Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA MINEI

Yesu Kristo azali nani?

Yesu Kristo azali nani?

1, 2. (a) Okoki koloba ete oyebi malamu moto moko oyo ayebani mingi kaka mpo oyebi nkombo na ye? Limbolá. (b) Bato mingi bakanisaka nini mpo na Yesu?

EZALI na bato ebele oyo bayebani mingi na mokili. Mbala mosusu oyebi nkombo ya moto moko oyo ayebani mingi. Kasi, koyeba nkombo ya moto elakisi te ete oyebi ye malamu. Elakisi mpe te ete oyebi makambo nyonso ya bomoi na ye mpe bizaleli na ye.

2 Mbala mosusu oyoká nkombo Yesu Kristo, atako azalaki na mabele eleki mbula soki 2 000. Kasi, bato mingi bayebi mpenza te soki Yesu azalaki moto ya ndenge nini. Bato mosusu balobaka ete azalaki moto malamu, bamosusu balobaka ete azalaki mosakoli, mpe bamosusu bakanisaka ete azali Nzambe. Bongo yo okanisaka nini?—Talá Etanda 12.

3. Mpo na nini ezali na ntina oyeba Yehova Nzambe ná Yesu Kristo?

3 Ezali na ntina mingi oyeba Yesu malamumalamu. Mpo na nini? Biblia elobi: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Soki oyebi Yehova ná Yesu malamu, okoki kozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. (Yoane 14:6) Lisusu, koyeba makambo ya Yesu ekosalisa yo mpenza mpo ye ayebi malamumalamu ndenge ya kofanda na bato mpe kosalela bango makambo. (Yoane 13:34, 35) Na Mokapo 1, toyekolaki makambo oyo etali Nzambe. Sikoyo, tótala oyo Biblia elobi mpo na Yesu.

 TOMONI MASIYA!

4. Maloba “Masiya” mpe “Kristo” elimboli nini?

4 Bambula mingi liboso Yesu abotama, Yehova alakaki na kati ya Biblia ete akotinda Masiya, to Kristo. Liloba “Masiya” euti na monɔkɔ ya Ebre, mpe liloba “Kristo” euti na monɔkɔ ya Grɛki. Batitre yango nyonso mibale elimboli ete Nzambe akopona Masiya oyo alakamaki mpe akotya ye na esika ya lokumu mingi. Masiya akokokisa bilaka nyonso ya Nzambe. Yesu akoki mpe kosalisa yo sikoyo. Kasi, liboso Yesu abotama, bato mingi bazalaki komituna: ‘Nani akozala Masiya?’

5. Bayekoli ya Yesu bandimaki mpenza ete Yesu azali Masiya?

5 Bayekoli ya Yesu bazalaki ata na ntembe moko te ete Yesu nde Masiya oyo alakamaki. (Yoane 1:41) Na ndakisa, Simo Petro alobaki na Yesu: “Ozali Kristo.” (Matai 16:16) Ndenge nini tokoki kondima ete Yesu azali Masiya?

6. Ndenge nini Yehova asalisaki bato ya mitema sembo báyeba Masiya?

6 Kala, liboso Yesu abotama, basakoli ya Nzambe bakomaki makambo mingi mpo na kosalisa bato báyeba Masiya. Ndenge nini yango ekosalisa biso? Kanisá ete batindi yo okende kozwa moto moko oyo omona naino te na esika bazelaka bisi. Soki bayebisi yo ndenge moto yango azali, ekozala mpasi te omona ye. Ndenge moko mpe, Yehova asalelaki basakoli na ye mpo na koyebisa biso makambo oyo Masiya akosala mpe makambo oyo ekokómela ye. Kokokisama ya bisakweli wana nyonso esalisaka bato ya mitema sembo báyeba ete Yesu azali Masiya.

7. Tángá bisakweli mibale oyo emonisi ete Yesu azali Masiya.

7 Tólobela ata bisakweli mibale. Ya liboso, mbula 700 liboso Yesu abotama, Mika asakolaki ete Masiya  akobotama na Beteleme, engumba moko ya moke. (Mika 5:2) Mpe Yesu abotamaki kaka kuna! (Matai 2:1, 3-9) Ya mibale, Danyele asakolaki ete Masiya akomonana na mobu 29 ya ntango na biso (T.B.). (Danyele 9:25) Wana ezali kaka bisakweli mibale na kati ya bisakweli ebele oyo emonisi polele ete Yesu nde Masiya oyo alakamaki.—Talá Etanda 13.

Yesu akómaki Masiya to Kristo na ntango ya batisimo na ye

8, 9. Likambo nini oyo esalemaki na batisimo ya Yesu emonisi ete azali Masiya?

8 Yehova amonisaki polele ete Yesu azali Masiya. Nzambe alakaki Yoane Mobatisi ete akopesa ye elembo oyo ekosalisa ye ayeba Masiya. Ntango Yesu akendaki kozwa batisimo epai ya Yoane na Ebale Yordani na mobu 29 T.B., Yoane amonaki elembo yango. Biblia eyebisi biso likambo oyo esalemaki: “Nsima ya kobatisama, na mbala moko Yesu abimaki na mai; mpe talá! likoló efungwamaki, mpe amonaki elimo ya Nzambe ezali kokitela ye lokola ebenga. Mpe talá! Mongongo moko eutaki na likoló elobi: ‘Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.’” (Matai 3:16, 17) Ntango Yoane amonaki elembo yango mpe ayokaki makambo wana, ayebaki ete Yesu nde Masiya. (Yoane 1:32-34) Yesu akómaki Masiya na mokolo yango, ntango Yehova asopelaki ye elimo santu. Azalaki moto oyo Nzambe aponaki mpo azala Mokambi mpe Mokonzi.Yisaya 55:4.

9 Bisakweli ya Biblia, maloba ya Yehova ye moko, mpe elembo oyo Yehova apesaki na ntango ya batisimo  ya Yesu emonisi ete Yesu azali Masiya. Kasi, Yesu autaki wapi, mpe azalaki moto ya ndenge nini? Tótala oyo Biblia elobi.

YESU AUTAKI WAPI?

10. Biblia eteyaka nini mpo na bomoi ya Yesu liboso aya awa na mabele?

10 Biblia eteyaka ete Yesu azalaki na likoló bambula  mingi liboso aya awa na mabele. Mika alobaki ete Masiya azalaki “uta kalakala.” (Mika 5:2) Mbala mingi, Yesu ye moko alobaki ete azalaki na likoló liboso abotama awa na mabele. (Tángá Yoane 3:13; 6:38, 62; 17:4, 5.) Ata liboso Yesu aya na mabele, azalaki na boyokani ya malamu mpenza na Yehova.

11. Mpo na nini Yesu azali na motuya mingi na miso ya Yehova?

11 Yesu azali na motuya mingi na miso ya Yehova. Mpo na nini? Mpo Nzambe akelaki ye liboso ya eloko nyonso mpe liboso ya moto nyonso. Yango wana, Biblia ebengi Yesu “mwana ya liboso ya biloko nyonso oyo ezalisamá.” * (Bakolose 1:15) Yesu azali lisusu na motuya mingi na miso ya Yehova mpo azali ekelamu kaka moko oyo Yehova ye moko akelaki mbala moko. Yango wana, Biblia ebengi ye “Mwana na ye se moko oyo abotamaki.” (Yoane 3:16) Lisusu, kaka Yesu nde moto oyo Yehova asalelaki mpo na kosala biloko mosusu nyonso. (Bakolose 1:16) Mpe kaka Yesu nde abengami “Liloba,” mpo Yehova asalelaki ye mpo na kopesa baanzelu mpe bato nsango mpe malako na Ye.Yoane 1:14.

12. Ndenge nini toyebi ete Yesu ná Nzambe ezali moto moko te?

12 Bato mosusu bakanisaka ete Yesu ná Nzambe ezali kaka moto moko. Kasi Biblia eteyaka bongo te. Biblia elobi ete Yesu akelamaki, elingi koloba Yesu azali na ebandeli. Nzokande Yehova, ye oyo akelaki biloko nyonso, azali na ebandeli te. (Nzembo 90:2) Lokola Yesu azali Mwana ya Nzambe, akanisá ata mbala  moko te kozala Nzambe. Biblia elobi polele ete Tata aleki Mwana. (Tángá Yoane 14:28; 1 Bakorinti 11:3.) Kaka Yehova nde azali “Nzambe Mozwi-ya-Nguya-nyonso.” (Ebandeli 17:1) Aleki bato nyonso mpe aleki na nguya na molɔ́ngɔ́ mobimba.—Talá Etanda 14.

13. Mpo na nini Biblia elobi ete Yesu azali “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te”?

13 Yehova ná Mwana na ye Yesu basalaki esika moko bambula ebele mpenza liboso likoló ná mabele ekelama. Boye, balinganaki makasi mpenza! (Yoane 3:35; 14:31) Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye malamu mpenza, yango wana Biblia ebengi ye “elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te.”Bakolose 1:15.

14. Na ndenge nini Mwana oyo azalaki na motuya mingi na miso ya Yehova abotamaki awa na mabele?

14 Yesu, Mwana oyo azalaki na motuya mingi na miso ya Yehova, andimaki kotika likoló mpe kobotama awa na mabele. Esalemaki ndenge nini? Yehova asalaki likamwisi moko: alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe atyaki yango na libumu ya elenge mwasi moko na nkombo Maria, oyo ayebaki naino mibali te. Na yango, Yesu azalaki na tata awa na mabele te. Yango wana, Maria abotaki mwana ya kokoka, mpe apesaki ye nkombo Yesu.Luka 1:30-35.

YESU AZALAKI MOTO YA NDENGE NINI?

15. Nini ekosalisa yo oyeba Yehova malamumalamu?

15 Soki otángi mikanda oyo Matai, Marko, Luka, mpe Yoane bakomaki, okoyeba makambo mingi etali Yesu, bomoi na ye, mpe bizaleli na ye. Babengaka mikanda wana Baevanzile. Lokola Yesu amekolaki bizaleli ya Tata na ye, makambo oyo okotánga ekosalisa  yo oyeba Yehova malamumalamu. Yango wana Yesu alobaki: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.”Yoane 14:9.

16. Yesu azalaki koteya nini? Mateya ya Yesu ezalaki kouta wapi?

16 Bato mingi bazalaki kobenga Yesu “Moteyi.” (Yoane 1:38; 13:13) Moko ya makambo ya ntina mingi oyo azalaki koteya ezali “nsango malamu ya Bokonzi.” Bokonzi yango ezali nini? Ezali guvɛrnema ya Nzambe oyo ezali na likoló mpe ekoyangela mabele mobimba; ekopesa mapamboli na bato nyonso oyo batosaka Nzambe. (Matai 4:23) Makambo nyonso Yesu ateyaki eutaki epai ya Yehova. Yesu alobaki: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Yesu ayebaki ete Yehova alingi bato báyoka nsango malamu oyo elobi ete Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele.

17. Yesu azalaki koteya wapi? Mpo na nini amipesaki na koteya bato?

17 Yesu azalaki koteya wapi? Esika nyonso oyo akuti bato. Azalaki koteya na bamboka ya mike, na bingumba, na zando, na bisika ya losambo, mpe na bandako ya bato. Azalaki kozela te ete bato báya epai na ye. Mbala mingi, ye moko azalaki kokende epai na bango. (Marko 6:56; Luka 19:5, 6) Yesu amipesaki mpe alekisaki ntango mingi mpe asalelaki makasi na ye mpo na koteya bato. Mpo na nini? Ayebaki ete yango nde Nzambe alingaki ete asala mpe azalaki ntango nyonso kotosa Tata na ye. (Yoane 8:28, 29) Yesu azalaki mpe koteya mpo azalaki koyokela bato mawa. (Tángá Matai 9:35, 36.) Azalaki komona ete bakonzi ya mangomba bazalaki te koteya bato solo ya Nzambe mpe ya Bokonzi na ye. Yango wana, alingaki kosalisa bato báyoka nsango malamu.

18. Bizaleli nini ya Yesu esepelisi yo mingi?

 18 Yesu azalaki kolinga bato mpe azalaki kokipe bango. Azalaki na boboto mpe bato bazalaki kobanga te kosolola na ye. Ata bana mike bazalaki kosepela kozala na ye. (Marko 10:13-16) Yesu azalaki ntango nyonso kosala makambo na bosembo. Ayinaki kanyaka mpe makambo oyo ezangi bosembo. (Matai 21:12, 13) Na ntango ya Yesu, bapekisaki basi kosala makambo mosusu, mpe bazalaki kopesa bango lokumu te. Kasi Yesu azalaki ntango nyonso kopesa basi lokumu mpe komemya bango. (Yoane 4:9, 27) Yesu azalaki mpe na komikitisa mpenza. Na ndakisa, na mpokwa moko, asukolaki makolo ya bantoma na ye, mosala oyo baombo nde bazalaki kosala.Yoane 13:2-5, 12-17.

Yesu azalaki kosakola esika nyonso oyo akuti bato

19. Ndakisa nini emonisi ete Yesu azalaki koyeba makambo oyo bato basengeli na yango, mpe ete alingaki kosalisa bango?

19 Yesu ayebaki makambo oyo bato basengeli na yango, mpe alingaki kosalisa bango. Emonanaki polele ntango asalelaki nguya ya Nzambe mpo na kobikisa bato na likamwisi. (Matai 14:14) Na ndakisa, moto moko ya maladi ya maba ayaki epai ya Yesu mpe alobaki: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Mpasi ya moto wana esimbaki motema ya Yesu. Ayokelaki ye mawa mpe alingaki kosalisa ye. Yango wana, Yesu asembolaki lobɔkɔ, asimbaki mobali yango, mpe alobaki na ye: “Nalingi. Kómá pɛto.” Mpe mobali yango abikaki! (Marko 1:40-42) Kanisá esengo oyo mobali yango azalaki na yango!

ATIKALAKI SEMBO EPAI YA TATA NA YE

20, 21. Na ndenge nini Yesu atosaki Nzambe koleka moto nyonso?

20 Yesu atosaki Nzambe koleka moto nyonso. Ezala makambo nini akutanaki na yango, to makambo nini  banguna na ye basalelaki ye, atikalaki sembo epai ya Tata na ye. Na ndakisa, Yesu asalaki lisumu te ntango Satana amekaki ye. (Matai 4:1-11) Bato mosusu ya libota na ye moko bazalaki kondima te ete azali Masiya mpe balobaki ete “abɛli motó,” kasi Yesu akobaki kosala mosala ya Nzambe. (Marko 3:21) Ntango banguna na ye bazalaki konyokola ye, atikalaki sembo epai ya Nzambe mpe alukaki ata moke te kosala bango mabe.1 Petro 2:21-23.

21 Ata ntango Yesu anyokwamaki mpe akufaki liwa ya mpasi, atikalaki sembo epai ya Yehova. (Tángá Bafilipi 2:8.) Kanisá naino mpasi oyo amonaki mokolo oyo akufaki. Bakangaki ye, bakoselaki ye ete afingi Nzambe, bazuzi ya mitema mabe bakatelaki ye etumbu, bato ya mobulu basɛkaki ye, basoda banyokolaki  ye mpe babakaki ye na nzete. Ntango alingaki kokufa, agangaki ete: “Ekokisami!” (Yoane 19:30) Mikolo misato nsima ya liwa ya Yesu, Yehova asekwisaki ye mpe apesaki ye nzoto ya elimo. (1 Petro 3:18) Mwa bapɔsɔ na nsima, Yesu azongaki na likoló, “afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe,” mpe azelaki Nzambe akómisa ye Mokonzi.Baebre 10:12, 13.

22. Libaku nini tozali na yango sikoyo lokola Yesu atikalaki sembo epai ya Tata na ye?

22 Lokola Yesu atikalaki sembo epai ya Tata na ye, sikoyo tozali na libaku ya kozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele, ndenge Yehova akanaki. Na mokapo oyo elandi, tokolobela ndenge liwa ya Yesu efungoleli biso nzela ya kozwa bomoi ya seko.

^ par. 11 Yehova abengami Tata mpo azali Mozalisi. (Yisaya 64:8) Yesu abengami Mwana ya Nzambe mpo Yehova nde akelaki ye. Baanzelu, ata mpe Adama, babengami mpe bana ya Nzambe.Yobo 1:6; Luka 3:38.