Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 5

Mokonzi asalisi bato báyeba makambo oyo etali Bokonzi

Mokonzi asalisi bato báyeba makambo oyo etali Bokonzi

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Basaleli ya Nzambe basosoli mateya ya ntina mingi oyo etali Bokonzi, bakonzi na yango, baoyo bakoyangelama, mpe ndenge ya komonisa bosembo

1, 2. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali mokambi ya bwanya?

KANISÁ ete mokambi moko ya mayele azali kotambwisa bino mpo na kolakisa bino engumba moko ya kitoko mpenza. Lokola ezali mbala ya liboso yo ná bapaya mosusu bóya na engumba yango, bozali kotya likebi na likambo nyonso oyo mokambi azali koloba. Wana bozali kotambola, bozali na mposa makasi ya koyeba biloko mosusu ya engumba yango oyo bomoni naino te. Kasi, ntango botuni mokambi yango biloko ya ndenge wana, aboyi koyebisa bino yango tii na ntango oyo ebongi, mbala mosusu ntango bokómi pene ya komona yango. Na nsima, okómi komona ete mokambi na bino azali na bwanya mingi, mpo azali kozela kaka ntango oyo ebongi mpo ayebisa bino makambo oyo esengeli.

2 Biso bakristo ya solo tozali lokola bato wana oyo bayei kotala engumba. Tozalaka mpenza na mposa makasi ya koyeba makambo oyo etali engumba oyo eleki bingumba nyonso, “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe. (Ebr. 11:10) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ye moko akambaki bayekoli na ye, asalisaki bango báyeba makambo mingi oyo etali Bokonzi yango. Kasi, apesaki nde biyano na mituna na bango nyonso mpe ayebisaki bango makambo nyonso oyo etali Bokonzi mbala moko? Te. Ye moko alobaki: “Nazali naino na makambo mingi ya koloba na bino, kasi bokoki komema yango sikoyo te.” (Yoa. 16:12) Lokola Yesu azali mokambi oyo aleki na bwanya, aboyaki koyebisa bayekoli na ye makambo ebeleebele na ntango oyo babongisamaki naino te mpo na komema yango.

3, 4. (a) Yesu asalelaka nini mpo na kokoba koteya bato ya sembo makambo etali Bokonzi ya Nzambe? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo?

3 Yesu alobaki makambo oyo ezali na Yoane 16:12 na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Nsima ya liwa na ye, ndenge nini akokoba koteya bato ya sembo makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe? Alakaki bantoma na ye ete: “Elimo . . . ya solo, akokamba bino na kati ya solo nyonso.” * (Yoa. 16:13) Elimo santu ezali lokola mokambi moko ya motema molai. Yesu asalelaka yango mpo na koteya bayekoli na ye likambo nyonso oyo esengeli báyeba na oyo etali Bokonzi ya Nzambe, na ntango oyo esengeli báyeba yango.

4 Tótala ndenge oyo elimo santu ya Yehova ekambaki  bakristo oyo bazalaki koluka solo mpo báyeba makambo mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe. Liboso, tokolobela ndenge toyaki kososola ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela. Na nsima, tokolobela bato oyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe mpe elikya na bango, mpe bato oyo Bokonzi ekoyangela mpe elikya oyo bazali na yango. Na nsuka, tokotalela ndenge bayekoli ya Kristo bayaki kososola malamumalamu makambo oyo moto asengeli kosala mpo na komonisa ete azali sembo na Bokonzi yango.

Basosoli mobu moko ya ntina mingi

5, 6. (a) Bayekoli ya Biblia bazalaki kokanisa nini mpo na kotyama ya Bokonzi mpe eleko ya kobuka mbuma? (b) Mpo na nini makanisi wana ya libunga ekoki te kotinda biso tómituna soki Yesu azalaki mpenza kokamba bayekoli na ye?

5 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2 ya buku oyo, bambula mingi liboso, Bayekoli ya Biblia balobaki ete 1914 ekozala mobu moko ya ntina mingi oyo ekokokisa bisakweli ya Biblia. Kasi, na ntango wana bazalaki kokanisa ete eleko ya kozala ya Kristo ebandaki na 1874, ete Kristo abandaki koyangela na likoló na 1878, mpe ete Bokonzi ekotyama mobimba na sanza ya zomi ya mobu 1914. Bazalaki koloba ete kobuka mbuma ekosalema banda na mobu 1874 tii na 1914, mpe ekosuka na koyanganisama na likoló ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Makanisi ya libunga ndenge wana emonisi nde ete Yesu azalaki te kokamba bato wana ya sembo na nzela ya elimo santu?

6 Te, ezali bongo te! Kanisá lisusu ndakisa oyo topesaki na ebandeli ya bato oyo bayaki kotala engumba. Makanisi oyo bato wana bazalaki na yango liboso mpe mituna na bango emonisi nde ete mokambi wana abongi kotyelama motema te? Soki moke te! Ndenge moko mpe, ata soki na bantango mosusu, basaleli ya Nzambe bakanisaka ete bakangi malamu ntina ya mokano ya Yehova nzokande elimo santu ekambaki bango naino te mpo báyeba makambo yango, ezali polele ete Yesu atambwisaka bango. Yango wana, bato ya sembo bandimaka kosembolama, mpe na komikitisa nyonso, babongolaka makanisi na bango.Yak. 4:6.

7. Nzambe asalisaki basaleli na ye básosola makambo nini?

7 Na bambula oyo elandaki 1919, elimo santu esalisaki basaleli ya Nzambe básosola mateya mosusu mingi. (Tángá Nzembo 97:11.) Na 1925, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki lisolo moko ya ntina mingi oyo elobaki “Kobotama ya Ekólo.” Lisolo yango elimbolaki polele na nzela ya Makomami ete Bokonzi ya Masiya etyamaki na 1914, mpe yango ekokisaki esakweli oyo elobeli mwasi ya Nzambe ya elilingi kuna na likoló aboti mwana, ndenge emonisami na Emoniseli mokapo 12. * Lisolo yango emonisaki mpe ete minyoko mpe yikiyiki oyo ekómelaki basaleli ya Yehova na bambula wana ya etumba ya mokili mobimba emonisaki polele ete Satana abwakamaki na mabele, mpe “azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”Em. 12:12.

8, 9. (a) Ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete Bokonzi ezali na ntina mingi? (b) Mituna nini tokotalela?

8 Bokonzi ezali na ntina nini? Na 1928, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekómaki komonisa ete Bokonzi ezalaki na ntina mingi koleka lobiko ya bato na nzela ya lisiko. Kutu, ezali na nzela ya  Bokonzi ya Masiya nde Yehova akosantisa nkombo na ye, akolongisa boyangeli na ye, mpe akokokisa makambo nyonso oyo akani mpo na bato.

9 Banani bakoyangela elongo na Kristo na Bokonzi yango? Bokonzi ekoyangela banani awa na mabele? Mpe mosala nini bayekoli ya Kristo basengeli komipesa na yango?

Koyanganisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo

10. Banda kala, basaleli ya Nzambe bayebaki likambo nini mpo na bato 144 000?

10 Bambula mingi liboso ya 1914, bakristo ya solo basilaki kososola ete bayekoli ya sembo ya Kristo oyo bakoyangela elongo na ye na likoló bakozala 144 000. * Bayekoli wana ya Biblia bamonaki ete motángo yango ezali ya elilingi te mpe ete bato oyo bazali na kati babandaki koponama banda na siɛklɛ ya liboso ya T.B.

11. Makambo nini bato oyo bazalaki na elikya ya kokóma mwasi ya kristo basosolaki mpo na mokumba na bango ntango bazali awa na mabele?

11 Kasi, mosala nini bato oyo bazali na elikya ya kozala na etuluku ya mwasi ya Kristo basengelaki kosala ntango bazali naino na mabele? Bayekoli ya Biblia bamonaki ete Yesu abendaki likebi mingi na mosala ya kosakola mpe amonisaki ete ezali na boyokani na eleko ya kobuka mbuma. (Mat. 9:37; Yoa. 4:35) Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2, na ntango moko boye, bazalaki kokanisa ete eleko ya kobuka mbuma ekoumela mbula 40, mpe ekosuka na koyanganisama na likoló ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, lokola mosala yango ekobaki ata nsima ya bambula 40 yango, esengelaki kosembola makambo. Lelo oyo, toyebi ete eleko ya kobuka mbuma—eleko ya kokabola blé ná matiti mabe, elingi koloba bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo ná bakristo ya nkombo mpamba—ebandaki nde na 1914. Ntango ekokaki mpo na koyanganisa bato mosusu oyo bakokende na likoló, mpo motángo 144 000 ekoka!

Eleko ya kobuka mbuma ebandaki na mobu 1914 (Talá paragrafe 11)

12, 13. Ndenge nini ndakisa oyo Yesu apesaki ya bangɔndɔ zomi mpe ya talanta ekokisami na mikolo ya nsuka?

12 Kobanda na 1919 tii lelo, Kristo azali kokamba moombo ya sembo mpe ya mayele mpo abenda likebi na mosala ya kosakola. Yesu apesaki bayekoli na ye mosala yango na siɛklɛ ya liboso. (Mat. 28:19, 20) Amonisaki mpe bizaleli oyo bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bakomonisa mpo básala mosala yango ya kosakola. Na ndenge nini? Ntango Yesu apesaki ndakisa ya bangɔndɔ zomi, amonisaki ete esengeli  bakristo oyo batyami mafuta na elimo bákoba kosɛnzɛla na elimo mpo bákokisa mokano na bango ya kozala na fɛti monene ya libala na likoló, ntango Kristo akosala libala na mwasi na ye ya elilingi, bato 144 000. (Em. 21:2) Na nsima, ntango apesaki ndakisa ya talanta, amonisaki ete bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bakozala na molende na mosala ya kosakola.Mat. 25:1-30.

13 Na mbula 100 oyo eleki, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonisi ete bazali kosɛnzɛla mpe bazali kosakola na molende. Ntembe ezali te ete bakozwa mbano mpo na ndenge oyo bazali kosɛnzɛla! Kasi, mosala monene ya kobuka mbuma esukaki kaka na koyanganisa bato oyo bakokokisa motángo ya bato 144 000, oyo bakoyangela na Kristo?

Koyanganisa bato oyo Bokonzi ekoyangela na mabele!

14, 15. Buku Le mystère accompli elobelaki bituluku nini minei?

14 Banda kala, bato ya sembo bazalaki koluka koyeba soki “ebele mpenza ya bato” (“ebele monene,” haut fleuve) oyo Emoniseli 7:9-14 elobeli ezali banani. Yango wana, liboso ntango ekoka mpo Kristo amonisa soki ebele ya bato yango ezali banani, makambo mingi oyo elobamaki mpo na likambo yango ezalaki na boyokani ata moke te na mateya ya solo oyo toyebi mpe tolingaka lelo.

15 Na 1917, buku Le mystère accompli elobaki ete ezali na “ndenge mibale ya lobiko na likoló, mpe na ndenge mibale ya lobiko na mabele.” Bituluku yango minei ya bato oyo bakozwa lobiko ezali banani? Ya liboso, ezali bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na Kristo. Ya mibale, ebele monene. Na ntango wana, bazalaki koloba ete ebele monene ezali bakristo ya nkombo mpamba oyo bazalaki na kati ya mangomba ya bokristo. Bazalaki na mwa kondima, kasi ekokaki te mpo bátikala sembo. Yango wana, na likoló, bakozwa bisika ya lokumu mingi te. Na ntango wana, bazalaki kokanisa ete awa na mabele, etuluku ya misato, elingi koloba “bato minene ya kala,” na ndakisa Abrahama, Moize, mpe bato mosusu, bakozala na bokonzi likoló ya etuluku ya minei, elingi koloba bato ya mokili.

16. Bingɛngiseli nini ebimaki na 1923 mpe na 1932?

16 Ndenge nini elimo santu ekambaki bayekoli ya Kristo mpo báyeba mateya oyo tozali na yango lelo oyo? Esalemaki mokemoke; bingɛngiseli eyaki malɛmbɛmalɛmbɛ. Na 1923, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki etuluku moko ya bato oyo bazali na elikya ya kokende likoló te, kasi ya kofanda na mabele ntango Kristo akoyangela. Na 1932, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki Yonadaba (Yehonadabe) oyo akangamaki na Yehu, mokonzi ya Yisraele oyo Nzambe atyaki mafuta, mpe asalisaki ye na kolongola losambo ya lokuta. (2 Bak. 10:15-17) Lisolo yango elobaki ete na mikolo na biso, bato mosusu bazali lokola Yonadaba, mpe ebakisaki ete Yehova akobikisa etuluku ya bato yango “na etumba ya Armagedone” mpo na kofanda awa na mabele.

17. (a) Na 1935, likambo nini eyebanaki malamumalamu? (b) Ndenge nini koyeba ebele monene esalisaki bakristo ya sembo? (Talá etandá “ Mitema ekitaki mpenza.”)

17 Na 1935, pole ya elimo engɛngaki makasi. Na liyangani monene oyo esalemaki na Washington, na États-Unis, ebele monene eyebanaki ete ezali etuluku ya bato oyo bakofanda na  mabele; bango nde bampate oyo Yesu alobelaki na ndakisa ya bampate ná bantaba. (Mat. 25:33-40) Ebele monene ekozala na kati ya “bampate mosusu” oyo Yesu alobaki ete: “Yango mpe nasengeli komema yango.” (Yoa. 10:16) Ntango ndeko Rutherford, oyo azalaki kosala diskur, alobaki ete: “Nasɛngi na baoyo nyonso bazali na elikya ya kofanda awa na mabele mpo na libela bátɛlɛma,” bato koleka katikati ya bayangani batɛlɛmaki. Na nsima abakisaki: “Bótala! Ebele monene!” Ebele ya bato basepelaki mingi ndenge nsukansuka bayebaki elikya na bango.

18. Bayekoli ya Kristo bamipesaki na nini, mpe ebimisi matomba nini?

18 Banda wana, Kristo asalisaki bayekoli na ye bámipesa na koyanganisa ebele mpenza ya bato oyo bakobika na bolɔzi monene. Na ebandeli, etuluku yango ezalaki na bato mingi te. Kutu, mokolo moko ndeko Rutherford alobaki: “Emonani lokola ete ‘ebele monene’ yango ekozala na bato mingi mpenza te.” Nzokande, lelo toyebi ete banda wana, Yehova apamboli mpenza mosala ya kobuka mbuma! Na litambwisi ya Yesu mpe ya elimo santu, bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná baninga na bango “bampate mosusu” bakómi “etonga kaka moko” oyo bazali kosala elongo mpe bazali na “mobateli kaka moko,” kaka ndenge Yesu asakolaki yango.

Ndeko Rutherford akokaki te kokanisa ete etuluku ya ebele mpenza ya bato ekokóma monene (Banda na lobɔkɔ ya mwasi: Nathan Knorr, Joseph Rutherford, ná Hayden Covington)

19. Tokoki kosala nini mpo motángo ya ebele mpenza ya bato ekoba kobakisama?

19 Ebele ya bato ya sembo bakofanda libela na libela na paradiso awa na mabele, na boyangeli ya Kristo ná bato 144 000. Ezali mpenza esengo komona ndenge Kristo akambi basaleli ya Nzambe mpo báyeba polele elikya wana oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya. Koyebisa basusu elikya ya bomoi ya seko na mosala ya kosakola ezali mpenza lokumu monene! Yango wana, na kotalela makoki na biso, tiká ete tókoba kosakola na molende mpo motángo ya “ebele mpenza ya bato” ekoba kobakisama, mpe lokito ya masanzoli mpo na nkombo ya Yehova eyokana makasi mingi koleka!Tángá Luka 10:2.

Motángo ya ebele mpenza ya bato ezali se kobakisama

Ndenge ya komonisa bosembo na Bokonzi ya Nzambe

20. Makambo nini ezali na kati ya ebongiseli ya Satana, mpe yango etali bosembo ya bakristo na nini?

20 Lokola basaleli ya Nzambe bakobaki koyekola makambo oyo etali Bokonzi, bamonaki mpe ete esengeli koyeba malamumalamu soki kozala sembo na Bokonzi ya likoló elimboli nini. Na yango, na 1922, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete ezali na bibongiseli mibale: ya Yehova mpe ya Satana. Na kati ya ebongiseli ya Satana, okokuta makambo ya mombongo, mangomba ya lokuta, mpe makambo ya politiki. Bato oyo bazali sembo na Bokonzi ya Nzambe oyo Kristo azali kotambwisa basengeli te komikɔtisa na mabe ya ebongiseli ya Satana, soki te bakobebisa bosembo na bango. (2 Ko. 6:17) Elingi koloba nini?

21. (a) Ndenge nini moombo ya sembo akebisaki basaleli ya Nzambe mpo na mimbongo ya minene? (b) Na 1963, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki nini mpo na “Babilone Monene”?

21 Bilei ya elimo oyo moombo ya sembo apesaka emonisaki polele makambo ya nyamunyamu oyo bato minene ya mombongo basalaka, mpe ekebisaki basaleli ya Nzambe mpo bákóma te na elimo ya konduka biloko ya mokili, oyo ezali se kopalangana. (Mat. 6:24) Mikanda ya moombo ya sembo emonisaki mpe polele mabe ya mangomba, eteni mosusu ya ebongiseli ya Satana. Na 1963, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki polele ete “Babilone monene” ezali kaka mangomba ya  bokristo te, kasi nde mangomba nyonso ya lokuta na mokili mobimba. Na yango, ndenge Mokapo 10 ya buku oyo ekomonisa yango malamumalamu, moombo ya sembo asalisi basaleli ya Nzambe na bikólo nyonso ‘bábima na kati [ya Babilone],’ mpe na ndenge yango bamipɛtoli, batiki misala nyonso ya mangomba ya lokuta.Em. 18:2, 4.

22. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, ndenge nini basaleli mingi ya Nzambe bazalaki kolimbola maloba ya Baroma 13:1?

22 Tokoloba nini mpo na politiki, eteni mosusu ya ebongiseli ya Satana? Bakristo ya solo bakoki kokende etumba mpe kokɔta na matata kati na bikólo? Na ntango ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, Bayekoli ya Biblia bayebaki malamu ete bayekoli ya Kristo basengeli te koboma bato. (Mat. 26:52) Kasi, mingi na bango bazalaki komona ete lokola Baroma 13:1 elobi ete esengeli kotosa “bakonzi oyo bazali liboso,” yango elingi koloba ete basengeli kokende mosala ya soda, kolata bilamba ya soda, ata mpe kosimba mandoki, kasi soki basɛngi bango báboma monguna, bakobɛta masasi pembeni.

23, 24. Na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ndenge nini tozalaki kolimbola Baroma 13:1? Mpe likambo nini esembolamaki lisusu malamumalamu?

23 Ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki lisolo moko oyo elobelaki na mozindo likambo ya kokɔta na makambo ya mokili. Lisolo yango emonisaki polele ete bakristo basengeli kokende etumba te mpe kokɔta ata moke te na matata ya bikólo ya mokili ya Satana. Malako yango eyaki mpenza na ntango oyo ebongi! Yango ebatelaki bayekoli ya Kristo mpo bázala te na ngambo ya makila ya ebele ya bato oyo bikólo ememaki na etumba yango. Nzokande kobanda na 1929, mikanda na biso ekómaki mpe koloba ete bakonzi oyo bazali liboso, oyo Baroma 13:1  elobeli, ezali bakonzi ya mokili te, kasi nde Yehova ná Yesu. Esengelaki kosembola lisusu makambo.

24 Elimo santu ekambaki bayekoli ya Kristo na likambo yango na 1962, ntango masolo ya ntina mingi oyo elimbolaki Baroma 13:1-7 ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1962 mpe ya 01/12/1962. Nsukansuka, basaleli ya Nzambe bakangaki ntina ete esengeli kotosa bakonzi ya mokili, kasi na makambo nyonso te, ndenge Yesu amonisaki yango na maloba na ye oyo eyebani mingi ete: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Luka 20:25) Sikoyo, bakristo ya solo bayebi ete bakonzi oyo bazali liboso ezali nde bakonzi ya mokili oyo mpe ete bakristo basengeli kotosa bango. Kasi, botosi yango ezali na makambo nyonso te. Soki bakonzi ya mokili basɛngi biso tóbuka mibeko ya Yehova Nzambe, tokoloba lokola bantoma ya Yesu ete: “Tosengeli kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.” (Mis. 5:29) Na Mokapo 13 mpe 14 ya buku oyo, tokomona malamumalamu ndenge etinda oyo etali koboya kokɔta na makambo ya politiki esalisaki basaleli ya Nzambe.

Koyebisa basusu elikya ya bomoi ya seko ezali mpenza lokumu monene!

25. Mpo na nini tosepelaka ndenge elimo santu ekambi biso mpo tóyeba solo oyo etali Bokonzi ya Nzambe?

25 Kanisá makambo nyonso oyo etali Bokonzi, oyo bayekoli ya Kristo bayebi na boumeli ya mbula 100 oyo eleki. Toyebi mbula oyo Bokonzi ya Nzambe etyamaki na likoló mpe tomoni ete Bokonzi yango ezali na ntina mingi. Toyebi mpe malamumalamu bilikya mibale oyo bato ya sembo bazali na yango, elikya ya kokende likoló mpe ya kofanda na mabele. Mpe toyebi lisusu ndenge ya komonisa bosembo na Bokonzi ya Nzambe atako tozali kotosa bakonzi ya mokili. Omituna boye: ‘Nalingaki koyeba mateya nyonso wana soki Yesu Kristo akambaki te moombo ya sembo mpo akanga ntina ya mateya yango mpe ateya biso yango?’ Kokambama na Kristo mpe na elimo santu ezali mpenza lipamboli!

^ par. 3 Buku moko elobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na ‘kokamba’ na vɛrsɛ yango elimboli “kolakisa nzela.”

^ par. 7 Liboso, bazalaki kokanisa ete emonaneli yango elobeli etumba kati na bapakano ya Roma ná pápa ya Roma.

^ par. 10 Na sanza ya motoba ya 1880, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona elobaki ete bato 144 000 ezali Bayuda oyo bakokóma bandimi na 1914. Kasi na nsima, kaka na 1880, babimisaki ndimbola mosusu oyo ekokani mingi na boyebi oyo tozali na yango lelo.