Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 10

Mokonzi apɛtoli bato na ye na elimo

Mokonzi apɛtoli bato na ye na elimo

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ntina oyo Yesu apɛtoli bayekoli na ye na elimo, mpe ndenge oyo asali yango

1-3. Yesu asalaki nini ntango amonaki ete bato bazali kobebisa tempelo?

YESU azalaki mpenza komemya tempelo ya Yerusaleme mpo ayebaki eloko oyo yango ezalaki komonisa. Banda kala, tempelo ezalaki esika oyo losambo ya solo ezalaki kosalema awa na mabele. Kasi, losambo yango esengelaki kozala pɛto mpo ezalaki losambo ya Yehova, Nzambe mosantu. Kanisá sikoyo ndenge Yesu ayokaki ntango akɔtaki na tempelo na mokolo ya 10 Nisana ya mobu 33 T.B., mpe akutaki bato bazali kobebisa tempelo yango. Bazalaki kosala nini?Tángá Matai 21:12, 13.

2 Na kati ya tempelo, bato ya mombongo ya lokoso ná bato oyo basenzaka mbongo bazalaki kolyela basaleli ya Nzambe oyo bazalaki koya kopesa Yehova makabo. * Yesu “abwakaki libándá baoyo nyonso bazalaki kotɛka mpe kosomba na tempelo, mpe abalolaki bamesa ya bato oyo basenzaka mbongo.” (Talá mpe Nehemia 13:7-9.) Amonisaki ete bato yango bazalaki koluka kaka matomba na bango moko mpe bakómisaki ndako ya Tata na ye “mobenga ya miyibi.” Na ndenge yango, Yesu amonisaki ete azali komemya tempelo mpe eloko oyo yango ezalaki komonisa. Losambo ya Tata na ye esengelaki kozala ntango nyonso pɛto!

3 Bankama ya bambula na nsima, ntango Yesu Masiya akómaki Mokonzi, apɛtolaki lisusu tempelo moko, oyo etaleli bato nyonso oyo balingi ete Yehova andima losambo na bango. Tempelo nini apɛtolaki?

Kopɛtola “bana ya Levi”

4, 5. (a) Ndenge nini bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo bapɛtolamaki kobanda na 1914 tii na ebandeli ya 1919? (b) Kopɛtola basaleli ya Nzambe esukaki wana? Limbolá.

4 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2 ya buku oyo, nsima ya kotyama Mokonzi na 1914, Yesu ayaki elongo na Tata na ye mpo na kotala tempelo ya elimo, elingi koloba losambo ya pɛto. * Nsima ya kotalatala tempelo yango, Mokonzi amonaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo, to “bana ya Levi,” basengeli kopɛtolama na makambo mosusu. (Mal. 3:1-3) Kobanda 1914 tii na ebandeli ya 1919, Yehova, oyo azali lokola monyangwisi-bibende, atikaki ete basaleli na ye bákutana na komekama mpe mikakatano ya ndenge na ndenge mpo enyangwisa bango mpe epɛtola bango. Likambo ya esengo, nsima ya komekama makasi ndenge wana, bakristo yango  oyo batyami mafuta na elimo bapɛtolamaki, babongisamaki, mpe bamonisaki ete balingi mpenza kosalela Mokonzi Masiya!

5 Kopɛtola basaleli ya Nzambe esukaki kaka wana? Te. Na boumeli ya mikolo ya nsuka, Yehova, na nzela ya Masiya Mokonzi, azali kokoba kosalisa bayekoli ya Yesu bázala pɛto mpo bátikala na kati ya tempelo ya elimo. Na mikapo mibale oyo elandi, tokomona ndenge apɛtoli bango na bizaleli mpe asalisi bango báyeba kotambwisa makambo na lisangá. Kasi liboso, tólobela naino kopɛtolama ya elimo. Kondima na biso ekolendisama soki totaleli makambo nyonso oyo Yesu asali—na ndenge ya polele mpe na ndenge oyo tokoki komona te—mpo na kosalisa bayekoli na ye bázala pɛto na elimo.

“Bómibatela pɛto”

6. Na kolanda mitindo oyo Yehova apesaki Bayuda oyo bazalaki na boombo, kozala pɛto na elimo elimboli nini?

6 Bopɛto ya elimo elimboli nini? Mpo na kozwa eyano, tótalela makambo oyo Yehova alobaki na Bayuda mwa moke liboso bálongwa na boombo ya Babilone na mobu 537 L.T.B. (Tángá Yisaya 52:11.) Bayuda yango bazalaki kozonga na mboka na bango Yerusaleme libosoliboso mpo na kotonga lisusu tempelo mpe kozongisa losambo ya solo. (Ezr. 1:2-4) Yehova alingaki ete basaleli na ye bábima ata na likambo moko te oyo ezalaki na boyokani na lingomba ya Babilone. Tósimba ete apesaki bango mitindo ebele; alobaki: “Bósimba eloko moko ya mbindo te”, “bóbima na kati na ye,” mpe “bómibatela pɛto.” Losambo ya pɛto ya Yehova esengelaki kozala na boyokani ata moke te na losambo ya lokuta. Na yango, tokoki koloba nini? Kozala pɛto na elimo elimboli koboya mateya mpe misala ya mangomba ya lokuta.

7. Nzela nini Yesu asaleli mpo na kosalisa bayekoli na ye bázala pɛto na elimo?

7 Mwa moke nsima ya kotyama Mokonzi, Yesu abongisaki nzela moko ya polele oyo akosalela mpo na kosalisa bayekoli na ye bázala pɛto na elimo. Nzela yango ezali moombo ya sembo mpe ya mayele, oyo Kristo atyaki na 1919. (Mat. 24:45) Na mbula yango, Bayekoli ya Biblia basilaki kotika mateya ebele ya mangomba ya lokuta. Atako bongo, basengelaki kopɛtolama lisusu na elimo. Na nzela ya moombo ya sembo, Kristo asalisi bayekoli na ye mokemoke mpo báyeba solo na oyo etali bafɛti mpe mimeseno oyo basengelaki kotika. (Mas. 4:18) Tótala mwa bandakisa.

Bakristo basengeli kosala fɛti ya Noele?

8. Banda kala, Bayekoli ya Biblia bayebaki likambo nini mpo na fɛti ya Noele, kasi nini bazalaki komona polele te?

8 Bayekoli ya Biblia bayebaki banda kala ete fɛti ya Noele ebandá epai ya bapakano mpe ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Décembre te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya zomi na mibale ya 1881 elobaki ete: “Bamilio ya bato oyo bazalaki bapakano bazali kokɔta na mangomba. Kasi mbongwana oyo esalemi ezali mingimingi kaka ya maloba, mpo basango ya bapakano bakómi basango ya bakristo mpe bafɛti ya bapakano ekómi kobengama na bankombo ya bakristo: Noele ezali  moko ya bafɛti yango.” Na 1883, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaki lisolo moko oyo elobaki “Yesu abotamaki ntango nini?” Lisolo yango elobaki ete ntango mosusu Yesu abotamaki na ebandeli ya sanza ya zomi. * Atako bongo, na ntango wana Bayekoli ya Biblia bazalaki komona polele te ntina ya kotika kosala fɛti ya Noele. Ata bandeko ya Betele ya Brooklyn bakobaki kosala fɛti yango. Kasi nsima ya 1926, makambo ebandaki kobongwana. Mpo na nini?

9. Likambo nini Bayekoli ya Biblia bayaki koyeba mpo na fɛti ya Noele?

9 Nsima ya koyekola likambo yango malamumalamu, Bayekoli ya Biblia bayaki komona ete Noele mpe milulu na yango epesaka Nzambe nkembo ata moke te. Lisolo “Esika Noele eutá,” oyo ebimaki na L’Âge d’Or ya 14/12/1927, elobaki ete Noele ezali fɛti ya bapakano, etindaka kaka na bisengo, mpe ezali na losambo ya bikeko na kati na yango. Lisolo yango elobaki polele ete Kristo asɛngaki te ete fɛti yango esalemaka, na nsuka elobaki polele mpo na Noele ete: “Lokola fɛti yango mpe milulu na yango esepelisaka mingimingi mokili, nzoto, mpe Zabolo . . . yango esalisi bato oyo bamipesi mobimba na mosala ya Yehova bámona ete bakoki soki moke te kosala fɛti yango.” Yango wana, bandeko ya Betele basalaki fɛti ya Noele te na mbula wana, mpe esalemaki lisusu te!

10. (a) Diskur nini oyo elobelaki fɛti ya Noele esalemaki na 1928? (Talá mpe etanda “ Ebandeli ya Noele mpe ntina na yango.”) (b) Ndenge nini basaleli ya Nzambe bayebaki bafɛti mosusu oyo basengelaki koboya? (Talá etanda “ Bamonisi mabe ya bafɛti mpe milulu mosusu.”)

10 Na mbula oyo elandaki, Bayekoli ya Biblia bayokaki makambo mosusu oyo elobelaki malamumalamu fɛti ya Noele. Na mokolo ya 12/12/1928, Richard Barber, ndeko moko oyo azalaki kosala na biro monene, asalaki diskur moko oyo elekaki na radio, oyo emonisaki polelepolele ete fɛti ya Noele eutá  na bapakano. Basaleli ya Nzambe basalaki nini ntango bayokaki malako wana ya polele oyo eutaki na biro monene? Ndeko Charles Brandlein ayebisaki ndenge ye ná libota na ye batikaki kosala fɛti ya Noele; alobaki ete bayokaki ata mawa moke te kotika makambo wana ya bapakano. Abakisaki boye: “Ezalaki kaka lokola kozwa elamba moko ya salite mpe kobwaka yango.” Ndeko mosusu mpe, Henry Cantwell, oyo na nsima akómaki mokɛngɛli-motamboli, alobaki ete: “Tosepelaki mingi ndenge tolongaki kotika kosala likambo moko mpo na komonisa ete tolingaka Yehova.” Bayekoli ya sembo ya Kristo bandimaki kobongola makambo oyo esengelaki mpe batikaki kosala fɛti oyo eutaki na losambo ya mbindo. *Yoa. 15:19; 17:14.

11. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na ngámbo ya Mokonzi Masiya?

11 Bayekoli ya Biblia ya sembo bazali mpenza ndakisa malamu mpo na biso! Yango wana, tosengeli komituna boye: ‘Ndenge nini natalelaka malako oyo eutaka na biro monene? Nandimaka yango na motema moko mpe nasalelaka yango?’ Soki tozali kotosa na motema moko, tokomonisa ete tozali na ngámbo ya Mokonzi Masiya, oyo azali kosalela moombo ya sembo mpo na kopesa biso bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.Mis. 16:4, 5.

Bakristo basengeli kosalela ekulusu?

Elembo ya ekulusu ná motole (Talá paragrafe 12 mpe 13)

12. Na boumeli ya bambula mingi, ndenge nini Bayekoli ya Biblia bazalaki kotalela ekulusu?

12 Na boumeli ya bambula mingi, Bayekoli ya Biblia bazalaki kondima ekulusu mpe komona ete ezali elembo ya bakristo. Atako bongo, bazalaki komona ete basengeli kosambela  yango te, mpo bayebaki ete losambo ya bikeko ezali mabe. (1 Ko. 10:14; 1 Yoa. 5:21) Kala, na 1883, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki polele ete “losambo nyonso ya bikeko ezali kotuka Nzambe.” Kasi, na ebandeli Bayekoli ya Biblia bazalaki komona mabe moko te kosalela ekulusu na ndenge oyo bakanisi ete ezali malamu. Na ndakisa, bazalaki kosepela mingi kolata elembo ya ekulusu ná motole. Mpo na bango, ezalaki komonisa ete soki batikali sembo tii na liwa, bakozwa motole ya bomoi. Kobanda na 1891, elembo ya ekulusu ná motole ekómaki kotyama na ezipeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.

13. Bingɛngiseli nini bayekoli ya Kristo bazwaki na oyo etali kosalela ekulusu? (Talá mpe etanda “ Bingɛngiseli mpo na ekulusu eyei mokemoke.”)

13 Bayekoli ya Biblia bazalaki kolinga mpenza elembo ya ekulusu ná motole. Kasi, na nsuka ya bambula ya 1920, bayekoli ya Kristo bazwaki bingɛngiseli mokemoke na oyo etali kosalela ekulusu. Ndeko Grant Suiter, oyo na nsima akómaki kosala na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki liyangani moko oyo esalemaki na 1928 na engumba Detroit, na États-Unis. Alobaki boye: “Na liyangani yango basukaki kaka te na komonisa ete elembo ya ekulusu ná motole ezali na ntina te, bamonisaki mpe ete ezali mabe mpenza.” Na bambula oyo elandaki, bingɛngiseli mosusu eyaki. Emonanaki polele ete ekulusu ezali na esika te na losambo ya pɛto.

14. Basaleli ya Nzambe basalaki nini nsima ya kozwa bingɛngiseli na oyo etali ekulusu?

14 Basaleli ya Nzambe basalaki nini ntango bazwaki bingɛngiseli mokemoke na oyo etali ekulusu? Batingamaki kaka na kosalela elembo ya ekulusu ná motole, mpo bazalaki kolinga yango mingi? Ndeko Lela Roberts, oyo asaleli Nzambe bambula ebele, alobaki boye: “Ntango toyebaki ndimbola ya ekulusu, totikaki yango mbala moko.” Ndeko mwasi mosusu na nkombo Ursula Serenco amonisaki makanisi oyo bandeko mingi mpe bazalaki na yango; alobaki boye: “Tokangaki ntina ete eloko oyo tozalaki kolinga mingi mpo tozalaki kokanisa ete ezali elembo ya liwa ya Nkolo na biso mpe ezali komonisa ete tozali bakristo oyo bamipesá ezalaki nde elembo ya bapakano. Na kolanda Masese 4:18, tosepelaki mingi ndenge nzela na biso engɛngaki makasi.” Bayekoli ya sembo ya Kristo balingaki ata moke te kosala makambo ya mbindo ya mangomba ya lokuta!

15, 16. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na ekateli ya kobatela tempelo ya elimo pɛto?

15 Biso mpe lelo oyo tozali na ekateli ya ndenge wana. Toyebi ete Kristo azali kosalela moombo ya sembo mpe ya mayele mpo na kosalisa bayekoli na ye bázala ntango nyonso pɛto na elimo. Na yango, soki bilei ya elimo oyo tozwaka ekebisi biso na milulu, misala, to mimeseno oyo eutá na mangomba ya lokuta, tosengeli kotosaka na mbala moko. Ndenge moko na bandeko na biso oyo bazalaki na bomoi na ebandeli ya eleko ya kozala ya Kristo, tozali na ekateli ya kobatela pɛto lopango ya mabele ya tempelo ya elimo ya Yehova.

16 Na boumeli ya mikolo ya nsuka, Kristo azali mpe kosala na ndenge oyo tokoki komona te mpo na kobatela masangá ya Batatoli ya Yehova na bato oyo bakoki kobebisa yango  na elimo. Ndenge nini azali kosala yango? Tólobela yango naino.

Kokabola “bato mabe na bayengebene”

17, 18. Na ndakisa ya monyama, nini elakisi (a) kobwaka monyama, (b) kokanga “mbisi ya ndenge nyonso,” (c) kotya mbisi ya malamu na bikɔlɔ, mpe (d) kobwaka mbisi oyo ebongi te?

17 Mokonzi Yesu Kristo akɛngɛlaka masangá ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba. Na ndenge oyo biso tokoki komona polele te, Kristo ná baanzelu basalaka mosala moko ya kokabola. Yesu alobelaki mosala yango na ndakisa ya monyama. (Tángá Matai 13:47-50.) Ndakisa yango elimboli nini?

Monyama ezali elilingi ya mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali kosalema na mokili, elingi koloba mbu (Talá paragrafe 18)

18 Kobwaka “monyama . . . na mbu.” Monyama ezali elilingi ya mosala ya kosakola Bokonzi oyo ezali kosalema na mokili, elingi koloba mbu. Kokanga “mbisi ya ndenge nyonso.” Nsango malamu ebendaka bato ya lolenge nyonso: baoyo basalaka makasi mpe bakómaka bakristo ya solo, mpe bato mosusu ebele oyo na ebandeli bamonisaka lokola basepeli na solo, kasi bazwaka te ekateli ya kokɔta na losambo ya solo. * Kotya “oyo ya malamu na bikɔlɔ.” Bato oyo bandimi solo bakɔtaka na bikɔlɔ, elingi koloba masangá, epai bapesaka Yehova losambo ya pɛto. Kobwaka mbisi “oyo ya mabe.” Na boumeli ya mikolo ya nsuka, Kristo ná baanzelu bazali kokabola “bato mabe na bayengebene.” * Na yango, batikaka te ete bato oyo babongi te, mbala mosusu oyo balingi te kotika mateya ya lokuta to misala ya mabe, bákómisa masangá mbindo. *

19. Oyokaka ndenge nini lokola Kristo azali kokoba kobatela bopɛto ya basaleli ya Nzambe mpe bopɛto ya losambo ya solo?

19 Koyeba ete Mokonzi Yesu Kristo azali kobatela bayekoli na ye ezali mpenza kokitisa biso motema, boye te? Koyeba ete molende na ye mpo na losambo ya solo, mpe mpo na basambeli ya solo, ezali kaka makasi ndenge ezalaki ntango apɛtolaki tempelo na siɛklɛ ya liboso ezali likambo ya kobɔndisa, boye te? Tozali mpenza na botɔndi ndenge Kristo azali kosala mpo na kobatela basaleli ya Nzambe mpo bázala pɛto na elimo mpe mpo na kobatela bopɛto ya losambo ya solo! Tokoki komonisa ete tozali na ngámbo ya Mokonzi mpe ya Bokonzi na ye soki toboyi likambo nyonso ya mangomba ya lokuta.

^ par. 2 Bayuda oyo bauti na bingumba mosusu basengelaki kofuta mpako ya mbula mpo na tempelo, mpe bato oyo basenzaka mbongo bazalaki kolyela bango. Longola yango, ntango mosusu Bayuda yango mpe basengelaki kosomba banyama mpo na mbeka. Yesu abengaki bato wana “miyibi,” mbala mosusu mpo bazalaki kotya ntalo mingi.

^ par. 4 Lelo oyo, basaleli nyonso ya Yehova basambelaka ye na lopango ya mabele ya tempelo monene ya elimo.

^ par. 8 Lisolo yango elobaki ete koloba ete Yesu abotamaki na eleko ya malili (hiver) “eyokani te na lisolo oyo elobi ete babateli ya mpate bazalaki kobatela bibwɛlɛ na bango libándá.”Luka 2:8.

^ par. 10 Na mokanda oyo ndeko Frederick Franz akomelaki moto moko na mokolo ya 14/11/1927, alobaki boye: “Mbula oyo, tokosala fɛti ya Noele te. Tozwi ekateli na libota ya Betele ete tokosala lisusu fɛti ya Noele te.” Mwa basanza na nsima, na mokanda mosusu oyo ndeko Franz akomaki na mokolo ya 06/02/1928, alobaki ete: “Nkolo azali kopɛtola biso mokemoke mpo tólongwa na mabunga ya Babilone, ebongiseli ya Zabolo.”

^ par. 18 Na ndakisa, na 2013 basakoli bazalaki 7 965 954, nzokande baoyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo bazalaki 19 241 252.

^ par. 18 Kokabola mbisi ya malamu na mbisi ya mabe ekeseni na kokabola bampate na bantaba. (Mat. 25:31-46) Kokabola bampate na bantaba, to lisambisi ya nsuka, ekosalema na ntango ya bolɔzi monene oyo ezali koya. Liboso tókóma kuna, baoyo bazali lokola mbisi ya mabe bakoki kozonga epai ya Yehova mpe kokɔta na bikɔlɔ, to masangá.Mal. 3:7.

^ par. 18 Nsukansuka, baoyo babongi te bakobwakama na litumbu ya mɔtɔ ya elilingi, elingi koloba bakobomama.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

‘Okangi ntina’?

Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni oyo alalaki, ya monyama, mpe ya mwana ya mobulu elimboli nini?