Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 17

Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

Formasyo mpo na basakoli ya Bokonzi

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Elobeli ndenge biteyelo ya teokrasi esalisaka basakoli ya Bokonzi mpo bákokisa mikumba na bango

1-3. Yesu asalaki nini mpo nsango malamu esakolama na bisika mingi, mpe yango ebimisi mituna nini?

YESU asakolaki na Galile mobimba na boumeli ya mbula mibale. (Tángá Matai 9:35-38.) Akendaki na bingumba mpe bamboka ebele, azalaki koteya na basinagoga mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Esika nyonso oyo azalaki kosakola, ebele ya bato bazalaki koya epai na ye. Yesu alobaki ete “mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.”

2 Yesu azwaki bibongiseli mpo mosala ya kosakola esalema na bisika mingi. Asalaki nini? Atindaki bantoma 12 bákende “kosakola bokonzi ya Nzambe.” (Luka 9:1, 2) Mbala mosusu bantoma bazalaki komituna soki bakokokisa mosala yango ndenge nini. Lokola Yesu alingaki bantoma na ye, liboso atinda bango, apesaki bango eloko moko oyo Tata na ye ya likoló apesaki ye—formasyo.

3 Yango ebimisi mituna oyo: Formasyo nini Yesu azwaki epai ya Tata na ye? Formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye? Bongo lelo, Mokonzi Masiya apesi mpe bayekoli na ye formasyo mpo bákokisa mosala na bango? Soki ɛɛ, apesi yango ndenge nini?

“Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba”

4. Epai wapi mpe ntango nini Yehova ateyaki Yesu?

4 Yesu alobaki polele ete Tata na ye ateyaki ye. Na mosala na ye awa na mabele, Yesu alobaki boye: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoa. 8:28) Epai wapi mpe ntango nini Yehova ateyaki Yesu? Emonani ete formasyo yango ebandaki mwa moke nsima ya ntango oyo Yesu, Mwana ya liboso ya Nzambe, akelamaki. (Kol. 1:15) Elongo na Tata na ye na likoló, Yesu alekisaki bambula oyo ekoki kotángama te na koyoka ‘Molakisi Monene’ mpe koyekola epai na ye. (Yis. 30:20) Na yango, Yesu azwaki formasyo oyo ekokani na mosusu te epai ayekolaki bizaleli, misala, mpe mikano ya Tata na ye.

5. Formasyo nini Tata apesaki Mwana na ye mpo na mosala ya kosakola oyo asengelaki kosala awa na mabele?

5 Na ntango oyo ebongi, Yehova ateyaki Mwana na ye makambo etali mosala oyo akosala awa na mabele. Tótalela esakweli moko oyo elobeli boyokani kati na Molakisi Monene  ná Mwana na ye ya liboso. (Tángá Yisaya 50:4, 5.) Esakweli yango elobi ete Yehova azalaki kolamwisa Mwana na ye “ntɔngɔ na ntɔngɔ.” Maloba yango ya elilingi epesaka likanisi ya molakisi oyo alamwisaka mwana-kelasi na ye ntɔngɔntɔngɔ mpo na koteya ye. Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi boye: “Yehova . . . azalaki kozwa ye lokola mwana-kelasi na eteyelo, mpe ateyaki ye makambo oyo akosakola mpe ndenge oyo akosala yango.” Na “eteyelo” yango kuna na likoló, Yehova ateyaki Mwana na ye ‘makambo oyo asengeli koyebisa mpe oyo asengeli koloba.’ (Yoa. 12:49) Tata alakisaki mpe Mwana na ye ndenge ya koteya. * Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalelaki malamu formasyo oyo azwaki na mosala na ye ya kosakola, mpe alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kosala malamu mosala na bango ya kosakola.

6, 7. (a) Formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye, mpe yango esalisaki bango na nini? (b) Lelo oyo, Yesu asalaka ete bayekoli na ye bázwa formasyo nini?

6 Kasi, formasyo nini Yesu apesaki bantoma na ye? Na kolanda Matai mokapo 10, Yesu apesaki bango malako ya sikisiki mpo na mosala ya kosakola, na ndakisa: esika bakosakola (vɛrsɛ 5 ná 6), nsango oyo bakomema (vɛrsɛ 7), ntina ya kotyela Yehova motema (vɛrsɛ 9 ná 10), ndenge ya kobanda lisolo na bato (vɛrsɛ 11-13), ndenge ya kosala soki baboyi koyamba bango (vɛrsɛ 14 ná 15), mpe ndenge ya kosala soki bakutani na botɛmɛli (vɛrsɛ 16-23). * Formasyo wana oyo Yesu apesaki bantoma na ye esalisaki bango bápalanganisa nsango malamu na siɛklɛ ya liboso.

7 Ezali boni lelo? Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, apesi bayekoli na ye mokumba monene mpenza: kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi . . . na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14) Mokonzi apesi biso formasyo mpo tókokisa mosala yango ya ntina mingi? Ɛɛ! Kuna na likoló esika azali, Mokonzi asalaka ete bayekoli na ye bázwa formasyo na oyo etali ndenge ya kosakwela bato nsango malamu mpe ndenge ya kokokisa mikumba minene na kati ya lisangá.

Formasyo mpo na bapalanganisi ya nsango malamu

8, 9. (a) Ntina ya libosoliboso ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ezalaki nini? (b) Ndenge nini likita oyo tosalaka na kati ya pɔsɔ esalisi yo okóma mosakoli malamu ya Bokonzi?

8 Liboso, ebongiseli ya Yehova ezalaki kosalela mayangani ya mike mpe ya minene ná makita ya lisangá, lokola Likita ya mosala, mpo na kopesa basaleli ya Nzambe formasyo na oyo etali mosala ya kosakola. Kasi, kobanda na bambula ya 1940, bandeko oyo bazalaki kokamba mosala na biro monene babandaki kozwa bibongiseli mpo formasyo epesama na nzela ya biteyelo ndenge na ndenge.

9 Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Ndenge tomonaki yango na mokapo eleki, eteyelo yango ebandaki kosalema na 1943. Ntina na yango ezalaki kaka ya koteya bana-kelasi ndenge ya kosala masolo ya malamu na makita ya lisangá? Te. Ntina ya libosoliboso ya eteyelo yango ezalaki ya koteya basaleli ya Nzambe mpo básalela likabo ya koloba, oyo Yehova apesá biso, mpo na kokumisa ye na mosala ya kosakola. (Nz. 150:6)  Eteyelo yango esalisaki bandeko mibali mpe bandeko basi nyonso oyo bazalaki na eteyelo yango bákóma basakoli ya malamu ya Bokonzi. Lelo, tozali kozwa mateya yango na likita ya kati ya pɔsɔ.

10, 11. Banani bakoki kokɔta na Eteyelo ya Gileade lelo oyo, mpe mateya na yango ebongisamá na mokano nini?

10 Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Eteyelo yango ebandaki na mwayambo, na mokolo ya 01/02/1943. Na ebandeli, eteyelo yango ebongisamaki mpo na koteya babongisi-nzela mpe basaleli mosusu ya ntango nyonso mpo bákende mosala ya misionɛrɛ na ekólo oyo bakotinda bango. Kasi, kobanda na sanza ya zomi na 2011, eteyelo yango ekómá kaka mpo na bandeko oyo bazali babongisi-nzela monene, bakɛngɛli-batamboli ná basi na bango, bandeko ya Betele, mpe bamisionɛrɛ oyo bakɔtá naino eteyelo yango te.

11 Mateya ya eteyelo ya Gileade ebongisamá na mokano nini? Ndeko moko oyo azali molakisi na eteyelo yango banda kala alobi ete “ezali mpo na kolendisa kondima ya bana-kelasi na nzela ya boyekoli ya mozindo ya Liloba ya Nzambe mpe kosalisa bango bákolisa bizaleli ya elimo oyo ekosalisa bango bálonga mikakatano na bateritware. Mateya yango ebongisamá mpe na mokano ya kosalisa bana-kelasi bázala na mposa makasi ya kopalanganisa nsango malamu.”Ef. 4:11.

12, 13. Ndenge nini Eteyelo ya Gileade esalisi na mosala ya kosakola na mokili mobimba? Pesá ndakisa.

12 Ndenge nini Eteyelo ya Gileade esalisi na mosala ya kosakola na mokili mobimba? Banda 1943, bandeko koleka 8 500 bakɔti eteyelo yango, * mpe bamisionɛrɛ yango basali na mikili koleka 170. Bamisionɛrɛ basalelaka malamu formasyo oyo bazwi, mpe na bongo bazalaka ndakisa malamu na oyo etali kozala molende na mosala ya kosakola mpe bapesaka basusu formasyo na likambo yango. Mbala mingi, bamisionɛrɛ batambwisaka mosala ya kosakola na bateritware oyo basakoli ya Bokonzi bazali moke to mpe bazali te.

13 Tózwa ndakisa ya Japon, epai mosala ya kosakola ezalaki kosalema lisusu na molɔngɔ te na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na sanza ya mwambe 1949, basakoli bazalaki ata zomi te na Japon. Kasi na nsuka ya mbula yango, bamisionɛrɛ 13 oyo bazwaki formasyo na Gileade bamipesaki na kosakola na Japon. Bamisionɛrɛ mosusu ebele bayaki na nsima. Na ebandeli, bamisionɛrɛ bamipesaki na kosakola na bingumba ya minene; na nsima bakendaki mpe na bingumba mosusu. Mpiko ya bamisionɛrɛ yango elendisaki bayekoli na bango ya Biblia mpe bandeko mosusu bákóma babongisi-nzela. Molende ya bamisionɛrɛ ebotaki mbuma ya malamu mpenza. Lelo, basakoli na Japon bazali koleka 216 000, mpe mingi kati na bango (40%) bazali babongisi-nzela! *

14. Biteyelo ya teokrasi ezali komonisa nini? (Talá mpe etanda “ Biteyelo mpo na kobongisa basakoli ya Bokonzi,” na lokasa 188.)

14 Biteyelo mosusu ya Teokrasi. Eteyelo ya babongisi-nzela, Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá, mpe Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba esalisi bandeko  oyo bakɔtá yango bázala makasi na elimo mpe bámipesa na molende na kopalanganisa nsango malamu. * Biteyelo wana nyonso ezali mpenza komonisa ete Mokonzi apesi bayekoli na ye nyonso oyo esengeli mpo bákokisa mosala na bango.2 Tim. 4:5.

Koteya bandeko mibali mpo bákokisa mikumba minene

15. Bandeko oyo bazali na mikumba balingaka komekola Yesu na likambo nini?

15 Kanisá lisusu esakweli ya Yisaya oyo elobelaki ndenge Nzambe azalaki koteya Yesu. Na “eteyelo” wana ya likoló, Yesu ayekolaki “ndenge ya koloba mpo na kobɔndisa moto oyo alɛmbi.” (Yis. 50:4.) Yesu asalelaki mateya wana; ntango azalaki awa na mabele, abɔndisaki bato oyo bazalaki “komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.” (Mat. 11:28-30) Na ndakisa ya Yesu, bandeko mibali oyo bazali na mikumba balingaka kobɔndisa bandeko na bango na lisangá. Yango wana, biteyelo ndenge na ndenge esalemi mpo na kosalisa bango báyeba malamumalamu ndenge ya kosalisa bandeko na bango.

16, 17. Ntina ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi ezali nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

16 Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Kelasi ya liboso ya eteyelo yango ebandaki na mokolo ya 09/03/1959 na South  Lansing, na etúká ya New York. Babengisaki bakɛngɛli-batamboli mpe basaleli ya masangá mpo bálanda mateya sanza mobimba. Na nsima, babongolaki mateya yango oyo ezalaki na Lingelesi na minɔkɔ mosusu, mpe mokemoke, bandeko mibali na mokili mobimba bakómaki kozwa formasyo na eteyelo yango. *

Ndeko Lloyd Barry azali koteya na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi na Japon, na 1970

17 Annuaire des Témoins de Jéhovah 1962 elobelaki ntina ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi; elobaki boye: “Na mokili oyo etondi na yikiyiki, mokɛngɛli na lisangá ya Batatoli ya Yehova asengeli kozala moto oyo ayebi kobongisa makambo na bomoi na ye mpo akoka kotyela bandeko nyonso ya lisangá likebi ndenge esengeli mpe asalisa bango. Asengeli mpe te kosundola libota na ye mpe komipesa mobimba na lisangá, kasi asengeli kozala na makanisi malamu. Basaleli na masangá ya mokili mobimba bazwaki libaku malamu mpenza ya koyangana elongo na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpo na kozwa formasyo oyo ekosalisa bango báyeba kosala makambo oyo Biblia elobi ete mokɛngɛli asengeli kosala!”1 Tim. 3:1-7; Tito 1:5-9.

18. Na ndenge nini basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka matomba ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi?

 18 Basaleli nyonso ya Nzambe bazwaka matomba ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi. Na ndenge nini? Ntango bankulutu mpe basaleli na misala bazali kosalela makambo oyo bayekolaki na eteyelo yango balendisaka bandeko ya lisangá, ndenge Yesu asalaki. Osepelaka te soki nkulutu moko to mosaleli na misala ayebisi yo likambo moko ya boboto, ayoki yo na likebi, to mpe ayei kotala yo mpo na kolendisa yo? (1 Tes. 5:11) Bandeko ya ndenge wana bazali mpenza lipamboli na masangá na bango!

19. Komite ya Mateya ebongisi mpe biteyelo nini, mpe biteyelo yango ebongisami mpo na nini?

19 Biteyelo mosusu ya teokrasi. Komite ya mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisi mpe biteyelo mosusu mpo na kopesa formasyo na bandeko oyo bazali na mikumba na ebongiseli ya Yehova. Biteyelo yango ebongisami mpo na kosalisa bankulutu, bakɛngɛli-batomboli, mpe bandeko ya Bakomite ya filiale, mpo bákokisa mikumba na bango malamumalamu. Mateya yango oyo euti na Biblia elendisaka bandeko yango bázala ntango nyonso makasi na elimo mpe básalela batoli ya Biblia ntango bazali kotalela makambo ya bampate ya Yehova oyo apesi na mabɔkɔ na bango.1 Pe. 5:1-3.

Kelasi ya liboso ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi na Malawi, na 2007

20. Mpo na nini Yesu alobaki ete biso nyonso ‘toteyami na Yehova,’ mpe ozali na ekateli nini?

20 Ya solo, Masiya Mokonzi asali nyonso mpo bayekoli na ye bázwa formasyo oyo esengeli. Formasyo yango euti likoló: Yehova ateyaki Mwana ye, mpe Mwana na ye ateyi bayekoli na ye. Yango wana, Yesu alobaki ete biso nyonso ‘toteyami na Yehova.’ (Yoa. 6:45; Yis. 54:13) Tózala na ekateli ya kosalela mpenza formasyo oyo Mokonzi azali kopesa biso. Mpe tóbosana te ete formasyo nyonso oyo tozwi ezali mpo na kosalisa biso tózala makasi na elimo mpo tókokisa mosala ya kosakola malamumalamu.

^ par. 5 Ndenge nini toyebi ete Tata alakisaki Mwana na ye ndenge ya koteya? Kanisá naino: Ndenge Yesu asalelaki bandakisa ebele ntango azalaki koteya ekokisaki esakweli moko oyo ekomamaki basiɛklɛ mingi liboso abotama. (Nz. 78:2; Mat. 13:34, 35) Ezali polele ete Yehova, oyo akomisaki esakweli yango, abongisaki ete ntango Mwana na ye akoya, akoteya na nzela ya bandakisa, to masese.2 Tim. 3:16, 17.

^ par. 6 Mwa basanza na nsima, Yesu “aponaki bayekoli mosusu ntuku nsambo (70) mpe atindaki bango mibalemibale” na mosala ya kosakola. Apesaki bango mpe formasyo.Luka 10:1-16.

^ par. 12 Bandeko mosusu bakɔtaki Eteyelo ya Gileade koleka mbala moko.

^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo mosala ya bamisionɛrɛ ya Gileade esali na mokili mobimba, talá mokapo 23 ya buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu.

^ par. 14 Longola eteyelo ya babongisi-nzela, biteyelo wana mosusu mibale ekómi Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi.

^ par. 16 Lelo oyo, bankulutu nyonso balandaka mateya ya Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo esalemaka nsima ya mwa bambula moke; mosusu eumelaka mikolo mingi, mosusu eumelaka te. Kobanda 1984, basaleli na misala mpe bazwaka formasyo na eteyelo yango.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

“Yeisá patatalu nzela ya lokolo na yo” mpo okende liboso

Ndenge nini okoki kolongola mabaku mpe kokokisa mikano na yo ya elimo?

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Salisá basusu bákóma lisusu na makoki mingi

Ndenge nini tokoki kosalisa bilenge to bato oyo bazwi batisimo sika bákende liboso?