Mokili Indonésie, oyo eteni na yango moko ezali na ngámbo ya Australie mpe mosusu na Azia mpo équateur eleká na katikati na yango, ezali lisangá ya bisanga ebele koleka na mokili mobimba. Na bisanga yango koleka 17 500, mingi ezali na bangomba milai mpe bazamba mineneminene. Lokola Indonésie ezali na ba volcan koleka 100 oyo ebimisaka mɔtɔ, ezali mpe esika oyo mɔtɔ ya volcan ebimaka mingi koleka na mokili.

Bato Indonésie ezali ekólo ya minei oyo eleki na bato ebele na mokili (nsima ya Chine, Inde, mpe États-Unis) mpe ezali na bikólo koleka 300. Koleka katikati ya bato ya Indonésie mobimba bazali bato ya Java mpe ba Soundanais.

 Lingomba Bana-mboka ebele mpenza (soki 90%) bazali Bamizilma. Basusu bazali bato ya Lingomba ya Hindu, ya Bouddha, to mpe bakristo ya nkombo mpamba. Bato mingi mpe balandaka mimeseno ya losambo ya bonkɔkɔ.

Monɔkɔ Bato ya bisanga ya Indonésie balobaka minɔkɔ koleka 700. Monɔkɔ ya bato nyonso ezali Indonésien, eutá na monɔkɔ ya Malais. Bato balobaka mpe minɔkɔ ya mboka na bandako na bango.

Ndenge ya kobikela Bato mingi basalaka bilanga to mombongo. Mokili yango etondi na mabanga ya ntalo, nzete, petrole ya moindo, ná bagaze; ebimisaka mpe caoutchouc ná mafuta ya mbila ebele.

Biloko ya kolya Loso nde bilei ya libosoliboso. Bilei mosusu ya mboka ezali nasi goréng (loso bakalingá ná maki basangisá na ndunda), satay (kamundele) mpe gado-gado (ndunda ya mobesu ná supu ya mwamba).

Mopɛpɛ Molunge ná mwa malili. Mipɛpɛ ebimisá bileko mibale: elanga mpe mbula. Bambula ya bankake makasi ebɛtaka mingi.