Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 11

Bapɛtolami na bizaleli mpo na komonisa bosantu ya Nzambe

Bapɛtolami na bizaleli mpo na komonisa bosantu ya Nzambe

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Mokonzi ateyi bato na ye mpo bátosa mibeko ya Nzambe

Kanisá ete ozali kokɔta na kati ya lopango ya tempelo monene ya elimo

1. Ezekiele azwaki emonaneli nini oyo ezali na makambo ya kokamwa?

SOKI ozwaki libaku ya komona makambo oyo mosakoli Ezekiele amonaki eleki mbula soki 2 500, olingaki koyoka ndenge nini? Kanisá naino: Ozali kopusana pene na tempelo moko monene oyo ezali kongɛnga. Anzelu moko azali wana mpo na kolakisa yo esika yango ya nsɔmɔ! Omati eskalye ya matambe nsambo oyo ezali komema na moko ya baporte misato ya tempelo. Baporte yango ekamwisi yo makasi. Ezali na bolai ya mɛtrɛ soki 30. Ntango okɔti, ozali komona mwa bandako ya bakɛngɛli. Ezali mpe na bililingi kitoko ya banzete ya mbila na bifelo ya tempelo.Ezk. 40:1-4, 10, 14, 16, 22; 41:20.

2. (a) Tempelo oyo Ezekiele amonaki emonisi nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.) (b) Biloko oyo ezali na esika ya kokɔta na tempelo ya Ezekiele ekoki koteya biso nini?

2 Wana ezali emonaneli ya tempelo ya elimo. Ezekiele alobelaki yango na mozindo mpe makambo yango ezwami na mokapo 40 tii na 48 ya esakweli na ye. Tempelo yango ezali komonisa losambo ya pɛto ya Yehova. Likambo mokomoko ya tempelo yango ezali na ndimbola na losambo na biso na mikolo oyo ya nsuka. * Baporte ya milai elimboli nini? Ezali kokundwela biso ete baoyo bazali kokɔta na losambo ya pɛto ya Yehova basengeli kotosa mitinda ya Nzambe oyo ezali sembo mpe eleki nyonso. Ata bililingi ya banzete ya mbila ezali mpe na ndimbola yango, mpo mbala mingi Biblia esalelaka nzete ya mbila mpo na kolobela boyengebene. (Nz. 92:12) Bongo bandako ya bakɛngɛli ezali komonisa nini? Emonani ete baoyo baboyaka kotosa mibeko ya Nzambe bazwaka nzela te ya kokɔta na losambo ya pɛto, nzela oyo ememaka na bomoi.Ezk. 44:9.

3. Mpo na nini esɛngaki ete bayekoli ya Kristo bákoba kopɛtolama?

3 Ndenge nini emonaneli ya Ezekiele ekokisami? Ndenge tomonaki yango na Mokapo 2 ya buku oyo, Yehova asalelaki Kristo mpo na kopɛtola mpenza basaleli na ye kobanda na 1914 tii na ebandeli ya 1919. Kopɛtolama esukaki wana? Soki moke te! Na boumeli ya mbula 100 oyo eleki, Kristo akobi kotosisa mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli ya malamu. Na yango, esɛngaki ete bayekoli bákoba kosembolama. Mpo na nini? Mpo bayekoli ya Kristo bauti na mokili oyo epɔlá mpe Satana azali kolɛmba te kobenda bango mpo bázongela  makambo ya mbindo. (Tángá 2 Petro 2:20-22.) Tótalela makambo misato oyo bakristo ya solo bapɛtolami na yango. Liboso, tokolobela bopɛto na bizaleli, na nsima tokolobela ebongiseli moko ya ntina mingi oyo ebatelaka lisangá pɛto, mpe na nsuka tokolobela libota.

Bapɛtolami na bizaleli na boumeli ya bambula

4, 5. Banda kala mayele nini Satana asalelaka, mpe nini emonisi ete alongaka?

4 Banda kala, basaleli ya Yehova batyaka likebi mingi na bizaleli mpe etamboli ya malamu. Yango wana, Nzambe asalisi bango báyeba likambo yango malamumalamu. Tótalela mwa bandakisa.

5 Pite. Yehova abongisá ete kosangisa nzoto ezala likambo ya pɛto mpe ya malamu kati na bato oyo babalani. Kasi Satana abebisi likabo yango; akómisi yango eloko ya mbindo mpe asalelaka yango mpo na komeka basaleli ya Yehova mpo bábebisa boyokani na bango na Nzambe. Satana asalelaki yango mpe alongaki mpenza, na mikolo ya Balama, mpe na mikolo oyo ya nsuka azali kosalela yango mingi lisusu koleka.Mit. 25:1-3, 9; Em. 2:14.

6. Elako nini ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? Ndenge nini basalelaki yango, mpe mpo na nini na nsima esilaki ngala? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

6 Mpo na kotɛmɛla milende ya Satana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/1908 esɛngaki bandeko básala elako moko oyo elobaki ete: “Ntango nyonso mpe esika nyonso oyo nazali kaka ngai moko ná moto oyo azali molongani na ngai te, nakosalela ye makambo ndenge kaka nakosala soki nazali na ye na miso ya bato.” * Atako elako yango ezalaki mobeko te, bandeko mingi bandimaki yango mpe bapesaki bankombo na bango mpo ebima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona. Bambula mingi na nsima, ekómaki komonana ete elako yango, atako esalisaki bato mingi liboso, ekómaki kaka maloba mpamba; na yango esilaki ngala. Nzokande, bizaleli malamu oyo elako yango ezalaki kolendisa, ezalaki kaka na ntina.

7. Na 1935, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki mokakatano nini, mpe epesaki toli na likambo nini?

7 Satana abakisaki lisusu milende. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1935 elobelaki polele mokakatano moko oyo ezalaki kokóma makasi na kati ya basaleli ya Nzambe. Emonanaki ete bato mosusu bazalaki kokanisa ete soki bazali komipesa na mosala ya kosakola, kotosa mibeko ya Yehova oyo elobeli bizaleli malamu etali bango te. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki polele ete: “Moto nyonso asengeli koyeba ete kobima mosala ya kosakola ezali kaka etinda moko. Batatoli ya Yehova bazali bamonisi na ye, mpe bazali na mokumba ya komonisa na ndenge ya malamu Yehova mpe bokonzi na ye.” Na nsima, lisolo yango epesaki toli ya polele oyo etali libala mpe makambo ya kosangisa nzoto; yango esalisaki basaleli ya Nzambe ‘bákima pite.’1 Ko. 6:18.

8. Mpo na nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaka mbala na mbala ndimbola mpenza ya liloba ya Grɛki oyo ebongolami na pite?

8 Na bambula oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisi mbala na mbala ndimbola oyo ebongi mpo na liloba pornéïa, oyo Makomami ya Grɛki esaleli mpo na kolobela pite. Ndimbola ya liloba yango esuki kaka te na kosangisa mpenza nzoto.  Pornéïa elimboli mpe misala ndenge na ndenge ya mbindo, mingimingi lolenge ya makambo ya bosɔtɔ oyo esalemaka na bandako ya bandumba. Na yango, bayekoli ya Kristo babatelami na ebele ya makambo ya mbindo oyo ekangi bato mingi na motambo lelo oyo.Tángá Baefese 4:17-19.

9, 10. (a) Likambo nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobelaki na 1935? (b) Biblia elobi nini mpo na masanga?

9 Kolangwa masanga. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1935 elobelaki likambo mosusu oyo etaleli bizaleli malamu; elobaki boye: “Tomoni ete bato mosusu babimaka na mosala ya kosakola mpe basalaka misala mosusu ya lisangá nsima ya komɛla masanga. Na bantango nini Makomami endimi ete moto amɛla vinyo? Ekozala malamu moto amɛla vinyo tii eya kobebisa mosala na ye na lisangá ya Nkolo?”

10 Na eyano na mituna wana, lisolo yango elobelaki makanisi oyo Liloba ya Nzambe epesi mpo na masanga. Biblia epekisi te komɛla mwa masanga to vinyo, kasi eboyi mpenza molangwa. (Nz. 104:14, 15; 1 Ko. 6:9, 10) Na oyo etali kosala makambo ya Nzambe na nse ya molangwa, banda kala bakundwelaka basaleli ya Nzambe lisolo ya bana ya Arona, oyo Nzambe abomaki mpo batyaki mɔtɔ na etumbelo na ndenge oyo endimami na mobeko te. Na bavɛrsɛ oyo elandi, lisolo yango emonisi likambo oyo mbala mosusu etindaki bana ya Arona básala likambo wana oyo ebongi te, mpo Nzambe apekisaki banganga-nzambe nyonso komɛla masanga ntango bazali kosala misala na bango ya losambo. (Lev. 10:1, 2, 8-11) Na kolanda makanisi oyo ezali na mobeko wana, bayekoli ya Kristo lelo oyo baboyaka ete masanga etambwisa bango wana bazali kosala makambo ya Nzambe.

11. Ndenge nini makambo oyo basaleli ya Nzambe basosolaki na oyo etali masanga esalisi bandeko?

11 Na bambula oyo, bayekoli ya Kristo basosoli lisusu malamumalamu likambo etali kozala moombo ya masanga, elingi koloba kozala na momeseno ya komɛla masanga mingi. Bilei wana ya elimo na ntango oyo ebongi esalisi bato mingi bálonga mokakatano yango mpe bázongisa masanga na esika na yango. Bato mosusu mingi balongi koboya masanga mpo na libela. Moto te asengeli komipesa na komɛla masanga mpo yango ekoki kolongola lokumu ya moto, kokabola ye na libota, mpe na koleka, kobebisela ye libaku malamu ya kozala na kati ya losambo ya pɛto ya Yehova.

“Nkolo na biso akoki te kosepela na nsolo mabe ya likaya to kotya na monɔkɔ na ye eloko oyo ekómisaka mbindo.”—Charles Russell

12. Ndenge nini bayekoli ya Kristo bazalaki kotalela likaya, ata liboso mikolo ya nsuka ebanda?

12 Komɛla likaya. Bayekoli ya Kristo babandaki komonisa ete likaya ezali mabe liboso kutu mikolo ya nsuka ebanda. Eleki mwa bambula, Charles Capen, ndeko moko ya mobange, alobelaki mbala ya liboso oyo amonaki ndeko Charles Russell na nsuka ya bambula ya 1800. Ndeko Capen, oyo na ntango wana azalaki na mbula 13, ná bandeko na ye misato ya mibali bafandaki na baeskalye na Ndako ya Biblia na Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie. Ntango ndeko Russell alekaki wana, atunaki bango: “Bino, bozali komɛla likaya? Nayoki nsolo ya likaya.” Bayebisaki ye ete bazali komɛla likaya te. Yango esalisaki bango báyeba makanisi ya ndeko Russell  mpo na likaya. Na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1895, ndeko Russell alimbolaki 2 Bakorinti 7:1; alobaki boye: “Nazali komona te ndenge oyo Nzambe akoki kozwa nkembo, to litomba oyo mokristo akoki kozwa soki azali komɛla likaya ata ya ndenge nini. . . . Nkolo na biso akoki te kosepela na nsolo mabe ya likaya to kotya na monɔkɔ na ye eloko oyo ekómisaka mbindo.”

13. Likambo nini esembolamaki na 1973?

13 Na 1935, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete likaya ezali “lititi mabe” mpe emonisaki ete moto moko te oyo atafunaka to amɛlaka yango akoki kokoba kosala na Betele to kozwa mokumba ya mobongisi-nzela to ya mokɛngɛli-motamboli. Na 1973, bapɛtolamaki lisusu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/1973 emonisaki ete Motatoli moko te ya Yehova akoki kotikala na lisangá soki azali kokoba na momeseno yango ya mabe, oyo ekómisaka mbindo, mpe emonisaka kozanga bolingo. Na nsima, baoyo baboyaki kotika likaya bazalaki kobimisama na lisangá. * Kristo apɛtolaki bayekoli na ye na likambo mosusu ya ntina mingi.

14. Mobeko ya Nzambe elobi nini mpo na makila, mpe nini esalaki ete likambo ya kozongisa makila epalangana mingi?

14 Kosalela makila na ndenge ya mabe. Na mikolo ya Noa, Nzambe alobaki ete ezali mabe kolya makila. Amonisaki yango lisusu na Mibeko oyo apesaki ekólo Yisraele; ayebisaki mpe bakristo ete ‘báboya makila.’ (Mis. 15:20, 29; Eba. 9:4; Lev. 7:26) Ezali likambo ya kokamwa te ndenge lelo oyo, Satana azwi nzela ya kotinda bato bábuka mobeko wana ya Nzambe. Minganga bazalaki komekameka likambo ya kozongisa makila na nsuka ya bambula ya 1800, kasi na nsima, ntango bayebaki ete makila ya bato (groupes sanguins) ezalaka ndenge moko te, momeseno ya kozongisa makila epalanganaki mingi. Na 1937, bakómaki kozwa makila ya bato mpe kobomba yango, mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esalaki ete kozongisa makila eya makasi. Eumelaki te, ekómaki kosalema mingi na mokili mobimba.

15, 16. (a) Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaki likambo ya kozongisa makila? (b) Lisalisi nini bayekoli ya Kristo bazwi na oyo etali kozongisa makila, mpe yango ebimisi matomba nini?

15 Kobanda na 1944, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete kozongisama makila ezalaki nde lolenge mosusu ya kolya makila. Na mbula oyo elandaki, balobelaki etinda wana ya Biblia polelepolele. Na 1951, babimisaki liste moko ya mituna mpe biyano mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe báyeba ndenge ya kosolola na minganga. Na mokili mobimba, bayekoli ya sembo ya Kristo bamonisaki mpiko mpenza, mbala mingi na kati ya lityo ya bato, botɛmɛli, ntango mosusu na minyoko makasi. Kasi, Kristo akobaki kosalisa lisangá na ye mpo epesa bandeko lisalisi oyo esengeli. Basalaki bolukiluki ebele mpe babimisaki mwa babuku mpe masolo oyo elimbolaki makambo polele.

16 Na 1979, bankulutu mosusu bakómaki kokende na balopitalo mpo na kosalisa minganga báyeba ntina oyo toboyaka makila, na kolanda Makomami, mpe bamonisaki bango mayele mosusu oyo bakoki kosalela na esika ya kozongisa  makila. Na 1980, bankulutu na bingumba 39 ya États-Unis bazwaki formasyo oyo esengeli mpo na kosolola na minganga. Na nsima, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete Bakomite mpo na boyokani na minganga etyama na mokili mobimba. Milende nyonso wana esalisi mpenza? Ɛɛ, lelo oyo, bankóto ya minganga, ezala baoyo basalaka lipaso to baoyo bapesaka ntonga mpo moto ayoka mpasi te, bandimaka kosalisa Batatoli oyo bazali maladi; na ndenge yango bamonisaka ete bamemyaka ekateli na biso ya koboya makila. Minganga mingi bakómi kondima kosalisa bato kozanga kozongisa bango makila, basusu kutu bakómi komona ete ezali lolenge eleki malamu ya kosalisa bato. Ezali esengo te komona ndenge Yesu abateli bayekoli na ye mpo mayele mabe ya Satana ebebisa bango te?Tángá Baefese 5:25-27.

Minganga mingi bakómi kondima kosalisa bato kozanga kozongisa bango makila, basusu kutu bakómi komona ete ezali lolenge eleki malamu ya kosalisa bato

17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka lokola Kristo azali kopɛtola bayekoli na ye?

17 Ekozala malamu tómituna boye: ‘Nazalaka na botɔndi ndenge Kristo apɛtoli biso bayekoli na ye mpo tótosa mibeko mosantu ya Yehova?’ Soki ezali bongo, tóbosana te ete Satana azali kosala nyonso mpo na kotinda biso tómona ete kotosa mibeko ya Nzambe ezali na ntina te, mpe na ndenge yango abebisa boyokani na biso na Yehova mpe Yesu. Mpo  na kosalisa biso, lisangá ya Yehova ekebisaka biso mbala na mbala mpe ekundwelaka biso makambo ya mbindo ya mokili oyo. Yango wana, tózalaka ntango nyonso ekɛngɛ, tóyokaka, mpe tótosaka batoli wana ya ntina mingi.Mas. 19:20.

Kobatela lisangá pɛto

18. Emonaneli ya Ezekiele emonisi nini mpo na bato oyo babukaka mibeko ya Nzambe na nko?

18 Ya mibale, topɛtolami na likambo etali kobatela lisangá pɛto. Likambo ya mawa, bato mosusu oyo bandimaka mibeko ya Nzambe mpe bamipesaka na ye batikalaka sembo te. Nsukansuka, motema na bango ebalukaka mpe bakómaka kobuka mibeko yango. Esengeli kosala nini na bato ya ndenge wana? Emonaneli ya tempelo ya elimo oyo Ezekiele azwaki, oyo tolobelaki na ebandeli, ekoki kosalisa biso tózwa eyano. Kanisá lisusu baporte na yango ya milai. Na nzela nyonso ya kokɔtela, ezalaki na bandako ya bakɛngɛli. Bakɛngɛli yango bazalaki kobatela tempelo, na ntembe te mpo na kopekisa moto nyonso oyo “akatami ngenga te na motema” akɔta kuna. (Ezk. 44:9) Yango ezali komonisa polele ete kokɔta na losambo ya pɛto ezali libaku oyo epesami kaka na baoyo basalaka makasi ya kotosa mibeko ya Yehova. Ndenge moko mpe, libaku ya kosambela Nzambe elongo na bakristo mosusu epesami na moto nyonso te.

19, 20. (a) Ndenge nini Kristo asalisi bayekoli na ye mokemoke mpo básembola ndenge ya kosambisa bato oyo basali masumu ya minene? (b) Mpo na bantina nini misato esengeli kobimisa na lisangá basumuki oyo baboyi kobongola motema?

19 Kala, na 1892, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete tozali na “mokumba ya kobimisa na lisangá bato oyo, na maloba na bango to na misala na bango, bandimaka te ete Kristo apesaki lisiko mpo na bato nyonso.” (Tángá 2 Yoane 10.) Na 1904, buku La Nouvelle Création elobaki polele ete bato oyo bazali kotingama na etamboli ya mabe bazali likama monene mpo bakoki kolɛmbisa bandeko ya lisangá. Na ntango wana, lisangá mobimba ezalaki koyangana mpo na kosambisa bato oyo basalaki masumu ya minene. Kasi, mabaku yango ezalaki mingi mpenza te. Na 1944, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete kaka bandeko oyo bazali na mikumba nde basengeli kotalela makambo ya ndenge wana. Na 1952, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ndenge ya kosambisa basumuki na kolanda Makomami, mpe emonisaki ntina oyo esengeli kobimisa na lisangá bato oyo baboyi kobongola motema: mpo na kobatela lisangá pɛto.

20 Banda wana, Kristo asalisi bayekoli na ye báyeba malamumalamu oyo basengeli kosala ntango ndeko asali lisumu ya monene. Bankulutu bazwaka mateya oyo esalisaka bango bámekola Yehova ntango bazali kosambisa: bámonisaka bosembo mpe motema mawa. Lelo oyo, toyebi malamu bantina misato oyo esengeli kobimisa na lisangá moto oyo aboyi kobongola motema: (1) koboya kofingisa nkombo ya Yehova, (2) kobatela lisangá na mbindo oyo euti na masumu ya minene, mpe (3) kotinda mosumuki abongola motema soki likoki ezali.

21. Ndenge nini likambo ya kobimisa basumuki na lisangá esalisi basaleli ya Nzambe?

 21 Yo mpe omonaka ndenge ebongiseli ya kobimisa mosumuki na lisangá ebatelaka bayekoli ya Kristo lelo oyo? Na Yisraele ya kala, mbala mingi basali-mabe bazalaki kobebisa ekólo mobimba; ntango mosusu kutu motángo na bango ezalaki koleka mosika motángo ya baoyo bazalaki kolinga Yehova mpe kosala oyo ezali sembo. Yango wana mbala mingi, ekólo mobimba ezalaki kofingisa nkombo ya Yehova mpe kobebisa boyokani elongo na ye. (Yir. 7:23-28) Kasi lelo oyo, lisangá ya Yehova etondi na bandeko basi mpe bandeko mibali ya elimo. Lokola bato ya mitó makasi babimisamaka na lisangá, Satana akokaka te kosalela bango mpo bákoba kobebisa lisangá mpe bákómisa yango mbindo. Ezaleli na bango ya mabe ekopanzana na lisangá mobimba te. Na yango, Yehova akokoba kondima lisangá na ye. Tóbosana te ete Yehova alobaki: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.” (Yis. 54:17) Lokola bankulutu bazali na mokumba monene ya kosambisa na lisangá, oyokelaka bango na motema mobimba?

Kokumisa Ye oyo mpo na ye libota nyonso ezwi nkombo

22, 23. Mpo na nini tosepelaka mingi na bandeko na biso ya ebandeli ya bambula ya 1900, kasi nini emonisi ete basengelaki koyekola kozala na bokatikati na oyo etali libota?

22 Ya misato, Kristo apɛtoli bayekoli na ye na oyo etali libala mpe bomoi ya libota. Ndenge na biso ya kotalela libota esembolami na boumeli ya bambula? Ɛɛ. Na ndakisa, soki totángi masolo ya basaleli ya Nzambe ya ebandeli ya bambula ya 1900, tokokamwa mpenza elimo na bango ya komipimela. Tosepelaka mingi ndenge bazalaki kotya mosala mosantu na esika ya liboso na bomoi na bango. Kasi, tokoki mpe komona ete basengelaki koyekola kozala na bokatikati. Na ndenge nini?

23 Mbala mingi bandeko mibali bazalaki kondima kotika mabota na bango basanza ebele mpenza mpo na kokokisa mikumba oyo bazwi na mosala ya kosakola to na mosala ya mokɛngɛli-motamboli. Na bantango mosusu, bazalaki mpenza kopekisa bato kobala, nzokande Biblia elobi bongo te, mpe bazalaki kolobela mingi te oyo bakristo bakoki kosala mpo libala na bango ezala malamu. Makambo ezali mpe bongo na kati ya bayekoli ya Kristo lelo oyo? Te!

Moto akoki te komipesa na kokokisa mikumba na ye na lisangá, nzokande asundoli mikumba na ye na libota

24. Ndenge nini Kristo asalisi bayekoli na ye ya sembo bámona ntina ya libala mpe libota?

24 Lelo oyo, moto akoki te komipesa na kokokisa mikumba na ye na lisangá, nzokande asundoli mikumba na ye na libota. (Tángá 1 Timote 5:8.) Longola yango, Kristo asali ete bayekoli na ye ya sembo awa na mabele bázwaka batoli ebele ya Biblia oyo etali libala mpe bomoi na libota. (Ef. 3:14, 15) Na 1978, babimisaki buku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo. Mbula soki 18 na nsima, babimisaki buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Lisusu, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisaka masolo ebele oyo ebongisami mpo na kosalisa bato oyo babalá básalela batoli ya Biblia na libala na bango.

25-27. Na boumeli ya bambula, nini emonisi ete bazali kotyela bana mpe bilenge likebi mingi?

25 Bongo bilenge? Na boumeli ya bambula, batyeli bilenge  likebi mingi. Banda kala, ebongiseli ya Yehova ebimisaka biloko kitoko mpo na bana mpe bilenge. Atako liboso biloko yango ezalaki mingi te, lelo oyo ekómi bɛbɔ. Na ndakisa, kobanda 1919 tii na 1921, L’Âge d’Or ezalaki kobimisa lisolo oyo elobaki “Boyekoli ya Biblia mpo na bilenge.” Na nsima, na 1920, mwa buku L’Âge d’Or ABC ebimaki, mpe na 1941, babimisaki buku Bana. Na bambula ya 1970, babimisaki buku Boyoka Moteyi Monene, Votre jeunesse: comment en tirer le meilleur parti, mpe Mokanda mpo na masolo ya Biblia. Na 1982, lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka” ekómaki kobima na Lamuká! mpe yango esalaki ete bábimisa buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, na 1989.

Na liyangani moko na Allemagne, bana basepelaki mingi kozwa mwa buku Mateya ya Biblia mpo na bana

26 Lelo oyo, tozali na volimi mibale ya buku Mituna oyo bilenge batunaka, oyo elobeli makambo ya mikolo oyo; mpe lisolo Mituna oyo bilenge batunaka ezali kokoba kobima na site Internet na biso jw.org. Tozali mpe na buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Site Internet na biso etondi na biloko kitoko mpo na bana, na ndakisa lokasa ya bato oyo Biblia elobeli, boyekoli ya Biblia mpo na bana mpe bilenge, basambole, bavideo,  mateya ya Biblia na bililingi, mpe mateya ya Biblia mpo na bana ya mbula misato kitá na nse. Ya solo mpenza, ndenge oyo Yesu atalelaka bana ebongwaná te banda ntango azingaki bana mike na mabɔkɔ na ye na siɛklɛ ya liboso. (Mrk. 10:13-16) Alingi bana mpe bilenge báleisama malamu na elimo mpe bámona ete tolingaka bango.

27 Yesu alingi mpe kobatela bana mpo mabe ekómela bango te. Lokola mokili mabe oyo ezindi mpenza kozinda na kati ya makambo ya mbindo, likambo ya kobebisa bana mike ekómi mingi mpenza. Yango wana, moombo ya sembo abimisaka malako ya polelepolele mpo na kosalisa baboti bábatela bana na bango mpo likambo wana ya mabe ekómela bango te. *

28. (a) Ndenge emonaneli ya tempelo ya Ezekiele emonisi yango, tosengeli kosala nini mpo tókɔta na losambo ya pɛto? (b) Ozali na ekateli ya kosala nini?

28 Ezali mpenza esengo komona ndenge Kristo azali kokoba kopɛtola bayekoli na ye mpe koteya bango bátosa mibeko ya Yehova, oyo ezali mpo na bolamu na bango. Tókanisa lisusu tempelo oyo Ezekiele amonaki na emonaneli. Tóbosana te baporte na yango ya milai. Ya solo, tokoki komona tempelo yango te mpo ezali ya elilingi. Atako bongo omonaka ete ezali likambo ya solo? Kokɔta na tempelo yango elimboli kaka te kokende na Ndako ya Bokonzi, kotánga Biblia, to kobima mosala ya kosakola. Wana ezali makambo oyo emonanaka na miso. Moto oyo azalaka na etamboli ya mabe na nkuku akoki mpe kosala makambo yango kozanga ete akɔta na tempelo ya Yehova te. Kasi, ntango tozali kosala makambo wana ya malamu, tozali kotosa mpe mibeko ya Yehova oyo etali bizaleli malamu, mpe tozali kosambela ye na motema ya pɛto, boye tokɔti mpe tozali kosala na tempelo ya elimo: losambo ya pɛto ya Yehova Nzambe! Tókoba kosepela na libaku malamu oyo tozwá. Tókoba kosala makasi mpo tótosaka mibeko nyonso ya Yehova mpo tómonisa bosantu na Ye!

^ par. 2 Na 1932, Volimi 2 ya buku Justification emonisaki mpo na mbala ya liboso ete bisakweli ya Biblia oyo elobeli kozongisama ya basaleli ya Nzambe na mboka na bango ekokisami na mikolo na biso mpo na Yisraele ya elimo, kasi te mpo na ekólo Israël. Bisakweli yango elobeli kozongisama ya losambo ya solo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/03/1999 elobaki ete emonaneli ya tempelo oyo Ezekiele azwaki elobeli kozongisama yango mpe na bongo, ekokisami na ndenge ya elimo na mikolo ya nsuka.

^ par. 6 Elako yango epekisaki ndeko mobali ná ndeko mwasi bázala kaka bango mibale na ndako moko lobá kaka soki batiki porte mobimba polele, to soki babalaná to bazali libota moko. Na boumeli ya mwa bambula, bazalaki kozongela elako yango ntɔngɔ nyonso na ntango ya kotánga mokapo ya mokolo na libota ya Betele.

^ par. 13 Komɛla likaya elimboli mpe kobenda yango na zolo, kotafuna yango, to kolona yango mpo na kosalela yango ndenge wana.

^ par. 27 Na ndakisa, talá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, mokapo 32, mpe lisolo oyo elobi “Batelá bana na yo” na Lamuká! ya 01/2008, nkasa 3-11.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Ntina oyo tosengeli kozala basantu

Ekómelá yo omona ete makambo mosusu ya mokanda ya Balevi ezali makasi mpe elɛmbisi yo? Makambo kitoko oyo ezali na mokanda ya Balevi ekoki kosalisa yo ozala mosantu na losambo na yo.