Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA MOTOBA

Soki moto akufi akendaka wapi?

Soki moto akufi akendaka wapi?

1-3. Mituna nini bato bamitunaka mpo na liwa, mpe biyano nini mangomba mosusu epesaka?

BIBLIA elaki biso ete mokolo mosusu “liwa ekozala lisusu te.” (Emoniseli 21:4) Na Mokapo 5, tomonaki ete lisiko epesi biso nzela ya kozwa bomoi ya seko. Kasi, bato bazali kaka kokufa. (Mosakoli 9:5) Na yango, motuna monene yango oyo: Soki moto akufi akendaka wapi?

2 Tolukaka eyano na motuna yango mingimingi soki ndeko to moninga na biso akufi. Ntango mosusu tomitunaka: ‘Akei wapi? Azali komona biso? Akoki kosalisa biso? Tokomona ye lisusu?’

3 Mangomba epesaka biyano ndenge na ndenge na mituna wana. Mangomba mosusu eteyaka ete bato ya malamu bakendaka na likoló mpe bato ya mabe bakendaka na lifelo ya mɔtɔ. Mosusu elobaka ete soki moto akufi akómaka elimo mpe afandaka esika moko na bandeko ya libota na ye oyo bakufá. Mpe mosusu elobaka ete soki moto akufi, basambisaka ye, na nsima abotamaka lisusu, to azongaka na bomoi na nzoto mosusu, na ndakisa na nzoto ya moto to ya nyama.

4. Likanisi nini mangomba eteyaka mpo na liwa?

4 Emonani lokola ete mangomba eteyaka makambo oyo ekeseni. Nzokande, mangomba yango nyonso eteyaka kaka likanisi moko. Eteyaka ete soki moto akufi, eloko moko na nzoto na ye ekufaka te, etikalaka na bomoi. Ezali solo?

 SOKI MOTO AKUFI AKENDAKA WAPI?

5, 6. Nini ekómelaka moto soki akufi?

5 Yehova ayebi nini ekómelaka moto soki akufi, mpe ayebisi biso ete soki moto akufi, bomoi na ye esuki. Liwa ezali kozanga bomoi. Na yango, soki moto akufi, bolingo na ye, nkanda na ye, zuwa na ye mpe makanisi na ye ezalaka na bomoi esika mosusu te. * Soki moto akufi akoki komona te, koyoka te mpe kokanisa lisusu te.

6 Mokonzi Salomo akomaki ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.” Moto oyo akufi akoki kolinga to koyina bato te mpe “mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda.” (Tángá Mosakoli 9:5, 6, 10.) Mpe Nzembo 146:4 elobi ete soki moto akufi “makanisi na ye” ekufi.

YESU ALOBAKI NINI MPO NA LIWA?

Yehova akelaki bato mpo bázala na bomoi libela na libela na mabele

7. Yesu alobaki nini mpo na liwa?

7 Ntango Lazare, moninga ya motema ya Yesu akufaki, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Lazare moninga na biso akei kopema.” Kasi Yesu alingaki te koloba ete Lazare azali kopema na mpɔngi. Na nsima, Yesu alobaki ete: “Lazare akufi.” (Yoane 11:11-14) Na yango, Yesu amonisaki ete liwa ezali lokola mpɔngi. Alobaki te ete Lazare azalaki na likoló to azalaki elongo na bandeko na ye oyo bakufá. Alobaki mpe te ete Lazare azalaki konyokwama na lifelo ya mɔtɔ to azalaki kobotama lisusu lokola moto mosusu to nyama. Te, Yesu alingaki nde koloba ete Lazare azali lokola moto oyo alali mpɔngi ya makasi. Bavɛrsɛ mosusu mpe emonisi ete liwa ezali lokola mpɔngi ya makasi. Ntango babomaki Stefano, Biblia elobi ete “alalaki na kati  ya liwa.” (Misala 7:60) Ntoma Paulo mpe akomaki ete bakristo mosusu “balalá na kati ya liwa.”1 Bakorinti 15:6.

8. Ndenge nini toyebi ete Nzambe akelaki bato te mpo bákufaka?

8 Nzambe akelaki Adama ná Eva mpo nsukansuka bákufa? Te! Yehova akelaki bango mpo bázala na bomoi ya seko na nzoto ya kokoka. Ntango Yehova asalaki bato, atyaki kati na bango mposa ya kozala na bomoi libela na libela. (Mosakoli 3:11) Baboti balingaka te komona bana na bango bákóma mibange mpe bákufa; Yehova mpe ayokaka ndenge wana mpo na biso. Kasi, soki Nzambe akelá biso mpo tózala na bomoi libela na libela, mpo na nini bato bakufaka?

 MPO NA NINI MOTO AKUFAKA?

9. Mpo na nini mobeko oyo Yehova apesaki Adama ná Eva elekaki makasi te?

9 Na elanga ya Edene, Yehova ayebisaki Adama: “Nzete nyonso ya elanga, okoki kolya yango ndenge olingi. Kasi nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” (Ebandeli 2:9, 16, 17) Mobeko wana ezalaki polele, mpe ezalaki mpasi te kotosa yango; Yehova azalaki na lotomo ya koyebisa Adama ná Eva oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Soki bátosaka Yehova, balingaki komonisa ete bazali komemya bokonzi na ye. Balingaki mpe komonisa ete bazali na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo apesi bango.

10, 11. (a) Ndenge nini Satana abungisaki Adama ná Eva nzela? (b) Mpo na nini tokoki kokɔtela bango te mpo na likambo oyo basalaki?

10 Likambo ya mawa, Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova. Satana atunaki Eva: “Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?” Eva azongisaki: “Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: ‘Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.’”Ebandeli 3:1-3.

11 Na nsima, Satana alobaki: “Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” (Ebandeli 3:4-6) Satana alingaki Eva akanisa ete ye moko akoki kopona nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Na ntango yango, akosaki ye mpo na likambo oyo ekokómela ye soki aboyi kotosa Nzambe. Satana alobaki ete Eva akokufa te, na yango Eva alyaki mbuma yango mpe na nsima apesaki mpe mobali na ye. Adama ná Eva bayebaki ete Yehova ayebisaki bango bálya mbuma wana te.  Lokola balyaki yango, baboyaki nde kotosa mobeko ya polele mpe ya pɛtɛɛ oyo Yehova apesaki bango. Na ndenge yango, bamonisaki ete bazangi limemya epai ya Tata na bango ya likoló, oyo azali kolinga bango. Tokoki kokɔtela bango te mpo na likambo oyo basalaki!

12. Mpo na nini ezali mpenza mawa ndenge Adama ná Eva baboyaki kotosa Yehova?

12 Ezali mawa mpenza ndenge baboti na biso ya liboso bazangaki limemya epai ya Mozalisi na bango! Okoyoka ndenge nini soki obomaki nzoto mpo na kobɔkɔla bana na yo, ya mwasi ná ya mobali, kasi na nsima babalukeli yo mpe basali nde makambo oyo opekisaki bango? Okoyoka motema mpasi, boye te?

Adama autaki na putulu, mpe azongaki na putulu

13. Yehova alingaki koloba nini ntango ayebisaki Adama ete “okozonga na putulu”?

13 Ntango Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe, babungisaki libaku ya kozala na bomoi ya seko. Yehova ayebisaki Adama: “Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.” (Tángá Ebandeli 3:19.) Yango elimbolaki ete Adama asengelaki kokóma lisusu putulu, lokola nde akelamaki te. (Ebandeli 2:7) Nsima ya kosala lisumu, Adama akufaki mpe azalaki lisusu te.

14. Mpo na nini bato bakufaka?

14 Soki Adama ná Eva bátosaka Nzambe, balingaki kozala na bomoi tii lelo. Kasi lokola babukaki mobeko ya Nzambe, basalaki lisumu mpe nsukansuka bakufaki. Lisumu ezali lokola  maladi moko ya mabe oyo tozwá epai ya baboti na biso ya liboso. Biso nyonso tobotamaka bato ya masumu, yango wana bato bakufaka. (Baroma 5:12) Kasi, yango te nde Nzambe akanaki mpo na bato. Nzambe alingaki ata moke te ete bato bákufaka, mpe Biblia ebengi liwa “monguna.”1 Bakorinti 15:26.

KOYEBA SOLO EPESAKA BONSOMI

15. Na ndenge nini mateya ya solo oyo etali liwa epesaka biso bonsomi?

15 Koyeba mateya ya solo oyo etali liwa elongolaka moto na boombo ya makanisi ndenge na ndenge ya lokuta. Biblia eteyaka ete bato oyo bakufá bayokaka mpasi te, mawa mpe te. Tokoki kosolola na bango te, bango mpe bakoki kosolola na biso te. Tokoki kosalisa bango te, bango mpe bakoki kosalisa biso te. Bakoki kosala biso mabe te, yango wana ntina ya kobanga bango ezali te. Kasi, mangomba mingi eteyaka ete bato oyo bakufá bazali na bomoi esika moko boye mpe ete tokoki kosalisa bango soki tofuti mbongo epai ya basango to bapastɛrɛ. Kasi soki toyebi mateya ya solo oyo etali liwa, tokokosama te na mateya wana ya lokuta.

16. Wapi mateya ya lokuta oyo mangomba mingi eteyaka mpo na bato oyo bakufá?

16 Satana asalelaka mangomba ya lokuta mpo na kokosa bato mpe kotinda bango bákanisa ete bato oyo bakufá bazali kaka na bomoi. Na ndakisa, mangomba mosusu eteyaka ete soki moto akufi, eloko moko kati na ye ekobaka kozala na bomoi esika mosusu. Lingomba na bino mpe eteyaka bongo, to eteyaka nde makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa? Satana azali kokosa bato mpo báboya Yehova.

17. Mpo na nini koloba ete bato ya mabe bazikaka na lifelo efingisaka nkombo ya Yehova?

17 Mangomba mingi eteyaka makambo ya nsɔmɔ  mpenza. Na ndakisa, mangomba mosusu eteyaka ete bato mabe bakozika libela na libela na lifelo. Lokuta wana efingisaka nkombo ya Yehova. Yehova akoki ata moke te kondima bato bányokwamaka ndenge wana! (Tángá 1 Yoane 4:8.) Okokanisa nini mpo na moto oyo azikisi mwana na ye mabɔkɔ na mɔtɔ mpo na kopesa ye etumbu? Okomona ete azali moto mabe mpenza. Okolinga kutu koyeba makambo na ye te. Yango nde Satana alingi bato básala mpo na Yehova!

18. Mpo na nini tosengeli te kobanga bato oyo bakufá?

18 Mangomba mosusu eteyaka ete soki bato bakufi, bakómaka bilimo. Mangomba yango eteyaka ete tosengeli komemya bilimo yango, ata mpe kobanga bango mpo bakoki kokóma baninga oyo bakoki kosalisa biso to banguna oyo bakoki kosala biso mabe. Bato mingi bandimaka lokuta wana. Babangaka bato oyo bakufá, yango wana basambelaka bango na esika ya kosambela Yehova. Kobosana te ete bato bakufá bayokaka te mpe bamonaka te; na yango ntina ya kobanga bango ezali te. Yehova nde Mozalisi na biso. Azali Nzambe ya solo, mpe tosengeli kosambela kaka ye.Emoniseli 4:11.

19. Koyeba solo oyo etali liwa ekosalisa biso na nini?

19 Koyeba solo oyo etali liwa elongolaka biso na boombo ya mateya ya mangomba ya lokuta. Mateya yango ya solo esalisaka biso mpe tókanga ntina ya bilaka oyo Yehova apesi biso mpo na bomoi na mikolo ezali koya.

20. Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

20 Yobo, mosaleli ya Nzambe na ntango ya kala, atunaki: “Soki mobali makasi akufi, akoki kozonga lisusu na bomoi?” (Yobo 14:14) Moto oyo akufi akoki mpenza kozonga na bomoi? Eyano oyo Nzambe apesi biso na Biblia esepelisaka mpenza. Tokomona yango na mokapo oyo elandi.

^ par. 5 Bato mosusu bakanisaka ete molimo to elimo ya moto etikalaka na bomoi nsima ya liwa. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Etanda 17 mpe 18.