yehova azalaki kokokisa bisakweli nyonso ya Samwele.Tángá 1 Samwele 3:19.

“Samwele abelelaki Yehova”

24. Nsima ya mikolo, ekateli nini Bayisraele bazwaki, mpe mpo na nini ezalaki lisumu monene?

24 Bayisraele balandaki litambwisi ya Samwele, bakómaki na boyokani malamu ná Nzambe, mpe bakómaki bato ya sembo? Te. Nsima ya mikolo, balobaki ete balingi lisusu te ete mosakoli mpamba asambisaka bango. Balingi kozala lokola bato ya bikólo mosusu; bázala na mokonzi oyo akoyangela bango. Na litambwisi ya Yehova, Samwele andimaki. Kasi, asengelaki komonisa Bayisraele ete basali lisumu moko monene. Bazalaki koboya moto te, kasi nde Yehova ye moko! Yango wana ayanganisaki bato na Gilgale.

Samwele abondelaki na kondima; mpe Yehova ayanolaki ye na nzela ya mbula ya bankake

25, 26. Na Gilgale, ndenge nini mobange Samwele asalisaki Bayisraele bámona ete basalelaki Yehova lisumu moko monene?

25 Tósala lokola nde tozali elongo na ye ntango azalaki koloba na batomboki wana na Gilgale. Kuna, Samwele, oyo akómaki mobange, amonisaki Bayisraele ete atikalaki sembo bomoi na ye mobimba. Na nsima, Biblia elobi ete “Samwele abelelaki Yehova.” Asɛngaki Yehova abɛtisa mbula ya bankake.1 Sa. 12:17, 18.

26 Mbula ya bankake? Na eleko oyo mbula ezalaki kobɛta te? Likambo ya ndenge wana esalemaki naino te! Soki bato batyaki ntembe to batyolaki ye, eumelaki te. Na mbala moko, mapata eyindaki. Mopɛpɛ epɛpaki mpe ebandaki koningisa mbuma ya blé na bilanga. Nkake ebandaki kobɛta mpe kobimisa mikalikali. Mpe mbula ebɛtaki. Nini esalemaki? “Bato nyonso babangaki Yehova mpe Samwele makasi mpenza.” Bayaki komona ete basali lisumu moko monene.1 Sa. 12:18, 19.

27. Yehova asalaka nini na baoyo bamekolaka kondima ya Samwele?

27 Yehova, Nzambe ya Samwele nde asimbaki mitema ya batomboki wana, kasi ezalaki Samwele te. Kobanda azalaki elenge tii akómaki mobange, Samwele azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe na ye. Mpe Yehova apesaki ye mbano. Tii lelo oyo Yehova abongwani te. Asungaka baoyo nyonso bazali komekola kondima ya Samwele.

^ par. 5 Banaziri bazalaki kosala elako mpe epekisamaki ete bámɛla masanga mpe bákata nsuki. Mingi bazalaki kondima elako yango kaka mpo na mwa ntango, kasi bamosusu lokola Samsone, Samwele, mpe Yoane Mobatisi, bazalaki Banaziri bomoi na bango mobimba.

^ par. 9 Tabernakle yango ezalaki rektangle, hema moko monene oyo etyamaki na mabaya. Kasi, basalaki yango na biloko kitoko—mposo ya nyama ebengami fɔkɛ, bilamba ya mayemi ya singasinga, mpe mabaya ya ntalo oyo bapakoli palata mpe wolo. Tabernakle yango ezalaki na kati ya lopango moko oyo ezalaki rektangle; ezalaki mpe na etumbelo moko monene mpo na bambeka. Na nsima, batongaki bashambre na mipanzi ya tabernakle mpo na banganga-nzambe. Ekoki kozala ete Samwele azalaki kolala na moko ya bashambre yango.

^ par. 12 Lisolo yango elobeli makambo mibale ya kozanga limemya. Ya liboso, Mibeko emonisaki polele biteni nini ya nyama ya mbeka oyo banganga-nzambe basengelaki kolya. (Mib. 18:3) Nzokande na tabernakle, banganga-nzambe wana ya mabe babimisaki momeseno mosusu. Bazalaki kotinda basaleli na bango bákɔtisa kanya ya monene na nzungu oyo bazalaki kotokisa misuni mpe bábimisa eteni nyonso ya mosuni oyo ekɔti na kanya! Longola yango, ntango bato bazalaki komema bambeka na bango na etumbelo, banganga-nzambe wana ya mabe bazalaki kotinda mosaleli moko abangisa moto oyo ayei kopesa nyama mpe básɛnga ye mosuni ya mobesu liboso kutu mafuta na yango epesama mbeka epai ya Yehova.Lev. 3:3-5; 1 Sa. 2:13-17.