Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

 INDONÉSIE

Java Occidental eboti mbuma

Theodorus Ratu

Java Occidental eboti mbuma

Na 1933, ndeko Frank Rice abengaki Theodorus (Theo) Ratu, mwana-mboka Sulawesi du Nord, aya kosalisa ye na depo ya kobomba mikanda na Jakarta. Theo alobaki boye: “Nakómaki kosepela mingi na mosala malamu ya Bokonzi mpe nabandaki kosakola na ndeko Rice. Na nsima, nalandaki ndeko Bill Hunter oyo akendaki kosakola na Java mpe nasalaki mobembo na bandeko na masuwa Momemi-pole mpo na kokende na Sumatra.” Theo azali mwana-mboka Indonésie ya liboso oyo andimaki solo; azalaki mobongisi-nzela bambula ebele na Java, na Sulawesi du Nord, mpe na Sumatra.

Na mbula oyo elandaki, ndeko Bill Hunter apesaki Felix Tan, oyo akendaki kotánga na Jakarta, mwa buku Bakufi bazali wapi? Ntango Felix azongaki epai na bango na engumba Bandung, na Java Occidental, alakisaki leki na ye Dodo mwa buku yango. Bakamwaki ntango batángaki na mokanda yango ete Adama, mobali ya liboso, azalaki te na molimo oyo ekufaka te. Azalaki nde molimo. (Eba. 2:7) Lokola bakómaki na mposa ya koyeba mateya ya Biblia, Felix ná Dodo bakendaki na esika oyo batɛkaka mikanda ya kala na Bandung mpo na koluka mikanda mosusu ya Watch Tower. Bayebisaki  mpe bato ya libota na bango makambo oyo bayekolaki. Nsima ya komipesa na kotánga babuku mpe mwa babuku nyonso oyo bazwaki, batindaki mokanda na depo ya Jakarta. Bakamwaki ntango ndeko Frank Rice ayaki kotala bango, mpe amemelaki bango mikanda ya sika.

Libota ya baTan

Ntango ndeko Rice azongaki na Jakarta, mwa moke na nsima, ndeko Clem Deschamp ná mwasi na ye Jeanne, oyo bautaki kobalana sika, bakendaki na Bandung mpe basalaki mikolo 15. Felix alobaki boye: “Ndeko Deschamp atunaki biso na libota soki tolingi kozwa batisimo. Bato minei: ngai, Dodo, leki na biso ya mwasi Josephine (Pin Nio), ná mama (Kang Nio), tozwaki batisimo mpo na komonisa ete tomipesi na Yehova.” * Nsima ya kozwa batisimo, bango  nyonso balandaki ndeko Clem ná mwasi na ye Jeanne mpo na kosakola mikolo libwa na bamboka. Ndeko Clem alakisaki bango ndenge ya kosalela mokanda ya litatoli, oyo ezalaki na nsango moko ya mokuse ya Biblia na minɔkɔ misato. Eumelaki te, mwa etuluku ya Bandung ekómaki lisangá ya mibale na Indonésie.

Ekɔti ya pápa

Wana mosala ya kosakola ezalaki kokende liboso, bakonzi ya mangomba ya bokristo bakómaki kotyela bandeko miso. Bakonzi yango ná bato na bango bakomaki masolo na bazulunalo mpo na kotɛmɛla mateya mpe mosala ya Batatoli. Masolo yango etindaki bakonzi ya biro oyo etalelaka makambo ya losambo bábengisa ndeko Frank Rice mpo bátuna ye mituna. Lokola apesaki bango biyano ya malamu, bakonzi batikaki mosala ya Batatoli ekoba. *

Na ebandeli ya bambula ya 1930, bakonzi ya bikólo oyo ezalaki kokonza bazalaki kotyela mosala ya kosakola likebi te. Kasi ntango Banazi ya Allemange bazwaki bokonzi na Mpoto, bakonzi mosusu, mingimingi oyo bazalaki kosambela na Lingomba ya Katolike, babalukelaki Batatoli. Ndeko Clem Deschamp alobaki boye: “Mokonzi moko ya douane oyo azalaki kosambela na Katolike akangaki babuku na biso, mpe alobaki ete elobi makambo ya mabe mpo na Banazi. Ntango nakendaki na biro ya douane, mokonzi yango ya motema mabe azalaki na konje. Moto oyo azalaki kosala na esika na ye, moto moko ya boboto oyo azalaki kosambela na Katolike te, abimisaki mbala moko babuku yango, mpe alobaki: ‘Zwá nyonso oyo olingi liboso nkolo-esika azonga!’”

Ndeko Jeanne Deschamp alobaki: “Mokolo mosusu, bakonzi basɛngaki biso tólongola fɔtɔ mibale na buku Enemies (Banguna). Basepelaki te na liyemi ya nyoka elíngi bato  (Satana) mpe ya mwasi moko ya ndumba alangwe masanga (mangomba ya lokuta). Yango nyonso mibale elataki ekɔti ya pápa. * Mposa na biso ezalaki ete tókabola buku yango. Na yango, bandeko misato kati na biso bafandaki na libongo na nse ya moi makasi, mpo na kotya langi ya moindo na bililingi ya ekɔti ya pápa na ebele ya babuku oyo tozalaki na yango!”

Bililingi mibale na buku Enemies oyo bakonzi baboyaki

Bitumba ezalaki kopalangana na mikili ya Mpoto, mpe mikanda na biso ekobaki komonisa polele bokosi ya mangomba ya bokristo mpe ndenge emikɔtisaki na makambo ya politiki. Na yango, bakonzi ya mangomba babakisaki molende mpo na kotya bakonzi ya Leta mbamba bápekisa mosala na biso; mikanda na biso ebele epekisamaki.

Kasi, bandeko balɛmbaki te na mosala ya kosakola, mpe basalelaki malamu masini moko ya kobimisa mikanda oyo eutaki na Australie. (Mis. 4:20) Ndeko Jeanne Deschamp  alobeli mayele moko oyo basalelaki; alobi boye: “Soki tobimisi mwa buku to zulunalo ya sika na masini, tozalaki kolakisa yango bakonzi ya Leta. Tozalaki kobimisa mpe kokabola mokanda yango na ebandeli ya pɔsɔ. Na nsuka ya pɔsɔ, tozalaki kokende kolakisa moko na biro ya prokirɛrɛ monene. Soki baboyi mokanda yango, tozalaki kosala lokola toyoki mawa mpe tozalaki kozonga nokinoki kobimisa mokanda mosusu ya sika.”

Mbala mingi bandeko oyo bazalaki kokabola mikanda oyo epekisami bazalaki kokima bapolisi ndenge mpoko ekimaka nyau. Na ndakisa, mokolo moko ntango ndeko Charles Harris azalaki kosakola na Kediri, na Java oriental, abɛtaki porte ya mokonzi ya bapolisi kozanga ete ayeba.

Mokonzi yango alobaki na ye: “Naluki bino banda ntɔngɔ. Zelá nazwa liste ya babuku na bino oyo epekisamá.”

Ndeko Charles alobi ete: “Ntango mokonzi yango akɔtaki na ndako, nabombaki mikanda oyo epekisamaki na libenga ya kati ya kazaka. Ntango azongaki, napesaki ye mwa babuku 15 oyo epekisamaki te. Apesaki mwa likabo na ye na mitema mibale, mpe na esika mosusu, nakabolaki mikanda oyo epekisamaki.”

Kobimisa mikanda na ntango ya epekiseli

Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba engalaki na Mpoto, Pays-Bas ezalaki lisusu kotinda mikanda te na Indonésie. Kasi, bandeko bamonaki mosika, mpe babongisaki makambo mpo kompanyi moko ya mokili ebimisaka bazulunalo na biso na masini na Jakarta. Nimero ya liboso ya Consolation (lelo Lamuká!) na monɔkɔ ya Indonésien ebimaki na sanza ya yambo na 1939, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaki mwa moke na nsima. Na nsima, bandeko basombaki mwa masini ya kobimisa mikanda mpe bakómaki kosala yango bango moko. Na 1940, bandeko ya Australie batindaki masini ya monene koleka mpe bandeko bakómaki kobimisa mwa babuku mpe bazulunalo na Indonésien mpe na Néerlandais na mbongo na bango moko.

Masini ya liboso ya kobimisa mikanda eyei na depo ya Jakarta

 Nsukansuka, na mokolo ya 28/07/1941, bakonzi bapekisaki mikanda nyonso ya la Société Watch Tower. Ndeko Jeanne Deschamp alobaki boye: “Mokolo moko na ntɔngɔ ntango nazalaki kobɛta masini ya kokoma mikanda, porte efungwamaki mpe bapolisi misato bakɔtaki elongo na mokonzi moko ya basoda ya Pays-Bas alati bilamba ya bakonzi—bamedayi, ba gant ya mpɛmbɛ, mopanga, ekɔti oyo etondi na nsala. Tokamwaki te. Mikolo misato liboso, moto moko ayebisaki biso ete mosika te bakopekisa mikanda na biso. Mokonzi yango ya lofundo atángaki nsango moko ya molai, mpe asɛngaki bámema ye esika tobimisaka mikanda mpo akanga yango. Kasi mobali na ngai ayebisaki ye ete atika na ye. Masini yango etɛkamaki mokolo eleki!”

Kasi lokola bapekisaki Biblia te, bandeko bakobaki kosakola ndako na ndako, bazali kosalela kaka Biblia. Bazalaki mpe koyekola Biblia na bato. Kasi lokola nsolo ya etumba ezalaki koyokana na Azia, basɛngaki bapaya oyo bazalaki babongisi-nzela bázonga na Australie.

^ par. 1 Nsima, tata ya Felix ná baleki na ye misato ya mibali bakómaki mpe Batatoli ya Yehova. Leki na ye Josephine abalanaki na ndeko André Elias, mpe bakɔtaki Gileade, eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Lisolo ya bomoi ya ndeko Josephine ebimá na Lamuká! ya sanza ya libwa 2009, na Lifalanse.

^ par. 1 Nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Frank azongaki na Australie, abalaki mpe abotaki bana. Ndeko Rice asilisaki bomoi na ye awa na mabele na 1986.

^ par. 3 Bililingi yango eutaki na Emoniseli 12:9 mpe 17:3-6.