Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA ZOMI NA MINEI

Okoki kozala na libota ya esengo

Okoki kozala na libota ya esengo

1, 2. Yehova alingi nini mpo na mabota?

YEHOVA NZAMBE moto abalisaki bato mpo na mbala ya liboso. Biblia eyebisi biso ete asalaki mwasi ya liboso mpe “ayaki na ye epai ya moto [mobali].” Adama asepelaki mingi mpe alobaki: “Aa! sikoyo, oyo nde mokuwa ya mikuwa na ngai mpe mosuni ya mosuni na ngai.” (Ebandeli 2:22, 23) Yango emonisi ete Yehova alingi ete bato oyo babalá bázala na esengo.

2 Nzokande, bato mingi bafandá naino na libota ya esengo te. Kasi, Biblia epesi toli ebele oyo ekoki kosalisa bato nyonso ya libota básala oyo esengeli mpo libota na bango ezala na esengo mpe básepela kofanda elongo.Luka 11:28.

MAKAMBO OYO NZAMBE ASƐNGI MIBALI

3, 4. (a) Ndenge nini mobali asengeli kofanda na mwasi na ye? (b) Mpo na nini mwasi ná mobali basengeli kolimbisanaka?

3 Biblia elobi ete mobali ya malamu asengeli kolinga mwasi na ye mpe kopesa ye kilo. Tángá Baefese 5:25-29. Ndenge oyo mobali afandaka na mwasi na ye esengeli komonisa ete alingaka ye. Asengeli mpe kobatela ye, kokokisa bamposa na ye, mpe kosala ata likambo moko te oyo ekoyokisa ye mpasi.

4 Kasi mobali akosala nini soki mwasi na ye asali mabe? Nzambe ayebisi mibali ete: “Bókoba kolinga basi na bino mpe bóyokelaka bango nkanda makasi te.” (Bakolose 3:19) Kobosana te ete yo mpe osalaka mabe. Soki  olingi Nzambe alimbisa yo, yo mpe osengeli kolimbisaka mwasi na yo. (Matai 6:12, 14, 15) Soki mwasi ná mobali bazali kolimbisana, bakozala na libala ya esengo.

5. Mpo na nini mobali asengeli kopesa mwasi na ye lokumu?

5 Yehova asɛngi mobali apesaka mwasi na ye lokumu. Mobali asengeli koluka koyeba makambo nyonso oyo mwasi na ye asengeli na yango. Ezali likambo ya lisɛki te. Soki mobali azali kofanda malamu te na mwasi na ye, Yehova akoki koboya koyoka mabondeli na ye. (1 Petro 3:7) Yehova alingaka nde bato nyonso oyo balingaka ye. Asepelaka na mibali koleka basi te.

6. Kozala “mosuni moko” elimboli nini mpo na mwasi ná mobali oyo babalaná?

6 Yesu alobaki ete mwasi ná mobali oyo babalani “bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko.” (Matai 19:6) Yango wana, mwasi asengeli kozala sembo epai ya mobali na ye, mpe mobali asengeli kozala sembo epai ya mwasi na ye, mpe moto azanga bosembo epai ya moninga ata moke te. (Masese 5:15-21; Baebre 13:4) Moto na moto asengeli koluka kokokisa mposa ya moninga na likambo ya kosangisa nzoto. (1 Bakorinti 7:3-5) Mobali asengeli koyeba ete “ata moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango.” Yango wana, mobali asengeli kolinga mwasi na ye mpe kolɛngɛla ye. Koleka makambo mosusu nyonso, mwasi alingaka mobali na ye asalelaka ye makambo na boboto mpe alingaka ye.Baefese 5:29.

MAKAMBO OYO NZAMBE ASƐNGI BASI

7. Mpo na nini libota esengeli kozala na mokonzi?

7 Libota nyonso esengeli kozala na mokonzi, moto oyo akotambwisa libota mpo boyokani ezala malamu. Na 1 Bakorinti 11:3, Biblia elobi boye: “Mokonzi ya mobali  nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali; mpe mokonzi ya Kristo ezali Nzambe.”

8. Ndenge nini mwasi akoki komonisa limemya makasi epai ya mobali na ye?

8 Mobali nyonso asalaka mabunga. Kasi, soki mwasi azali kondima bikateli ya mobali na ye mpe andimi básalaka na bomoko, libota mobimba ekozala malamu. (1 Petro 3:1-6) Biblia elobi: “Mwasi asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Bongo soki mwasi ná mobali basambelaka lingomba moko te? Mwasi asengeli kaka kozala na limemya makasi epai na ye. Biblia elobi: “Bino basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto ná limemya na bino makasi.” (1 Petro 3:1, 2) Bizaleli malamu ya mwasi ekoki kosalisa mobali na ye ayeba mateya ya solo mpe amemya lingomba ya mwasi na ye.

9. (a) Mwasi asengeli kosala nini soki andimi te likambo oyo mobali na ye alobi? (b) Toli nini Biblia epesi basi na mokanda epai ya Tito 2:4, 5?

 9 Mwasi akoki kosala nini soki andimi te likambo oyo mobali na ye alobi? Asengeli koyebisa makanisi na ye na limemya mpenza. Na ndakisa, Sara alobaki likambo moko oyo Abrahama andimaki te, kasi Yehova alobaki na Abrahama: “Yoká mongongo na ye.” (Ebandeli 21:9-12) Ekómaka mpenza mingi te ete ekateli ya nsuka oyo mobali oyo azali mokristo azwi eyokana te na Biblia, yango wana, mwasi asengeli kondima yango. (Misala 5:29; Baefese 5:24) Mwasi ya malamu abatelaka libota na ye. (Tángá Tito 2:4, 5.) Ntango mobali ná bana na ye bamoni ete azali kosala mosala makasi mpo na bango, bakolinga ye mingi mpe bakopesa ye limemya mingi.Masese 31:10, 28.

Mpo na nini Sara azali ndakisa malamu mpo na basi?

10. Biblia elobi nini mpo na kokabwana mpe koboma libala?

10 Ntango mosusu, basi ná mibali mosusu bawelaka kokabwana to koboma libala. Nzokande, Biblia elobi ete “mwasi akabwana na mobali na ye te” mpe “mobali atika mwasi na ye te.” (1 Bakorinti 7:10, 11) Ezali na makambo oyo ekoki kosala ete mwasi ná mobali bákabwana, kasi yango ezali likambo ya kozwa na lisɛki te. Bongo koboma libala? Biblia emonisi ete mwasi ná mobali bakoki koboma libala kaka soki moko na bango asangisi nzoto na moto mosusu.Matai 19:9.

MAKAMBO NZAMBE ASƐNGI BABOTI

Yesu azali ndakisa malamu mpo na moto nyonso na kati ya libota

11. Bana bazalaka na mposa ya nini koleka makambo mosusu nyonso?

11 Baboti, bósalaka makasi bólekisaka ntango mingi na bana na bino. Bana bazali na mposa na bino, mpe koleka makambo mosusu nyonso, bazali na mposa ete bóteya bango makambo ya Yehova.Kolimbola Mibeko 6:4-9.

12. Baboti basengeli kosala nini mpo na kobatela bana na bango?

 12 Mokili ya Satana ezali kobeba se kobeba, mpe ezali na bato mosusu oyo balukaka kosala bana na biso mabe, ata mpe kobebisa bango. Baboti mosusu bakokaka te kolobela bana likambo yango. Nzokande, baboti, basengeli koyebisa bana ete bato mosusu bakoki kosala bango mabe mpe koteya bango ndenge ya kokima bato yango. Baboti, bóbatela bana na bino. *1 Petro 5:8.

13. Ndenge nini baboti basengeli koteya bana na bango?

13 Baboti bazali na mokumba ya koteya bana bizaleli  malamu. Ndenge nini okoki koteya bana na yo? Osengeli kolakisa bana na yo makambo, kasi soki esɛngi kosembola bango, kosala yango na ndenge ya mabe te to na nkanda te. (Yirimia 30:11) Yango wana, kopesaka bana disiplini te ntango ozali na nkanda. Kolinga te ete maloba na yo ezokisa lokola “mopanga” mpo ekosala bango mpasi. (Masese 12:18) Salisá bana báyeba ntina oyo basengeli kotosaka.Baefese 6:4; Baebre 12:9-11; talá Etanda 30.

MAKAMBO OYO NZAMBE ASƐNGI BANA

14, 15. Mpo na nini bana basengeli kotosa baboti na bango?

14 Yesu azalaki kotosa Tata na ye ntango nyonso, ata na ntango ya mpasi. (Luka 22:42; Yoane 8:28, 29) Yehova mpe asɛngi bana bátosaka baboti na bango.Baefese 6:1-3.

15 Bana, ata soki bomoni ete ezali mpasi mpo bótosa baboti na bino, bóbosana te ete soki bozali kotosa, Yehova ná baboti na bino bakosepela na bino. *Masese 1:8; 6:20; 23:22-25.

Nini ekosalisa bilenge bátosa Nzambe ntango baninga bazali komeka bango?

16. (a) Mayele nini Satana asalelaka mpo na kotinda bilenge básala mabe? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete opona baninga oyo balingaka Yehova?

16 Zabolo akoki kosalela baninga na yo mpe bilenge mosusu mpo bátinda yo osala makambo ya mabe. Satana ayebi ete soki baninga batye yo mbamba, ekozala mpasi oboya kosala makambo balingi. Na ndakisa, Dina, mwana ya Yakobo, azalaki na baninga oyo bazalaki kolinga Yehova te. Likambo yango ememelaki ye mpe libota na ye mpasi mingi. (Ebandeli 34:1, 2) Soki baninga na yo balingaka Yehova te, bakoki kotinda yo osala  likambo oyo Yehova ayinaka, oyo ekoyokisa yo mpasi, oyo ekopesa mpe Nzambe ná libota na yo mawa. (Masese 17:21, 25) Yango wana, ezali na ntina mingi oluka baninga oyo balingaka Yehova.1 Bakorinti 15:33.

OKOKI KOZALA NA LIBOTA YA ESENGO

17. Mokumba nini moto na moto azali na yango na kati ya libota?

17 Ntango bato ya libota bazali kolanda malako ya Nzambe, mitungisi mpe mikakatano mosusu ekómelaka bango te. Na yango, soki ozali mobali, lingá mwasi na yo mpe fandá na ye na boboto. Soki ozali mwasi, zalá na limemya mpe na komikitisa epai ya mobali na yo, mpe landá ndakisa ya mwasi oyo Masese 31:10-31 elobeli. Soki ozali moboti, teyá bana na yo bálinga Nzambe. (Masese 22:6) Soki ozali tata, tambwisá libota na yo “na ndenge ya malamu mpenza.” (1 Timote 3:4, 5; 5:8) Mpe bana, bótosaka baboti na bino. (Bakolose 3:20) Kobosana te ete moto nyonso na libota akoki kosala mabunga, na yango bózala na komikitisa mpe bósɛnganaka bolimbisi. Ya solo, Biblia ezali na toli ya Yehova oyo etali moto nyonso na kati ya libota.

^ par. 12 Okoki komona makambo mosusu oyo ekosalisa yo obatela bana na yo na Mokapo 32 ya buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 15 Mwana akotosa baboti te soki basɛngi ye asala likambo oyo ebuki mobeko ya Nzambe.Misala 5:29.