Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA LIBWA

Asalaki na bokɛngi

Asalaki na bokɛngi

1-3. (a) Mpo na nini likama ezalaki koya na ndako ya Abigaile? (b) Makambo nini tokoyekola na ntina etali Abigaile?

ABIGAILE amonaki ete elenge mobali azali na nsɔmɔ. Elenge yango azalaki kolɛnga na nsɔmɔ, mpe ezalaki mpamba te. Likama monene ezalaki koyela bango. Basoda soki 400 bazalaki koya, bazalaki na ekateli ya koboma mibali nyonso ya ndako ya Nabale, mobali ya Abigaile. Mpo na nini?

2 Nabale nde alukaki makambo. Asalaki makambo na nko mpe na kozanga limemya, ndenge amesaná. Kasi, moto oyo afingaki na mbala oyo, azalaki mokambi ya basoda ya mpiko oyo bato bazalaki kolinga mpe bazalaki sembo epai na ye. Sikoyo, elenge mosali moko ya Nabale, mbala mosusu oyo azalaki mobateli ya mpate, ayaki epai ya Abigaile na elikya ete mwasi yango akozwa mayele ya kobikisa bango. Kasi, mwasi akokaki kosala nini liboso ya limpinga ya basoda?

Mwasi akokaki kosala nini liboso ya limpinga ya basoda?

3 Ya liboso, tólobela naino mwa moke mwasi yango Abigaile. Azalaki nani? Matata wana ebandaki ndenge nini? Mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya kondima na ye?

“Azalaki na bokɛngi mpenza mpe azalaki kitoko mingi”

4. Nabale azalaki moto ya ndenge nini?

4 Abigaile azalaki mwasi oyo abongi na Nabale te. Nabale akokaki te kozwa mwasi mosusu ya malamu koleka Abigaile; kasi Abigaile abalaki mobali ya mabe koleka mibali nyonso oyo akokaki kozwa. Ya solo, Nabale azalaki moto ya mbongo. Na yango, azalaki komimona moto ya ntina mingi; kasi ndenge nini basusu bazalaki kotalela ye? Ezali mpasi tómona moto mosusu na Biblia oyo balobeli mabe koleka ndenge balobeli Nabale. Kutu, nkombo na ye elimboli “Azangá mayele,” to “Zoba.” Baboti na ye nde bapesaki ye nkombo yango ntango abotamaki,  to ezali nkombo oyo babambaki ye kobamba mpo na bizaleli na ye? Ezala ndenge nini, nkombo yango ebongaki na ye mpenza. Nabale azalaki “makambo makasimakasi mpe bizaleli mabe.” Lokola azalaki konyokola basusu mpe kolangwa masanga, bato bazalaki kobanga ye mpe kokima ye.1 Sa. 25:2, 3, 17, 21, 25.

5, 6. (a) Okanisi ete bizaleli nini ya malamu mingi Abigaile azalaki na yango? (b) Mpo na nini Abigaile abalaki mobali ya mpambampamba ndenge wana?

5 Abigaile akesenaki mpenza na Nabale. Nkombo na ye elimboli “Tata na ngai amikómisi moto ya esengo.” Batata mingi basepelaka soki mwana na bango ya mwasi azali kitoko, kasi tata ya bwanya asepelaka mingi koleka soki amoni ete mwana na ye azali na bizaleli ya malamu. Mbala mingi, moto oyo azali kitoko amonaka ntina te ya kokolisa bizaleli lokola bokɛngi, bwanya, mpiko, to mpe kondima. Kasi, Abigaile azalaki bongo te. Biblia elobi ete azalaki na bokɛngi mpenza mpe azalaki kitoko mingi.Tángá 1 Samwele 25:3.

6 Lelo oyo, bato mosusu bakoki komituna, ‘Mpo na nini elenge mwasi ya mayele ndenge wana abalanaki na mobali ya zoba motindo wana?’ Tóbosana te ete na ntango ya kala, mbala mingi baboti nde bazalaki koponela bana na bango mobali to mwasi. Ata soki esalemi bongo te, mbala mingi libala ezalaki kosalema kaka soki baboti bandimi. Baboti ya Abigaile balingaki libala yango, to mpe babongisaki yango, mpo balandaki bomɛngo mpe lokumu ya Nabale? Bobola nde etindaki bango bábalisa mwana na bango epai ya Nabale? Ezala ndenge nini, mbongo ya Nabale esalisaki ye te azala mobali ya malamu.

7. (a) Makambo nini baboti basengeli te kosala lelo oyo, soki balingi kosalisa bana na bango bátalelaka libala na ndenge ya malamu? (b) Abigaile azalaki na ekateli ya kosala nini?

7 Baboti oyo bazali na bwanya basalisaka bana na bango báyeba kotalela libala na ndenge ya malamu. Batindaka bana na bango te bábala mpo na mbongo, to mpe bálingana na moto ntango bazali naino bilenge mpenza mpe bakoki te mpo na kokokisa mikumba oyo mobali ná mwasi bakokisaka na libala. (1 Ko. 7:36) Kasi, lokola Abigaile asilaki kobala, akokaki lisusu kotalela nyonso wana te. Ezala mpo na boye to boye, akómaki mwasi ya Nabale mpe azalaki na ekateli ya kosala nyonso oyo akoki mpo azala malamu na libala wana ya matata.

‘Apamelaki bango makasi’

8. Moto nini Nabale afingaki, mpe mpo na nini okanisi ete ezalaki bozoba mpenza?

8 Nabale auti kosala likambo moko oyo ekopesa lisusu Abigaile mpasi. Moto oyo Nabale afingaki ezalaki nde Davidi. Davidi azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova oyo mosakoli Samwele atyaki mafuta, mpo na komonisa ete Nzambe aponi ye akóma mokonzi na esika ya Saulo. (1 Sa. 16:1, 2, 11-13) Lokola azalaki kokima Mokonzi Saulo mpo akómaki koyokela ye zuwa mpe koluka koboma ye, Davidi ná basoda na ye 600 bazalaki kofanda na esobe.

9, 10. (a) Davidi ná bato na ye bazalaki kofanda na esika ya ndenge nini? (b) Mpo na nini Nabale asengelaki komonisa botɔndi mpo na makambo oyo Davidi ná bato na ye bazalaki kosala? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa ya paragrafe 10.)

 9 Nabale azalaki kofanda na Maone kasi azalaki kosala misala na ye na Karamele, * engumba oyo ezalaki mosika te, mpe mbala mosusu azalaki na mabele kuna. Bingumba yango mibale ezalaki na kati ya bangomba patatalu oyo ezalaki na matiti ya mobesu ebele mpo na koleisa bampate, mpe Nabale azalaki na bampate 3 000. Kasi, pembenipembeni wana, ezalaki na esobe. Na sudi, ezalaki na esobe monene ya Parane. Na ɛsti, nzela oyo ekei na Mbu ya Mungwa elekaki na bisobe oyo etondi na mabulu mpe mibenga. Davidi ná bato na ye bazalaki kofanda na bisika yango, bazalaki na bomoi ya mpasi; na ntembe te bazalaki koboma banyama mpo na kolya mpe bazalaki kokutana na mikakatano mingi. Bazalaki mbala mingi kokutana na bilenge mibali oyo bazalaki kobatela bampate ya Nabale, moto ya bomɛngo.

10 Makambo nini basoda yango ya mpiko bazalaki kosala babateli ya mpate? Bakokaki mbala na mbala koyiba mpate mpo bálya, kasi basalaki yango te. Kutu, bakómaki nde kobatela bibwɛlɛ ya Nabale mpe bato na ye ya mosala. (Tángá 1 Samwele 25:15, 16.) Bampate ná babateli na yango bazalaki kokutana na makama mingi. Banyama mabe ezalaki mingi mpe lokola ndelo ya sudi ya Yisraele ezalaki mosika te, bapunzi mpe miyibi oyo bazalaki kouta na bikólo mosusu bazalaki mingi na esika yango. *

11, 12. (a) Ndenge nini Davidi amonisaki bonkonde mpe limemya na maloba oyo atindelaki Nabale? (b) Mpo na nini ndenge oyo Nabale asalaki ntango ayokaki maloba oyo Davidi atindaki ezalaki mabe?

11 Ezalaki pɛtɛɛ te koleisa mibali wana nyonso na esobe. Na yango, mokolo moko Davidi atindaki bato na ye zomi bákende kosɛnga Nabale lisalisi. Davidi aponaki ntango ya malamu. Ezalaki eleko ya kokata nsuki ya bampate, ntango oyo bato mingi bazalaki na momeseno ya kokabela bazalani na bango biloko. Davidi aponaki malamu maloba na ye, asalelaki maloba ya limemya. Kutu atindaki báloba na Nabale ete “mwana na yo Davidi,” mbala mosusu mpo na komonisa na limemya nyonso ete Nabale azali mokóló na ye. Nabale asalaki nini?1 Sa. 25:5-8.

12 Asilikaki! Elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli ayebisaki Abigaile ete Nabale ‘apamelaki makasi’ bato oyo Davidi atindaki. Lokola Nabale azalaki mabɔkɔ makasi, alobaki ete akoki te kokaba mampa, mai mpe misuni ya banyama oyo bautaki koboma. Alobaki ete Davidi  azali na ntina te mpe azali lokola mosali oyo akimá nkolo na ye. Ekoki kozala ete makanisi ya Nabale ezalaki ndenge moko na oyo ya Saulo, oyo azalaki koyina Davidi. Moko te kati na bango mibale atalelaki makambo ndenge Yehova atalelaka. Nzambe azalaki kolinga Davidi mpe azalaki komona ye te lokola moombo oyo atombokeli nkolo na ye, kasi lokola moto oyo akokóma mokonzi ya Yisraele.1 Sa. 25:10, 11, 14.

13. (a) Davidi asalaki nini ntango ayokaki ete Nabale afingi ye? (b) Maloba ya Yakobo 1:20 eteyi biso nini na likambo oyo Davidi asalaki?

13 Ntango bato oyo Davidi atindaki bayebisaki ye makambo oyo elekaki, Davidi asilikaki makasi. Alobaki boye: “Moto na moto akanga mopanga na ye na loketo!” Ye moko mpe akangaki mopanga, azwaki bato 400, mpe bakendaki mpo na kobunda. Azwaki ekateli ya koboma mibali nyonso ya ndako ya Nabale. (1 Sa. 25:12, 13, 21, 22) Davidi azalaki na ntina ya kosilika, kasi ndenge oyo amonisaki yango ezalaki mabe. Biblia elobi ete: “Nkanda ya moto esalaka makambo ya boyengebene ya Nzambe te.” (Yak. 1:20) Sikoyo, ndenge nini Abigaile akobikisa bato ya ndako na ye?

“Tiká ete mayele na yo epambwama”

14. (a) Ndenge nini Abigaile asalaki mpo na kobongisa mabe oyo Nabale asalaki? (b) Liteya nini tokoki kozwa soki totaleli bokeseni oyo ezalaki kati na Nabale mpe Abigaile? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

14 Tokoki koloba ete Abigaile alekisaki ntango te mpo na kobongisa mabe monene oyo esalemaki. Na bokeseni na mobali na ye Nabale, Abigaile azalaki koyoka basusu. Nzokande, elenge wana oyo ayaki na nsango alobaki mpo na Nabale ete: “Azali moto moko mpamba mpenza, moto akoki kosolola na ye te.” * (1 Sa. 25:17) Likambo ya mawa, lokola Nabale azalaki komimona moto ya ntina mingi, azalaki koboya koyoka basusu. Ata lelo oyo mpe, bato mingi bazali na lolendo ya ndenge wana. Kasi, elenge mobali wana ayebaki ete Abigaile azali bongo te; yango nde akendeki koyebisa ye likambo yango.

Na bokeseni na Nabale, Abigaile azalaki koyoka basusu

15, 16. (a) Ndenge nini Abigaile amonisaki ete azali lokola mwasi oyo akoki, oyo mokanda ya Masese elobeli? (b) Mpo na nini likambo oyo Abigaile asalaki emonisi te ete atombokelaki bokonzi ya mobali na ye?

15 Abigaile akanisaki mpe asalaki nokinoki. Biblia elobi ete “na mbala moko, Abigaile asalaki nokinoki.” Na lisolo yango moko mpamba, basaleli maloba “kosala nokinoki” mbala minei mpo na kolobela mwasi wana. Abongisaki likabo monene mpo na Davidi mpe bato  na ye. Atyaki biloko lokola mampa, vinyo, mpate, mbuma batumbá, bagato ya mbuma ya vinyo, mpe bagato ya figi. Emonani polele ete Abigaile ayebaki malamu biloko oyo azalaki na yango mpe azalaki kolandela makambo nyonso ya ndako na ye, kaka lokola mwasi oyo akoki, oyo balobeli na mokanda ya Masese. (Mas. 31:10-31) Atindaki basali na ye mosusu bákende liboso na biloko yango, mpe ye moko alandaki na nsima. Biblia elobi boye: “Kasi, ayebisaki mobali na ye Nabale eloko moko te.”1 Sa. 25:18, 19.

16 Yango elingi nde koloba ete Abigaile atosaki te bokonzi ya mobali na ye? Te; tóbosana te ete Nabale afingaki moto yo Yehova atyaki mafuta, likambo yango ekokaki kobomisa bato mingi ya libota ya Nabale oyo basalaki eloko te. Soki Abigaile asalaki eloko te, alingaki mpe kozala na ngambo mpo na mabe ya mobali na ye. Yango wana, esengelaki atosa Nzambe liboso ya kotosa mobali na ye.

17, 18. Abigaile asalaki nini ntango akutanaki na Davidi, alobaki nini, mpe mpo na nini maloba na ye esimbaki motema ya Davidi?

17 Eumelaki te, Abigaile akutanaki na Davidi mpe bato na ye. Na mbala oyo mpe asalaki lisusu nokinoki, akitaki na mpunda na ye mpe afukamaki liboso ya Davidi. (1 Sa. 25:20, 23) Na nsima, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo ezalaki na motema na ye, abondelaki ye na motema moko ete ayokela mobali na ye mpe bato ya ndako na ye mawa. Mpo na nini maloba na ye esimbaki motema ya Davidi?

“Nabondeli yo, tiká moombo na yo aloba na matoi na yo”

18 Atyaki likambo yango na motó na ye mpe asɛngaki Davidi alimbisa nde ye. Andimaki ete mobali na ye azali zoba, ndenge nkombo na ye emonisi yango, mbala mosusu mpo na komonisa ete Davidi akokitisa lokumu na ye soki apesi moto ya ndenge wana etumbu. Amonisaki ete azali kondima Davidi lokola momonisi ya Yehova, mpe ayebaki ete azalaki kobunda “bitumba ya Yehova.” Amonisaki mpe ete ayebi elaka oyo Yehova apesaki ete Davidi akozala mokonzi, mpo alobaki ete: “Yehova . . . akotya yo mpenza mokambi ya Yisraele.” Longola yango, asɛngaki Davidi asala te likambo oyo ekoki komemisa ye ngambo ya makila to oyo ekoki kosala ete akóma ‘kotengatenga,’ na ntembe te azalaki kolobela ndenge lisosoli na ye ekotungisama. (Tángá 1 Samwele 25:24-31.) Maloba yango ezalaki mpenza ya boboto mpe ya kosimba motema!

19. Davidi asalaki nini nsima ya koyoka Abigaile, mpe mpo na nini akumisaki ye?

19 Bongo Davidi asalaki nini? Andimaki biloko oyo Abigaile amemaki mpe alobaki boye: “Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama, ye oyo atindi yo okutana na ngai na mokolo ya lelo! Mpe tiká ete mayele na yo epambwama, mpe yo moko opambwama, yo moto opekisi ngai lelo ete namema ngambo ya makila.” Davidi akumisaki ye ndenge asalaki nokinoki mpenza mpo na kokutana na ye, mpe andimaki ete apekisaki ye amema ngambo ya makila. Davidi alobaki na ye boye: “Kende na kimya na ndako na yo.” Mpe na komikitisa nyonso abakisaki ete: “Nayoki mongongo na yo.”1 Sa. 25:32-35.

 “Moombo na yo ye oyo”

20, 21. (a) Likambo nini esepelisi yo na ndenge Abigaile andimaki kozonga epai ya mobali na ye? (b) Ndenge nini Abigaile amonisaki mpiko mpe bokɛngi na likambo etali kopona ngonga ya kosolola na Nabale?

20 Nsima ya kokabwana na Davidi, na ntembe te Abigaile akanisaki lisusu bokutani yango; amonaki mpenza bokeseni oyo ezalaki kati na mobali wana ya sembo, ya boboto mpe mobali na ye, oyo azalaki makambo makasi. Kasi, azalaki kaka kokanisa makambo yango te. Biblia elobi ete “na nsima, Abigaile akɔtaki epai ya Nabale.” Azongaki epai ya mobali na ye; azalaki kaka na mokano ya kosala nyonso oyo akoki mpo na kokokisa mokumba na ye ya mwasi ya libala. Asengelaki koyebisa mobali na ye ete apesaki Davidi ná bato na ye likabo. Mobali azalaki na lotomo ya koyeba yango. Asengelaki mpe koyebisa ye likama oyo elingaki kokómela bango, liboso ayoka yango epai ya moto mosusu mpe epesa ye nsɔni mingi koleka. Kasi, akoki koyebisa ye yango sikoyo te. Nabale azalaki kosala fɛti lokola mokonzi mpe alangwaki makasi.1 Sa. 25:36.

Na mpiko nyonso, Abigaile ayebisaki Nabale makambo oyo asalaki mpo na kobikisa ye

21 Abigaile amonisaki lisusu mpiko mpe bokɛngi; azelaki tii na ntɔngɔ, ntango oyo molangwa ya mobali na ye ekosila. Na ntango wana, akokaki koyoka ye malamu, atako ekokaki mpe kozala likama mingi mpo na Abigaile na kotalela ezaleli ya nkandankanda ya mobali na ye. Atako bongo, Abigaile akutanaki na ye mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Na ntembe te, akanisaki ete mobali na ye akotomboka makasi, ntango mosusu akobɛta ye. Nzokande, mobali yango afandaki kaka, azalaki koningana te.1 Sa. 25:37.

22. Nini ekómelaki Nabale, mpe yango ekoki koteya biso nini mpo na minyoko nyonso mpe bampasi oyo bato bamonaka na mabala?

22 Nini ekómelaki mobali yango? “Motema na ye ekatanaki, mpe akómaki lokola libanga.” Mbala mosusu akangamaki mpema. Ayaki kokufa mikolo zomi na nsima, kasi mpo na maladi te. Biblia elobi boye: “Yehova abɛtaki Nabale, mpe akufaki.” (1 Sa. 25:38) Lokola Nabale akufaki, Abigaile asikwamaki na libala wana ya minyoko. Atako Yehova abomaka bato na ndenge ya likamwisi te lelo oyo, lisolo oyo ezali mpenza kosalisa biso tóbosana te ete Nzambe amonaka minyoko mpe bampasi nyonso oyo bato bamonaka na kati ya mabala na bango. Na ntango oyo aponi, akokata makambo na bosembo.Tángá Luka 8:17.

23. Lipamboli nini mosusu Abigaile azwaki, mpe ndenge nini amonisaki ete libaku ya kokóma mwasi ya Davidi ebongolaki ye te?

23 Longola kosikolama na libala wana ya mpasi, lipamboli mosusu ezalaki kozela Abigaile. Ntango Davidi ayokaki ete Nabale akufi, atindaki bato báyebisa Abigaile ete asepeli kobala ye. Abigaile alobaki boye: “Moombo na yo ye oyo, lokola mosaleli na yo, mpo na kosukola makolo ya basaleli ya nkolo na ngai.” Emonani  polele ete akómaki na lolendo te mpo Davidi alakaki ye libala; kutu alobaki ete akozala mosaleli ya basaleli na ye! Biblia elobi lisusu ete asalaki nokinoki, na mbala oyo mpo na komibongisa mpe kokende epai ya Davidi.1 Sa. 25:39-42.

24. Abigaile akutanaki na mikakatano nini ntango akómaki mwasi ya Davidi, kasi ndenge nini mobali na ye mpe Nzambe na ye batalelaki ye?

24 Yango elimbolaki te ete Abigaile akozala lisusu na mikakatano te; to ete libala ya Abigaile ná Davidi ekozala soki moke te na mikakatano. Davidi azalaki na mwasi mosusu, Ahinoame, mpe atako Nzambe atikaki nzela na libala ya bombanda, na ntembe te, libala yango ezalaki na mikakatano mpo na basi ya sembo ya ntango wana. Longola yango, Davidi akómaki naino mokonzi te; ezalaki na mikakatano mpe makambo mosusu ya mpasi oyo asengelaki kolonga liboso akóma mokonzi. Kasi, lokola Abigaile asalisaki Davidi ntango nyonso oyo bazalaki na ye, mpe lokola abotaki ná ye mwana ya mobali, amonaki ete azwaki mobali oyo azalaki kopesa ye valɛrɛ mpe kobatela ye. Kutu mokolo moko, Davidi abikisaki ye na mabɔkɔ ya bapunzi! (1 Sa. 30:1-19) Na ndenge yango, Davidi amekolaki Yehova Nzambe, oyo alingaka mpe apesaka motuya na basi ya ndenge wana, oyo bazali na bokɛngi, na mpiko mpe sembo.

^ par. 9 Karamele yango ezali Ngomba Karamele te, oyo ezalaki mosika na nɔrdi, epai mosakoli Eliya abendanaki na basakoli ya Baala. (Talá Mokapo 10) Karamele oyo ezalaki nde mboka moko oyo ezalaki pembeni ya esobe, na sudi.

^ par. 10 Mbala mosusu Davidi amonaki ete kobatela bankolo-mabele mpe bibwɛlɛ na bango elimbolaki kosalela Yehova Nzambe mosala. Na ntango wana, mokano ya Yehova ezalaki ete bakitani ya Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo báfanda na mokili yango. Na yango, kobatela mokili yango mpo bapunzi mpe miyibi bákɔta te ezalaki mpe mosala mosantu.

^ par. 14 Maloba oyo elenge mobali wana asalelaki elimboli mpenzampenza “mwana ya beliale (oyo azangá ntina).” Ndenge Babiblia mosusu ebongolá maloba yango emonisaka mpe ete Nabale azalaki moto “oyo ayokaka moto te,” mpe na yango, “ezali na ntina te kosolola na ye.”