Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Mekolá kondima na bango

 MOKAPO YA MISATO

“Tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima”

“Tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima”

1, 2. Ndenge nini makambo ebongwanaki na mokili kobanda na mikolo ya Noa, mpe makambo yango esalaki Abrama nini?

ABRAMA azalaki kotala na mosika ziggourat, ndako moko ya molai lokola piramide, oyo ezalaki komonana na Ure, engumba oyo azalaki kofanda. * Makɛlɛlɛ ezalaki makasi kuna, mpe milinga ezalaki komata. Banganga-nzambe ya nzambe-sanza bazalaki lisusu kopesa bambeka. Meká komona na makanisi ndenge Abrama azali kokamwa mpe atikali monɔkɔ polele mpo na likambo yango. Ntango azalaki kozonga ndako na kati ya ebele ya bato wana oyo batondaki na babalabala, na ntembe te akanisaki na losambo ya bikeko oyo etondaki na Ure. Losambo wana ya mbindo epalanganaki mpenza banda mikolo ya Noa!

2 Noa akufaki kaka mbula mibale liboso Abrama abotama. Ntango Noa ná libota na ye babimaki na masuwa nsima ya Mpela monene, tata wana ya mabota apesaki Yehova Nzambe mbeka, mpe na nsima, Yehova abimisaki monama. (Eba. 8:20; 9:12-14) Na ntango wana, kaka losambo ya pɛto nde ezalaki na mokili mobimba. Kasi sikoyo, lokola libota ya zomi kobanda na Noa epanzanaki na mabele, bato oyo bazalaki kosambela Yehova bazalaki lisusu mingi te. Bato na bisika nyonso bazalaki kosambela banzambe ya bapakano. Ata Tera, tata ya Abrama azalaki kosambela bikeko, ekoki mpe kozala ete azalaki kosala bikeko.Yos. 24:2.

Nini esalisaki Abrama akóma na kondima makasi ndenge wana?

3. Abrama amonisaki ezaleli nini na bomoi na ye, mpe yango ekoki koteya biso nini?

3 Abrama azalaki te lokola bato ya eleko na ye mpo azalaki na kondima epai ya Nzambe. Kutu, na nsima, na lisalisi ya elimo santu ntoma Paulo abengaki ye “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima”! (Tángá Baroma 4:11.) Tótala nini esalisaki Abrama  akóma na kondima makasi. Yango ekosalisa biso tómona ndenge oyo tokoki kokolisa kondima na biso.

Kosalela Yehova nsima ya Mpela

4, 5. Ekoki kozala nani ayebisaki Abrama makambo etali Yehova, mpe mpo na nini ekoki kozala bongo?

4 Ndenge nini Abrama ayebaki makambo etali Yehova Nzambe? Toyebi ete Yehova azalaki na basaleli ya sembo awa na mabele na mikolo wana. Seme azalaki moko ya bato yango. Atako azali te mwana ya liboso na kati ya bana misato ya Noa, atángamaka mbala mingi liboso. Ekoki kozala mpo ete Seme azalaki moto ya kondima mpenza. * Mwa moke nsima ya Mpela, Noa abengaki Yehova “Nzambe ya Seme.” (Eba. 9:26) Seme azalaki na limemya mpo na Yehova mpe losambo ya pɛto.

5 Abrama ayebaki Seme? Ekoki kozala ete ayebaki ye. Kanisá ete Abrama azali elenge. Ekoki kozala ete asepelaki mpenza koyeba ete azalaki na nkɔkɔ moko oyo azalaki na bomoi bambula koleka 400! Seme amonaki makambo ya mabe oyo ezalaki kosalema liboso ya Mpela, Mpela monene oyo epɛtolaki mabele, ndenge bikólo ya liboso esalemaki ntango bato bazalaki kokóma mingi na mokili, mpe makambo mabe oyo botomboki ya Nimerode ebimisaki ntango batongaki ndako molai ya Babele. Seme akɔtaki te na botomboki wana, yango wana ntango Yehova abulunganisaki monɔkɔ ya bato oyo bazalaki kotonga ndako molai, Seme ná libota na ye bakobaki koloba monɔkɔ oyo bato bazalaki koloba liboso, monɔkɔ oyo Noa azalaki koloba. Abrama mpe azalaki na kati ya libota yango. Na ntembe te, Abrama azalaki mpenza na limemya mingi epai ya Seme. Lisusu, bambula mingi oyo Abrama azalaki na bomoi, Seme mpe azalaki naino na bomoi. Na yango, ekoki kozala ete Seme nde ayebisaki Abrama makambo etali Yehova.

Abrama aboyaki losambo ya bikeko oyo epalanganaki na Ure

6. (a) Ndenge nini Abrama amonisaki ete azwaki liteya monene na makambo oyo elekaki na Mpela? (b) Abrama ná Sarai bazalaki na bomoi ya ndenge nini?

6 Ezala ndenge nini, Abrama azwaki liteya monene na makambo oyo elekaki na mpela. Asalaki makasi atambola elongo na Yehova lokola Noa. Mpo na yango, aboyaki losambo ya bikeko mpe akesanaki na bato ya Ure, mbala mosusu akesanaki mpe na bato mpenza ya libota na ye. Kasi, ayaki kozwa mwasi moko ya malamu mpenza. Abalaki Sarai, mwasi moko oyo azalaki kitoko mingi, mpe azalaki na kondima  makasi epai ya Yehova. * Atako bazalaki kobota te, Abrama ná Sarai bazalaki na esengo mingi ndenge bazalaki kosalela Yehova elongo. Babɔkɔlaki mpe Lota, mwana ya ndeko ya Abrama; azalaki mwana etike.

7. Ndenge nini bayekoli ya Yesu basengeli komekola Abrama?

7 Abrama atikaki Yehova te mpo na losambo ya bikeko oyo ezalaki na Ure. Ye ná Sarai bazalaki na ekateli makasi ya kokɔta te na losambo ya bikeko oyo ezalaki na engumba wana. Soki tolingi tózala na kondima ya solosolo, tosengeli mpe komonisa ezaleli wana. Biso mpe tosengeli te kozala lokola bato mosusu. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala “bato ya mokili te” mpe mpo na yango bato bakoyina bango. (Tángá Yoane 15:19.) Soki oyoká mpasi na motema mpo bato ya libota to ya mboka na yo baboyá yo mpo ozwaki ekateli ya kosalela Yehova, kobosana te ete ozali yo moko te. Ozali komekola ndakisa malamu ya Abrama ná Sarai oyo basalelaki Nzambe na bosembo nyonso.

“Bimá na mokili na yo”

8, 9. (a) Likambo nini Abrama akutanaki na yango, oyo akokaki kobosana te? (b) Nsango nini Yehova ayebisaki Abrama?

8 Mokolo moko, Abrama akutanaki na likambo moko oyo etikalaki na motó na ye libela. Azwaki nsango oyo eutaki epai ya Yehova Nzambe! Biblia elobi na mozindo te ndenge Abrama azwaki nsango yango, kasi elobi ete “Nzambe ya nkembo” abimelaki mobali wana ya sembo. (Tángá Misala 7:2, 3.) Mbala mosusu na nzela ya anzelu, Abrama amonaki kaka mwa moke nkembo ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Tokoki mpenza komona na makanisi esengo oyo Abrama ayokaki ntango amonaki bokeseni kati na Nzambe ya bomoi mpe banzambe ya bikeko oyo bato ya eleko na ye bazalaki kosambela.

9 Nsango nini Yehova ayebisaki Abrama? “Bimá na mokili na yo mpe na bandeko na yo mpe yaká na mokili oyo nakolakisa yo.” Yehova alobaki te mokili nini azalaki kokanisa—kasi alingaki nde kolakisa yango na Abrama. Libosoliboso, Abrama asengelaki kotika mboka na ye mpe bandeko na ye. Na Moyen-Orient, bato bazalaki kozwa libota na ntina mingi. Na ntango wana, soki moto akei mosika mpenza na libota na ye, ezalaki likambo moko mabe oyo ekokaki kosalema te!

10. Mpo na nini ekokaki kozala likambo ya pɛtɛɛ te mpo na Abrama mpe Sarai kotika ndako na bango na Ure?

10 Kolongwa Ure ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te mpo na Abrama. Ure ezalaki engumba moko ya loyenge makasi mpe ya bozwi. (Talá etanda “ Engumba oyo Abrama ná Sarai batikaki.”) Biloko oyo bakundolaki na engumba yango emonisi ete bandako ya kitoko mpenza ezalaki kuna; bandako mosusu ezalaki na bashambre zomi na mibale  to koleka mpo na libota mpe basali, mpe na kati ya mapango, pavema ezalaki. Biloko ya motuya ezalaki, na ndakisa bisika ya kotoka mai, ya kosukola mpe ya twalɛti. Tóbosana mpe te ete Abrama ná Sarai bakómaki mikóló. Abrama azalaki na mbula koleka 70 mpe Sarai azalaki na mbula koleka 60. Ndenge mobali nyonso ya malamu alingaka mpo na mwasi na ye, Abrama alingaki ete Sarai azala malamu mpe abatelama malamu. Kanisá masolo oyo babɛtaki mpo na mokumba yango, mituna oyo bamitunaki mpo na likambo yango. Abrama asepelaki makasi ntango Sarai andimaki mokumba wana! Lokola Abrama, ye mpe andimaki kotika bomɛngo nyonso oyo bazalaki na yango na Ure.

11, 12. (a) Bibongiseli mpe bikateli nini Abrama ná Sarai basengelaki kozwa liboso ya kolongwa na Ure? (b) Ndenge nini okoki kolobela makambo oyo elekaki na ntɔngɔ oyo batikaki Ure?

11 Nsima ya kozwa ekateli, Abrama ná Sarai bazalaki na makambo mingi ya kosala. Mosala monene ya kokanga biloko mpe kobongisa ezalaki kozela bango. Bakomema nini na mokili wana oyo bayebi te, mpe bakotika nini? Kasi, likambo eleki ntina, basengelaki kozwa ekateli soki ekosuka boni mpo na bato oyo bazalaki na bango. Bakosala nini mpo na Tera, tata ya Abrama oyo akómaki mobange? Bazwaki ekateli ya komema ye mpe kobatela ye tii ntango akokufa. Ekoki kozala ete lokola Tera moto amemaki libota na ye na Ure, emonani ete andimaki kokende ná bango. Na ntembe te atikaki losambo ya bikeko. Lota, mwana ya ndeko ya Abrama asengelaki mpe kokende ná bango.Eba. 11:31.

12 Nsukansuka, ntɔngɔ ya mokolo ya kokende etanaki. Kanisá naino ndenge ebele ya bato ná banyama basangani libanda ya engumba Ure mpe ya terase na yango. Libota ya Abrama mpe basali babongisaki biloko nyonso. Batyaki biloko likoló ya bakamela mpe bampunda. Basangisaki esika moko banyama mosusu nyonso oyo bazalaki kozwa. Mpe sikoyo, bazalaki kozela na motema likoló mpo bákende. * Ntango mosusu bango nyonso bazalaki kozela kaka Abrama aloba mpo bákende. Ngonga ekokaka te ekokaki, mpe balongwaki, batikaki Ure mpo na libela.

13. Na ndenge nini basaleli mingi ya Yehova lelo bazali komonisa ezaleli ndenge moko na oyo ya Abrama mpe Sarai?

13 Lelo oyo, basaleli mingi ya Yehova bazwaka ekateli ya kokende epai mposa ya basakoli ya bokonzi ezali. Basusu bamonaka malamu báyekola monɔkɔ moko ya sika mpo básala lisusu mingi. To bamonaka malamu bámeka kosalela mayele mosusu ya kosakola oyo bámeka naino te. Kozwa bikateli ya ndenge wana, mbala mingi esɛngaka komipimela makambo mosusu, elingi koloba kozongisa naino nsima biloko ya mokili. Basaleli ya Yehova oyo bazali na ezaleli wana  mpe bazali komekola Abrama ná Sarai, babongi mpenza kozwa longonya! Soki tomonisi kondima ya ndenge wana, tokoki kolikya ete Yehova akopesa biso mingi koleka oyo tozali kopesa ye. Azangaka soki moke te kopambola bato ya kondima. (Ebr. 6:10; 11:6) Asalaki bongo mpo na Abrama?

Bakatisi Efrate

14, 15. Mobembo ezalaki ndenge nini kolongwa Ure tii Harane, mpe ekoki kozala mpo na nini Abrama amonaki malamu báfanda mwa moke na Harane?

14 Mokemoke, bato yango bamesanaki na mobembo. Tokoki komona na makanisi ndenge Abrama ná Sarai bazali kotambola likoló ya bakamela mpe kotambola na makolo, mpe ndenge makɛlɛlɛ ya bangonga oyo badiembelisaki na bansinga oyo bakangaki na bakamela ezali kosangana na masolo oyo bazalaki kobɛta. Mokemoke, ata bato oyo bamesanaki na mobembo te, bayebaki kosala bandako ya kapo mpe kolongola yango mpe bazalaki kosalisa Tera, oyo akómaki mokóló mpo afanda malamu likoló ya kamela to mpunda. Bakendaki na ngámbo ya nɔrdi-wɛsti, balandaki pembenipembeni ya Efrate mpe bazalaki kaka kokoba na mobembo na bango.

15 Nsima ya kotambola bakilomɛtrɛ 960, bakómaki na mwa bandako ya Harane, engumba moko ya bozwi, epai banzela ekutanákutaná na ngámbo ya ɛsti-wɛsti, na banzela ya mombongo. Libota mobimba etɛlɛmaki mpe efandaki kuna mpo na mwa ntango. Ekoki  kozala ete Tera alɛmbaki makasi mpo akokaki lisusu te kosala mobembo.

16, 17. (a) Kondimana nini elendisaki Abrama? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki Abrama ntango azalaki na Harane?

16 Na nsima, Tera akufaki ntango azalaki na mbula 205. (Eba. 11:32) Abrama alendisamaki makasi mpenza ntango Yehova asololaki na ye lisusu nsima ya liwa ya tata na ye. Azongelaki lisusu malako oyo apesaki na Ure, mpe alakaki ye likambo mosusu. Abrama asengelaki kokóma “ekólo moko monene,” mpe na nzela na ye, mabota nyonso ya mabele ekopambolama. (Tángá Ebandeli 12:2, 3.) Lokola kondimana wana oyo asalaki ná Nzambe elendisaki ye, Abrama amonaki ete ntango ekoki mpo na kokende.

17 Kasi, mbala oyo, biloko ya kokanga ezalaki mingi mpo Yehova apambolaki Abrama ntango azalaki na Harane. Biblia elobeli “biloko nyonso oyo bazwaki mpe milimo oyo bazwaki na Harane.” (Eba. 12:5) Mpo na kokóma ekólo, Abrama asengelaki kozala na biloko mpe basali, elingi koloba asengelaki kokóma na libota monene. Yehova akómisaka basaleli na ye ntango nyonso te bazwi, kasi apesaka bango eloko nyonso oyo basengeli na yango mpo na kokokisa mokano na ye. Yango epesaki Abrama makasi, mpe akobaki mobembo ná bato na ye na esika oyo ayebaki te.

Kotika bomoi ya malamu oyo bazalaki na yango na Ure, ezalaki mpasi mpo na Abrama mpe Sarai

18. (a) Ntango nini Abrama amonaki likambo moko monene na kati ya makambo oyo Yehova asalelá basaleli na ye? (b) Na bambula oyo elandaki, makambo nini mosusu ya ntina ekómaki kosalema mokolo ya 14 Nisana? (Talá etanda “ Dati moko ya ntina mingi na masolo ya Biblia.”)

18 Esengelaki kosala mikolo mingi kolongwa Harane tii Karkemishe, mpe ebele ya bato ya mobembo bazalaki kokatisa Efrate. Ekoki kozala na mwa esika wana nde Abrama amonaki likambo moko monene na kati ya makambo oyo Nzambe asalelá basaleli na ye. Ezalaki na mokolo ya 14, ya sanza oyo ekómaki kobengama na nsima Nisana, na mobu 1943 L.T.B., nde Abrama akatisaki ebale elongo na ebele ya bato oyo azalaki na bango. (Kob. 12:40-43) Mokili oyo Yehova alakaki kolakisa Abrama ezalaki na sudi. Mokolo wana, kondimana oyo Nzambe asalaki ná Abrama ekokisamaki.

19. Elaka oyo Yehova apesaki Abrama elobelaki mpe nini, mpe yango esalisaki ye ayeba likambo nini?

19 Abrama azalaki kokende na ngámbo ya sudi, mpe bato oyo azalaki na bango batɛlɛmaki  na banzete minene ya More, pene ya Shekeme. Kuna, Yehova asololaki lisusu na Abrama. Mbala oyo, elaka oyo Nzambe apesaki elobelaki momboto ya Abrama, to bana na ye oyo bakozwa mabele. Abrama akanisaki nde na esakweli oyo Yehova apesaki na Edene, oyo elobelaki “momboto,” to mwana, oyo akobikisa bato mokolo mosusu? (Eba. 3:15; 12:7) Ekoki kozala bongo. Ekoki kozala ete abandaki koyeba ete azali na mokumba na mokano monene oyo Yehova azali kokana kokokisa.

20. Ndenge nini Abrama amonisaki botɔndi mpo na mokumba oyo Yehova apesaki ye?

20 Abrama azalaki mpenza na botɔndi mpo na mokumba monene oyo Yehova apesaki ye. Ntango Abrama azalaki kokoba kotambola na mokili yango—na ntembe te na ekɛngɛ, mpo Bakanana bazalaki naino na kati—atɛlɛmaki mpe atongelaki Yehova bitumbelo, liboso pembeni ya banzete minene ya More, mpe na nsima pene na Betele. Abelelaki nkombo ya Yehova, mpo na komonisa botɔndi na ye, wana azalaki komona na mosika ndenge momboto na ye ekozala. Ekoki mpe kozala ete azalaki kosakwela Bakanana mosusu. (Tángá Ebandeli 12:7, 8.) Kasi, mikakatano minene ezalaki liboso ya Abrama oyo esengelaki kotya kondima na ye na komekama. Likambo ya esengo, Abrama azalaki te kokanisa ndako mpe bomoi kitoko oyo azalaki na yango na Ure. Azalaki nde kotala liboso. Mokanda ya Baebre 11:10 elobi ete Abrama “azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.”

21. Soki totali ndenge biso toyebi Bokonzi ya Nzambe ná ndenge Abrama ayebaki, tokoki koloba nini, mpe ozwi ekateli ya kosala nini?

21 Biso baoyo tozali kosalela Yehova lelo oyo toyebi makambo mingi oyo etali engumba wana ya elilingi, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, koleka oyo Abrama ayebaki. Toyebi ete bokonzi yango ezali koyangela na likoló mpe mosika te, ekotya nsuka na ebongiseli oyo ya mokili, mpe toyebi ete Yesu Kristo, momboto ya Abrama oyo alakamaki bambula ebele mpenza, azali sikoyo koyangela bokonzi yango. Tokosepela mpenza ntango Abrahama akosekwa mpe na ntango wana akoyeba malamumalamu ndenge mokano ya Yehova ekokisamaki! Okosepela komona ndenge Yehova akokokisa bilaka na ye nyonso? Kasi, na makambo nyonso, ezali na ntina ete okoba kosala oyo Abrama asalaki. Zaláká na ezaleli ya komipimela, zaláká na limemya mpe monisáká botɔndi mpo na mikumba nyonso oyo Yehova azali kopesa yo. Soki omekoli kondima ya Abrama, “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima,” tokoki koloba ete Abrama akokóma mpe tata na yo!

^ par. 1 Bambula na nsima, Nzambe alongolaki nkombo Abrama mpe apesaki ye nkombo Abrahama, oyo elimboli “Tata ya ebele ya bikólo.”Eba. 17:5.

^ par. 4 Ndenge moko, Abrama atángamaka mbala mingi liboso na kati ya bana ya Tera, atako azalaki te mwana ya liboso.

^ par. 6 Na nsima, Nzambe alongolaki nkombo ya Sarai mpe apesaki ye nkombo Sara, oyo elimboli “mwasi-mokonzi.”Eba. 17:15.

^ par. 12 Bato mosusu ya mayele bandimaka te ete bazalaki kobɔkɔla bakamela na eleko ya Abrama. Kasi, bilembeteli ya makasi ezali te mpo na kondimisa likanisi yango. Biblia etángi bakamela mbala ebele na kati ya biloko ya Abrama.Eba. 12:16; 24:35.