Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova

Bandeko ya lisangá ya Surabaya, na 1954

 INDONÉSIE

Bamisionɛrɛ ya Gileade bayei

Bamisionɛrɛ ya Gileade bayei

Na sanza ya nsambo na 1951, bandeko ya mwa lisangá ya Jakarta bakutanaki mpo na koyamba Peter Vanderhaegen, misionɛrɛ ya liboso ya Eteyelo ya Gileade oyo atindamaki na Indonésie. Na nsuka ya mbula, bamisionɛrɛ mosusu 13 oyo bautaki Australie, Allemagne, mpe Pays-Bas bayaki mpe motángo ya basakoli na Indonésie ebakisamaki mbala soki mibale.

Fredrika Renskers, misionɛrɛ moko oyo autaki na Pays-Bas alobaki boye: “Nazalaki kolɔta nakei kosakola ndako na ndako mpe nazali kosala bajɛstɛ mpo na kosolola na bato. Kasi lokola bato mingi mpenza bazalaki koloba Néerlandais, na ebandeli nazalaki kosakola na monɔkɔ yango.” Ndeko Ronald Jacka, oyo autaki na Australie alobaki boye: “Bamosusu kati na biso bazalaki kosalela mokanda ya litatoli oyo ezalaki na nsango ya mokuse na Indonésien. Liboso nabɛta na porte moko, nazalaki kotánga maloba mpe komeka kokanga yango na motó.”

Lokola bamisionɛrɛ bamipesaki mobimba, motángo ya basakoli oyo ezalaki 34 ekómaki 91 na mbula moko mpamba. Na mokolo ya 01/09/1951, bafungolaki biro ya filiale ya la Société Watch Tower na ndako ya ndeko André Elias, na Jakarta central. Ndeko Ronald Jacka atyamaki mokɛngɛli ya filiale.

Solo ekɔti mpe na bisika mosusu

Na sanza ya zomi na moko na 1951, batindaki ndeko Peter Vanderhaegen na engumba Manado, na Sulawesi du Nord, epai ndeko Theo Ratu ná mwasi na ye bafungolaki mwa etuluku moko. Bato mingi ya engumba yango bazalaki komibenga bakristo mpe bazalaki komemya Liloba ya Nzambe. Bato mingi bazalaki koyamba Batatoli ya Yehova mpe kosɛnga bango bálimbolela bango mateya ya Biblia. Mbala mingi  bazalaki kosolola na bato zomi esika moko. Kasi nsima ya miniti 15, okomona bato soki 50 bayei koyoka. Nsima ya ngonga moko, lopango ekotonda na bato ata 200.

Na ebandeli ya 1952, ndeko Albert Maltby ná mwasi na ye Jeanne batyaki ndako ya bamisionɛrɛ na Surabaya, engumba ya mibale oyo eleki monene na Indonésie, na Java oriental. Na nsima, bamisionɛrɛ motoba ya basi bakendaki kofanda na bango (Gertrud Ott, Fredrika Renskers, Susie mpe Marian Stoove, Eveline Platte ná Mimi Harp). Ndeko Fredrika Renskers alobi boye: “Bato mingi bazalaki Bamizilma ya bongobongo mpe bazalaki na boboto mingi. Emonanaki lokola nde bato mingi bazalaki kozela kaka mateya ya solo, na yango  ezalaki mpasi te kobanda koyekola Biblia na bato. Mbula misato na nsima, lisangá ya Surabaya ekómaki na basakoli 75.”

Na lopango ya bamisionɛrɛ na Jakarta

Kaka na eleko wana, mobali moko ya Mizilma na nkombo Azis, oyo azalaki kofanda na engumba Padang, na Sumatra occidental, akomelaki biro ya filiale mokanda mpo na kosɛnga básalisa ye na elimo. Azis ayekolaki Biblia na bambula ya 1930 elongo na babongisi-nzela oyo bautaki Australie kasi, ntango Japon ezwaki Indonésie, azalaki lisusu komona bango te. Sikoyo amonaki mwa buku moko ya Batatoli ya Yehova. Akomaki boye: “Ntango namonaki adrɛsi ya Jakarta na mwa buku yango, motema na ngai esepelaki mingi!” Mbala moko biro ya filiale etindaki ndeko Frans van Vliet oyo azalaki mokɛngɛli ya zongazonga na Padang. Mokɛngɛli yango akutaki Azis ateyá Nazar Ris, moninga na ye ya kartye mpe mosali ya Leta oyo azalaki koluka mpenza koyeba makambo ya Nzambe. Azis ná Nazar mpe mabota na bango bandimaki solo. Ndeko Azis akómaki nkulutu. Ndeko Nazar akómaki mobongisi-nzela monene, mpe lelo, bana na ye mingi bazali Batatoli ya Yehova ya molende.

Frans van Vliet ná leki na ye ya mwasi Nel

Mwa moke na nsima, ndeko Frans van Vliet akendeki kotala ndeko moko ya ekólo Pays-Bas oyo atikaki kosakola; akutaki ye azali kobongisa izini na ye ya kosala mafuta oyo ebebaki na etumba na engumba Balikpapan, na Kalimantan oriental. Ndeko Frans abimaki na ye na mosala ya kosakola mpe alendisaki ye ayekola Biblia na ebele ya bato oyo bazalaki kosepela na solo. Liboso ndeko yango azonga na Pays-Bas, afungolaki mwa etuluku moko na engumba Balikpapan.

Na nsima, Titi Koetin, ndeko mwasi moko oyo azwaki batisimo sika akendaki kofanda na engumba Banjarmasin, na Kalimantan occidental. Titi ateyaki bandeko na ye ya ekólo Dayak, mpe asalisaki mingi na bango báyeba solo. Bato yango mosusu bazongaki na bamboka na bango na kati mpenza ya Kalimantan mpe bafungolaki mwa bituluku oyo ekómaki masangá minene.

 Kobimisa mikanda na monɔkɔ ya Indonésien

Lokola mosala ya kosakola ezalaki kopalangana, bandeko bakómaki na mposa ya mikanda ebele na monɔkɔ ya Indonésien. Na 1951, babongolaki buku “Que Dieu soit reconnu pour vrai!” kasi bakonzi ya Leta babongolaki ndenge ya kokoma maloba ya monɔkɔ ya Indonésien; na yango esɛngaki biro ya filiale ebongisa ekomeli ya mokanda yango. * Ntango buku yango ebimaki, bato oyo balobaka Indonésien basepelaki mingi kotánga yango.

Na 1953, Betele ebimisaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 250 na monɔkɔ ya Indonésien; mbala ya liboso bábimisa mikanda bango moko na mboka nsima ya mbula 12. Na ebandeli, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango ya nkasa 12 ezalaki kaka na masolo ya boyekoli. Mbula misato na nsima, ekómaki na nkasa 16, mpe imprimeri moko ya mokili ezalaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 10 000 na sanza moko.

Na 1957 babandaki kobimisa Lamuká! na monɔkɔ ya Indonésien mbala moko na sanza. Eumelaki te, bakómaki kobimisa yango 10 000 na sanza moko. Lokola kozwa papye ekómaki mpasi na mboka, bandeko bakomelaki Leta mokanda  mpo na kosɛnga nzela básomba papye mpo na kobimisa Lamuka! Mokonzi moko ya Leta oyo atalelaki likambo yango alobaki boye: “Mpo na ngai, Menara Pengawal (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli) ezali moko ya bazulunalo oyo eleki malamu na Indonésie; na yango nazali na esengo mingi ya kosalisa bino bósomba papye mpo na zulunalo na bino ya sika.”

^ par. 1 Kobanda 1945, Leta abongolaki ndenge ya kokoma maloba ya monɔkɔ ya Indonésien soki mbala mibale, mingimingi mpo na kolongola ekomeli ya kala oyo eutaki na monɔkɔ ya Néerlandais.