Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova

 KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Océanie

Océanie
  • MIKILI 29

  • BATO 40 208 390

  • BASAKOLI 97 583

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 64 675

Batikaki maboke ya mikanda

Lokola nsango malamu ekómaka mpenza te na bisanga mingi ya Micronésie, etuluku moko ya basakoli ya Bisanga Marshall bakanaki kosala mobembo ya pɔsɔ mibale na masuwa. Balongwaki na esanga ya Majuro mpe bakendaki na esanga ya Wotje mpe ya Ormed.

Lokola balingaki kopesa litatoli na bato mingi mpenza, basakoli yango babongisaki maboke ya mikanda. Liboke mokomoko ezalaki  na bazulunalo minei mpe mwa babuku mibale. Lokola bayebaki te mokolo oyo bakozonga lisusu na bisanga yango, bazalaki kotika liboke moko epai ya bato oyo basepelaki mpe balendisaki bango bákabolela baninga mpe bandeko na bango mikanda yango. Na mobembo yango ya pɔsɔ mibale, basakoli wana bakabolaki mwa babuku 531, bazulunalo 756, mpe babuku 7.

“Matɔndi ndenge bobosani biso te”

Na sanza ya mibale na 2014, Batatoli motoba ya Papouasie-Nouvelle-Guinée bakendaki kosakola mikolo zomi na bamboka ya Esanga Karkar, oyo volcan ebimisá. Bakutanaki na bato ebele oyo bayokaki bango mpe bakabolaki mikanda 1 064. Ndeko mwasi moko na nkombo Relvie alobaki boye: “Mokolo ya liboso, tozalaki kaka kosakola tii ngonga ya 15:00. Mai na biso ya komɛla esilaki, mbanga na biso elɛmbaki, mpe minɔkɔ ekaukaki mpo tolobaki mingi. Nazalaki kosolola na mwana mwasi moko ya moke. Nalingaki kotángela ye vɛrsɛ, kasi nakokaki te mpo nazalaki na mposa ya mai makasi. Na mbala moko, apesaki ngai mai.”

Mokolo moko na butu liboso bálongwa na mboka moko, basalaki likita moko monene na bato ya mboka yango, mpe bakonzi ya lingomba bazalaki wana. Relvie alobi boye: “Namiyokaki lokola ntango Stefano azalaki kolongisa solo liboso ya Sanedrina, kaka nde bato oyo bazalaki koyoka biso bazalaki mitema mabe te.” Ntango basakoli wana motoba basilisaki koloba, mwasi moko oyo azalaki mokambi ya eteyelo ya mokolo ya lomingo ya Baprotesta atɛlɛmaki mpe apesaki matɔndi na mama-kulutu na ye, oyo azalaki moko ya basakoli yango, na ndenge amemelaki bato ya mboka na bango solo.  Mokambi yango alobaki boye: “Ndakisa na yo ya malamu ezali lokola oyo ya mwasi Mosamaria oyo akendaki koyebisa bandeko na ye makambo kitoko oyo ayokaki epai ya Yesu. Matɔndi ndenge bobosani biso te.”

Bana mike mpe bakoki kosakola?

Kiribati: Teariki ná Tueti

Mokolo moko na ntɔngɔ, Teariki, mwana mobali moko ya mbula 7 na esanga ya Tarawa, eteni moko ya Kiribati, azalaki kosakola elongo na tata na ye Tueti mpe bakɔtaki na ndako moko epai bakutaki mibali ná basi soki 10 oyo bazalaki na mbula mwa moke koleka 20. Ntango tata ya Teariki asilisaki koyebisa bilenge yango nsango ya Bokonzi, moko na bango alobaki na ye boye: “Tomonaka bomemaka bana na bino na mosala ya kosakola. Mpo na nini bosalaka bongo? Bana mike boye, bakoki mpe kosakola makambo ya Nzambe”?

Ndeko Tueti alobaki: “Bolingi komona soki mwana na ngai akoki kosala yango? Ngai nakoki kokende libándá, bino moko bóyoka makambo akoloba.” Bango nyonso balobaki: “Ɛɛ, tolingi koyoka ye.”

Ntango Ndeko Tueti abimaki libándá, Teariki atunaki bato yango: “Boyebi nkombo ya Nzambe?”

Moko na bango ayanolaki: “Ɛɛ. Ezali Yesu! Mosusu alobaki: “Nzambe.” Mosusu alobaki: “Nkolo.”

Teariki alobaki boye: “Tótala oyo Biblia elobi. Tókende na Yisaya 42:5, mpe tótánga elongo.” Nsima ya kotánga vɛrsɛ yango, atunaki boye: “Vɛrsɛ oyo ezali kolobela nani?”

Elenge mwasi moko ayanolaki: “Nzambe.” Na nsima Teariki alobaki: “Ɛɛ, Nzambe ya solo. Soki totángi na vɛrsɛ ya mwambe, Nzambe ya solo alobi na biso nini? ‘Ngai Yehova. Yango nde nkombo na ngai; mpe nakopesa nkembo na ngai na mosusu te.’ Bomoni nkombo ya Nzambe?”

Bango nyonso bayanolaki: “Yehova.”

 Sikoyo lokola moto nyonso akómaki koyoka na likebi, Teariki atunaki bango: “Tokozwa nini soki tozali kosalela nkombo ya Nzambe, Yehova? Tokozwa eyano na Misala 2:21. Elobi ete: ‘Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.’ Bomoni eloko tokozwa soki tozali kosalela nkombo ya Nzambe?”

Elenge mwasi moko ayanolaki: “Lobiko.”

Na esika wana nde tata ya Teariki azongaki na kati ya ndako. Na nsima, atunaki bato yango: “Bokanisi nini sikoyo? Bana na biso bakoki mpe kosakola? Ezali mabe ndenge tomemaka bango?” Bilenge yango nyonso bandimaki ete bana bakoki mpenza kosakola mpe ete ebongi mpe bábimaka na mosala ya kosakola. Na nsima  ndeko Tueti alobaki boye: “Soki boyekoli makambo oyo ezali na Biblia, bino mpe bokoki koteya bato mosusu.”

Nsango malamu ekómi na mboka likoló ya ngomba

Na sanza ya zomi na moko na 2013, ndeko Jean-Pierre, oyo asalaka na biro ya babongoli ya Port-Vila na Vanuatu, asalaki mobembo na esanga oyo abotamá mpo na kokɔta liyangani ya zongazonga. Ntango mpɛpɔ ekitaki na mwa libándá ya mpɛpɔ ya esanga yango, bato ebele oyo bautaki na sudi ya esanga bayaki kosɛnga ye mikanda. Apesaki bango bazulunalo mingi oyo azalaki na yango. Na nsima mokonzi ya lingomba moko mpe ayaki kosɛnga ndeko Jean-Pierre mikanda. Moto yango asɛngaki ye aya na mboka na ye; alobaki: “Tozali kokufa nzala ya elimo. Yaká na mboka na biso koyanola na mituna na biso nyonso.” Mokolo oyo elandaki nsima ya liyangani, ntɔngɔntɔngɔ, ndeko Jean-Pierre atambolaki tii na ngomba moko molai. Nsukansuka, akómaki likoló ya ngomba, esika mboka yango ezalaki. Bato ya mboka yango bayambaki ye malamu; na nsima, ndeko Jean-Pierre alobelaki makambo oyo ezali na Nsango ya Bokonzi No. 38 oyo elobi “Bakufi bakozonga mpenza na bomoi?” Alendisaki bato nyonso soki 30 oyo bazalaki wana bálanda na Babiblia na bango. Lisolo yango eumelaki ngonga soki 7. Bato ya mboka yango bazalaki mpenza na nzala ya elimo! Mobali moko ya mbula 70 alobaki: “Na bomoi na ngai mobimba, naino nayoká moto alimbola makambo ya bakufi polele boye te!”

Ndeko Jean-Pierre alalaki na mboka yango. Alalaki na shambre moko na pastɛrɛ. Ntango alamukaki na ntɔngɔ, amonaki pastɛrɛ azali kotánga zulunalo na biso. Ndeko Jean-Pierre atunaki ye soki azali kotánga nini, mpe na esengo nyonso moto yango alobaki ete azali kotánga makambo etali Bokonzi ya Nzambe. Andimaki ete Bokonzi  ya Nzambe ezalaki te na mitema ya Bafarisai, bato oyo Yesu apamelaki na Luka 17:21. Amonaki ete Bokonzi ya Nzambe ekoki kozala na motema ya moto te, ndenge bazalaki koteya na ndako-nzambe. Ntango ndeko Jean-Pierre azongaki na Port-Vila, akobaki kosolola na bato ya mboka yango na telefone. Bandeko mibali misato ya lisangá moko oyo ezali pembeni bandimaki kokende na mboka yango mpo na kosala Ekaniseli, mpe bato 109 bayaki!

Vanuatu