Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Israël: Bazali kosalela tablette na mosala ya kosakola

 KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Azia mpe Moyen-Orient

Azia mpe Moyen-Orient
  • MIKILI 49

  • BATO 4 409 131 383

  • BASAKOLI 718 716

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 766 364

Ngonga nkama moko mpo na mbula nkama moko

Na ekólo moko ya Azia, mwasi moko oyo asalaka bafilme mpe oyo bato balingaka ye mingi andimaki koyekola Biblia. Abandaki mbala moko kosalela makambo oyo azalaki koyekola mpe abwakaki mikanda na ye ya bikelakela mpe bikeko ya Lingomba ya Buda.

Moninga na ye moko ya mosala abondelaki ye na maloba oyo:  “Katá naino koyekola ata mpo na mbula misato kaka mpo omipesa na mosala na yo! Bongo na nsima, okozongela lisusu koyekola.”

Mwasi yango ayebisaki ye: “Mbula 24 eleki nayebaki Yehova te. Mpo na nini nazela lisusu mbula misato mobimba mpo nayekola makambo na ye?”

Na pɔsɔ oyo asengelaki kosala lisolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, kompanyi moko oyo esalaka bafilme ebengaki ye. Balobaki ete bakosala na ye mosala mbula minei mpe akozwa mbongo mingi, kaka nde andima mokumba nyonso oyo bakopesa ye na filme nyonso oyo bakosala. Aboyaki. Na sanza ya mitano na 2014, akómaki mosakoli, mpe akanaki ete na sanza ya mwambe, akosakola ngonga 100. Ntango batunaki ye mpo na nini akani kosala bongo, alobaki: “Nalingi kosepela mpo na mbula 100 ya boyangeli ya Yesu; nakosakola ngonga moko mpo na mbula mokomoko ya boyangeli na ye!” Asalaki mpe bongo. Na sanza ya yambo na 2015, azwaki batisimo mpe sikoyo azali mobongisi-nzela mosungi.

Butu moko malamu na bolɔkɔ

Na Sri Lanka, bandeko basi minei bazwaki bisi mpe bakendaki kosakola na mboka moko ya bandimi ya Lingomba ya Buda, teritware oyo bapesá ata mosakoli moko te. Na mokolo ya mibale ya mosala na bango, sango ná sofɛlɛ moko ya taxi batɛlɛmisaki bango. Eumelaki te, bato soki 30 oyo bazalaki na nkanda bazingaki bango. Bapolisi bayaki, bamemaki bandeko basi yango na biro ya polisi, mpe balalisaki bango na bolɔkɔ atako moto te amonisaki ete basalaki likambo ya mabe. Batyaki bango esika moko na basali-mabe oyo bazalaki kofinga bango mpe koloba makambo ya nsɔni. Kasi, ndenge  bakɔtisaki bango bolɔkɔ, esalisaki bango básakola. Moko ya bandeko yango alobi boye: “Batyaki ngai esika moko na babomi-bato, kasi nalongaki koteya bango solo ya Biblia. Bakamwaki ndenge nazalaki wana mpe batunaki ngai mituna ebele ya Biblia. Kutu, moko atunaki ngai, ‘Mpo na nini ozali na esengo boye?’”

Sri Lanka: Bandeko basi minei oyo bakendaki kosakola na teritware oyo bapesá moto te

Tribinale monene ya Sri Lanka endimi kotalela makambo oyo tokomaki mpo na komonisa ete bapolisi bazali te kotosa ntomo ya bato na ndenge bazali kokɔtisa bato bolɔkɔ ata soki basali mabe te. Tribinale ekati naino likambo yango te.

Mwasi moko oyo atɛlɛmaka te azwi lisalisi

Michiko, mobongisi-nzela moko ya mwasi na Japon, azalaki koyekola Biblia na elobeli ya bababa na mwasi moko mobange oyo azalaki na lopitalo. Ndeko mwasi yango atunaki bato ya lopitalo soki ezali na moto mosusu ya maladi oyo akoki kosolola na ye. Na yango, Michiko akutanaki na Kazumi, oyo ayokaka kasi alobaka te. Kazumi alalá na mbeto banda asalá aksida na motuka ntango azalaki na mbula 23. Azalaki kokoka kolya te, komɛla mai mpe te. Azalaki na mituna ebele, mpe andimaki mbala moko koyekola Biblia.

Japon: Kazumi akomaka mikanda mpo na kolendisa basusu

Soki Michiko atuni motuna, Kazumi azalaki kolakisa biyano na mosapi na kati ya paragrafe to kokoma yango. Ntango Kazumi akómaki na telefone, Michiko akómaki kotalela elongo na ye mokapo ya mokolo ntɔngɔ nyonso. Atako nzoto ya Kazumi elɛmbá, akobaki kokende liboso na elimo tii alobaki ete alingi kokóma Motatoli ya Yehova. Nsukansuka ntango Kazumi akokisaki mbula 61, akómaki mosakoli nsima ya koyekola Biblia mbula 13.

 Lokola Kazumi atɛlɛmaka te, lisangá ezwaki bibongiseli mpo ayokaka makita nyonso mpe badiskur ya mayangani. Na makita, bandeko basi ndenge na ndenge batángaka biyano oyo Kazumi abongisaki.

Kazumi akomaka mikanda ya kolendisa oyo ebongi mpo na moyekoli mokomoko ya Biblia oyo ayanganaka na makita. Ateyaka bato oyo basalaka na lopitalo mpe baoyo bayaka kotala ye. Kazumi ayebisaka bango boye: “Soki boyekoli Biblia, bokozala na esengo.”

Sango moko ayekoli solo

Na ekólo moko ya sudi-ɛsti ya Azia, ndeko mwasi moko akendaki epai ya monganga ya miso na lopitalo, mpe kuna akutanaki na sango moko. Ndeko mwasi atunaki ye boye: “Olingi kozala na nzoto ya kokoka mpe kofanda libela na libela na esika moko ya kitoko?” Basololaki  malamu, mpe apesaki ye mwa buku Yoká Nzambe. Sango apesaki ye nimero ya telefone, mpe ndeko mwasi apesaki yango ndeko mobali moko ya lisangá na bango. Mwa moke na nsima, ndeko mobali asololaki na sango yango mpe abengaki ye aya kolanda diskur moko ya ntina mingi. Sango asepelaki mpenza na makita, mingimingi ntango bazalaki koyemba nzembo ya Bokonzi, mpe akamwaki ndenge moto nyonso ayambaki ye na esengo.

Ntango sango yango atunaki soki Batatoli bazali na bainiversite to na biteyelo mpo na kobongisa basango, ndeko mobali wana ayebisaki ye ete toyekolaka Biblia na bato na bandako mpe asɛngaki ye báyekolaka. Pɔsɔ oyo elandaki, sango asilisaki kotánga mokapo ya liboso ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? Akobaki koyekola, abandaki koyangana na makita, mpe kopesa biyano na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

Ntango sango yango ayaki na liyangani ya zongazonga, momonisi ya Betele abengisaki ye aya kotala Betele. Na pɔsɔ oyo elandaki, sango yango asalaki mobembo ya ngonga soki zomi mpo akóma na Betele. Mpe kuna bayambaki ye na esengo mpenza. Na nsuka ya sanza ya mibale na 2015, atikaki mosala ya sango; azali kokoba koyekola Biblia, mpe kokende makita.

Abungaki, sikoyo amonani

Na mikolo eleki, batindaki babongisi-nzela na nɔrdi-ɛsti ya Inde, epai nsango malamu esakolamaki te esali bambula ebele. Kuna, bato ebele basepelaki na solo mpe babongisi-nzela balingaki koluka esika ya malamu mpo na kosala makita. Ntango bazalaki kokende epai ya moyekoli moko ya Biblia, bamonaki ndako moko oyo bazalaki naino kotonga mpe bakanisaki kotuna soki ezali ya nani. Balekaki ndako yango; kasi, balobaki: ‘Tózonga naino kotala yango.’ Na nsima ya ndako yango,  bamonaki mwasi moko mobange mpe bayebisaki ye ete bazali Batatoli ya Yehova. Elongi na ye efungwamaki. Mobange yango alobaki: “Ngai mpe nazali Motatoli ya Yehova”; akɔtisaki bango na ndako. Alakisaki bango mikanda na ye ya bambula ya 1970 tii 1980. Ayekolaki Biblia na babongisi-nzela eleki mbula 30 mpe azalaki koyangana na makita mosusu atako mobali na ye azalaki kotɛmɛla ye. Motema na ye endimaki ete azwi solo, kasi na nsima atikaki koyekola mpo babongisi-nzela yango bakendaki. Bana na ye nyonso mwambe bakómaki kokende na bandako-nzambe ndenge na ndenge, kasi ye aboyaki kokende ata na ndako-nzambe moko.

Inde: Mwasi moko azali kolakisa mikanda na ye ya bambula ya 1970 mpe 1980

 Mikolo eleki, bana na ye bakómaki kotya ye mbamba akomisa nkombo na Lingomba ya Katolike mpo lingomba yango ekunda ye ntango akokufa. Kutu, leki na ye ya mwasi amemaki ye na makasi na Lingomba ya Katolike mpo akomisa nkombo, kasi mituka ekangamaki na nzela, mpe bazongaki ndako. Leki yango alobaki ete akoya kozwa ye mokolo elandi, kasi na mokolo yango abɛlaki. Kaka na mokolo yango, nsima ya midi, nde babongisi-nzela wana bakutanaki na mobange yango oyo azalaki kosepela na solo! Sikoyo, azongelá koyekola Biblia, koyangana na makita mpe alendisaka bana na ye ná bankɔkɔ na ye báyekola mpe Biblia.