Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Makambo oyo Biblia eteyaka

 MOKAPO YA MISATO

Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?

Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?

1. Nzambe alingaki nini mpo na bato?

NZAMBE azali na mokano moko malamu mpenza mpo na bato. Akelaki mobali ná mwasi ya liboso, Adama ná Eva, mpo bázala na bomoi na elanga moko kitoko. Alingaki bábota bana, bákómisa mabele mobimba paradiso, mpe bábatela banyama.Ebandeli 1:28; 2:8, 9, 15; talá Etanda 6.

2. (a) Ndenge nini toyebi ete Nzambe akosala likambo oyo akanaki? (b) Banani bakofanda na mabele? mpe bakofanda ntango boni?

2 Okanisi ete mokolo mosusu tokofanda mpenza na paradiso? Yehova alobi: “Nabongisi mokano yango, nakosala mpe yango.” (Yisaya 46:9-11; 55:11) Nzambe akosala makambo oyo akanaki, mpe eloko moko te ekopekisa ye. Alobi ete akelaki mabele na ntina. “Azalisaki yango mpamba te.” (Yisaya 45:18) Alingi bato báfanda na mabele. Bato ya ndenge nini Nzambe alingi ete báfanda na mabele, mpe bakofanda ntango boni? Biblia elobi: “Bayengebene [to bato ya botosi] bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4.

3. Lokola bato babɛlaka mpe bakufaka, okoki komituna mituna nini?

3 Kasi lelo oyo, bato babɛlaka mpe bakufaka. Na bisika mingi, bitumba ezali mpe bato bazali kobomana. Nzokande, Nzambe alingaki te ete ezala bongo. Na yango, likambo nini esalemaki, mpe mpo na nini? Kaka Biblia nde ekoki koyebisa biso.

 MONGUNA YA NZAMBE

4, 5. (a) Nani asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva na elanga ya Edene? (b) Ndenge nini moto ya sembo akoki kokóma moyibi?

4 Biblia eyebisi biso ete Nzambe azali na monguna moko, “oyo babengi Zabolo mpe Satana.” Satana asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva na elanga ya Edene. (Emoniseli 12:9; Ebandeli 3:1) Asalaki bongo mpo emonana ete nyoka nde ezalaki koloba.—Talá Etanda 7.

5 Nzambe moto akelaki Satana Zabolo? Te. Anzelu moko oyo azalaki na likoló ntango Nzambe abongiselaki Adama ná Eva mabele abongwanaki mpe akómaki Zabolo. (Yobo 38:4, 7) Ebandaki ndenge nini? Kanisá naino: Ndenge nini moto moko ya sembo akoki kobongwana mpe kokóma moyibi? Moto abotamaka moyibi te. Kasi soki abandi kolula to koluka kozwa eloko oyo ezali ya ye te; soki azali kaka kokanisa eloko yango, mposa wana ya mabe ekokóma makasi. Na nsima, soki libaku emonani, akoyiba yango. Na ndenge yango, amikómisi moyibi.Tángá Yakobo 1:13-15; talá Etanda 8.

6. Ndenge nini anzelu moko akómaki monguna ya Nzambe?

6 Yango nde ekómelaki anzelu wana. Ntango Yehova akelaki Adama ná Eva, ayebisaki bango bábota bana mpe ‘bátondisa mabele.’ (Ebandeli 1:27, 28) Ntango mosusu anzelu wana akómaki na makanisi oyo: ‘Bato wana nyonso bakoki kosambela ngai na esika básambela Yehova!’ Kokanisa yango mingi esalaki ete akóma mpe na mposa makasi ya kozwa eloko oyo ezalaki ya Yehova. Anzelu yango alingaki bato básambela ye. Yango wana, ayebisaki Eva makambo ya lokuta mpe abungisaki ye nzela. (Tángá Ebandeli 3:1-5.) Na ndenge yango, akómaki Satana Zabolo, monguna ya Nzambe.

7. (a) Mpo na nini Adama ná Eva bakufaki? (b) Mpo na nini tonunaka mpe tokufaka?

 7 Adama ná Eva batosaki Nzambe te mpe balyaki mbuma. (Ebandeli 2:17; 3:6) Basalelaki Yehova lisumu, mpe na nsima bakufaki, kaka ndenge Yehova alobaki. (Ebandeli 3:17-19) Bana oyo Adama ná Eva babotaki bazalaki basumuki, yango wana bakufaki. (Tángá Baroma 5:12.) Mpo tómona ntina oyo bana ya Adama ná Eva bazalaki mpe basumuki, tózwa ndakisa moko. Kanisá ete ozali kotumba mampa na linzanza moko oyo ezali na mbeba, to efinaná. Mampa nyonso oyo okosala na linzanza wana ekobima kaka ndenge linzanza wana ezali. Ntango Adama abukaki mobeko ya Nzambe, akómaki mosumuki. Lokola tozali bana ya Adama, biso nyonso tozali basumuki, to tozali na “mbeba” oyo ye azalaki na yango. Mpe lokola tozali basumuki, yango wana tonunaka mpe tokufaka.Baroma 3:23; talá Etanda 9.

8, 9. (a) Likambo nini Satana alingaki ete Adama ná Eva bándima? (b) Mpo na nini Yehova abomaki batomboki yango mbala moko te?

8 Satana abandaki kotɛmɛla Yehova ntango atindaki Adama ná Eva bábuka mobeko ya Nzambe. Alingaki ete Adama ná Eva bándima ete Yehova azali moto ya lokuta, mokonzi mabe, oyo alingi te ete bázala malamu. Satana amonisaki ete ezali na ntina te bato bázela Nzambe ayebisa bango makambo oyo bakosala mpe ete Adama ná Eva basengeli kokata bango moko nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Yehova asalaki nini? Akokaki koboma batomboki yango mpe kosilisa botomboki yango. Kasi kosala bongo elingaki mpenza komonisa ete Satana nde moto ya lokuta? Te.

9 Yango wana, Yehova abomaki batomboki wana mbala moko te. Atikelaki nde bato ntango bámiyangela bango moko. Yango ekomonisa polele ete Satana azali  moto ya lokuta mpe ete Yehova ayebi nini eleki malamu mpo na bato. Tokoyeba likambo yango malamu na Mokapo 11. Kasi, okanisi nini mpo na ekateli oyo Adama ná Eva bazwaki? Basalaki malamu ndenge bandimelaki Satana mpe babukaki mobeko ya Nzambe? Yehova nde apesaki Adama ná Eva nyonso oyo bazalaki na yango. Apesaki bango bomoi ya kokoka, esika kitoko  ya kofanda, mpe mosala ya malamu. Kasi, Satana asalelaki bango ata eloko moko te ya malamu. Soki ozalaki wana, olingaki kosala nini?

10. Ekateli nini ya ntina mokomoko na biso asengeli kozwa?

10 Lelo oyo mpe, mokomoko na biso asengeli kopona, mpe ekateli yango ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso. Tokoki kopona kotosa Yehova mpo azali Mokonzi na biso mpe komonisa ete Satana azali moto ya lokuta. To mpe tokoki kopona Satana azala mokonzi na biso. (Nzembo 73:28; tángá Masese 27:11.) Na mokili oyo, bato moke kaka nde bazali kotosa Nzambe. Kutu, Nzambe azali mokonzi ya mokili te. Boye, nani azali mokonzi ya mokili?

NANI AZALI MOKONZI YA MOKILI OYO?

Soki makonzi nyonso ya mokili oyo ezalaka ya Satana te, alingaki nde kopesa yango Yesu?

11, 12. (a) Lokola Satana alingaki kopesa Yesu makonzi ya mokili, yango eteyi biso nini? (b) Bavɛrsɛ nini emonisi ete Satana nde azali koyangela mokili?

11 Yesu ayebaki malamu mokonzi ya mokili oyo. Mokolo moko, Satana “alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” Satana alakaki Yesu ete: “Biloko oyo nyonso nakopesa yo soki ofukami mpe osaleli ngai likambo moko ya losambo.” (Matai 4:8, 9; Luka 4:5, 6) Kanisá naino: ‘Soki makonzi yango ezalaka ya Satana te, alingaki kopesa yango Yesu?’ Te. Baguvɛrnema nyonso ya mokili ezali ya Satana.

12 Okoki komituna: ‘Ndenge nini Satana akoki kozala mokonzi ya mokili? Yehova Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso moto asalá biloko nyonso, boye te?’ (Emoniseli 4:11) Ezali bongo, kasi Yesu alobaki polele ete Satana azali “mokonzi ya mokili oyo.” (Yoane 12:31; 14:30; 16:11) Ntoma Paulo mpe abengaki Satana Zabolo “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Bakorinti 4:3, 4) Lisusu, ntoma Yoane akomaki  ete “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”1 Yoane 5:19.

NDENGE NINI MOKILI YA SATANA EKOBOMAMA?

13. Mpo na nini tosengeli na mokili ya sika?

13 Mokili oyo ezali kobeba se kobeba. Bitumba, moyibi, lokuta, mpe mobulu etondi na mokili. Bato bakokoka te kosilisa makambo yango, ata soki basali nini. Kasi, etikali moke Nzambe aboma mokili oyo mabe na etumba ya Armagedone, mpe atya na esika na yango mokili ya sika ya boyengebene.Emoniseli 16:14-16; talá Etanda 10.

14. Nzambe aponá nani azala Mokonzi na Bokonzi na Ye? Biblia elobaki nini mpo na Yesu?

14 Yehova aponá Yesu Kristo azala Mokonzi ya guvɛrnema to Bokonzi na Ye ya likoló. Na ntango ya kala, Biblia elobaki ete Mokonzi Yesu akozala “Nkumu ya Kimya” mpe boyangeli na ye ekozala na nsuka te. (Yisaya 9:6, 7) Mpo na boyangeli yango, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:10) Na Mokapo 8, tokomona ndenge Bokonzi ya Nzambe ekolongola baguvɛrnema ya mokili oyo. (Tángá Danyele 2:44.) Na nsima, Bokonzi ya Nzambe ekokómisa mabele paradiso ya kitoko mpenza.—Talá Etanda 11.

MOKILI YA SIKA EKÓMI PENE!

15. “Mabele ya sika” ezali nini?

15 Biblia elaki ete: “Tozali kozela likoló ya sika mpe mabele ya sika,” mpe “kuna, boyengebene ekozala.” (2 Petro 3:13; Yisaya 65:17) Na bisika mosusu, Biblia esaleli liloba “mabele” mpo na kolobela nde bato oyo bafandi na mabele. (Ebandeli 11:1) Na yango, “mabele  ya sika” ya boyengebene emonisi nde bato nyonso oyo batosaka Nzambe mpe bazali na lipamboli na ye.

16. Likabo nini Nzambe akopesa bato oyo bakofanda na mokili ya sika? Mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwa yango?

16 Yesu alakaki ete bato oyo bakofanda na mokili ya sika ya Nzambe bakozwa “bomoi ya seko.” (Marko 10:30) Tosengeli kosala nini mpo tózwa likabo yango? Tángá Yoane 3:16 mpe 17:3 mpo na kozwa eyano. Tótala sikoyo makambo oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo bomoi ekozala na Paradiso awa na mabele.

17, 18. Ndenge nini toyebi ete kimya ekozala na mabele mobimba mpe ete tokobanga eloko te?

17 Mabe, bitumba, kobomana, mpe mobulu ekosila. Bato mabe bakozala lisusu te na mabele. (Nzembo 37:10, 11) Nzambe ‘akosilisa bitumba tii na nsuka ya mabele.’ (Nzembo 46:9; Yisaya 2:4) Mabele ekotonda na bato oyo bazali kolinga Nzambe mpe kotosa ye. Kimya ekozala mpo na libela.Nzembo 72:7.

18 Basaleli ya Yehova bakobanga lisusu eloko te. Na ntango ya kala, ntango Bayisraele bazalaki kotosa Nzambe, bazalaki na kimya mpo azalaki kobatela bango. (Balevi 25:18, 19) Na Paradiso, tokobanga eloko moko te, moto moko mpe te. Tokozala ntango nyonso na kimya!Tángá Yisaya 32:18; Mika 4:4.

19. Mpo na nini tosengeli kondima ete bilei ekozala ebele mpenza na mokili ya sika ya Nzambe?

19 Biloko ya kolya ekozala ebele mpenza. “Mbuma ekozala beboo na mabele; na nsɔngɛ ya bangomba biloko ekotondana.” (Nzembo 72:16) Yehova, “Nzambe na biso, akopambola biso,” mpe “mabele ekobota mpenza mbuma na yango.”Nzembo 67:6.

20. Ndenge nini toyebi ete mabele ekokóma paradiso?

20 Mabele mobimba ekokóma paradiso. Bato bakozala na bandako ya kitoko mpe bilanga ya kitoko.  (Tángá Yisaya 65:21-24; Emoniseli 11:18.) Mabele mobimba ekozala kitoko ndenge elanga ya Edene ezalaki. Yehova akopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango. Biblia elobi ete Nzambe ‘akofungola lobɔkɔ na ye mpe akokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.’Nzembo 145:16.

21. Ndenge nini toyebi ete bato ná banyama bakofanda na kimya?

21 Bato ná banyama bakofanda na kimya. Banyama bakosala lisusu bato mabe te. Bana mike bakobanga te, ata soki bazali esika moko na banyama oyo ezali mabe lelo oyo.Tángá Yisaya 11:6-9; 65:25.

22. Yesu akosala nini mpo na bato ya maladi?

22 Moto moko te akobɛla. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, abikisaki bato mingi ya maladi. (Matai 9:35; Marko 1:40-42; Yoane 5:5-9) Lokola Yesu azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe, akobikisa bato nyonso ya maladi. Moto moko te akoloba lisusu: “Nazali na maladi.”Yisaya 33:24; 35:5, 6.

23. Nzambe akosala nini mpo na bato oyo bakufá?

23 Bato oyo bakufá bakozonga na bomoi. Nzambe alaki ete akosekwisa ebele ya bato oyo bakufá. “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”Tángá Yoane 5:28, 29; Misala 24:15.

24. Okanisi nini mpo na bomoi na Paradiso?

24 Biso nyonso tosengeli kopona. Tokoki kopona koyekola makambo ya Yehova mpe kosalela ye, to kopona kosala kaka oyo motema na biso elingi. Soki toponi kosalela Yehova, tokoki kokɔta na mokili ya sika. Ntango moto moko asɛngaki Yesu akanisa ye nsima ya liwa na ye, Yesu alakaki ye ete: “Okozala na ngai na Paradiso.” (Luka 23:43) Tólobela makambo mosusu etali Yesu Kristo mpe ndenge oyo bilaka ya Nzambe ekokokisama na nzela na ye.