Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 12

Babongisami mpo na kosalela “Nzambe ya kimya”

Babongisami mpo na kosalela “Nzambe ya kimya”

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Yehova abongisi basaleli na ye mokemoke

1, 2. Mbongwana nini esalemaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona na sanza ya yambo 1895, mpe bandeko balobaki nini?

NTANGO azwaki nimero na ye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona ya sanza ya yambo 1895, John Bohnet, oyo azalaki Moyekoli ya Biblia moko ya molende, asepelaki makasi na ezipeli na yango ya sika. Ezalaki na elilingi ya ndako moko molai oyo ezali na miinda makasi mpe efandi likoló ya mbu moko ya mbonge, kongɛnga ya miinda yango ekɔti tii na mapata ya moindo. Liyebisi oyo ezalaki na kati mpo na kolobela ezipeli yango ezalaki na motó ya likambo “Elamba ya sika.”

2 Ndeko Bohnet akamwaki makasi mpe akomelaki ndeko Russell mokanda. Alobaki boye: “Nazali na esengo mingi ya komona LINƆ́NGI na ezipeli ya kitoko boye. Ebimi kitoko mpenza.” John Brown, Moyekoli ya Biblia mosusu ya sembo, alobelaki mpe ezipeli yango; akomaki boye: “Ezali mpenza kobenda likebi. Linɔ́ngi yango epikami makasi mpenza atako mbonge ezali kobɛtabɛta yango.” Ezipeli wana ezalaki mbongwana ya liboso oyo esalemaki na mbula wana, kasi ezalaki ya nsuka te. Na sanza ya zomi na moko, mbongwana mosusu ya monene esalemaki. Likambo ya kokamwa, etalelaki mpe mbu oyo ezali na mbonge.

3, 4. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1895 elobaki nini, mpe eyebisaki likambo nini oyo ekɔtisaki mbongwana monene?

3 Lisolo moko molai oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/11/1895 elobaki ete mikakatano oyo ezalaki lokola mbonge ezali kobebisa kimya na kati ya ebongiseli ya Bayekoli ya Biblia. Bandeko ya masangá bazalaki ntango nyonso kowelana mpo na koyeba soki nani asengeli kokamba lisangá. Mpo na kosalisa bandeko bámona ete basengeli koboya elimo wana oyo ezalaki komema bokabwani, lisolo yango elobaki ete lisangá ezali lokola masuwa. Na nsima, emonisaki polele ete bandeko oyo bazalaki kokamba babongisaki masuwa yango te liboso mbonge eya. Basengelaki kosala nini?

4 Lisolo wana emonisaki ete kapitɛni ya malamu alukaka koyeba soki biloko oyo ebikisaka bomoi ya bato ezali na kati ya masuwa mpe soki basali nyonso bamibongisi malamu mpo na kobundisa mbonge oyo ekoki koya. Ndenge moko mpe, baoyo bazalaki kokamba ebongiseli ya Bayekoli ya Biblia basengelaki koyeba soki masangá nyonso ebongisamaki  mpo na kobundisa mikakatano oyo ekokani na mbonge. Mpo na yango, lisolo wana eyebisaki likambo moko oyo ekɔtisaki mbongwana moko monene mpenza. Elobaki ete “lisangá mokomoko esengeli kopona bankulutu” mpo “‘bákɛngɛlaka’ etonga.”Mis. 20:28.

5. (a) Mpo na nini ebongiseli ya kopona bankulutu ezalaki bilei oyo eyaki na ntango oyo ebongi? (b) Mituna nini tokotalela?

5 Ebongiseli wana ya kopona bankulutu ezalaki bilei oyo eyaki na ntango oyo ebongi na oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá. Esalisaki bandeko bálonga mikakatano oyo eutaki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na bambula oyo elandaki, makambo mosusu oyo ebongwanaki na oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá esalisaki basaleli ya Nzambe bakóma bato oyo bazali na nyonso oyo esengeli mpo na kosalela Yehova. Esakweli nini ya Biblia elobelaki likambo yango? Mbongwana nini oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá esalemi na miso na yo? Ndenge nini ezali kosalisa yo?

“Nakotya kimya ezala bakɛngɛli na yo”

6, 7. (a) Maloba ya Yisaya 60:17 elimboli nini? (b) Ndenge Yehova alobelaki “bakɛngɛli” mpe ‘bato oyo bapesaka mosala’ emonisi nini?

6 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 9, Yisaya asakolaki ete Yehova akopambola basaleli na ye mpe motángo na bango ekobakisama. (Yis. 60:22) Kasi, esuki wana te. Kaka na esakweli yango, Yehova alakaki ete: “Na esika ya motako nakotya wolo, mpe na esika ya ebende nakotya palata, mpe na esika ya nzete, motako, mpe na esika ya mabanga, ebende; mpe nakotya kimya ezala bakɛngɛli na yo mpe boyengebene ezala bato oyo bapesaka yo mosala.” (Yis. 60:17) Esakweli yango elimboli nini? Ndenge nini ezali kokokisama lelo oyo?

Mbongwana yango ezali mpo makambo ebonga, kasi te mpo ebeba

7 Esakweli ya Yisaya elobaki ete eloko moko ekozwa esika ya eloko mosusu. Kasi, tósimba ete mbongwana yango ezali mpo makambo ebonga, kasi te mpo ebeba. Kotya wolo na esika ya motako elimboli kobongisa makambo; ezali mpe bongo mpo na biloko mosusu oyo vɛrsɛ yango elobeli. Na yango, na maloba wana ya elilingi, Yehova alakaki ete makambo ya basaleli na ye ekobonga mokemoke. Esakweli yango elobelaki kobonga ya ndenge nini? Ndenge Yehova alobelaki “bakɛngɛli” mpe ‘bato oyo bapesaka mosala,’ emonisi ete makambo ekobonga mokemoke na oyo etali kobatela basaleli na ye mpe kotambwisa makambo na lisangá.

8. (a) Mbongwana oyo esakweli ya Yisaya elobeli eutaka epai ya nani? (b) Ndenge nini mbongwana yango esalisaka biso? (Talá mpe etanda “ Amikitisaki mpe andimaki disiplini.”)

8 Nani asalaka ete makambo ebonga? Yehova alobaki ete: “Nakotya wolo . . . nakotya palata . . . mpe nakotya kimya.” Ya solo, Yehova nde asalaka ete ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá ebonga, kasi bato te. Mpe banda Yesu atyamá Mokonzi, Yehova azali kobongisa makambo na nzela ya Mwana na ye. Matomba nini tozwi? Kaka vɛrsɛ yango elobi ete makambo yango ekomema “kimya” mpe “boyengebene.” Soki tondimi litambwisi ya Nzambe mpe tosali mbongwana, tokozala na kimya kati na biso mpe bolingo ya boyengebene ekotinda biso tósalela Yehova, oyo ntoma Paulo abengaki “Nzambe ya kimya.”Flp. 4:9.

9. Mpo na nini makambo etambolaka na molɔngɔ mpe bomoko ezalaka na lisangá?

 9 Ntoma Paulo akomaki ete Yehova “azali Nzambe, ya mobulu te, kasi ya kimya.” (1 Ko. 14:33) Tósimba ete na esika Paulo asalela liloba molɔngɔ, oyo basalelaka mpo na kolobela eloko oyo ezali na mobulu te, asalelaki nde liloba kimya. Mpo na nini? Kosala makambo na molɔngɔ ebimisaka ntango nyonso kimya te. Na ndakisa, basoda batambolaka na molɔngɔ ntango bakei kokutana na banguna, nzokande molɔngɔ wana ememaka kimya te, kasi nde etumba. Na yango, biso bakristo tosengeli kosimba likambo oyo: Ebongiseli nyonso oyo etambwisami na molɔngɔ kasi ezali na kimya te, nsukansuka ekweaka. Nzokande, kimya ya Nzambe etyaka molɔngɔ oyo eumelaka libela. Yango wana, tozali mpenza na botɔndi ndenge “Nzambe oyo apesaka kimya” azali kotambwisa mpe kopɛtola ebongiseli na biso! (Rom. 15:33) Kimya oyo Nzambe apesaka nde esali ete makambo etambolaka na molɔngɔ mpe bomoko ya solosolo ezala na kati ya masangá na biso na mokili mobimba.Nz. 29:11.

10. (a) Mbongwana nini oyo etali ndenge ya kotambwisa makambo na lisangá esalemaki na bambula oyo eleki? (Talá etanda “ Mbongwana na oyo etali kopona bankulutu.”) (b) Mituna nini tokotalela?

10 Etanda “ Mbongwana na oyo etali kopona bankulutu” elobeli na mokuse mbongwana ya malamu oyo esalemaki na lisangá na bambula oyo eleki mpo na kotya molɔngɔ. Kasi na bambula oyo, ndenge nini Yehova ‘atye wolo na esika ya motako’ na nzela ya Mokonzi na biso? Ndenge nini mbongwana oyo esalemi na oyo etali kokamba lisangá elendisi kimya mpe bomoko na masangá na mokili mobimba? Ndenge nini mbongwana yango ezali kosalisa yo osalela “Nzambe ya kimya”?

Ndenge oyo Kristo azali kotambwisa lisangá

11. (a) Boyekoli ya Makomami esalisaki bandeko básosola likambo nini? (b) Bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi basalaki nini?

11 Kobanda 1964 tii na 1971, lisangani ya mikóló-bakambi eponaki mwa bandeko mpo báyekola malamumalamu makambo ndenge na ndenge na kati ya Biblia; na ndakisa bayekolaki ndenge lisangá ya bokristo ezalaki na siɛklɛ ya liboso. * Na oyo etali ndenge makambo esengeli kotambola na kati ya lisangá, bayekolaki ete na siɛklɛ ya liboso, lisangani mobimba ya bankulutu nde ezalaki kokɛngɛla lisangá, kasi te kaka nkulutu, to mokɛngɛli moko. (Tángá Bafilipi 1:1; 1 Timote 4:14.) Ntango bakangaki malamu ntina ya likambo yango, lisangani ya mikóló-bakambi emonaki ete Mokonzi Yesu azali kotambwisa bango mpo bábongola ndenge oyo makambo ezalaki kotambola na lisangá ya basaleli ya Nzambe; bandeko ya lisangani ya mikóló-bakambi bandimaki litambwisi yango. Babandaki mbala moko kolanda malako oyo Biblia epesi na oyo etali kotya bankulutu na lisangá. Mbongwana nini esalemaki na ebandeli ya bambula ya 1970?

12. (a) Mbongwana nini esalemaki na kati ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi? (b) Monisá ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami lelo oyo. (Talá etanda “ Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kotambwisa mosala ya Bokonzi.”

12 Mbongwana ya liboso esalemaki na kati ya lisangani ya mikóló-bakambi yango moko. Liboso, lisangani ya mikóló-bakambi ezalaki kaka na bandeko mibali nsambo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki mpe bakambi ya la Société (Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania). Kasi  na 1971, lisangani ya mikóló-bakambi ekómaki na bandeko 11 mpe bazalaki lisusu bakambi ya la Société te. Bandeko yango bayebaki ete bazali bango nyonso ndenge moko; na yango mokomoko na ngala na ye akómaki kotambwisa makita ya lisangani ya mikóló-bakambi na boumeli ya mbula mobimba.

13. (a) Makambo ezalaki kotambola ndenge nini na lisangá na boumeli ya mbula 40? (b) Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaki nini na 1972?

13 Mbongwana oyo esalemaki na nsima etalelaki lisangá mokomoko. Na ndenge nini? Kobanda 1932 tii na 1972, elingi koloba na boumeli ya mbula 40, ndeko moko kaka nde azalaki kokamba lisangá. Tii na 1936, bazalaki kobenga ndeko yango mokambi ya mosala. Na nsima, bakómaki kobenga ye mosaleli ya lisangá, mpe nsukansuka mokɛngɛli ya lisangá. Bandeko oyo bazalaki kotyama na mokumba yango bazalaki komibanzabanza mpenza mpo na bolamu ya etonga. Mbala mingi, mokɛngɛli ya lisangá azalaki kozwa bikateli kozanga atuna basaleli mosusu na lisangá. Kasi, na 1972, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaki mbongwana moko ya monene. Mbongwana nini?

14. (a) Ebongiseli nini ebandaki na mokolo ya 01/10/1972? (b) Ndenge nini mokambi-misala ya bankulutu akomonisa ete alandaka toli oyo ezali na Bafilipi 2:3?

14 Lisangani ya Mikóló-Bakambi elobaki ete na esika ndeko moko kaka asalaka lokola mokɛngɛli na lisangá, bandeko mibali mosusu oyo bakokisi masɛngami ya Biblia bakobanda mpe kotyama bankulutu na lisangá. Bango nyonso bakozala lisangani ya bankulutu oyo ekotambwisa lisangá. Ebongiseli wana ya sika ya kotya bankulutu ebandaki na mokolo  ya 01/10/1972. Lelo oyo, mokambi-misala ya bankulutu amonaka te ete aleki bankulutu mosusu, kasi amimonaka nde “lokola moto oyo azali mpenza moke.” (Luka 9:48) Bandeko ya komikitisa ndenge wana bazali mpenza lipamboli mpo na lisangá ya bandeko na mokili mobimba!Flp. 2:3.

Na bwanya na ye, Mokonzi na biso apesi bayekoli na ye babateli na ntango oyo ebongi

15. (a) Ebongiseli ya kozala na lisangani mobimba ya bankulutu na lisangá ezali na matomba nini? (b) Nini emonisi ete Mokonzi na biso azali na bwanya?

15 Ebongiseli ya kotya bankulutu ebele oyo bazali kokabola mokumba ya kotambwisa lisangá, na esika ezala kaka moto moko, ebongisi mpenza makambo. Tótalela matomba misato: Ya libosoliboso, ebongiseli yango esalisaka bankulutu bábosana te ete ata soki bazali na mikumba minene na lisangá, Yesu nde azali Mokonzi ya lisangá. (Ef. 5:23) Ya mibale, Masese 15:22 elobi: “Ntango bapesi-toli bazali ebele likambo elongaka.” Ntango bankulutu basololaka elongo makambo oyo esimbi elimo ya bandeko ya lisangá mpe ntango bapesanaka makanisi, yango esalisaka bango bázwa bikateli oyo eyokani na batoli ya Biblia. (Mas. 27:17) Yehova apambolaka bikateli ya ndenge wana, mpe yango esalaka ete makambo elonga. Ya misato, lokola bandeko mibali ebele oyo bakɔmɛli na elimo bazali kokóma bankulutu, mpe masangá ezali se kokóma ebele, ezali mpasi te ete lisangá mokomoko ezala na bakɛngɛli na ndenge oyo esengeli. (Yis. 60:3-5) Kanisá naino—na 1971, masangá na mokili mobimba ezalaki mwa moke koleka 27 000, na 2013 ekómaki soki 113 000! Ya solo, na bwanya na ye,  Mokonzi na biso apesi bayekoli na ye babateli na ntango oyo ebongi.Mika 5:5.

“Bókóma . . . bandakisa ya etonga”

16. (a) Mokumba nini bankulutu bazali na yango? (b) Ndenge nini Bayekoli ya Biblia bazalaki kotalela etinda ya Yesu ya ‘kobatela bampate’?

16 Banda na ebandeli, Bayekoli ya Biblia oyo bazalaki bankulutu bayebaki ete bazali na mokumba ya kosalisa bandeko ya lisangá bákoba kosalela Nzambe. (Tángá Bagalatia 6:10.) Na 1908, lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki toli ya Yesu oyo: “Batelá bampate na ngai ya mike.” (Yoa. 21:15-17) Lisolo yango eyebisaki bankulutu boye: “Ezali na ntina mingi ete mosala oyo Nkolo apesi ya kobatela etonga na ye ezala na esika monene na mitema na biso; tosengeli komona ete koleisa mpe kobatela bayekoli ya Nkolo ezali libaku malamu mpenza.” Na 1925, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki lisusu ete kozala mokɛngɛli ezali mokumba monene; ekundwelaki bankulutu ete: “Lisangá ezali ya Nzambe, . . . mpe akosunga baoyo nyonso bazwi mokumba ya kosalela bandeko na bango.”

17. Lisalisi nini bankulutu bazwi mpo na kokokisa malamu mokumba ya kobatela bampate?

17 Ndenge nini ebongiseli ya Yehova esalisi bankulutu bábongisa makoki na bango ya kobatela etonga, elongwa ‘ebende ekóma palata’? Na nzela ya ba formasyo. Na 1959, Eteyelo ya mosala ya Bokonzi esalemaki mpo na mbala ya liboso. Kati na mateya oyo bazwaki, moko ezalaki na motó ya likambo “Kotyela ndeko mokomoko likebi.” Balendisaki bankulutu ete “bázwa momeseno ya kokende kotalaka basakoli na bandako na bango.” Liteya yango emonisaki makambo oyo bakɛngɛli bakoki kosala mpo ntango bakei kotala bandeko na bandako, bandeko yango bálendisama mpenza. Na 1966, bakómaki kopesa mateya ya sika na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Ezalaki na liteya moko oyo elobaki “Ntina ya mokumba ya kobatela bampate.” Likambo nini ya ntina liteya yango elobelaki? Elobaki ete baoyo bazali bankulutu “basengeli komipesa na bolingo nyonso mpo na kobatela etonga ya Nzambe;  nzokande basengeli mpe kotyelaka mabota na bango likebi oyo esengeli mpe kobimaka na mosala ya kosakola.” Na bambula oyo, bankulutu bakɔti mpe biteyelo mosusu. Formasyo oyo lisangá ya Yehova ezali kopesa eboti mbuma nini? Lelo, ezali na bankóto ya bandeko mibali oyo bazali kokokisa malamu mokumba ya kobatela bampate ya Kristo.

Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na Philippines, na 1966

18. (a) Mokumba nini monene Yehova apesi na bankulutu? (b) Mpo na nini Yehova ná Yesu basepelaka na mosala makasi ya bankulutu?

18 Na nzela ya Mokonzi na biso Yesu, Yehova atye bankulutu mpo bákokisa mokumba moko monene. Mokumba nini? Kokamba bampate ya Nzambe na mikolo oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. (Ef. 4:11, 12; 2 Tim. 3:1) Yehova ná Yesu basepelaka mingi na mosala makasi oyo bankulutu basalaka mpamba te bandeko mibali yango batosaka etinda ya Biblia oyo elobi ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe oyo bapesi na mabɔkɔ na bino . . . na motema moko . . . , na motema ya esengo . . . , bókóma . . . bandakisa ya etonga.” (1 Pe. 5:2, 3) Tótalela kaka makambo mibale oyo emonisi ete bankulutu bazalaka bandakisa ya etonga mpe ete basalisaka mingi mpo kimya mpe esengo ezala na kati ya lisangá.

Ndenge bankulutu bazali kobatela etonga ya Nzambe lelo

19. Oyokaka ndenge nini soki obimi mosala ya kosakola na nkulutu?

19 Ya liboso, bankulutu basalaka elongo na bandeko ya lisangá. Mokomi ya Evanzile Luka alobaki mpo na Yesu ete: “Abandaki kotambola engumba na engumba mpe mboka na mboka, mpo na koteya mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe. Mpe bantoma zomi na mibale bazalaki elongo na ye.” (Luka 8:1) Ndenge kaka Yesu azalaki kosakola elongo na bantoma na ye, bankulutu ya ndakisa malamu lelo oyo babimaka na mosala ya kosakola elongo na bandeko ya lisangá. Bayebaka ete soki bazali kosala bongo, bakolendisa elimo ya malamu na lisangá. Bandeko ya lisangá bayokaka ndenge nini mpo na bankulutu ya ndenge wana? Jeannine, ndeko  mwasi moko ya mbula pene na 90, alobi boye: “Kobima mosala ya kosakola elongo na nkulutu epesaka ngai libaku malamu ya kosolola na ye mpe koyeba ye malamu.” Steven, ndeko moko ya mbula soki 35, alobi ete: “Soki nkulutu abimi na ngai na mosala ya kosakola ndako na ndako, namonaka ete alingi kosalisa ngai. Lisalisi ya ndenge wana epesaka ngai esengo mingi.”

Ndenge kaka mobateli ya mpate alukaka mpate oyo ebungi, bankulutu basalaka milende mpo na koluka baoyo batiká lisangá

20, 21. Ndenge nini bankulutu bakoki komekola mobateli ya mpate oyo Yesu alobelaki? Pesá ndakisa. (Talá mpe etanda “ Kotala bandeko pɔsɔ na pɔsɔ ebimisi matomba.”)

20 Ya mibale, ebongiseli ya Yehova esalisi bankulutu báyeba kosalisa bato oyo batiká lisangá. (Ebr. 12:12) Mpo na nini bankulutu basengeli kosalisa bandeko oyo balɛmbi na elimo, mpe ndenge nini basengeli kosala yango? Ndakisa ya Yesu oyo elobeli mobateli ya mpate mpe mpate oyo ebungaki epesi eyano na motuna yango. (Tángá Luka 15:4-7.) Ntango mobateli ya mpate amonaki ete mpate moko ezangi, akendaki koluka mpate yango lokola nde azalaki kaka na yango moko. Ndenge nini bankulutu lelo oyo balandaka ndakisa ya mobateli wana ya mpate? Mobateli ya mpate azalaki kaka komona ete mpate wana oyo ebungi ezali na motuya na miso na ye; ndenge moko mpe, bankulutu bamonaka ete ata baoyo batiká lisangá bazali kaka na motuya. Bankulutu bamonaka ete ndeko oyo alɛmbi na elimo azali mpate oyo ebungi, kasi bamonaka te ete esili mpo na ye. Longola yango, ndenge kaka mobateli wana ya mpate ‘akendaki koluka [mpate] oyo ebungi tii akomona yango,’ bankulutu bazwaka bibongiseli mpo na koluka mpe kosalisa bandeko oyo balɛmbi na elimo.

21 Mobateli ya mpate asalaki nini ntango amonaki mpate oyo ebungaki? Na boboto nyonso, atombolaki yango, ‘atyaki yango na mapeka na ye,’ mpe amemaki yango na etonga. Ndenge moko mpe, maloba ya boboto oyo nkulutu akobimisa ekoki kotombola ndeko oyo alɛmbi na elimo mpe kosalisa ye azongela lisangá. Yango nde esalemaki mpo na Victor, ndeko mobali moko na Afrika, oyo atikaki lisangá ya Yehova. Alobi boye: “Nalɛmbaki na boumeli ya mbula mwambe, kasi bankulutu bazalaki kosala nyonso mpo na kosalisa ngai.” Nini mpenza esimbaki motema na ye? Alobi boye: “Mokolo moko, John, nkulutu moko oyo nakɔtá na ye na Eteyelo ya babongisi-nzela, ayaki kotala ngai mpe alakisaki ngai bafɔtɔ oyo tokangaki na eteyelo yango. Bafɔtɔ yango ezongisaki na makanisi na ngai basuvenire ya malamu mpe nabandaki lisusu kokanisa esengo oyo nazalaki na yango ntango nazalaki kosalela Yehova.” Mwa moke nsima ya ntango oyo John akendaki kotala ye, Victor azongelaki lisangá. Lelo, akómá lisusu mobongisi-nzela. Ya solo, bankulutu oyo batyelaka bandeko likebi basalisaka biso tózala na esengo.2 Ko. 1:24. *

Kobatela lisangá malamu elendisi bomoko ya basaleli ya Nzambe

22. Ndenge nini boyengebene mpe kimya elendisaka bomoko na lisangá? (Talá mpe etanda “ Tokamwaki mpenza.”)

22 Ndenge tomonaki yango liboso, Yehova alakaki ete boyengebene mpe kimya ekokola noki na kati ya basaleli na ye.  (Yis. 60:17) Bizaleli yango mibale esalaka ete masangá ezala na bomoko makasi. Na ndenge nini? Mpo na oyo etali boyengebene, “Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.” (Mib. 6:4) Mibeko na ye ya boyengebene ezalaka ndenge moko mpo na masangá nyonso ya mokili mobimba. Mibeko na ye na oyo etali mabe ná malamu ezalaka kaka moko, mpe ezali ndenge moko mpo na “masangá nyonso ya basantu.” (1 Ko. 14:33) Na yango, lisangá ekokola malamu kaka soki bandeko bazali kotosa mibeko ya Nzambe. Mpo na oyo etali kimya, Mokonzi na biso alingi tózala na kimya na lisangá mpe tózala “bato oyo batyaka kimya.” (Mat. 5:9) Yango wana, tosengeli ‘kolanda makambo oyo etyaka kimya.’ Soki likambo moko ebimi na kati na biso, tosengeli kozala bato ya liboso mpo na koluka kosilisa yango. (Rom. 14:19) Soki tozali kosala bongo, tokosala ete kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá na biso.Yis. 60:18.

23. Mpo na nini biso basaleli ya Yehova tosepelaka lelo?

23 Na sanza ya zomi na moko na 1895, ntango Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki mpo na mbala ya liboso ebongiseli ya kotya bankulutu, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bamonisaki mpe mposa na bango. Ezalaki nini? Mposa na bango mpe libondeli na bango ezalaki ete ebongiseli wana ya sika esalisa basaleli ya Nzambe “bakóma nokinoki na bomoko na kati ya kondima.” Soki tokanisi bambula oyo eleki, tokozala na botɔndi mingi na komona ete mbongwana oyo Yehova akɔtisi mokemoke na nzela ya Mokonzi na biso, na oyo etali kotambwisa makambo na lisangá, elendisi mpenza bomoko na losambo na biso. (Nz. 99:4) Yango wana lelo oyo, biso nyonso basaleli ya Yehova na mokili mobimba tosepelaka mpo tozali kotambola ‘na elimo moko,’ tozali kolanda ‘matambe moko,’ mpe tozali kosalela “Nzambe ya kimya” “na bomoko.”2 Ko. 12:18; tángá Sefania 3:9.

^ par. 11 Boyekoli mozindo oyo basalaki nde esalisaki na kobimisa buku Auxiliaire pour une meilleure intelligence de la Bible.