Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Burundi: Nolla azali kolakisa mibali oyo basɛngaki makala ya mɔtɔ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli

 KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Afrika

Afrika
  • MIKILI 58

  • BATO 1 082 464 150

  • BASAKOLI 1 453 694

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 3 688 959

Kosakola na tukutuku

Bénin: Désiré atyaka radio na tukutuku na ye mpo bakiliya na ye báyoka nsango malamu

Na bingumba ya sudi ya Bénin, bato balingaka mingi kotambola na tukutuku (kuna babengaka yango zem). Désiré, oyo azali mobongisi-nzela mosungi, atyá radio na zem na ye mpe atalisá bikoliseli-lolaka mibale na esika bakiliya bafandaka. Atyaka ntango nyonso mikanda na biso oyo batángi kotánga to badrame ya Biblia. Ntango kaka moto amati na zem na ye, eumelaka te mpo ayoka na likebi makambo  yango. Bato mingi basepelaka na makambo yango, okomona soki moto akómi na esika oyo alingi kokita, akokita na malɛmbɛ to akoboya kokita mbala moko na zem tii lisolo oyo azali koyoka ekosila. Désiré alobi boye: “Atako bongo, nasɛngaka mbongo ya tike, mpe nalongwaka wana mpo nakende kozwa kiliya mosusu. Kasi, nayebi ete ndenge bayokaka nsango malamu bongo ezali na ntina mingi koleka mbongo. Longola yango, esalisaka ngai napesa bato mikanda ebele.”

Mwana moko ya mbamba makasi

Nolla azali na mbula 6 mpe ye ná libota na bango bafandaka na bangomba ya Burundi. Mokolo moko bazalaki kolamba na mɔtɔ ya makala mpe mibali mibale oyo bazalaki kosala pembeni wana basɛngaki mwa makala ya mɔtɔ mpo bápelisa mɔtɔ. Ntango bato yango bayaki, Nolla, oyo akɔtaki naino kelasi te, azalaki kobongisa mɔtɔ. Apesaki bango mwa makala ya mɔtɔ. Na nsima, Nolla alekaki esika bato yango bazalaki, mpe amonaki ete basalelaki yango mpo na kopelisa likaya. Likambo yango etungisaki ye, mpe alobaki na bango: “Soki nayebaka ete bokopelisela yango likaya, nalingaki kopesa bino te.” Na nsima, amikundolaki ete na Ndako ya Bokonzi amonaki zulunalo moko oyo ezali na elilingi ya likaya. Akendaki mbangu na Ndako ya Bokonzi mpe azwaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mibale ya 01/06/2014, oyo elobelaki komɛla likaya. Nolla akendaki kopesa yango mibali wana, mpe atyaki bango mbamba ete bátánga yango kaka na ntango wana. Na nsima, amonaki bango lisusu mpe apesaki bango lokasa ya libyangi na liyangani ya etúká. Mibali yango bakamwaki mbamba ya  mwana-mwasi yango ya moke mpe bakɔtaki na liyangani mikolo mibale. Na ntango ya bopemi, Nolla amonaki bango mpe apesaki bango mwa bilei oyo bamemaki na libota. Makambo oyo mibali yango bamonaki mpe bayokaki na liyangani ekamwisaki bango; bakómaki koyekola Biblia.

Kosakola na babolɔkɔ

Na Libéria, bankulutu basakolaka nsango ya Bokonzi na babolɔkɔ ndenge na ndenge. Yves, oyo azali mobongisi-nzela monene na mboka-mokonzi Monrovia, alobi boye: “Na sanza ya misato, bakangami misato bakokisaki masɛngami mpo bakóma basakoli. Na yango, basakoli oyo bazalaki na bolɔkɔ monene ya Monrovia bakómaki 6.” Basalaka ndenge nini mpo na kosakola? Yves alobi boye: “Basalaka likita mpo na mosala ya kosakola mokolo nyonso ya misato mpe ya pɔsɔ. Mpe bapesaka bango ndingisa ya kokɔta na ndako mokomoko ya bolɔkɔ mpo na koyebisa bakangami mosusu nsango ya Biblia.” Lelo oyo, bakangami mingi bazali koyekola Biblia mpe koyangana na makita na kati ya bolɔkɔ. Betele etindaki ndeko moko akende kosalela bakangami 79 oyo bazali na bolɔkɔ yango diskur. Na babolɔkɔ mosusu 6 bayekolaka na bato ebele esika moko mbala na mbala, mpe bazali komona ete bakangami bazali kobongola bizaleli na bango.

“Tozali mpenza na mposa ya lisalisi”

Bandeko basalaki milende mingi mpo bato oyo bafandaka na bamboka ya mosika mpe basepelaka na solo báyangana na Ekaniseli. Na ndakisa, ba San, oyo babengamaka mpe ba Bochiman,  bautá na sudi ya Afrika. Bazalaka na bomoi ya mindɔndɔ te, mpe bafandaka esika moko te mpo bakendaka koboma banyama mpe kolɔkɔta biloko. Mpo na Ekaniseli ya 2015, Glenn, oyo azali mobongisi-nzela monene na nɔrdi ya Namibie, asalaki nyonso mpo Ekaniseli esalema na mboka moko ya ba San, mosika na ntaka ya kilomɛtrɛ 270 na ɛsti ya Rundu. Ezalaki mbala ya mibale Ekaniseli esalema kuna. Na mabaku yango, bakonzi ya mboka bapesaki Batatoli ya Yehova nzela ya kosalela ofele ndako ya tribinale. Bato 232 bayaki na Ekaniseli atako mbula ebɛtaki makasi liboso mpe ntango Ekaniseli ezalaki kosalema. Ba Bochiman ya esika yango balobaka monɔkɔ ya Khwe, oyo ezalaka mpasi na koloba. Diskur esalemaki na Lingelesi mpe ebongolamaki na Khwe. Lokola Biblia ezali te na monɔkɔ ya Khwe, basalaki video moko oyo ezalaki na bililingi mpe balakisaki yango na efelo, mpo na kolimbola bavɛrsɛ lokola Yisaya 35:5, 6. Glenn, oyo ayekolaka Biblia na bato mingi na mboka yango, alobi boye: “Esali mbula mibale, nakendaka kuna mbala moko na sanza. Nafandaka kuna mwa mikolo. Bokoli ezali kosalema nokinoki te mpo monɔkɔ na bango ezali mpasi mpe mboka ezali mosika. Tozali mpenza na mposa ya lisalisi. Ntango nasololaki na bakonzi ya mboka mpo tósala Ekaniseli na mbula oyo, mokonzi moko atunaki ngai soki tokoki kotonga esika ya losambo na mboka yango. Alobaki ete bakopesa biso mabele mpe misala ekosalema na mbongo na bango moko! Tosengeli kaka kotindela bango ‘pastɛrɛ’ to kopesa moko na bango mateya mpo akóma pastɛrɛ!”

Namibie: Basakoli mibale bazali koyebisa mwasi moko ya Himba nsango malamu