Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA LIBOSO

Nzambe azali nani?

Nzambe azali nani?

1, 2. Mbala mingi, bato bamitunaka mpo na makambo nini?

BANA mike batunaka mituna mingi. Ata soki olimbweli bango likambo, bakotuna lisusu: ‘Mpo na nini?’ Soki opesi bango eyano, bakoki kotuna lisusu: ‘Kasi mpo na nini?’

2 Moto nyonso atunaka mituna, ezala bana to mikóló. Tokoki komituna mpo na koyeba biloko oyo tokolya, bilamba oyo tokolata to biloko oyo tokosomba. Tokoki mpe komituna mituna ya ntina mingi mpo na bomoi na biso lelo oyo to mpo na mikolo ezali koya. Kasi soki tozwi biyano ya malamu te na mituna yango, mbala mosusu tokoki kotika koluka biyano.

3. Mpo na nini bato mingi bakanisaka ete bakoki kozwa biyano te na mituna ya ntina mingi oyo bamitunaka?

3 Biblia ezali na biyano na mituna ya ntina mingi oyo tomitunaka? Bato mosusu bandimaka ete ezali na biyano, kasi bamonaka ete ezali mpasi koyeba Biblia. Bakanisaka ete kaka bapastɛrɛ ná basango nde bayebi biyano yango. Bato mosusu bayokaka nsɔni kondima ete bayebi biyano na mituna yango te. Bongo yo olobi nini?

4, 5. Wapi mituna ya ntina oyo omitunaka? Mpo na nini osengeli kokoba koluka biyano na yango?

4 Ntango mosusu okolinga kozwa biyano na mituna lokola: Mpo na nini nazali na mabele? Soki nakufi nakokende wapi? Nzambe azali ndenge nini? Yesu, Moteyi monene, alobaki ete: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino; bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.” (Matai 7:7)  Soki ozwi naino biyano ya malamu te na mituna oyo ozali na yango, kotika koluka te.

5 Soki ‘okobi koluka,’ okozwa biyano na Biblia. (Masese 2:1-5) Biyano yango ezali makasi te. Makambo oyo okoyekola ekopesa yo bomoi ya esengo mingi lelo oyo mpe okozala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Sikoyo, tólobela motuna moko oyo etungisaka bato ebele.

NZAMBE AKIPAKA BISO TO AZALI NDE MOTO MABE?

6. Mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akipaka bampasi na bango te?

6 Bato mingi bakanisaka ete Nzambe akipaka biso te. Bamonaka ete soki Nzambe akipaka biso, mbɛlɛ mokili ezali boye te. Mokili etondi na bitumba, koyinana, mpe bato bazali komona mpasi. Bato bazali kobɛla, konyokwama, mpe kokufa. Bato mosusu bamitunaka ete: ‘Soki Nzambe akipaka biso, mpo na nini asilisá bampasi oyo te?’

7. (a) Ndenge nini bakonzi ya mangomba batindaka bato bákanisa ete Nzambe azali moto mabe? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete makambo ya mabe oyo ezali kosalema ezali foti ya Nzambe te?

7 Ntango mosusu bakonzi ya mangomba nde batindaka bato bákanisa ete Nzambe azali moto mabe. Ntango likambo moko ya mabe esalemi, balobaka ete ezali mokano ya Nzambe; alingaki esalema bongo. Ntango bazali koloba bongo, bazali kopesa nde Nzambe foti. Nzokande Biblia eteyaka ete mabe eutaka epai ya Nzambe te. Yakobo 1:13 eyebisi biso ete Nzambe amekaka moto na makambo ya mabe te. Elobi: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” Yango elingi koloba ete atako Nzambe atiká makambo ya mabe esalema, kasi ye moto abimisaka  yango te. (Tángá Yobo 34:10-12.) Tótalela ndakisa moko.

8, 9. Mpo na nini ezali mabe kopesa Nzambe foti mpo na bampasi oyo ekómelaka biso? Pesá ndakisa.

8 Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko oyo afandi epai ya baboti na ye. Tata na ye alingaka ye mingi mpe alakisaka ye kozwa bikateli ya malamu. Kasi na nsima, elenge yango aboyi koyokela tata na ye mpe akimi ndako ya baboti. Akómi kosala makambo ya mabe mpe bomoi na ye ebebi. Okoloba ete makambo oyo ekómeli mwana wana ezali foti ya tata na ye mpo ye nde atikaki mwana alongwa na ndako? Okoloba bongo te! (Luka 15:11-13) Ndenge moko na tata wana, Nzambe atikaki bato básala oyo balingi ntango bango moko baboyaki kotosa ye mpe baponaki kosala makambo ya mabe. Yango wana, soki likambo moko ya mabe esalemi, tosengeli koyeba ete Nzambe moto abimisi yango te. Ezali mabe kopesa Nzambe foti.

9 Nzambe ayebi malamu ntina oyo azali kotika naino makambo ya mabe esalema. Na Mokapo 11, okoyekola makambo oyo Biblia elobi mpo na yango. Kasi yebá ete Nzambe alingaka biso mpe ete bampasi oyo ekómelaka biso ezali foti na ye te. Kutu, kaka ye nde Moto akoki kosilisa yango.Yisaya 33:2.

10. Mpo na nini tokoki kondima ete Nzambe akobongisa makambo nyonso oyo bato mabe basalá?

10 Nzambe azali mosantu. (Yisaya 6:3) Likambo nyonso oyo asalaka ezali pɛto mpe malamu. Yango wana, tokoki kotyela ye motema. Kasi bato bazali bongo te. Mbala mosusu basalaka makambo ya mabe. Ata mokonzi ya motema malamu ndenge nini akokoka te kobongisa makambo nyonso oyo bato mabe basali. Moto moko te azali na nguya lokola Nzambe. Akoki kobongisa  makambo nyonso oyo bato mabe basalá, mpe akosala yango. Akolongola mabe mpo na libela.Tángá Nzembo 37:9-11.

NZAMBE AYOKAKA NDENGE NINI NTANGO BATO BAZALI KONYOKWAMA?

11. Nzambe ayokaka ndenge nini ntango ozali konyokwama?

11 Nzambe ayokaka ndenge nini ntango amonaka makambo oyo ezali kosalema na mokili mpe bampasi oyo yo omonaka? Biblia elobi ete Nzambe “alingaka bosembo.” (Nzembo 37:28) Na yango, alandelaka mpenza makambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Asepelaka ata moke te komona bato bazali konyokwama. Biblia elobi ete, na ntango ya kala, Nzambe “ayokaki mpasi na motema” ntango amonaki mokili etondi na mabe. (Ebandeli 6:5, 6) Nzambe abongwani te. (Malaki 3:6) Biblia elobi ete Nzambe atyelaka yo likebi [to akipaka yo].Tángá 1 Petro 5:7.

Biblia eteyaka ete Yehova azali bolingo mpe Mozalisi ya biloko nyonso

12, 13. (a) Mpo na nini tolingaka bato mpe totyelaka bango likebi, mpe toyokaka ndenge nini mpo na bampasi oyo ezali na mokili? (b) Mpo na nini tokoki kondima ete Nzambe akosilisa bampasi nyonso mpe mabe nyonso?

12 Biblia elobi mpe ete Nzambe akelaki biso na elilingi na ye. (Ebandeli 1:26) Yango elingi koloba ete Nzambe asalaki biso na bizaleli ya malamu oyo ye azali na yango. Na yango, soki oyokaka mpasi ntango omonaka bato bazali konyokwama, yebá ete Nzambe ayokaka mpasi mingi koleka! Ndenge nini toyebi yango?

13 Biblia eteyaka biso ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Bolingo nde etindaka Nzambe asala makambo nyonso. Yango wana, tolingaka mpo Nzambe alingaka. Kanisá naino: Soki ozalaki na nguya, olingaki kosilisa bampasi nyonso mpe makambo ya mabe oyo etondi na mokili. Olingaki kosala yango mpo olingaka  bato. Bongo lokola Nzambe azali na nguya mpe alingaka biso, akosilisa bampasi nyonso mpe mabe nyonso, boye te? Yebá ete bilaka nyonso ya Nzambe oyo balobeli na ebandeli ya buku oyo ekokokisama! Kasi, mpo ondima bilaka yango, osengeli koyeba Nzambe malamumalamu.

NZAMBE ALINGI OYEBA YE

Soki olingi kokóma moninga ya moto moko, okoyebisa ye nkombo na yo. Nzambe ayebisi biso nkombo na ye na Biblia

14. Nkombo ya Nzambe nani, mpe ndenge nini toyebi ete tosengeli kobenga ye na nkombo yango?

14 Soki olingi kokóma moninga ya moto moko, eloko nini ya liboso okoyebisa ye? Nkombo na yo. Nzambe azali na nkombo? Mangomba mingi elobaka ete nkombo na ye Nzambe to Nkolo, kasi wana ezali bankombo te. Ezali kaka batitre to bibengeli ya lokumu lokola “mokonzi” to “prezida.” Nzambe ayebisi biso ete nkombo na ye Yehova. Nzembo 83:18 elobi: “Mpo báyeba ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.” Bato oyo bakomaki Biblia basalelaki nkombo ya Nzambe mbala ebele mpenza (bankóto). Yehova alingi oyeba nkombo na ye mpe obengaka ye na yango. Ayebisi yo nkombo na ye mpo okóma moninga na ye.

15. Nkombo Yehova elimboli nini?

15 Nkombo ya Nzambe,  Yehova, ezali na ndimbola monene. Elimboli ete Nzambe akoki kosala likambo nyonso oyo alaki mpe akoki kosala oyo akani. Eloko moko te ekoki kopekisa ye. Kaka Yehova nde akoki kozala na nkombo yango. *

16, 17. (a) “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” elimboli nini? (b) “Mokonzi ya seko” elimboli nini? (c) “Mozalisi” elimboli nini?

16 Ndenge totángi yango, Nzembo 83:18 elobi  mpo na Yehova ete: “Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló.” Lisusu, Emoniseli 15:3 elobi: “Yehova Nzambe, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, misala na yo ezali minene mpe ezali kokamwisa. Mokonzi ya seko, banzela na yo ezali boyengebene mpe solo.” Titre “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” elimboli nini? Elimboli ete Yehova azali na nguya koleka bikelamu nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpe titre “Mokonzi ya seko” elimboli ete azali na ebandeli te, azali mpe na nsuka te. Nzembo 90:2 emonisi ete azali libela na libela. Ezali mpenza kokamwisa!

17 Kaka Yehova nde azali Mozalisi. Emoniseli 4:11 elobi: “Yehova, ɛɛ Nzambe na biso, obongi kozwa nkembo mpe lokumu mpe nguya, mpo yo ozalisaki biloko nyonso, mpe mpo na mokano na yo yango ezalaki mpe ezalisamaki.” Yehova moto asalá biloko nyonso: ezala  baanzelu, ezala minzoto na likoló, ezala mbuma ya banzete, to mbisi na mai!

OKOKI KOZALA MONINGA YA YEHOVA?

18. Mpo na nini bato mosusu bakanisaka ete bakoki kozala baninga ya Nzambe te? Biblia elobi nini na likambo yango?

18 Soki bato mosusu batángi makambo oyo elobeli bizaleli minene ya Yehova, babangaka mpe bakanisaka ete: ‘Lokola Nzambe azali na nguya mingi, azali na lokumu mingi, mpe azali mosika kuna na likoló, akokipe nde ngai moto mpamba boye?’ Kasi Nzambe alingi tókanisaka bongo? Soki moke te. Yehova alingi kozala pene na biso. Biblia elobi ete Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Nzambe alingi okóma moninga na ye, mpe alaki ete ‘akopusana penepene na yo.’Yakobo 4:8.

19. (a) Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe? (b) Tángá bizaleli ya Yehova oyo osepelaka na yango mingi.

19 Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Nzambe? Yesu alobaki: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Kotika koyekola te, mpo ekosalisa yo oyeba Yehova ná Yesu. Mpe na nsuka, okoki kozwa bomoi ya seko. Na ndakisa, touti koyekola ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:16) Kasi azali mpe na bizaleli mosusu ya malamu ebele. Biblia eyebisi biso ete Yehova azali Nzambe ya “motema mawa mpe ya ngɔlu, ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto mpe na solo.” (Kobima 34:6) Yehova azali ‘malamu mpe asepelaka kolimbisa.’ (Nzembo 86:5) Nzambe azali na motema molai mpe sembo. (2 Petro 3:9; Emoniseli 15:4) Okoyeba bizaleli na ye mosusu ya malamu soki ozali kotánga makambo na ye na Biblia.

20-22. (a) Ndenge nini tokoki kozala pene na Nzambe ata soki tokoki komona ye te? (b) Osengeli kosala nini soki bato mosusu baluki otika koyekola Biblia?

 20 Ndenge nini okoki kozala pene na Nzambe atako okoki komona ye te? (Yoane 1:18; 4:24; 1 Timote 1:17) Soki ozali kotánga makambo ya Yehova na Biblia, okomona ete azali Moto ya solo. (Nzembo 27:4; Baroma 1:20) Ntango ozali koyekola makambo mosusu mingi ya Yehova, okolinga ye mingi koleka mpe okozala pene na ye.

Tata alingaka bana na ye, kasi Tata na biso ya likoló alingaka biso mingi koleka

21 Okomona ntina oyo Yehova azali Tata na biso. (Matai 6:9) Apesá biso bomoi, mpe alingi tózala na bomoi ya malamu mpenza. Tata ya bolingo alingaka bana na ye bázala bongo. (Nzembo 36:9) Ya solo, Biblia eteyaka ete okoki kokóma moninga ya Yehova. (Yakobo 2:23) Kanisá naino: Yehova, Mozalisi ya biloko nyonso, alingi ozala moninga na ye!

22 Bato mosusu bakoluka otika koyekola Biblia. Mbala mosusu bazali kobanga ete olongwa na lingomba na yo. Kasi kotika moto moko te apekisa yo okóma moninga ya Yehova. Azali Moninga oyo aleki malamu.

23, 24. (a) Mpo na nini osengeli kotunaka mituna? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

23 Ndenge ozali koyekola Biblia boye, ekozala na makambo mosusu oyo okoyeba te. Koyoka nsɔni te kotuna mituna to koluka lisalisi. Yesu alobaki ete tosengeli kozala na komikitisa lokola bana mike. (Matai 18:2-4) Bana batunaka mituna mingi. Nzambe alingi ozwa biyano. Na yango, yekolá Biblia malamumalamu mpo omindimisa ete makambo oyo ozali koyekola ezali mateya ya solo.Tángá Misala 17:11.

24 Mpo oyeba Yehova malamu esengeli oyekola Biblia. Na mokapo oyo elandi, tokoyeba ntina oyo Biblia ekeseni na babuku mosusu.

^ par. 15 Soki na Biblia na yo nkombo Yehova ezali te, to soki olingi koyeba makambo mosusu oyo etali ndimbola mpe ndenge ya kobenga nkombo ya Nzambe, talá Etanda 1.