Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 16

Koyangana elongo mpo na losambo

Koyangana elongo mpo na losambo

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ndenge momeseno ya kosala makita ebandaki mpe ntina na yango

1. Ntango bayekoli bayanganaki elongo, eloko nini bazwaki, mpe mpo na nini basengelaki na yango?

MWA moke nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye bayanganaki elongo mpo na kolendisana. Kasi, bakangaki baporte makasi mpo bazalaki kobanga banguna na bango. Na ntembe te, kobanga na bango esilaki mpenza ntango Yesu abimelaki bango na katikati mpe alobaki na bango: “Bózwa elimo santu”! (Tángá Yoane 20:19-22.) Na nsima, bayekoli bayanganaki lisusu elongo, mpe Yehova asopelaki bango elimo santu. Yango epesaki bango makasi mpenza mpo na kosala mosala ya kosakola oyo ezalaki kozela bango!Mis. 2:1-7.

2. (a) Ndenge nini Yehova apesaka biso makasi, mpe mpo na nini tosengeli na yango? (b) Mpo na nini Losambo na kati ya libota ezali na ntina mingi? (Talá maloba na nse ya lokasa mpe etanda “ Losambo na kati ya libota.”)

2 Biso mpe tokutanaka na mikakatano oyo bandeko na biso ya siɛklɛ ya liboso bakutanaki na yango. (1 Pe. 5:9) Na bantango mosusu, ekómaka ete tóbanga bato. Tozalaka mpe na mposa Yehova apesa biso makasi mpo tókoba na mosala ya kosakola. (Ef. 6:10) Yehova apesaka biso makasi yango mingimingi na nzela ya makita. Lelo, tozali na libaku ya koyangana na makita mibale pɔsɔ na pɔsɔ, epai toteyamaka mpenza: Likita ya bato nyonso ná Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe likita ya kati ya pɔsɔ oyo tobengi Bomoi mpe mosala ya bakristo. * Tozali mpe na mayangani minei oyo tosalaka mbula na mbula: liyangani ya etúká, mayangani mibale ya zongazonga, mpe Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Mpo na nini ezali na ntina mingi koyangana na makita yango nyonso? Ndenge nini momeseno ya kosala makita ebandaki na mikolo na biso? Mpe ndenge oyo totalelaka makita yango emonisaka nini mpo na biso?

Mpo na nini koyangana elongo?

3, 4. Yehova asɛngaka nini epai ya basaleli na ye? Pesá bandakisa.

3 Banda kala, Yehova asɛngaka ete basaleli na ye báyanganaka elongo mpo na kosambela ye. Na ndakisa, na mobu 1513 L.T.B., Yehova apesaki Mibeko na ekólo Yisraele, mpe na kati na yango ezalaki na mobeko ya Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ, ntango oyo libota mokomoko ekokaki kosambela ye mpe koyekola Mibeko. (Mib. 5:12; 6:4-9) Ntango Bayisraele bazalaki kotosa mitindo wana, mabota na bango ezalaki kokóma makasi mpe ekólo mobimba ebandaki kozala ntango nyonso pɛto mpe makasi na elimo. Soki ekólo yango elongi te kotosa  Mibeko, mpe bato basali te makambo lokola koyangana mbala na mbala mpo na kosambela Yehova, bazalaki kobebisa boyokani na bango na Nzambe.Lev. 10:11; 26:31-35; 2 Nt. 36:20, 21.

4 Tótala mpe ndakisa oyo Yesu atikaki. Azalaki na momeseno ya kokende na sinagoga pɔsɔ na pɔsɔ na mokolo ya Sabata. (Luka 4:16) Nsima ya liwa mpe lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye bakobaki na momeseno ya koyangana elongo mbala na mbala atako mobeko ya Sabata esilaki ngala. (Mis. 1:6, 12-14; 2:1-4; Rom. 14:5; Kol. 2:13, 14) Na makita yango, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kozwa malako mpe bilendiseli, bazalaki mpe kopesa mbeka ya lisanzoli epai ya Nzambe na nzela ya mabondeli, ya maloba na bango, mpe ya nzembo.Kol. 3:16; Ebr. 13:15.

Bayekoli ya Yesu bayanganaki elongo mpo na kopesana makasi mpe kolendisana

5. Mpo na nini toyanganaka na makita pɔsɔ na pɔsɔ mpe tosalaka mayangani mbula na mbula? (Talá mpe etanda “ Mayangani minene oyo elendisi bomoko ya basaleli ya Nzambe.”)

5 Ndenge moko mpe, koyangana na makita ya pɔsɔ na pɔsɔ mpe na mayangani ya mbula na mbula, emonisaka ete tozali na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe, esalisaka biso tózwa makasi ya elimo santu, mpe tólendisa basusu na maloba oyo emonisi kondima na biso. Oyo eleki ntina, tozwaka libaku ya kosambela Yehova na nzela ya mabondeli, ya bakomantɛrɛ mpe ya banzembo. Ndenge makita esalemaka lelo ekeseni na oyo ya Bayisraele mpe ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso; kasi ntina na yango ezali kaka ndenge moko. Ndenge nini makita na mikolo na biso ebandaki?

Makita ya pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kolendisana “na bolingo mpe na misala ya malamu”

6, 7. (a) Makita na biso ezali na ntina nini? (b) Ndenge nini bato na bato bazalaki kosala makita na bango?

6 Ntango ndeko Charles Russell abandaki koluka solo ya Liloba ya Nzambe, amonaki ete esengeli koyangana na bato  mosusu oyo bazali mpe na mokano wana. Na 1879, ndeko Russell akomaki boye: “Ngai, elongo na bato mosusu na Pittsburgh, tosalá etuluku moko mpo na koyekola Makomami mpe toyanganaka elongo mikolo nyonso ya Lomingo.” Balendisaki batángi nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona báyanganaka elongo, mpe na 1881, makita ekómaki kosalema na Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, mikolo nyonso ya misato mpe ya Lomingo. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya zomi na moko na 1895 elobaki ete ntina ya makita yango ezalaki ya kokolisa “bondeko, bolingo, mpe bomoko ya bokristo” mpe kopesa bayangani libaku ya kolendisana.Tángá Baebre 10:24, 25.

7 Na boumeli ya bambula, bato na bato bazalaki kosala makita na ndenge na bango. Na ndakisa, etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia na États-Unis ekomaki mokanda moko oyo ebimaki na 1911, oyo elobaki ete: “Tosalaka makita ata mbala mitano na pɔsɔ.” Bazalaki kosala yango na mokolo ya yambo, mokolo ya misato, mokolo ya mitano, mpe mbala mibale na mokolo ya Lomingo. Mokanda mosusu oyo eutaki na etuluku moko na Afrika, mpe ebimaki na 1914, elobaki ete: “Tosalaka makita mbala mibale na sanza, kobanda na mokolo ya mitano tii na mokolo ya Lomingo.” Kasi kende kende, makita ekómaki kosalema ndenge tosalaka yango lelo. Tótalela na mokuse ndenge likita mokomoko ebandaki.

8. Tángá mwa mitó ya makambo ya badiskur oyo ezalaki kosalema kala.

8 Likita ya bato nyonso. Na 1880, mbula moko nsima ya kobanda kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona, ndeko Russell alandaki ndakisa ya Yesu mpe akómaki kosala mibembo mpo na kosakola. (Luka 4:43) Na mibembo yango, ndeko Russell atikelaki biso ndakisa na oyo etali kosala Likita ya bato nyonso, ndenge tosalaka yango lelo. Soki ndeko Russell akokende na esika moko boye, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki koyebisa liboso ete ndeko Russell “akosepela kosala diskur ya bato nyonso mpo na kolobela ‘makambo kitoko ya Bokonzi ya Nzambe.’” Na 1911, ntango masangá etyamaki na mikili ebele, balendisaki lisangá mokomoko etinda balobi ya malamu na bamboka ya zingazinga mpo na kosala badiskur motoba oyo ezalaki na mitó ya makambo lokola lisambisi mpe lisiko. Na nsuka ya diskur, bazalaki koyebisa nkombo ya molobi mpe motó ya likambo ya diskur ya pɔsɔ elandi.

9. Ndenge nini Likita ya bato nyonso ebongwani na boumeli ya bambula, mpe ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ mpo na likita yango?

9 Na 1945, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaki ete Likita ya bato nyonso esengeli kobanda kosalema na mokili mobimba mpe ekozala na badiskur 8 oyo ekolobela “mikakatano ya ntango oyo tozali.” Na boumeli ya bambula mingi, balobi bazalaki kosalela mitó ya makambo oyo moombo ya sembo apesi, kasi bazalaki mpe kosala masolo oyo bango moko babongisi. Kasi, na 1981, balobi nyonso bazwaki malako ete basengeli kolanda kaka plan oyo bazwi na lisangá. * Tii na 1990, baplan mosusu ya badiskur ezalaki kosɛnga bayangani báloba to básala bilakiseli;  kasi na mbula yango, malako ya sika ebimaki, mpe bayangani bazalaki koloba lisusu te na ntango ya diskur; molobi azalaki kosala kaka lisolo. Mbongwana mosusu esalemaki na sanza ya yambo na 2008, ntango diskur ya bato nyonso ekómaki kosalema na miniti 30 na esika ya miniti 45 ndenge ezalaki liboso. Atako mbongwana nyonso wana esalemá, soki diskur ya bato nyonso ebongisami malamu, esalisaka biso tóndimela Liloba ya Nzambe mpe eteyaka biso makambo ebele oyo etali Bokonzi ya Nzambe. (1 Tim. 4:13, 16) Obengisaka bato oyo osololaka na bango makambo ya Biblia mpe bato mosusu báya koyoka badiskur yango ya ntina mingi oyo euti na Biblia?

10-12. (a) Mbongwana nini esalemi na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli? (b) Mituna nini osengeli komituna?

10 Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na 1922, bandeko oyo bazalaki kobengama ba pèlerins, oyo la Société ezalaki kotinda mpo bákende kosala badiskur mpe kotambwisa mosala ya kosakola, basɛngaki ete likita moko esalemaka mbala na mbala mpo na koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Likanisi wana endimamaki, mpe na ebandeli, boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki kosalema mokolo moko na kati ya pɔsɔ to na mokolo ya Lomingo.

Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Ghana, na 1931

11 Na nimero ya 15/06/1932, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli epesaki lisusu malako mpo na ndenge ya kosala likita yango. Na kolanda ndenge boyekoli yango ezalaki kosalema na Betele, lisolo yango ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete ndeko mobali moko asengeli kotambwisa likita yango. Bandeko misato bakoki kofanda liboso mpo na kotánga baparagrafe moto na moto na ngala na ye. Na ntango wana, masolo ezalaki na mituna te; na yango bayebisaki motambwisi asɛnga bayangani bábimisa mituna na lisolo oyo bazali kotalela. Na nsima, motambwisi akopona bato mosusu na kati ya bayangani mpo bápesa biyano na mituna yango. Soki esengeli kosembola likambo moko,  motambwisi asɛngelaki kolimbola yango “polele mpe na mokuse.”

12 Na ebandeli, lisangá mokomoko ekokaki kopona nimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo bandeko mingi basepeli koyekola. Kasi, na nimero ya 15/04/1933, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete masangá nyonso esengeli koyekola nimero oyo euti kobima. Na 1937, bapesaki malako ete boyekoli yango esengeli kosalema kaka na mokolo ya Lomingo. Makambo mosusu oyo esembolamaki mpo boyekoli yango ekóma ndenge toyebi yango lelo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/1942. Ya liboso, elobaki ete mituna ekobanda kotyama na nse ya lokasa nyonso ya masolo ya boyekoli mpe esengeli kotuna mituna yango. Na nsima, elobaki ete likita yango esengeli koumela ngonga moko. Elendisaki mpe baoyo bazali kopesa biyano bálimbola makambo “na maloba na bango moko” na esika ya kotánga makambo oyo ekomami na paragrafe.” Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali likita ya libosoliboso oyo na nzela na yango moombo ya sembo apesaka biso bilei na ntango oyo ebongi. (Mat. 24:45) Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nabongisaka boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ nyonso? Soki likoki ezali, nasalaka makasi napesa bakomantɛrɛ?’

13, 14. Boyekoli ya Biblia na lisangá ebandá ndenge nini, mpe nini esepelisaka yo na likita yango?

13 Boyekoli ya Biblia na lisangá. Na katikati ya bambula ya 1890, nsima wana bavolimi mwa mingi ya buku Aurore du Millénium ebimaki, ndeko moko na nkombo Rahn, oyo azalaki Moyekoli ya Biblia na engumba Baltimore, na etúká ya Maryland, na États-Unis, apesaki likanisi ete básala bituluku mpo na koyekola babuku yango (Cercles de l’aurore). Na ebandeli, momeseno ya kosala likita yango, oyo mbala mingi ezalaki kosalema na bandako ya bandeko, efandaki naino te. Kasi na sanza ya libwa na 1895, likita yango mpo na koyekola babuku wana ekómaki kosalema na bingumba mingi na États-Unis. Na yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza wana elobaki ete bato nyonso oyo bazali koyekola solo basengeli kosala makita yango. Linɔ́ngi elobaki ete ndeko oyo akotambwisa boyekoli yango asengeli koyeba kotánga malamu. Asengelaki kotánga fraze moko, mpe na nsima kozela bayangani bálimbola yango. Nsima ya kotánga fraze mokomoko na paragrafe mpe kolimbola yango, asengelaki kotánga bavɛrsɛ oyo etyami. Na nsuka ya boyekoli, moto nyonso asengelaki koyebisa na mokuse likambo oyo akangi na makambo oyo bayekoli.

14 Nkombo ya likita yango ebongwani mbala mingi. Na eleko moko, ebengamaki Bituluku ya Beroya mpo na boyekoli ya Biblia; nkombo yango eutaki na ndakisa ya bakristo ya Beroya ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kotalela Makomami malamumalamu. (Mis. 17:11) Na nsima, ekómaki kobengama Boyekoli ya mokanda. Lelo, tobengaka yango Boyekoli ya Biblia na lisangá, mpe lisangá mobimba ekutanaka na Ndako ya Bokonzi, kasi te na mwa bituluku na bandako ya bandeko. Na boumeli ya bambula, tosaleli babuku, mwa babuku, ata mpe  masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na koyekola na likita yango. Banda na ntango ya kala, balendisaka moto nyonso apesa biyano na likita yango. Likita yango esalisi biso mingi mpo tókolisa boyebi na biso ya Biblia. Obongisaka likita yango pɔsɔ na pɔsɔ mpe osalaka makasi opesa biyano na kotalela makoki na yo?

15. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebongisamaki na mokano nini?

15 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ndeko Carey Barber, oyo azalaki kosala na biro monene na Brooklyn, alobaki boye: “Na mwayambo, mokolo ya 16/02/1942, basɛngaki bandeko mibali nyonso ya Betele ya Brooklyn bákomisa nkombo na eteyelo oyo na nsima ekómaki kobengama Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.” Ndeko Barber, oyo na nsima akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobaki ete eteyelo yango ezalaki “moko ya makambo minene oyo Yehova asaleli bato na ye na mikolo na biso.” Lokola mateya na yango ezalaki kosalisa bandeko mibali ebele mpenza bábongisa makoki na bango ya koteya mpe  ya kosakola, kobanda na 1943, mwa buku Mateya mpo na mosala ya Teokrasi ekómaki mokemoke kosalelama na masangá ya mokili mobimba. Na mokolo ya 01/06/1943, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ebongisamaki mpo na kosalisa basaleli ya Nzambe “báyeba malamu kopesa litatoli na mosala ya kosakola Bokonzi.”2 Tim. 2:15.

16, 17. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esukaki kaka na kolakisa bandeko ndenge ya koteya? Limbolá.

16 Na ebandeli, bandeko mingi bazalaki kokoka te kosala lisolo liboso ya bato ebele. Ndeko Clayton Woodworth, oyo tata na ye akɔtaki bolɔkɔ elongo na ndeko Rutherford mpe bandeko mosusu na 1918, ayebisaki ndenge ayokaki mbala ya liboso oyo asalaki lisolo na eteyelo yango na 1943. Ndeko Woodworth alobaki boye: “Kosala lisolo ezalaki mpasi mingi mpo na ngai. Nayokaki lokola lolemo ekómi molai, monɔkɔ ekaukaki mpenza, mpe mongongo ezalaki kolɛnga.” Kasi, ntango akómaki molobi ya malamu, ndeko Clayton azwaki libaku ya kosala badiskur ebele liboso ya bato. Na eteyelo yango,  ayekolaki kaka ndenge ya koloba te. Ayekolaki mpe ntina ya komonisa komikitisa mpe kotyela Yehova motema. Alobaki boye: “Nayaki komona ete molobi ye moko azali na ntina te. Kasi soki amibongisi malamu mpe atyeli Yehova motema, bato bakoyoka ye na esengo mpe bakokanga makambo ya ntina.”

17 Na 1959, bandeko basi mpe bakɔtaki na eteyelo yango. Ndeko Edna Bauer ayebisi likambo oyo esalemaki ntango bapesaki liyebisi yango na liyangani moko oyo akɔtaki. Alobaki boye: “Bandeko basi basepelaki makasi. Sikoyo ekómaki mpe ngala na bango.” Na boumeli ya bambula, bandeko mingi ya mibali mpe ya basi bakɔtaki Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo Yehova ateya bango. Lelo, tozali kozwa mateya yango na likita na biso ya kati ya pɔsɔ.Tángá Yisaya 54:13.

18, 19. (a) Ndenge nini tozwaka malako mpo na mosala ya kosakola lelo? (b) Mpo na nini toyembaka na makita na biso? (Talá etanda “ Nzembo ya mateya ya solo.”)

18 Likita ya mosala. Kala, na 1919, bazalaki kosala makita mpo na kobongisa mosala ya kosakola. Na ntango wana, bandeko nyonso te nde bazalaki koyangana na makita yango, kaka baoyo bazalaki kosala mosala ya kokabola mikanda. Na boumeli ya mobu 1923, Likita ya mosala ezalaki kosalema mbala moko na sanza, mpe bandeko nyonso ya lisangá bakokaki koyangana na likita yango. Na 1928, balendisaki masangá esalaka Likita ya mosala pɔsɔ na pɔsɔ; mpe na 1935, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elendisaki masangá nyonso esalaka likita yango na kolanda makambo oyo ebimi na L’instructeur (oyo na nsima ekómaki kobengama L’informateur, mpe na nsima, Mosala na biso ya Bokonzi). Eumelaki te, likita yango ekɔtaki na makambo oyo lisangá ezalaki kosala mbala na mbala.

19 Lelo tozwaka malako mpo na mosala ya kosakola na likita na biso ya kati ya pɔsɔ. (Mat. 10:5-13) Soki ozwaka Mokanda ya likita yango, oyekolaka yango mpe osalelaka makanisi oyo epesami mpo na mosala ya kosakola?

Likita oyo eleki ntina na kati ya mbula

Kobanda na siɛklɛ ya liboso, bakristo bayanganaka mbula na mbula mpo na kosala Ekaniseli ya liwa ya Kristo (Talá paragrafe 20)

20-22. (a) Mpo na nini tokanisaka liwa ya Yesu? (b) Litomba nini ozwaka na koyangana na Ekaniseli mbula na mbula?

20 Yesu ayebisaki bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye tii ntango akoya. Ndenge moko na fɛti ya Elekeli, Ekaniseli ya liwa ya Kristo esalemaka mbala moko na mbula. (1 Ko. 11:23-26) Bamilio ya bato bayanganaka na likita yango mbula na mbula. Ekundwelaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo libaku oyo bazwi ya koyangela elongo na Kristo na Bokonzi. (Rom. 8:17) Mpe etindaka bampate mosusu bámonisa limemya makasi mpe bosembo epai ya Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.Yoa. 10:16.

21 Ndeko Russell ná baninga na ye bayebaki ntina ya kosala Bolei ya Mpokwa ya Nkolo mpe bayebaki ete esengeli kosalema kaka mbala moko na mbula. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya minei na 1880 elobaki boye: “Banda bambula ebele, bato mingi awa na Pittsburgh bazali na momesano ya . . . kosala Elekeli [Ekaniseli] mpe kolya limpa oyo emonisi nzoto ya Nkolo na biso mpe komɛla vinyo oyo emonisi makila na ye.”  Eumelaki te, mayangani minene ekómaki kosalema na mokolo ya Ekaniseli. Lapolo ya liboso ya mayangani yango epesamaki na 1889; na libaku yango, bayangani bazalaki 225 mpe bato 22 bazwaki batisimo.

22 Lelo, Ekaniseli ezalaka lisusu na kati ya programɛ ya liyangani te; na mokolo ya Ekaniseli, tobengaka bato nyonso ya esika tofandi báya kosangana na biso na Ndako ya Bokonzi to na esika oyo tofuteli. Na 2013, bato koleka milio 19 bayanganaki na ekaniseli ya liwa ya Yesu. Koyangana na Ekaniseli mpe kolendisa basusu báyangana elongo na biso na mpokwa wana oyo eleki mosantu ezali mpenza lokumu monene! Osepelaka kobengisa bato ebele mpenza na Ekaniseli mbula na mbula?

Ndenge oyo totalelaka makita emonisaka nini?

23. Ndenge nini otalelaka etinda ya koyangana elongo?

23 Basaleli ya sembo ya Yehova bamonaka te ete etinda ya koyangana elongo ezali kilo. (Ebr. 10:24, 25; 1 Yoa. 5:3) Na ndakisa, Mokonzi Davidi azalaki kosepela ntango akei na ndako ya Yehova mpo na kosambela. (Nz. 27:4) Azalaki kosepela mingi kosambela Nzambe elongo na bato mosusu oyo balingaka Nzambe lokola ye. (Nz. 35:18) Kanisá mpe ndakisa ya Yesu. Ata na bolenge na ye, azalaki na mposa makasi ya kozala na ndako ya losambo ya Tata na ye.Luka 2:41-49.

Mposa na biso ya koyangana elongo emonisaka soki Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza likambo ya solo na miso na biso to te

24. Koyangana na makita epesaka biso mabaku nini?

24 Ntango toyanganaka na makita, tomonisaka ete tolingaka Yehova mpe ete tozalaka na mposa ya kolendisa bandeko na biso. Tomonisaka mpe ete tolingi koyekola ndenge ya komitambwisa mpenza lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe, mpamba te toyekolaka yango na makita, na mayangani ya mike mpe ya minene. Longola yango, makita na biso epesaka biso makoki mpe makasi oyo tosengeli na yango mpo na kokoba mosala oyo eleki ntina, oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala lelo: kokómisa bato bayekoli ya Mokonzi Yesu Kristo mpe kopesa bango formasyo. (Tángá Matai 28:19, 20.) Ya solo, mposa na biso ya koyangana elongo emonisaka soki Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza likambo ya solo na miso na biso to te. Tózwaka ntango nyonso makita na biso na motuya!

^ par. 2 Longola makita ya pɔsɔ na pɔsɔ, balendisaka libota to moto mokomoko atya mokolo mpo na koyekola Biblia ye moko to kosala losambo na kati ya libota.

^ par. 9 Na 2013, baplan ya badiskur ezalaki koleka 180.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?

Talá ndenge oyo losambo na kati ya libota esalemaka na bikólo ndenge na ndenge mpo esalisa yo oyeba nini okoki mpe kosala.