Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova

Eleki mbula nkama moko—1915

Eleki mbula nkama moko—1915

 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1915, elobaki ete: “Oyo ezali ntango ya komekama. Tomonisaki molende na mikolo eleki kaka mpo tozalaki na elikya ete mbongwana monene ekosalema na mobu 1914 T.B., to tozalaki na molende mpo na bolingo mpe bosembo na biso epai ya NKOLO na biso, epai ya bandeko mpe mpo na nsango na ye?” Na mobu 1915, bayekoli mosusu ya Biblia babandaki kolɛmba nzoto. Kasi, bisika mingi na mokili, bato bazalaki kobunda na bitumba ya lolenge mosusu.

Etumba monene, oyo ekómaki kobengama Etumba ya liboso ya mokili mobimba ezalaki kondongbana na mikili ya Mpoto. Bato bakómaki kosalela bibundeli ya nsɔmɔ, mpe yango ebomaki bato mingi na ndenge oyo esalemá naino te liboso. Na ndakisa, na mobu 1915, basoda ya Allemagne oyo basalaka na mai, babandaki kotambolatambola na bamai mpe kozinga Grande-Bretagne. Mwa 07/05/1915, masuwa moko ya basoda yango ezindisaki masuwa moko na nkombo Lusitania, oyo ezalaki komema bapaya. Bato koleka 1 100 bakufaki.

Mokakatano ya koboya kosala mosala ya soda

Bayekoli ya Biblia baboyaki kokɔta na etumba yango. Kasi, bakangaki ntina te ete bakristo basengeli koboya kokɔta na makambo ya lolenge nyonso wana. Atako bazalaki kondima te na ndenge na bango moko komikomisa na mosala ya soda, kasi basusu bazalaki kokende kopesa bankombo mpe bazalaki koluka ete bázala basoda oyo bakoboma bato te. Soki makambo eyei yombe mpe bakimi na nse ya mabele, basusu bazalaki kokanisa ete bakoki kaka “kobɛta masasi likoló ya mitó ya banguna.”

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/1915, elobeli lisolo ya soda moko ya ekólo Hongrie, oyo azwaki batisimo nsima ya kobika na bampota oyo azokaki mpe azongaki lisusu na bitumba. Lisolo yango elobeli likambo oyo esalemaki na nsima: “Basoda ya Hongrie bakendeki tii na ntaka ya mɛtrɛ soki 244 na esika basoda ya Russie bazalaki, mpe bapesaki bango mitindo, ‘Bótya  bango mbeli!’ Ndeko ya Hongrie azalaki na nsuka na lobɔkɔ ya mwasi. Azalaki koluka komibatela kaka ye moko na monguna, kasi azalaki kolekisa mbeli na lobɔkɔ ya soda ya Russie oyo akutanaki na ye. Mpe soda ya Russie azalaki mpe kosala kaka bongo . . . soda wana ya Russie akweisaki mbeli na ye na mabele; mpe abandaki kolela. Ndeko wana atalaki ‘monguna’ wana oyo azalaki pene na ye, mpe amonaki elembo ya ‘ekulusu mpe motole’ na elamba na ye ya basoda! Soda wana ya Russie mpe azalaki ndeko na kati ya Nkolo!” *

Lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/1915, oyo ezalaki na motó ya likambo ete “mokumba ya mokristo mpe bitumba,” elobelaki ete bakristo basengeli te kosala mosala ya soda ata ya ndenge nini. Elobaki ete: “Kokóma soda mpe kolata bilamba ya basoda, emonisaka mosala mpe mokumba ya soda oyo ayebani mpe andimami. . . . Mokristo asengeli mpenza te koboya kosala makambo ya boye?” Na nsima, emonanaki polele ete bakristo bakoki ata moke te kosangana na bitumba.

Bambongwana na biro monene

Na mobu 1915, bayebisaki bandeko 70 ya libota ya Betele na New York ete lokola mbongo ezali lisusu mingi te, basengeli kobima mpo bákende kokoba mosala na bango na lisangá. Bayebisaki bango ete: “Tosengeli te kokɔta banyongo, mpo yango ekoki kobebisa mpenza mosala; mpe mbongo ya kosalela ekoki kokóma moke.”

Ndeko Clayton Woodworth mpe bandeko mosusu mibale, batyaki mabɔkɔ na mokanda oyo “bandeko wana 70 oyo bazalaki kobima” bakomaki. Mokanda yango ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1915. Bandeko yango bakomaki ete bakomi mokanda wana mpo na komonisa ete “bazali na esengo mpe  na botɔndi mpo na ebele ya mapamboli mpe makambo kitoko” oyo bazwaki “ntango bazalaki na ‘Betele.’”

Atako ezalaki pɛtɛɛ te ndenge bandeko wana bakendeki, kasi yango epesaki bango libaku ya komonisa soki mpenza bazali na bosembo ya solosolo. Bakotikala sembo epai ya Nzambe to bakolɛmba? Ndeko Woodworth akobaki kosakola, na nsima azongaki na Betele, mpe na mobu 1919, azalaki moto ya liboso ya kobimisa zulunalo L’Âge d’or, zulunalo oyo tobengaka lelo Lamuká! Asalaki lokola mobimisi na yango tii na mobu 1946.

Mabaku ya mosala

Na boumeli ya mbula wana ya mpasi, zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki bandeko na biso bákoba kosakola. Na kala, bandeko bazalaki kotya likebi mpenza epai ya bato oyo basepelaki na solo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1915 elobaki ete: “Tozalaki na bankombo ya bato ya bikólo ndenge na ndenge oyo batindaki bakarte mpo na kosɛnga mikanda. Likanisi na biso ezalaki ya kokende kotala bango . . . mpo na koyeba soki babosani te makambo oyo bayokaki.” Mokano na biso ezalaki ya kolamwisa lisusu mposa na bango to kopesa bango “mwa mɔtɔ, elingi koloba kosalisa bango bákóma na molende mpo na Nzambe mpe solo.”

Ndenge moko na mikolo ya lelo, ezalaki na ntina ete bakristo bátya makanisi mpenza na matomba ya Bokonzi. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1915 elobaki ete, “Biso baoyo tozali sikoyo ekɛngɛ, tosengeli komipesa mpe kozala molende na mosala ya Nzambe.” Esengelaki ete basaleli ya Nzambe bákoba kozala ekɛngɛ. Linɔ́ngi yango ekobaki: “Tosengeli kosɛnzɛla. Tosengeli kosɛnzɛla mpo na likambo nini? Libosoliboso, tosengeli kosɛnzɛla mpo na biso moko, mpo tómibatela na mitambo ya eleko oyo.”

Mokapo ya mobu 1916 elendisaki bandeko ete bákoba kozala na “kondima makasi.” Mokapo yango eutaki na Baroma 4:20, King James Version. Mokapo yango elendisaki bandeko ya sembo mpo na mbula ya sika, mbula oyo eyaki mpe na mikakatano na yango.

^ par. 4 Na boumeli ya bambula, bayekoli ya Biblia bazalaki kolata elembo ya ekulusu mpe motole mpo na koyeba banani bazali Batatoli. Elembo yango ebandaki kozala likoló ya ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na boumeli ya mbula ebele. Na ebandeli ya bambula 1930, Batatoli ya Yehova batikaki kosalela elembo ya ekulusu mpe motole.