Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA MITANO

Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene

Lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene

1, 2. (a) Ntango nini okozwa na motuya eloko oyo bakabeli yo? (b) Mpo na nini lisiko ezali likabo ya Nzambe oyo eleki monene?

NA BILOKO nyonso oyo bakabelá yo, wapi oyo eleki malamu? Mpo ozwa na motuya eloko oyo bakabeli yo, esɛngi kaka te ete ezala ntalo mingi. Soki eloko yango esepelisi yo to ozalaki mpenza na mposa na yango, okolinga yango mingi.

2 Na biloko nyonso oyo Nzambe apesá biso, ezali na moko oyo tozali na mposa na yango koleka biloko mosusu nyonso. Ezali likabo eleki monene oyo Nzambe apesá bato. Na mokapo oyo, tokomona ete Yehova atindaki Mwana na ye Yesu Kristo mpo tókoka kozwa bomoi ya seko. (Tángá Matai 20:28.) Yehova amonisaki ete alingaka biso mpenza ndenge atindaki Yesu awa na mabele mpo azala lisiko.

LISIKO EZALI NINI?

3. Mpo na nini bato bakufaka?

3 Yehova apesaki lisiko mpo na kolongola bato na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Baefese 1:7) Mpo na koyeba ntina oyo tosengeli na lisiko yango, tosengeli koyeba makambo oyo esalemaki na ebandeli, na elanga ya Edene. Adama ná Eva, baboti na biso ya liboso, basalaki lisumu mpe bakufaki. Biso mpe tokufaka mpo tozwá lisumu ya Adama ná Eva.—Talá Etanda 9.

4. Adama azalaki nani, mpe azalaki na eloko nini?

4 Ntango Yehova asalaki Adama, moto ya liboso,  apesaki ye eloko moko ya motuya mingi: bomoi ya kokoka. Adama azalaki na makanisi mpe nzoto ya kokoka. Akokaki kobɛla te, kokóma mobange te, mpe kokufa te. Lokola Yehova nde akelaki Adama, azalaki Tata na ye. (Luka 3:38) Yehova azalaki kosolola na Adama mbala na mbala. Ayebisaki ye polele makambo oyo asengelaki kosala to kosala te mpe apesaki ye mosala moko ya malamu.Ebandeli 1:28-30; 2:16, 17.

5. Ntango Biblia elobi ete Adama akelamaki na “elilingi ya Nzambe,” yango elimboli nini?

5 Adama akelamaki na “elilingi ya Nzambe.” (Ebandeli 1:27) Yehova akelaki ye na bizaleli lokola oyo ya Ye, na ndakisa, bolingo, bwanya, bosembo, mpe nguya. Apesaki ye bonsomi ya kopona. Adama azalaki robo te. Nzambe akelaki ye na likoki ya kopona kosala malamu to mabe. Soki Adama aponaki kotosa Nzambe, akokaki kozala na bomoi libela na libela na Paradiso.

6. Lokola Adama aboyaki kotosa Nzambe, abungisaki nini? Yango ememeli biso nini?

6 Adama abebisaki mpenza makambo ndenge aboyaki kotosa Nzambe, yango wana azwaki etumbu ya liwa. Azalaki lisusu moninga ya Yehova te, abungisaki bomoi na ye ya kokoka, mpe Paradiso, esika azalaki kofanda. (Ebandeli 3:17-19) Lokola Adama ná Eva baboyaki kotosa Nzambe, elikya ezalaki lisusu te mpo na bango. Mpo na likambo oyo Adama asalaki, “lisumu ekɔtaki na mokili . . . mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Ntango Adama asalaki lisumu, ‘amitɛkaki’ mpe ‘atɛkaki’ biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Baroma 7:14) Bongo biso, tozali na elikya? Ɛɛ.

7, 8. Lisiko ezali nini?

 7 Lisiko ezali nini? Mbala mingi liloba “lisiko” ebimisaka makanisi mibale. Ya liboso, lisiko ezali mbongo to eloko oyo bapesi mpo na kobimisa moto oyo bakangaki to mpo na kosomba lisusu eloko moko. Ya mibale, lisiko ezali mbongo to eloko oyo valɛrɛ na yango ekokani na valɛrɛ ya eloko oyo ebebi to ebungi.

8 Moto moko te awa na mabele akokaki kofuta eloko oyo valɛrɛ na yango ekokani na oyo Adama abungisaki ntango asalaki lisumu mpe amemelaki biso liwa. Kasi Yehova abongisaki makambo mpo na kolongola biso na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Tótala mosala lisiko esali, mpe ndenge tokoki kozwela yango matomba.

NDENGE YEHOVA APESAKI LISIKO

9. Lisiko ya ndenge nini esengelaki kofutama?

9 Moto moko te kati na biso akokaki kofuta lisiko mpo na kozongisa bomoi ya kokoka oyo Adama abungisaki. Mpo na nini? Mpo biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. (Nzembo 49:7, 8) Lisiko oyo esengelaki kofutama ezalaki bomoi ya moto mosusu ya kokoka. Yango wana, babengi yango “lisiko oyo ekokani.” (1 Timote 2:6) Lisiko yango esengelaki kozala na valɛrɛ moko na bomoi oyo Adama abungisá.

10. Ndenge nini Yehova apesaki lisiko?

10 Ndenge nini Yehova apesaki lisiko? Yehova atindaki awa na mabele Mwana na ye oyo azalaki na motuya mingi na miso na ye. Mwana yango, Yesu, azalaki ekelamu na ye ya liboso. (1 Yoane 4:9, 10) Yesu andimaki kotika Tata na ye mpe likoló, esika oyo azalaki kofanda. (Bafilipi 2:7) Yehova alongolaki bomoi ya Yesu na likoló mpe asalaki ete abotama moto ya kokoka awa na mabele, moto oyo azali na lisumu te.Luka 1:35.

Yehova apesaki Mwana na ye ya bolingo azala lisiko mpo na biso

11. Ndenge nini moto moko akokaki kozala lisiko mpo na bato nyonso?

 11 Lokola Adama, moto ya liboso, aboyaki kotosa Yehova, abungisaki bomoi ya kokoka mpo na bato nyonso. Ezali na moto moko oyo akokaki kolongola bana nyonso ya Adama na boombo ya liwa? Ɛɛ. (Tángá Baroma 5:19.) Yesu, moto oyo asalaki lisumu te, apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo ezala lisiko. (1 Bakorinti 15:45) Bomoi na ye ya kokoka ekokaki kolongola bana nyonso ya Adama na boombo ya liwa.1 Bakorinti 15:21, 22.

12. Mpo na nini Yesu asengelaki konyokwama mingi bongo?

12 Biblia elobi ete Yesu anyokwamaki mingi liboso akufa. Babɛtaki ye makasi, babakaki ye na nzete ya mpasi, anyokwamaki mpe akufaki liwa ya mpasi. (Yoane 19:1, 16-18, 30) Mpo na nini esengelaki Yesu anyokwama bongo? Mpo Satana alobaki ete moto moko te akotikala sembo epai ya Nzambe soki amekami makasi. Yesu amonisaki ete moto ya kokoka akoki kotikala sembo epai ya Nzambe ata soki anyokwami makasi ndenge nini. Yehova asepelaki mpenza ndenge Yesu atikalaki sembo!Masese 27:11; talá Etanda 15.

13. Ndenge nini lisiko efutamaki?

13 Ndenge nini lisiko efutamaki? Yesu apesaki Tata na ye motuya ya bomoi na ye. Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 na kalandriye ya Bayuda, Yehova atikaki ete banguna ya Yesu báboma ye. (Baebre 10:10) Mikolo misato na nsima, Yehova azongisaki Yesu na bomoi, na nzoto ya mosuni te, kasi na nzoto ya elimo. Na nsima, ntango Yesu azongaki na likoló, amonisaki Tata na ye, Yehova, motuya ya bomoi na ye ya moto ya kokoka oyo apesaki ezala lisiko. (Baebre 9:24) Lokola lisiko efutamaki, tokoki sikoyo kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa.Tángá Baroma 3:23, 24.

 NDENGE OYO OKOKI KOZWA MATOMBA YA LISIKO

14, 15. Tosengeli kosala nini mpo masumu na biso elimbisama?

14 Tosili kozwa matomba na likabo eleki monene oyo Nzambe apesá biso. Tótala matomba oyo tozali kozwa banda lelo mpe oyo tokozwa na mikolo ezali koya.

15 Masumu na biso ekoki kolimbisama. Ezali mpasi tósalaka ntango nyonso makambo ya malamu. Tosalaka mabunga, mpe ntango mosusu tolobaka to tosalaka makambo ya mabe. (Bakolose 1:13, 14) Ndenge nini tokoki kolimbisama? Tosengeli koyoka mawa mpenza mpo na mabe oyo tosali, mpe kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye alimbisa biso. Soki tosali bongo nde tokoki kotya motema ete masumu na biso elimbisami.1 Yoane 1:8, 9.

16. Tosengeli kosala nini mpo tózala na lisosoli ya malamu?

16 Tokoki kozala na lisosoli ya malamu. Soki lisosoli na biso ezali koyebisa biso ete tosalaki likambo moko ya mabe, tomonaka ete tomemi ngambo, mpe ntango mosusu tomonaka ete elikya ezali te mpe tozangi ntina. Kasi, ntina ya kolɛmba nzoto ezali te. Soki tobondeli Yehova alimbisa biso, tokoki kotya motema ete akoyoka biso mpe akolimbisa biso. (Baebre 9:13, 14) Yehova alingaka ete tóyebisa ye mokakatano nyonso oyo tozali na yango to bolɛmbu na biso. (Baebre 4:14-16) Soki tosali bongo, tokozala na kimya na Nzambe.

17. Mapamboli nini tokoki kozwa lokola Yesu akufelaki biso?

17 Tozali na elikya ya kozwa bomoi ya seko. “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.” (Baroma 6:23) Lokola Yesu akufelaki biso, tokoki kozwa bomoi ya seko mpe  kozala na nzoto ya kokoka. (Emoniseli 21:3, 4) Kasi tosengeli kosala nini mpo tózwa mapamboli yango?

NDENGE YA KOMONISA ETE ONDIMI LISIKO

18. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka biso?

18 Kanisá esengo oyo oyokaka na motema ntango moto moko akabeli yo eloko moko ya kitoko. Lisiko ezali likabo eleki motuya, mpe tosengeli kopesa Yehova matɔndi mingi mpo na yango. Yoane 3:16 eyebisi biso ete “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki.” Ya solo, Yehova alingaki biso mingi, yango wana apesaki biso Mwana na ye ya bolingo, Yesu. Toyebi ete Yesu mpe alingaki biso, mpo andimaki kokufa mpo na biso. (Yoane 15:13) Likabo ya lisiko esengeli kondimisa yo ete Yehova ná Yesu balingaka yo mpenza.Bagalatia 2:20.

Soki tozali koyekola makambo ya Yehova, tokokóma baninga na ye mpe tokolinga ye mingi

19, 20. (a) Ndenge nini okoki kokóma moninga ya Yehova? (b) Ndenge nini okoki komonisa ete ondimi mbeka ya lisiko ya Yesu?

19 Sikoyo, lokola oyebi ete Nzambe alingaka biso mingi, ndenge nini okoki kokóma moninga na ye? Ezalaka mpasi kolinga moto soki oyebi ye te. Yoane 17:3 elobi ete tokoki koyekola koyeba Yehova. Ntango ozali koyekola, okolinga ye lisusu mingi, okosepelisa ye, mpe okokóma moninga na ye. Yango wana, kobá koyekola Biblia mpo oyeba Yehova malamu.1 Yoane 5:3.

20 Monisá ete ondimi mbeka ya lisiko ya Yesu. Biblia elobi ete “moto oyo azali kondimela Mwana azali na bomoi ya seko.” (Yoane 3:36) Kondimela Yesu elimboli nini? Elimboli kosala makambo oyo Yesu ateyaki biso. (Yoane 13:15) Kondimela Yesu esengeli kosuka kaka na koloba te; kondima na biso esengeli komonana  na misala. Yakobo 2:26 elobi: “Kondima oyo ezali na misala te ekufi.”

21, 22. (a) Mpo na nini tosengeli kokendaka na Ekaniseli ya liwa ya Kristo mbula na mbula? (b) Mokapo 6 mpe 7 ekolobela nini?

21 Kendáká na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Na butu ya mokolo oyo Yesu akufaki, ateyaki biso ete tosengeli kokanisaka liwa na ye. Tosalaka yango mbula na mbula, mpe tobengaka yango Ekaniseli to “bilei ya mpokwa ya Nkolo.” (1 Bakorinti 11:20; Matai 26:26-28) Yesu alingi tóbosana te ete apesaki bomoi na ye ya kokoka ezala lisiko mpo na biso. Alobaki: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (Tángá Luka 22:19.) Kokende na Ekaniseli ekomonisa ete ozali kokanisa lisiko mpe bolingo monene oyo Yehova ná Yesu balingaka biso.—Talá Etanda 16.

22 Lisiko ezali likabo eleki monene oyo tozwá. (2 Bakorinti 9:14, 15) Likabo yango ekopesa matomba ata na bato ebele oyo bakufá. Mokapo 6 mpe 7 ekolimbola likambo yango.

Makambo mosusu

Pusaná penepene na Yehova

Yehova apesi “lisiko na esika ya bato mingi”

Liteya moko ya pɛtɛɛ kasi ya mozindo ekoki kosalisa yo opusana penepene na Nzambe.