Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA ZOMI NA MIBALE

Okoki kosala nini mpo okóma moninga ya Nzambe?

Okoki kosala nini mpo okóma moninga ya Nzambe?

1, 2. Tángá ndambo ya bato oyo bazalaki baninga ya Yehova.

NANI osepelaka azala moninga na yo? Moto oyo olingaka mpe oyo boyokanaka malamu. Moto oyo azali na boboto mpe na bizaleli oyo esepelisaka yo.

2 Yehova mpe aponaka bato oyo bakozala baninga na ye. Na ndakisa, Abrahama azalaki moninga ya Yehova. (Yisaya 41:8; Yakobo 2:23) Yehova alingaki mpe Davidi. Alobaki ete Davidi azalaki ‘kosepelisa motema na ye.’ (Misala 13:22) Mpe mosakoli Danyele azalaki “moto moko oyo alingami mingi” na miso ya Yehova.Danyele 9:23.

3. Mpo na nini Abrahama, Davidi mpe Danyele bazalaki baninga ya Yehova?

3 Ndenge nini Abrahama, Davidi mpe Danyele bakómaki baninga ya Yehova? Yehova alobaki na Abrahama: “Oyoki mongongo na ngai.” (Ebandeli 22:18) Yehova akómaka moninga ya bato oyo batosaka ye na komikitisa nyonso. Ata ekólo mobimba ekoki kokóma baninga na ye. Yehova alobaki na ekólo Yisraele ete: “Bótosa mongongo na ngai, mpe nakokóma Nzambe na bino, mpe bino bokokóma bato na ngai.” (Yirimia 7:23) Na yango, yo mpe osengeli kotosa Yehova soki olingi mpenza kokóma moninga na ye.

YEHOVA ABATELAKA BANINGA NA YE

4, 5. Ndenge nini Yehova azali kobatela baninga na ye?

4 Biblia elobi ete Yehova alukaka ndenge ya “komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Ntango 16:9) Na Nzembo  32:8, Yehova alaki baninga na ye boye: “Nakosala ete ozala na mayele ya kososola mpe nakoteya yo nzela oyo osengeli kokende. Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”

5 Monguna moko ya nguya alingi kopekisa biso kozala baninga ya Nzambe. Kasi Yehova alingi kobatela biso. (Tángá Nzembo 55:22.) Lokola tozali baninga ya Yehova, tozali kosalela ye na motema mobimba. Tozali sembo epai na ye ata na ntango ya mpasi. Tozali mpe na kondima oyo mokomi ya nzembo azalaki na yango. Akomaki ete: “Lokola [Yehova] azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, nakotengatenga te.” (Nzembo 16:8; 63:8) Ndenge nini Satana azali koluka kopekisa biso kozala baninga ya Nzambe?

SATANA AFUNDI BATO

6. Satana alobaki nini mpo na bato?

6 Na Mokapo 11, tomonaki ete Satana atyelaki Yehova ntembe mpe afundaki ye ete azali moto ya lokuta mpe moto mabe na ndenge atikelaki Adama ná Eva nzela te ete bápona bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mokanda ya Yobo eteyi biso ete Satana afundaka mpe bato oyo balingi kozala baninga ya Nzambe. Satana alobi ete bato basalelaka Nzambe mpo apesaka bango biloko, kasi te mpo balingaka Ye. Satana alobi kutu ete akoki kosala ete moto nyonso atika Nzambe mpe akóma na ngámbo na ye. Tótala makambo oyo tokoki koyekola na lisolo ya Yobo mpe ndenge oyo Yehova abatelaki ye.

7, 8. (a) Yobo azalaki moto ya ndenge nini na miso ya Yehova? (b) Satana alobaki nini mpo na Yobo?

7 Yobo azalaki nani? Azalaki moto moko malamu; azalaki na bomoi esili koleka mbula soki 3 600. Yehova alobaki ete na ntango wana ezalaki na moto moko te lokola ye na mabele. Yobo azalaki kobanga Nzambe makasi, mpe azalaki koyina mabe. (Yobo 1:8) Yobo azalaki mpenza moninga ya Yehova.

 8 Satana alobaki ete Yobo asalelaka Nzambe kaka mpo na koluka bolamu na ye moko. Satana alobaki na Yehova ete: “Yo otɛlɛmisi lopango te zingazinga na ye mpe zingazinga ya ndako na ye mpe zingazinga ya eloko nyonso oyo azali na yango epai na epai? Opamboli mosala ya mabɔkɔ na ye, mpe bibwɛlɛ na ye epalangani mingi na mabele. Kasi, mpo makambo ebongwana, nabondeli yo, sembolá lobɔkɔ na yo, mpe simbá eloko nyonso oyo azali na yango, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.”Yobo 1:10, 11.

9. Yehova apesaki Satana nzela asala nini?

9 Satana afundaki Yobo ete azalaki kosalela Yehova kaka mpo na biloko oyo Yehova azalaki kopesa Ye. Satana alobaki mpe ete akoki kopekisa Yobo kosalela Yehova. Yehova andimaki maloba ya Satana te, kasi apesaki ye nde nzela ameka Yobo mpo atala soki Yobo azalaki moninga ya Yehova mpo azalaki kolinga Ye.

SATANA ANYOKOLI YOBO

10. Ndenge nini Satana anyokolaki Yobo, mpe Yobo asalaki nini?

10 Liboso, Satana ayibaki to abebisaki banyama to bibwɛlɛ nyonso ya Yobo. Na nsima, Satana abomaki basaleli mosusu ya Yobo. Yobo abungisaki biloko nyonso. Na nsuka, Satana abomaki bana nyonso 10 ya Yobo na mopɛpɛ makasi. Kasi Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. “Na oyo nyonso, Yobo asalaki lisumu te mpe alobaki na Nzambe likambo ata moko te ya mabe.”Yobo 1:12-19, 22.

Yehova apambolaki Yobo mpo Yobo azalaki moninga ya solosolo

11. (a) Likambo nini mosusu Satana asalaki Yobo? (b) Yobo asalaki nini?

11 Satana asukaki wana te. Alobaki na Nzambe ete: “Simbá tii na mokuwa na ye mpe na mosuni na ye, bongo otala soki akolakela yo mabe te na miso na yo.” Na yango, Satana apesaki Yobo maladi mabe mpenza. (Yobo 2:5, 7) Atako bongo, Yobo atikalaki kaka sembo epai ya Yehova.  Alobaki: “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”Yobo 27:5.

12. Ndenge nini Yobo amonisaki ete Satana azali moto ya lokuta?

12 Yobo ayebaki te ete Satana nde moto azalaki kofunda ye; ayebaki mpe te ntina oyo azalaki konyokwama mingi bongo. Akanisaki ete Yehova nde moto abimiselaki ye minyoko yango. (Yobo 6:4; 16:11-14) Kasi atako bongo, Yobo atikalaki sembo epai ya Yehova. Sikoyo, ntembe ezalaki lisusu te. Yobo azalaki koluka bolamu na ye moko te. Azalaki moninga ya Nzambe mpo azalaki kolinga Ye. Makambo nyonso oyo Satana alobaki ezalaki lokuta!

13. Bosembo ya Yobo ememelaki ye bolamu nini?

13 Ata soki Yobo ayebaki te makambo oyo ezalaki koleka na likoló, atikalaki sembo epai ya Nzambe mpe amonisaki ete Satana azali moto mabe. Yehova apambolaki Yobo mpo Yobo azalaki moninga ya solosolo.Yobo 42:12-17.

NDENGE SATANA AFUNDAKA YO

14, 15. Satana afundi bato nyonso na likambo nini?

14 Okoki kozwa mateya mingi na likambo oyo ekómelaki Yobo. Lelo oyo, Satana afundaka biso ete tozali kosalela Yehova mpo na biloko oyo apesaka biso. Na Yobo 2:4, Satana alobaki ete: “Eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.” Na maloba yango, Satana afundi kaka Yobo te, kasi bato nyonso, basi ná mibali, ete bazali kosalela Nzambe mpo na bolamu na bango moko. Bambula ebele mpenza nsima ya liwa ya Yobo, Satana azalaki kaka kotumola Yehova mpe kofunda basaleli na ye. Na ndakisa, na Masese 27:11, Biblia elobi: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola [to, kofinga] ngai.”

15 Okoki kopona kotosa Yehova mpe kozala moninga na Ye ya solosolo, mpo omonisa ete Satana azali moto ya  lokuta. Ata soki esɛngi obongola makambo ya minene na bomoi na yo mpo okóma moninga ya Nzambe, ezali ekateli ya malamu mpenza! Ekateli yango ezali likambo ya lisɛki te! Satana alobi ete yo okotikala sembo epai ya Nzambe te soki ozali na mpasi. Azali koluka kokosa biso mpo tózala sembo te epai ya Nzambe. Ndenge nini?

16. (a) Mayele nini Satana asalelaka mpo na koluka kopekisa bato kosalela Yehova? (b) Ndenge nini Zabolo akoki koluka kopekisa yo mpenza kosalela Yehova?

16 Satana asalelaka mayele ndenge na ndenge mpo na koluka kopekisa biso tózala baninga ya Nzambe. Asalaka “lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Petro 5:8) Kokamwa te soki baninga na yo, bandeko na yo, to bato mosusu baluki kopekisa yo koyekola Biblia to kosala oyo ezali malamu. Okoki koyoka lokola nde ozali na kati ya etumba. * (Yoane 15:19, 20) Satana amikómisaka mpe “lokola anzelu ya pole.” Na yango, akoki koluka kokosa biso tóbuka mibeko ya Yehova. (2 Bakorinti 11:14) Mayele mosusu Satana asalelaka mpo na koluka kopekisa biso tósalela Yehova ezali ya kotinda biso tókanisa ete tobongi ata moke te kosalela Nzambe.Masese 24:10.

TOSÁ MIBEKO YA YEHOVA

17. Mpo na nini totosaka Yehova?

17 Soki tozali kotosa Yehova, tokomonisa ete Satana azali moto ya lokuta. Nini ekosalisa biso tótosaka Yehova? Biblia elobi: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba  mpe na makasi na yo nyonso ya bomoi.” (Kolimbola Mibeko 6:5) Totosaka Yehova mpo tolingaka ye. Soki bolingo oyo tolingaka Yehova ezali kobakisama, tokolinga kosala nyonso oyo azali kosɛnga biso. Ntoma Yoane akomaki: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”1 Yoane 5:3.

18, 19. (a) Wapi makambo mosusu oyo Yehova alobi ete ezali mabe? (b) Ndenge nini toyebi ete Yehova asɛngaka biso te tósala likambo oyo eleki biso motó?

18 Kasi, wapi makambo mosusu oyo Yehova ayebisi biso ete ezali mabe? Makambo yango ezali na etanda “ Yiná makambo oyo Yehova ayinaka.” Na ebandeli, okoki kokanisa ete makambo mosusu na kati na yango ezali mpenza mabe te. Kasi soki otángi bavɛrsɛ ya Biblia mpe okanisi yango malamu, okomona ete kotosa mibeko ya Yehova ezali malamu mpenza. Okoki mpe komona ete osengeli kobongisa makambo mosusu na bomoi na yo. Kobongisa  makambo yango ekoki kozala mpasi, kasi soki osali yango, okozala na kimya mpe na esengo mpo ozali moninga ya sembo ya Nzambe. (Yisaya 48:17, 18) Ndenge nini toyebi ete tokokoka kobongisa makambo mosusu na bomoi na biso?

19 Yehova asɛngaka biso ata moke te tósala makambo oyo eleki biso motó. (Kolimbola Mibeko 30:11-14) Lokola Yehova azali Moninga ya malamu, ayebi biso malamu koleka biso moko. Ayebi oyo tokoki kosala ná oyo tokoki kosala te. (Nzembo 103:14) Ntoma Paulo alendisi biso boye: “Nzambe azali sembo, mpe akotika te ete bómekama koleka oyo bokoki kokangela motema, kasi nzela moko na komekama akobongisela mpe bino nzela ya kobima mpo bózala na likoki ya koyikela yango mpiko.” (1 Bakorinti 10:13) Tokoki kotya motema ete Yehova akopesa biso ntango nyonso makasi mpo na kosala makambo ya malamu. Akopesa yo “nguya oyo eleki makasi” mpo na kosalisa yo okanga motema soki okutani na makambo ya mpasi.  (2 Bakorinti 4:7) Yehova asalisaki ntoma Paulo na ntango ya mpasi; yango etindaki ye aloba ete: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”Bafilipi 4:13.

YEKOLÁ KOLINGA MAKAMBO OYO NZAMBE ALINGAKA

20. Bizaleli nini osengeli komekola, mpe mpo na nini?

20 Ya solo, soki tolingi kozala baninga ya Yehova, tosengeli kotika makambo oyo Yehova alobi ete ezali mabe, kasi esuki wana te. (Baroma 12:9) Baninga ya Nzambe balingaka mpe makambo oyo ye alingaka. Makambo yango ezali na Nzembo 15:1-5. (Tángá.) Baninga ya Yehova bamekolaka bizaleli na ye mpe bazalaka na “bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, bolamu, kondima, motema pɛtɛɛ, komipekisa.”Bagalatia 5:22, 23.

21. Nini ekosalisa yo ozala na bizaleli oyo Nzambe alingi?

21 Nini ekosalisa yo ozala na bizaleli wana ya malamu? Osengeli kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe koyekola yango mpo oyeba makambo oyo Yehova alingaka. (Yisaya 30:20, 21) Soki ozali kosala yango, okolinga Yehova mingi, mpe yango ekotinda yo otosaka ye.

22. Bolamu nini okozwa soki otosi Yehova?

22 Kobongola makambo na bomoi na yo ezali lokola kolongola bilamba ya kala mpe kolata ya sika. Biblia elobi ete osengeli ‘kolongola bomoto ya kala’ mpe kolata “bomoto ya sika.” (Bakolose 3:9, 10) Ata soki ekoki kozala mpasi, ntango tobongisi makambo mosusu na bomoi na biso mpe totosi Yehova, alaki ete akopesa biso “litomba [lifuti] monene.” (Nzembo 19:11) Na yango, poná kotosa Yehova mpe monisá ete Satana azali moto ya lokuta. Salelá Yehova mpo olingi ye na motema mobimba, kasi te mpo alaki lifuti na mikolo ezali koya. Na ndenge yango, okokóma mpenza moninga ya Nzambe!

^ par. 16 Yango elingi koloba te ete Satana atambwisaka bato oyo bazali koluka kopekisa yo koyekola Biblia. Kasi, Satana azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo,” mpe “mokili mobimba ezali kolala na nguya” na ye. Yango wana, tókamwa te ntango bato mosusu bazali koluka kopekisa biso kosalela Yehova.2 Bakorinti 4:4; 1 Yoane 5:19.

Makambo mosusu

Pusaná penepene na Yehova

Okoki mpenza ‘kopusana penepene na Nzambe’?

Yehova Nzambe, Mozalisi ya likoló ná mabele, azali kobenga biso mpe apesi biso elaka.