Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 3

Yehova ayebisi bato mokano na ye

Yehova ayebisi bato mokano na ye

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Yehova amonisi mokano na ye mokemoke, kasi kaka epai ya bato oyo babangaka ye

1, 2. Ndenge nini Yehova amonisaka mokano na ye mpo na bato?

BABOTI ya malamu basololaka makambo ya libota elongo na bana na bango. Kasi, bayebaka makambo oyo bakoki koyebisa bana. Bayebisaka bango kaka makambo oyo ekokani na mbula na bango.

2 Ndenge moko mpe, Yehova amonisi mokano na ye mokemoke mpo na bato. Kasi asalaka yango kaka na ntango oyo ebongi mpenza. Tótalela mwa moke ndenge oyo Yehova amonisaki makambo oyo etali Bokonzi na ntango ya kala mpe na mikolo na biso.

Mpo na nini esɛngaki kosala Bokonzi?

3, 4. Bomoi ya bato etángamaki? Limbolá.

3 Na ebandeli, Bokonzi ya Masiya ezalaki na kati ya mokano ya Yehova te. Mpo na nini? Mpamba te ndenge oyo bomoi ya bato esengelaki kozala etángamaki te; Yehova akelaki bato na bonsomi ya kopona. Yango wana, ntango ayebisaki Adama ná Eva mokano na ye mpo na bato, alobaki: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Eba. 1:28) Lisusu, Yehova asɛngaki bango bátosa mitinda na ye na oyo etali malamu mpe mabe. (Eba. 2:16, 17) Adama ná Eva bakokaki kopona kotosa Nzambe. Soki bango mpe bana na bango bátikalaka sembo, tolingaki kozala na mposa ya Bokonzi ya Masiya te mpo ekokisa mokano ya Nzambe. Sikoyo, mbɛlɛ mabele mobimba etondi na bato ya kokoka, oyo bazali kosambela Yehova.

4 Yehova asundolaki te mokano na ye ya kotondisa mabele na bato ya kokoka likoló ya botomboki ya Satana, Adama, mpe Eva. Yehova asalelaki nde mayele mosusu mpo na kokokisa mokano yango. Mokano na ye ezali te lokola engbunduka oyo elandaka kaka nzela oyo babongiselá yango, mpe oyo ekoki kolongwa na nzela mpo na mabunga ya bato. Soki Yehova ayebisi mokano na ye, eloko moko te na molɔ́ngɔ́ mobimba ekoki kopekisa yango ekokisama. (Tángá Yisaya 55:11.) Soki mokakatano ebimi na nzela, Yehova asalelaka nzela mosusu. * (Kob. 3:14, 15) Soki amoni  malamu, ayebisaka basaleli na ye ya sembo mayele ya sika oyo akosalela mpo na kokokisa mokano na ye.

5. Yehova asalaki nini ntango botomboki ebimaki na Edene?

5 Ntango botomboki ebimaki na Edene, Yehova azwaki mokano ya kosala Bokonzi. (Mat. 25:34) Na ntango wana oyo emonanaki lokola ete bato bazali na elikya te, Yehova amonisaki eloko oyo akosalela mpo na kobikisa bato mpe kolongola mabe oyo Satana abimisaki mpo alukaki kozwa bokonzi. (Eba. 3:14-19) Atako bongo, Yehova ayebisaki makambo nyonso oyo etali Bokonzi na mbala moko te.

Yehova abandi koyebisa makambo oyo etali Bokonzi

6. Yehova alakaki nini, kasi likambo nini ayebisaki te?

6 Na esakweli ya liboso oyo Yehova abimisaki, alakaki ete “momboto” moko akoboma nyoka. (Tángá Ebandeli 3:15.) Kasi, na ntango wana, ayebisaki te soki momboto yango nani mpe momboto ya Satana nani. Kutu, Yehova ayaki kosalisa bato báyeba makambo yango nsima ya mbula soki 2 000. *

7. Mpo na nini Nzambe aponaki Abrahama, mpe yango epesi biso liteya nini?

7 Nsukansuka, Yehova aponaki Abrahama mpo momboto oyo alakamaki abima na nzela na ye. Abrahama aponamaki mpo ‘ayokaki mongongo’ ya Yehova. (Eba. 22:18) Likambo yango epesi biso liteya moko monene: Yehova amonisaka mokano na ye kaka epai ya bato oyo babangaka ye mpe batosaka ye.Tángá Nzembo 25:14.

8, 9. Makambo nini oyo etali momboto oyo alakamaki Yehova ayebisaki Abrahama mpe Yakobo?

8 Mokolo moko ntango Yehova asololaki na moninga na ye Abrahama na nzela ya anzelu, ayebisaki mpo na mbala ya liboso likambo moko ya ntina mpo na momboto oyo alakamaki: Momboto yango akozala moto. (Eba. 22:15-17; Yak. 2:23) Kasi ndenge nini moto yango akoboma nyoka? Nyoka yango nde nani? Makambo oyo Nzambe ayebisaki na nsima epesaki biyano na mituna wana.

9 Yehova amonisaki ete momboto oyo alakamaki akobima na libota ya nkɔkɔ ya Abrahama, Yakobo, moto oyo azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe. (Eba. 28:13-22) Na nzela ya Yakobo, Yehova amonisaki ete Momboto akobima na libota ya Yuda, mwana ya Yakobo. Yakobo asakolaki ete moto yango ya libota ya Yuda akozwa “lingenda ya bokonzi,” mpe “bato ya bikólo bakotosa ye.” (Eba. 49:1, 10) Na maloba wana, Yehova amonisaki ete Momboto oyo alakamaki akokóma moyangeli, to mokonzi.

10, 11. Mpo na nini Yehova ayebisaki mokano na ye epai ya Davidi mpe epai ya Danyele?

10 Mbula soki 650 na nsima, Yehova amonisaki makambo mosusu oyo etali mokano na ye epai ya Mokonzi Davidi, oyo azalaki moto ya libota ya Yuda. Yehova alobaki ete Davidi azali “moto moko oyo azali kosepelisa motema na ye.” (1 Sa. 13:14; 17:12; Mis. 13:22) Lokola Davidi azalaki kobanga Yehova mpe kotosa ye, Yehova asalaki na ye kondimana moko; alakaki ete moto moko ya libota na ye akoyangela libela na libela.2 Sa. 7:8, 12-16.

 11 Mbula soki 500 na nsima, Yehova asalelaki mosakoli Danyele mpo na koyebisa mbula ya sikisiki oyo Moto oyo atyami mafuta, to Masiya, akomonana na mabele. (Dan. 9:25) Na miso ya Yehova, Danyele azalaki “moto moko oyo alingami mingi.” Mpo na nini? Mpo Danyele azalaki kotosa Yehova na motema mobimba mpe kosalela ye ntango nyonso.Dan. 6:16; 9:22, 23.

12. Yehova ayebisaki Danyele asala nini, mpe mpo na nini?

12 Yehova asalelaki basakoli na ye ya sembo lokola Danyele mpo bákoma makambo ndenge na ndenge oyo etali Masiya, momboto oyo alakamaki; kasi na miso ya Yehova, ntango ekokaki naino te mpo basakoli yango bákanga ntina mobimba ya makambo oyo elimo santu esalisaki bango bákoma. Na ndakisa, nsima ya kopesa Danyele emonaneli ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe, Nzambe ayebisaki ye akanga esakweli yango na elembo tii na ntango oyo Yehova ye moko atye. Na ntango yango, boyebi ya sikisiki “ekokóma mingi.”Dan. 12:4.

Yehova asalelaki bato ya sembo lokola Danyele mpo bákoma makambo oyo etali Bokonzi ya Masiya

Yesu amonisi mokano ya Nzambe

13. (a) Momboto oyo alakamaki ezalaki nani? (b) Ndenge nini Yesu asalisaki bato báyeba esakweli ya Ebandeli 3:15?

13 Yehova amonisaki polele ete Yesu nde momboto oyo alakamaki, mwana ya Davidi oyo akozala Mokonzi. (Luka 1:30-33; 3:21, 22) Ntango Yesu abandaki mosala ya kosakola, ezalaki lokola nde moi engɛngisaki bato mpo báyeba mokano ya Nzambe. (Mat. 4:13-17) Na ndakisa, Yesu asalisaki bato báyeba soki “nyoka” oyo Ebandeli 3:14, 15 elobeli ezali nani mpo abengaki Zabolo “mobomi-bato” mpe “tata ya lokuta.” (Yoa. 8:44) Na emoniseli oyo Yesu apesaki Yoane, alobaki ete “nyoka ya ebandeli” nde ye “oyo babengi Zabolo mpe Satana.” * (Tángá Emoniseli 1:1; 12:9.) Kaka na emoniseli yango, Yesu amonisaki ndenge oyo ye, momboto oyo alakamaki, akokokisa esakweli oyo epesamaki na Edene mpe akoboma Satana.Em. 20:7-10.

14-16. Na siɛklɛ ya liboso, Bayekoli ya Yesu bazalaki ntango nyonso kokanga ntina ya makambo oyo Yesu azalaki koyebisa bango? Limbolá.

14 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 1 ya buku oyo, Yesu alobelaki mingi Bokonzi. Kasi, azalaki ntango nyonso te koyebisa bayekoli na ye makambo nyonso oyo bazalaki na mposa ya koyeba. Ata ntango ayebisaki bango makambo mosusu polele, bayekoli bayaki kokanga ntina ya makambo yango nyonso kaka na nsima, mbala mosusu kutu nsima ya bankama ya bambula. Tótalela mwa bandakisa.

15 Na mobu 33 T.B., Yesu alobaki polele ete bato oyo bakoyangela elongo na Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe bakouta awa na mabele mpe bakosekwa mpo na bomoi na likoló lokola bikelamu ya elimo. Nzokande, bayekoli bakangaki mbala moko te ntina ya maloba yango. (Dan. 7:18; Yoa. 14:2-5) Kaka na mbula yango, Yesu apesaki bandakisa mpo na komonisa ete nsima ya kozonga na ye na likoló, ntango molai ekoleka liboso ete Bokonzi etyama. (Mat. 25:14, 19; Luka 19:11, 12) Bayekoli bakangaki ntina te ya likambo  wana, mpamba te na nsima ntango Yesu asekwaki batunaki ye ete: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Kasi, na ntango wana, Yesu ayebisaki bango te makambo mosusu oyo etali Bokonzi. (Mis. 1:6, 7) Yesu ayebisaki mpe bayekoli na ye ete ekozala na “bampate mosusu” oyo bakozala te na kati ya “etonga moke” ya bato oyo bakoyangela elongo na ye. (Yoa. 10:16; Luka 12:32) Bayekoli ya Kristo bayebaki malamu te kokesenisa bituluku wana mibale tii na nsima ya kotyama ya Bokonzi ya Nzambe na 1914.

16 Yesu akokaki koyebisa bayekoli na ye makambo ebele ntango azalaki awa na mabele, kasi ayebaki ete bakokoka kokanga ntina na yango te. (Yoa. 16:12) Ya solo, Yesu ayebisaki bato ya siɛklɛ ya liboso makambo mingi oyo etali Bokonzi. Kasi, ntango ekokaki naino te mpo boyebi yango ekóma mingi.

Boyebi ya sikisiki ekómi mingi “na ntango ya nsuka”

17. Tosengeli kosala nini mpo tókanga ntina ya mateya oyo etali Bokonzi, kasi lisalisi nini tosengeli na yango?

17 Yehova alakaki Danyele ete “na ntango ya nsuka” bato mingi “bakotambola epai na epai, mpe boyebi ya sikisiki” ya mokano ya Nzambe ekokóma mingi. (Dan. 12:4) Bato oyo balingi boyebi yango basengeli kosala makasi mpo na kozwa yango. Buku moko elobi ete verbe ya Ebre oyo ebongolami na “kotambola epai na epai” epesaka likanisi ya moto oyo azali kotánga buku moko malamumalamu mpe na likebi mpenza. Kasi, ata soki tozali kotánga Biblia na likebi ndenge nini, tokoki kokanga ntina ya mateya oyo etali Bokonzi kaka soki Yehova asalisi biso.Tángá Matai 13:11.

18. Ndenge nini bato oyo babangaka Yehova bamonisaki kondima mpe komikitisa?

18 Kaka ndenge Yehova amonisaki mokemoke solo oyo etali Bokonzi mwa bambula liboso ya 1914, azali mpe kosala bongo na ntango oyo ya nsuka. Ndenge Mokapo 4 mpe 5  ya buku oyo ekomonisa yango, na boumeli ya mbula 100 oyo eleki, esɛngaki basaleli ya Nzambe básembola mbala na mbala boyebi na bango na makambo mosusu. Yango elingi nde koloba ete Yehova asungaka bango te? Ezali bongo te! Yehova asalisaka bango. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo bato oyo babangaka Yehova bamonisaka bizaleli mibale oyo alingaka: kondima mpe komikitisa. (Ebr. 11:6; Yak. 4:6) Basaleli ya Yehova bandimaka ete bilaka nyonso oyo ezali na Liloba ya Nzambe ekokokisama. Bamonisaka komikitisa mpo soki bayebisi ndenge bilaka ya Nzambe ekokokisama, kasi esalami bongo te, bandimaka ete bamikosaki. Komikitisa yango emonisamaki na lisolo moko oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1925, oyo elobaki: “Toyebi ete Nkolo ye moko alimbolaka Liloba na ye, mpe akolimbwela basaleli na ye Liloba na ye na ndenge oyo alingi mpe na ntango oyo amoni malamu.”

“Nkolo . . . akolimbwela basaleli na ye Liloba na ye na ndenge oyo alingi mpe na ntango oyo amoni malamu”

19. Makambo nini Yehova asalisi biso tókanga ntina na yango lelo oyo, mpe mpo na nini?

19 Ntango Bokonzi ebandaki koyangela na 1914, basaleli ya Nzambe bayebaki malamu te ndenge oyo bisakweli oyo etali Bokonzi ekokokisama. (1 Ko. 13:9, 10, 12) Mpo na mposa makasi ya komona kokokisama ya bilaka ya Nzambe, toyebisaki makambo mosusu oyo ezalaki mpenza bongo te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo totángaki na paragrafe eleki elobaki likambo mosusu ya bwanya oyo na boumeli ya bambula, emonanaki ete ezali solo. Elobaki boye: “Emonani ete eleki malamu tóyeba ete tokoki kokanga ntina ya bisakweli kaka soki ekokisami to ntango ebandi kokokisama.” Sikoyo lokola mikolo ya nsuka epusani mpenza, bisakweli mingi oyo etali Bokonzi ekokisami mpe mosusu ezali kokokisama. Lokola basaleli ya Nzambe bazali bato ya komikitisa mpe bandimaka kosembolama, Yehova asalisi biso tóyeba mokano na ye malamu mingi koleka. Boyebi ya sikisiki ekómi mingi!

 Bingɛngiseli emekaka basaleli ya Nzambe

20, 21. Ndenge nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso batalelaki bingɛngiseli?

20 Ntango Yehova asemboli boyebi na biso, motema na biso emekamaka. Kondima mpe komikitisa ekotinda biso tóndima mbongwana? Bakristo oyo bazalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso bakutanaki na komekama ya ndenge wana. Kanisá soki ozalaki Moyuda mpe okómi mokristo na ntango wana. Omesaná kotosa Mibeko ya Moize mpe osepelaka mpo ozali moto ya ekólo Yisraele. Sikoyo ntoma Paulo atindi mikanda oyo akomi na lisalisi ya elimo ya Nzambe, oyo elobi ete esɛngisami lisusu te kotosa Mibeko mpe ete Yehova aboyi ekólo Yisraele, mpe asali ekólo ya sika, Yisraele ya elimo, oyo ekozala na Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu. (Rom. 10:12; 11:17-24; Gal. 6:15, 16; Kol. 2:13, 14) Olingaki kosala nini?

21 Bakristo oyo bazalaki na komikitisa bandimaki makambo oyo Paulo alobaki na lisalisi ya elimo santu mpe Yehova apambolaki bango. (Mis. 13:48) Bato mosusu baboyaki kondima bingɛngiseli mpe balingaki kotingama kaka na boyebi na bango. (Gal. 5:7-12) Baoyo baboyaki kobongola makanisi na bango bazangaki libaku ya koyangela elongo na Kristo.2 Pe. 2:1.

22. Ndenge nini otalelaka bingɛngiseli oyo tozwaka na oyo etali boyebi na biso ya mokano ya Nzambe?

22 Na bambula oyo, Yehova asemboli boyebi na biso na makambo oyo etali Bokonzi. Na ndakisa, asalisi biso tóyeba ntango oyo bato ya batosi, oyo bazali lokola bampate, bakokabolama na bato ya motó makasi, oyo bazali lokola bantaba. Lisusu, asalisi biso tóyeba ntango oyo motángo ya bato 144 000 ekokoka, tókanga ntina ya bandakisa oyo Yesu apesaki mpo na Bokonzi, mpe tóyeba ntango oyo moto ya nsuka kati na bato 144 000 akosekwa mpo na bomoi na likoló. * Ndenge nini otalelaka bingɛngiseli yango? Ekómisaka kondima na yo makasi? Omonaka makambo yango lokola elembo oyo emonisi ete Yehova azali kokoba koteya basaleli na ye oyo bazali na komikitisa? Makambo oyo tokoyekola na mikapo elandi ekosalisa yo ondima lisusu mpenza ete Yehova azali komonisa mokano na ye mokemoke epai ya bato oyo babangaka ye.

^ par. 4 Nkombo ya Nzambe na Ebre euti na verbe moko oyo elimboli “kokóma.” Nkombo Yehova elakisi ete azali Mokokisi ya bilaka na ye. Talá etanda “Ndimbola ya nkombo ya Nzambe,” na lokasa 43.

^ par. 6 Lelo oyo, tokoki komona bambula yango ebele mpenza, kasi tóbosana te ete bato ya kala bazalaki na bomoi ya molai mpenza; banda na Adama tii na Abrahama, kaka bomoi ya bato minei nde ekutanaki. Bomoi ya Adama ekutanaki na bomoi ya Lameke, tata ya Noa. Bomoi ya Lameke ekutanaki na bomoi ya Seme, mwana ya Noa. Bomoi ya Seme ekutanaki na bomoi ya Abrahama.Eba. 5:5, 31; 9:29; 11:10, 11; 25:7.

^ par. 13 Makomami ya Ebre esaleli liloba “Satana” mbala 18. Kasi, Makomami ya Grɛki ya bokristo esaleli liloba “Satana” mbala koleka 30. Yango ebongi mpenza mpo Makomami ya Ebre elobelaki Satana mingi te; elobelaki mingimingi nde makambo oyo ekosalisa bato báyeba Masiya. Ntango Masiya ayaki, amonisaki Satana polele, mpe Makomami ya Grɛki ya bokristo elobeli yango.

^ par. 22 Mpo na komona makambo mosusu oyo esembolamaki na boyebi na biso, talá banimero oyo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: 15/10/1995, nkasa 23-28; 15/01/2008, nkasa 20-24; 15/07/2008, nkasa 17-21; 15/07/2013, nkasa 9-14..