Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

 INDONÉSIE

Boyangeli ya Japon

Boyangeli ya Japon

Na ebandeli ya 1942, basoda ya nsɔmɔ ya ekólo Japon bakɔtaki mpe bazwaki Indonésie. Basalisaki bandeko ebele ya mibali misala makasi ya mabɔkɔ, na ndakisa kotonga banzela mpe kosala baterase ya mai. Batyaki bamosusu na babolɔkɔ ya salite mingi mpe banyokolaki bango mpo baboyaki kokɔta na etumba. Bandeko ata misato bakufaki na bolɔkɔ.

Johanna Harp, bana na ye, na moninga na bango Beth Godenze (na katikati)

Johanna Harp, ndeko mwasi moko ya Pays-Bas oyo azalaki kofanda na mboka moko mosika na bangomba ya Java oriental, azalaki ekɛngɛ mpe mbula mibale mobimba kobanda etumba ebandaki, bakangaki ye te. Na yango,  ye ná bana na ye misato, mibale ya basi, moko ya mobali, babongolaki buku Salut (Lobiko) mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Lingelesi na Indonésien. * Basalaki bakopi ya mikanda yango mpe batindelaki yango bandeko na Java mobimba na kobombana.

Mwa bandeko oyo bazalaki na bonsomi bakómaki kokutana na bituluku ya mikemike mpe kosakola na ekɛngɛ. Ndeko Josephine Elias (ya libota Tan) alobaki boye: “Nazalaki ntango nyonso kokeba mpo na koteya moto oyo nayebi te. Nazalaki komema lisano ya échecs ntango nakei kotala bato oyo basepelaki na solo mpo bato mosusu bákanisa ete nakei tóbɛta lisano yango.” Ndeko Felix Tan ná mwasi na ye Bola bazalaki kosakola ndako na ndako, lokola nde bazali kotɛka sabuni. Ndeko Felix alobaki boye: “Mbala mingi bapolisi ya Japon oyo bazalaki kobangisa bato (Kempeitai) bazalaki kolanda biso nsimansima. Mpo bákanga biso te, tozalaki kokende kotala bayekoli na biso ya Biblia na bangonga ekeseni. Bayekoli na biso motoba bakolaki na elimo mpe bazwaki batisimo na ntango ya etumba.”

Bokabwani na Jakarta

Bandeko bamesanaki na bampasi ya bitumba, kasi mokakatano mosusu ya makasi mpenza ebimaki. Bakonzi ya Japon basɛngaki na bapaya nyonso (ata mpe bana-mboka Indonésie oyo bazalaki na makila ya ba Chinois) bákomisa nkombo na Leta mpe bázwa karte ya bana-mboka oyo ekomonisa ete bakotikala sembo na bokonzi ya Japon. Bandeko mingi bamitunaki: ‘Tókomisa nkombo mpe tózwa karte yango, to tóboya?’

Josephine Elias ná yaya na ye Felix

Ndeko Felix Tan alobaki boye: “Bandeko ya Jakarta batindaki biso baoyo tozalaki na engumba Sukabumi  tóboya kozwa karte yango. Kasi tosɛngaki bakonzi ete na esika ya maloba ‘nkolo-karte oyo andimi kotikala sembo na . . .’ bátya nde ‘nkolo-karte oyo akotɛmɛla te’ limpinga ya basoda ya Japon. Likambo ya kokamwa, bakonzi bandimaki mpe biso nyonso tozwaki bakarte. Ntango bandeko ya Jakarta bayokaki ete tozwi bakarte, balobaki ete tozali bapɛngwi mpe bakataki boyakani na biso.”

Likambo ya mawa, bakangaki bandeko mingi ya Jakarta oyo bazalaki makambo makasi mpe bawanganaki solo. Ndeko moko oyo aboyaki kowangana solo asukaki na bolɔkɔ elongo na ndeko André Elias. Ndeko André alobaki boye: “Nasololaki na ye likambo ya kokomisa nkombo mpe nasalisaki ye akóma na makanisi oyo ebongi. Asɛngaki bolimbisi ndenge bakataki boyokani na biso. Tokómaki kolendisana mingi, kasi mawa mingi mpo akufaki na bolɔkɔ mpo bomoi ezalaki mpasi.”

Merdeka!

Ntango etumba esilaki na 1945, bandeko bazalaki na mposa makasi ya kokoba na mosala ya kosakola. Ndeko  moko oyo azalaki na bolɔkɔ mpe anyokwamaki mingi akomelaki Betele ya Australie ete: “Nsima ya konyokwama mbula minei, nazali kaka sembo mpe makanisi na ngai ebongwani te. Na bampasi na ngai nyonso, nabosanaki bandeko te. Bokoki kotindela ngai babuku?”

Eumelaki te, bakómaki kotinda mikanda mokemoke na Indonésie, kasi na nsima batindaki mikanda ebele. Basakoli zomi na Jakarta bazongelaki mosala ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Indonésien.

Na mokolo ya 17/08/1945, bakonzi ya bato oyo bazalaki koluka lipanda na Indonésie bayebisaki ete ekólo yango ezwi lipanda; likambo yango etindaki bato bátombokela boyangeli ya Pays-Bas na boumeli ya mbula 4. Bato ebele mpenza bakufaki na yikiyiki yango, bato koleka milio nsambo bakimaki mboka.

Na boumeli ya botomboki yango, bandeko bakobaki kosakola ndako na ndako. Ndeko Josephine Elias alobaki boye: “Batomboki bazalaki kotinda biso tóganga lokola bango ete ‘Merdeka,’ elingi koloba ‘Bonsomi.’ Kasi toyebisaki bango ete tokɔtaka na makambo ya politiki te.” Na 1949, Pays-Bas etikaki bokonzi na mabɔkɔ ya ekólo oyo ezalaki na nse na yango na boumeli ya bambula mingi, République des Etats unis d’Indonésie (lelo République d’Indonésie). *

Na 1950, bandeko ya Indonésie basilaki konyokwama na etumba pene na mbula 10. Kasi mosala monene ezalaki kozela bango. Ndenge nini bakoyebisa ebele ya bato ya Indonésie nsango malamu? Na liso ya bomoto, ezalaki komonana ete bakokoka te! Kasi, bandeko bakobaki na mosala, batyaki motema ete Yehova akotinda “basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:38) Mpe asalaki yango.

^ par. 2 Hermine (Mimi), mwana mwasi ya nsuka ya ndeko Harp, akɔtaki Eteyelo ya Gileade, mpe nsima ya bitumba azongaki na Indonésie lokola misionɛrɛ.

^ par. 3 Pays-Bas ekobaki koyangela etúká ya Papouasie occidentale (na ntango wana ezalaki Nouvelle-Guinée occidentale) tii na 1962.

Makambo mosusu

MITUNA OYO BATO BATUNAKA MINGI

Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?

Bazali likama mpo na kimya ya mboka?