Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Ba pèlerins mpe bazalaki kosala elongo na ndeko Russell

Eleki mbula nkama moko—1916

Eleki mbula nkama moko—1916

NA 1916, bato ebele mpenza bakufaki na Etumba monene, oyo ekómaki kobengama Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Etumba yango esilaki kosala mbula mobimba ná ndambo banda ebandaki.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/01/1916 elobaki boye: “Etumba monene ya mikili ya Mpoto ekómi mpe kotinda bato bákɔta na mangomba mpe bábanda kokanisa avenire na bango.” Lisolo yango ebakisaki boye: “Tókokisa mikumba na biso, . . . tólɛmba te; tózala na molende mpo na Nzambe mpe Nsango na Ye.”

Mokapo ya mobu 1916 elendisaki bandeko bázala “makasi na kondima,” na kolanda Baroma 4:20, na Biblia King James Version. Bayekoli mingi ya Biblia basalaki bongo, mpe Yehova apambolaki bango mpenza.

Ba pèlerins bakei kolendisa

La Société Watch Tower etindaki bandeko oyo bazalaki kobengama ba pèlerins básala mibembo na bingumba ndenge na ndenge mpo bákende kolendisa mpe kopesa Bayekoli ya  Biblia malako. Na 1916, ba pèlerins soki 69 basalaki bakilomɛtrɛ 800 000 na mibembo mpo na kokende kolendisa bandeko.

Na diskur oyo ndeko Walter Thorn, oyo azalaki pèlerin, asalaki na liyangani moko ya etúká na engumba Norfolk, na etúká ya Virginie, akokanisaki etumba ya mokristo na Etumba Monene; alobaki boye: “Balapolo emonisi ete mibali milio ntuku mibale to ntuku misato bakɔti na etumba yango. . . . Mokili eyebi te ete ezali na limpinga mosusu ya [basoda]. Bazali basoda ya Nkolo, mpe lokola basoda ya Gideone, bango mpe bazali kobunda, kasi na mandoki te. Bazali kobunda mpo na solo mpe boyengebene; bazali kobunda etumba ya malamu mingi ya kondima.”

Bazali kosakola ata na ntango ya bitumba

Na France, mibali koleka milio moko bazokaki to bakufaki na Etumba ya liboso ya Somme, oyo babundaki na France pene na nsuka ya 1916. Na bisika mosusu kaka na France, bandeko ya molende bazalaki kolendisa bakelasi, to  masangá, atako ezalaki pɛtɛɛ te na ntango ya bitumba. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/1916 ebimisaki mokanda oyo ndeko Joseph Lefèvre akomaki. Azalaki Moyekoli ya Biblia mpe akimaki mboka na bango Denain, na France, ntango basoda ya Allemagne bakɔtaki kuna na 1914. Akendaki na sudi, na engumba Paris mpe akómaki kokende na kelasi kaka moko ya Bayekoli ya Biblia oyo ezalaki na engumba yango. Atako azalaki kobɛlabɛla, eumelaki te, akómaki kotambwisa makita nyonso. Na nsima, ndeko Théophile Lequime oyo akimaki mpe engumba Denain, ayaki. Ndeko Lequime akendaki liboso kofanda na Auchel, na France, epai akómaki kobongola masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kotindela yango bandeko na biteni mosusu ya France epai banguna bakɔtaki te. Lokola bakonzi ya basoda na Auchel bazalaki kokanisela ye mabe mpo na mosala na ye, babenganaki ye. Ndeko Lefèvre amonaki ete koya ya ndeko Lequime na Paris ezali eyano na mabondeli na ye.

Nzambe apambolaki mosala na bango na Paris. Ndeko Lefèvre alobaki boye: “Kelasi ekómi sikoyo na bato 45 . . . Bato mingi bamoni bolamu mpe esengo ya komipesa na Nzambe, mpe bazali kokola nokinoki na elimo. Tóloba, bango nyonso bayaka pɔsɔ na pɔsɔ na likita mpo na kopesa litatoli.”

Bakɔtaki na bitumba te

Lokola etumba yango eumelaki mingi, koboya kokɔta na bitumba ekómaki likambo mpo na bandeko. Na Grande-Bretagne, babimisaki mobeko mpo na mosala ya soda, mpe nsukansuka bakweisaki ete mobali nyonso ya mbula 18 tii 40 asengeli kokende mosala ya soda. Kasi Bayekoli mingi ya Biblia bamonisaki mpiko mpe baboyaki.

Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1916 ebimisaki mokanda oyo ndeko Warden ya ekólo Écosse akomaki. Alobaki boye: “Mwana na ngai moko ya mobali akokisi sikoyo mbula 19. Tii awa, azali kopesa litatoli malamu mpenza mpo na Nkolo na ndenge azali koboya mosala ya soda; mpe soki ekosɛnga ete báboma ye mpo na yango, natye motema ete  Nzambe ya likoló akosalisa ye akangama makasi na mateya ya solo mpe ya boyengebene.”

Ndeko James Frederick Scott, elenge moko oyo azalaki colporteur na engumba Édimbourg, na Écosse, akendaki kosamba na tribinale mpo aboyaki mosala ya soda. Kasi nsima ya koyoka likambo na ye malamumalamu, tribinale emonaki ete mobeko ya kokende mosala ya soda etali ndeko Scott te.

Kasi, makambo ezalaki bongo te mpo na bandeko mosusu. Lapolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1916 elobaki boye: “Na sanza ya libwa, bandeko 264 basɛngaki ete bákende mosala ya soda te. Leta andimaki bandeko 23 básala misala mosusu, mpe na baoyo batikalaki, bamosusu “bazwaki bitumbu ya ndenge na ndenge,” mpe basɛngaki bango nyonso básala “misala ya ekólo na ndakisa kotonga banzela, kobuka mabanga, mpe bongo na bongo.” Bandimaki ete kaka bandeko mitano nde básala mosala ya soda te.”

Ndeko Charles Taze Russell akufi

Na mokolo ya 16/10/1916, ndeko Charles Taze Russell, oyo azalaki kokamba misala ya Bayekoli ya Biblia, akendaki mobembo mpo na kosala badiskur na wɛsti ya États-Unis. Azongaki lisusu te. Na mokolo ya mibale, mwa 31/10/1916 nsima ya midi, ndeko Russell akufaki na engbunduka (train) na engumba Pampa, na Texas; azalaki na mbula 64.

Bandeko mingi bazalaki komona te nani akoki kozwa esika ya ndeko Russell. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1916 elobelaki makanisi ya Russell mpo na mosala oyo atambwisaki bambula mingi. Kasi motuna ezalaki kaka: Nani akozwa esika na ye?

Motuna yango ezwaki eyano na likita ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania oyo esalemaki na ebandeli ya mobu 1917. Bayangani basalaki voti mpe bango nyonso baponaki kaka moto moko. Kasi basanza oyo elandaki emonisaki ete bomoko yango ezalaki ya ntango mokuse, mpo komekama makasi ezalaki kozela bandeko.