Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Tanzanie: Baleki-nzela bazali kosepela na mikanda oyo batandi, na Dar-es-Salaam

 MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Tokómi kokutana na bato oyo tomonaka te

Tokómi kokutana na bato oyo tomonaka te

MOSALA ya kosakola ndako na ndako ezali kaka lolenge ya liboso oyo Batatoli ya Yehova basalelaka mpo na kopalanganisa solo ya Biblia; kasi emonani ete kotanda mikanda na bamesa to na bashario mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali mpe kosalisa mingi. (Mat. 24:14) Basakoli ya Bokonzi basaleli bashario, bamesa mpe bakioske ya kotanda mikanda mpo na kosakola na bisika ya bato ebele. Lisusu, bashario soki 250 000 etindamaki na masangá na mokili mobimba. Matomba nini emonani?

Na Dar-es-Salaam, na Tanzanie, banda ntango oyo Batatoli ya Yehova bakómaki kotanda mikanda na bisika ya bato ebele na 2014, bato pene na 700 basɛngi boyekoli ya  Biblia. Bato yango mingi bakómi koyangana na makita mpe babandi kokóma baninga ya Nzambe. Na mbula moko, bato oyo bauti mikili ya Afrika mpe mikili ya Mpoto bazwaki na bashario yango mikanda koleka 250 000.

Na Îles Salomon, esika basakoli 2 000 mpamba basakolaka na bisanga yango koleka 300, kopesa litatoli na bingumba minene ekómi mayele moko ya ntina mingi mpo na kopalanganisa mboto ya solo. Na mboka-mokonzi Honiara, bandeko bakabolaki bazulunalo koleka 104 000 mpe mwa babuku koleka 23 600, mingimingi epai ya bato ya bisanga mpe bamboka ya mosika, epai Batatoli bazalaka te. Mokolo moko boye nsima ya midi mpamba, bakabolaki Biblia eteyaka mpenza nini? 400 mpe bato 60 basɛngaki bákende kotala bango na bandako mpo bábanda koyekola Biblia.

Mokolo moko na ntɔngɔntɔngɔ, Michael ná Linda, oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, bazalaki kotanda mikanda pene na libongo moko na esanga Margarita, na Vénézuela. Mobali moko na nkombo Aníbal apusanaki pene na mesa mpe azwaki buku Biblia eteyaka. Ayebisaki bango ete tata na ye akufá na libongo yango eleki mbula nsambo, mpe banda wana, mama na bango akómá mawamawa. Pɔsɔ oyo elandaki, Aníbal ayaki lisusu wana mpe ayebisaki Michael ná Linda ete ezali dati oyo tata na ye akufaki. Azwaki telefone, abengaki mama na ye, mpe apesaki Michael telefone yango mpo ayebisa mama na ye maloba ya kobɔndisa; Michael asalaki yango. Banda wana, mama yango abengaki Michael ná Linda mbala ebele, mpe batángelaki ye bavɛrsɛ mpo na kobɔndisa ye. Na mesaje moko, mama ya Aníbal akomelaki bango boye: “Lelo, nalamuki mwa malamu mpo  bobɔndisi ngai mpe bosalisi ngai nakóma na kondima makasi.”

Na États-Unis, Batatoli batandaka mikanda mpo na kosakola na bisika 127 na bingumba 14. Na basanza ya nsambo ya liboso na mobu ya mosala 2015, bato 8 445 bakómaki koyekola Biblia! Kotanda mikanda mpo na kosakola na bisika ya bato ebele esalisi bandeko mingi oyo balɛmbá na elimo bázongela losambo ya solo. Na ndakisa, mobali moko na nkombo Terry azalaki kotala ndenge batandaki mikanda na biso mpo na kosakola na Los Angeles, na Californie; na yango ndeko oyo azalaki wana ná mwasi na ye batunaki ye soki así atángá mikanda na biso. Alobaki ete azali Motatoli ya Yehova kasi alɛmbá na elimo esali mbula soki 4. Ndeko yango ná mwasi na ye batángaki mpe balimbolaki Ezekiele 34:11, esika Yehova alobi: “Ngai oyo, ngai moko, mpe nakoluka bampate na ngai mpe nakobatela yango.” Bayebisaki ye ete tofungolá site Internet mpe TV JW. Mokolo oyo elandaki, na ntɔngɔ, Terry atindelaki ndeko wana mesaje, mpe alobaki ete mwa moke kaka liboso amona mikanda batandi na mesa, abondelaki Nzambe alimbisa ye ndenge akimá makita ya lisangá. Asɛngaki mpe Yehova asalisa ye akóma lisusu moninga na ye. Terry alobaki: “Na ntango yango nde bopesaki ngai mbote na esengo. Botángaki vɛrsɛ oyo elendisaki ngai mpe boyebisaki ngai makambo oyo esengeli mpo nazonga na ebongiseli ya Yehova. Ezalaki eyano na mabondeli na ngai.”

Na Éthiopie, batandaka mikanda mpo na kopesa litatoli na bisika minene minei na Addis-Abeba. Nsima ya sanza misato, bandeko bapesaki mikanda 37 275, mpe bato 629 basɛngaki Batatoli bákende kotala bango. Kati na ebele ya bato oyo bazwaki buku Biblia eteyaka, ezalaki na mobange moko oyo abandaki mbala moko kotánga yango. Kala, ayekolaki makambo ya Nzambe na seminɛrɛ  moko, mpe azalaki na mituna mingi oyo etali Yesu mpe Bokonzi ya Nzambe. Na yango, na mokolo oyo elandaki, azongaki esika bandeko batandaki mikanda kozwa biyano na mituna na ye. Mokolo moko nsima na yango, andimaki koyekola Biblia, mpe na nsuka ya pɔsɔ, akendaki makita mpo na mbala ya liboso. Lelo, ayanganaka  na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe azali kokola malamu na elimo.

Éthiopie: Batandi mikanda na monɔkɔ ya Amharique na Addis-Abeba

Moto moko ya lingomba ya Bayuda akendaki esika bandeko mibali mibale batandaki mikanda na Mexique mpe atunaki bango soki bazali na mokanda oyo elobeli liwa. Bayebisaki ye ete bazulunalo oyo elobeli liwa esili, kasi bapesaki ye moko oyo ezalaki kolobela bomoi na mikolo ezali koya. Mobali yango akangaki lobɔkɔ ya ndeko oyo apesaki ye mokanda mpe alobaki: “Mikolo ezali koya etali ngai te. Mposa na ngai ezali kaka namiboma.” Na nsima abandaki kolela. Bandeko batunaki ye ntina oyo azalaki kokanisa bongo. Alobaki: “Mwana na ngai ya mobali auti kokufa.” Na yango, bandeko balakisaki ye mokapo 7 ya buku Biblia eteyaka. Batángelaki ye paragrafe mibale ya liboso na motó ya likambo moke “Ntango moto moko oyo tolingaka akufi” mpe eteni ya nsuka ya mokapo yango, esika balobeli elikya na biso mpo na bato oyo bakufá. Esimbaki motema na ye, mpe akangaki lisusu lobɔkɔ ya ndeko wana mpe atunaki: “Ezali mpenza solo?” Bandeko bayebisaki ye ete Yehova akozanga te kokokisa elaka yango. Moto yango atunaki: “Nasala nini mpo namona lisusu mwana na ngai?” Bayokanaki bákende kotala ye na ndako. Ntango bakómaki kuna, bakutaki mobali yango afandi, azali kozela bango na motema moko bábanda koyekola Biblia.

Mokɛngɛli ya zongazonga moko oyo apesaki mabɔkɔ na ebongiseli ya kotanda mikanda mpo na kosakola na bisika ya bato ebele na New York, alobaki boye: “Yehova apamboli mpenza ebongiseli oyo! Ezali mayele moko ya malamu mpo na kokutana na bato ebele. Kasi esalisi mpe biso tókutana na bato oyo balɛmbá na elimo to oyo babimisamá na lisangá, ‘bampate oyo ebungá,’ mpe tozali kosalisa bango bázongela etonga.”Ezk. 34:15, 16.