Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Angleterre: Bandeko bazali koyamba bapaya oyo bayei na liyangani oyo esangisi mikili mingi

 KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Mpoto

Mpoto
  • MIKILI 47

  • BATO 743 421 605

  • BASAKOLI 1 614 244

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 842 091

Bamikosaki, kasi babandi boyekoli ya Biblia

Liyangani ya etúká oyo esangisaki bandeko ya mikili mingi na Londres, na Angleterre, ezalaki ntango ya esengo mingi mpo na bandeko oyo bayaki mpe bandeko ya Angleterre. Ndeko Andrew ná Elizabeth bakendaki na otɛlɛ moko na likanisi ya kotala bandeko oyo bautaki na mikili mosusu. Na esika bayambaka bato na otɛlɛ yango, bamonaki mwasi moko alati malamu; lokola bakanisaki  ete azali Motatoli, Elizabeth ayambaki ye na esengo mpenza. Mwasi yango akamwaki, mpe Elizabeth asɛngaki ye bolimbisi. Alobaki boye: “Limbisá ngai! Nakanisaki ete ozali na kati ya bandeko oyo bayei liyangani!”

Mwasi yango atunaki: “Liyangani ya nini?”

Elizabeth alakisaki mwasi yango makomi oyo batyaki wana mpo na kotombela Batatoli ya Yehova boyei malamu mpe ayebisaki ye ete asutukaki ndenge akamwaki ye. Mwasi yango alobaki: “Ya solo! Nazali komonana lokola bango?”

Na nsima, mwasi yango ayebisaki ndeko Elizabeth ete nkombo na ye Vivien, azali moto ya Nigéria. Na masolo, bayebaki ete ndako na ye ná ya ndeko Elizabeth ezalaki mosika te. Vivien andimaki koyekola Biblia mpe alingaki ete bana na ye mitano bákóma mpe koyekola. Ndeko Andrew ná Elizabeth bakendaki kotala Vivien na ndako, mpe na mbala oyo ye nde ayambaki bango na esengo. Emonani ete ndenge Elizabeth ayambaki Vivien na otɛlɛ wana ntango bakutanaki eteyaki ye. Ntango Andrew ná Elizabeth balakisaki Vivien buku Biblia eteyaka, bakamwaki ntango ayebisaki bango ete azali na buku yango mpe azalaki kotángela yango bana na ye minei. Ntango bayebisaki ye ete basalelaka buku yango mpo na koyekola Biblia na bato ofele, Vivien alobaki na esengo ete: “Tóbanda kaka sikoyo!”

Mokanda ya ndeko moko ya ekólo Roma

Na sanza ya zomi na moko na 2014, lisangá ya liboso ya monɔkɔ ya Romani efungwamaki na Slovaquie. Na liyangani ya zongazonga moko oyo euti kosalema, basakoli 21 oyo balobaka monɔkɔ ya Romani bazwaki batisimo. Bango nyonso bazalaki bato ya mboka moko. Na  Ekaniseli, bato 495 bayanganaki na lisangá ya monɔkɔ ya Romani. Ndeko moko oyo azwi batisimo sika akomaki boye:

Slovaquie: Basakoli mibale bazali koteya mwasi moko ya ekólo Roma

“Nazali moto ya ekólo Roma mpe mboka na ngai Žehra, na Slovaquie. Esika nafandi, mindɛlɛ mingi bamonaka biso lokola basɛnzi mpe bamonaka ete tozali salite, bato ya lokuta mpe miyibi. Ntango nakendaki na ndako-nzambe, mokɛngɛli na yango alobaki na ngai ete nabongi kozala kuna te mpe abenganaki ngai. Soki basali yo ndenge wana, okobanda komona mindɛlɛ ndenge nini? Na nsima, Batatoli ya Yehova babengisaki ngai na Ndako ya Bokonzi. Nakendaki na kobanga makasi; nakanisaki ete bakoyokisa ngai lisusu nsɔni. Nakamwaki ete liboso kutu nakɔta na Ndako ya Bokonzi, mondɛlɛ moko apesaki ngai mbote ya lobɔkɔ mpe akɔtisaki ngai na esengo. Nazalaki kokoka te kotya makanisi na diskur oyo ezalaki kosalema. Nazalaki kaka kokanisa, ‘Ndenge nini bato nyonso bazali na boboto boye?’

“Butu wana, nazwaki mpɔngi te; nazalaki kaka kokanisa makambo oyo elekaki na Ndako ya Bokonzi. Na yango, nalobaki ete nakokende lisusu mpo natala soki boboto oyo bamoniselaki ngai ezalaki kaka mpo na mokolo wana. Na mbala yango, bato bayambaki ngai malamu koleka, lokola nde tozalaka baninga banda kala. Nazangisaki lisusu makita te, mpe nsukansuka nazwaki batisimo. Ata nsima ya batisimo na ngai, bandeko batiki kozala na boboto te, bazali kaka komonisa ete balingaka ngai. Ntango mosusu kutu bapesaka ngai bilei ya kitoko koleka oyo bango moko bakolya! Nakozala kaka na ebongiseli oyo, Yehova nde Nzambe oyo nalingi kosalela libela na libela.”

Abondelaki, Nzambe ayokaki ye

Ndeko mwasi moko na nkombo Aysel azalaki kosala mobembo na bisi longwa na engumba Ganja mpo na  kokende na engumba Baku, na Azerbaïdjan. Abondelaki Yehova, ayebisaki ye ete azali na mposa ya koteya makambo ya Biblia na nzela. Aysel afandaki na kiti oyo balakisaki ye, kasi mwasi moko atingamaki kaka ete Aysel aya kofanda pembeni na ye. Aysel abandaki kosolola na mwasi yango mpe nsukansuka akɔtisaki makambo ya Biblia. Mwasi yango alobaki ete alingaka Yesu mpe alingi koyeba ye malamu. Aysel ná mwasi yango bapesanaki banimero ya telefone mpe bayokanaki bákutana lisusu. Mwasi yango asɛngaki Aysel amemela ye Biblia.

Ntango Aysel azongaki na Ganja, akendaki kotala mwasi yango na esika na ye ya mosala. Mwasi yango alobaki ete azali na “buku ya mabondeli,” mpe atángaka yango mikolo nyonso. Ndeko mwasi akamwaki ntango amonaki ete buku oyo mwasi wana abengaki buku ya mabondeli ezalaki nde mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo ya 2013! Babandaki koyekola Biblia, mpe Aysel asepelaki mingi ndenge Yehova apesaki ye mpiko ya koteya na bisi.

Moto moko ya bolɔkɔ akomi mokanda mpo na kopesa matɔndi

Mokanda moko oyo eutaki na Espagne elobi boye:

“Ya liboso, napesi bino matɔndi ndenge bozali kosala makasi mpo na koyebisa bato ya ndenge nyonso nsango ya Biblia.

“Nasololaki na Batatoli ya Yehova mbala ya liboso eleki mbula 15, na engumba Tirana, na Albanie. Nakamwaki ndenge Motatoli moko apusanaki pene na biso, mpo tozalaki bilenge zomi ya mobulu. Bato bazalaki kobanga kosolola na biso, kasi ndeko wana apusanaki atako tozalaki na bibundeli. Abangaki te koyebisa biso makambo ya Biblia. Mpiko na ye esimbaki mpenza motema na ngai.

 “Eleki sikoyo mbula minei awa na Espagne, Motatoli moko ayaki kotala ngai na bolɔkɔ mpe asɛngaki ngai tóyekola Biblia. Nandimaki, mpe banda wana nabongwani mingi. Nasalaka lisusu mobulu te. Esali bambula nalukaka lisusu makambo te. Nayekoli koyeba Yehova, bomoi na ngai ekómi na ntina. Nasalaka makasi nafanda na kimya na bato, mpe mbula mobimba eleki banda nakómá mosakoli.

“Nasali mbula 12 na bolɔkɔ; kasi na mbula 4 oyo euti koleka, nazali na esengo mpe kimya oyo nayoká naino te. Napesaka Yehova matɔndi mokolo na mokolo.

“Eleki mwa bapɔsɔ, natalaki mwa bavideo na jw.org. Video ya ndeko moko oyo kala azalaki na bolɔkɔ na États-Unis esimbaki mpenza motema na ngai. Nazalaka motema makasi, kasi ntango namonaki mbongwana oyo asalá, nakokaki te, nalelaki.

“Tika ete Yehova akoba kopambola milende oyo bozali kosala mpo bato ya ndenge nyonso báyoka nsango malamu; bozali kobongola mikanda na minɔkɔ ebele mpe bozali koya koteya biso baoyo tozali na babolɔkɔ.

“Matondi mingi mpenza.”

 “Nazwá kimya ya motema”

Felicity, mwasi moko ya mbula 68 oyo afandaka na Suède alobi boye: “Nazalaki komiyoka ntina te, lokola nde nazangi eloko moko; nazalaki koluka kimya kasi nazalaki kozwa yango te.” Lokola mateya ya Lingomba ya Katolike esalisaki ye te, akómaki koyekola mateya ya mangomba ndenge na ndenge mpe nsukansuka akweaki na bonganga-nkisi mpe akómaki komona makambo ekoya.

Lokola amonaki mpenza ntina ya bomoi te, akómaki mawamawa mpe alingaki komiboma. Alobi boye: “Na mai na miso, nalelelaki Nzambe na mongongo makasi, nasɛngaki ye ayebisa ngai oyo alingi nasala. Pɔsɔ mibale na nsima, elenge mobali moko abɛtaki na porte na ngai. Azalaki na esengo mpe atunaki ngai soki nakosepela koyoka Liloba ya Nzambe. Na nse ya motema namilelaki, ‘Nzambe nalobaki bongo te—nasɛngaki Batatoli ya Yehova te!’”

Ayokaki mposa ya kokanga porte na mbala moko, kasi amonaki malamu ayoka kaka mpe andimaki koyekola Biblia na buku Biblia eteyaka. Alobi boye: “Basalisaki ngai natalela Biblia ndenge mosusu.” Felicity azwaki batisimo na liyangani ya etúká ya 2014 na Suède. Lelo alobi boye: “Yango nde nazalaki koluka bomoi na ngai mobimba. Nazwá kimya ya motema.”