Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 20

Mosala ya kosunga bandeko

Mosala ya kosunga bandeko

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ndenge bolingo ya bokristo emonanaka na ntango ya makama minene

1, 2. (a) Mokakatano nini bakristo ya Yudea bakutanaki na yango? (b) Basalelaki bakristo ya Yudea likambo nini oyo emonisaki bolingo?

NA MOBU soki 46 T.B., nzala makasi ekɔtaki na etúká ya Yudea. Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki na makoki te ya kokokisa bamposa na bango mpo biloko ya kolya ezalaki mingi te mpe ekómaki ntalo mingi. Bazalaki kokufa nzala mpenza. Kasi, Yehova asalisaki bango na ndenge oyo esalemaki naino liboso te mpo na bayekoli ya Kristo. Nini esalemaki?

2 Bayuda mpe bato ya bikólo mosusu oyo bakómaki bakristo mpe bazalaki kofanda na Antiokia, na etúká ya Siri bayokaki mawa mingi mpo na bakristo ya Yerusaleme ná ya Yudea mpe basangisaki mbongo mpo na kosunga bango. Na nsima, baponaki Barnabasi ná Saulo, mibali mibale oyo bakɔmɛli na elimo, mpo bákende kopesa bankulutu ya masangá ya Yerusaleme biloko yango ya lisungi. (Tángá Misala 11:27-30; 12:25.) Kanisá ndenge bandeko ya Yudea bayokaki ntango bamonaki bolingo ya bandeko na bango ya Antiokia!

3. (a) Ndenge nini basaleli ya Nzambe lelo balandaka ndakisa ya bakristo ya Antiokia? Pesá ndakisa. (Talá mpe etanda “ Mosala na biso monene ya liboso mpo na kosunga bandeko.”) (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

3 Likambo wana oyo esalemaki na siɛklɛ ya liboso ezalaki mbala ya liboso bálobela ndenge bakristo ya mboka moko batindelaki bakristo ya mboka mosusu biloko mpo na kosunga bango. Lelo, tolandaka ndakisa ya bandeko wana ya Antiokia. Soki toyoki ete bandeko na biso na esika moko boye bakutani na likama to bamekami makasi, tosungaka bango. * Mpo na komona ndenge mosala na biso ya kosunga bandeko ezali na boyokani na mosala mosantu, tótalela mituna misato: Mpo na nini tomonaka ete kosunga bandeko ezali mosala mosantu? Ntina ya mosala yango ezalaka nini? Matomba nini tozwaka na mosala yango?

Mosala ya kosunga bandeko ezali “mosala mosantu”

4. Paulo ayebisaki Bakorinti nini mpo na mosala ya bokristo?

4 Na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, Paulo amonisaki ete mosala ya bokristo ezali na biteni mibale. Atako Paulo akomelaki libosoliboso bakristo oyo batyami mafuta na elimo, lelo oyo maloba na ye etali mpe “bampate mosusu” ya Kristo. (Yoa. 10:16) Eteni moko ya mosala ya bokristo ezali “mosala ya kozongisa na boyokani,” elingi koloba mosala ya kosakola mpe ya koteya. (2 Ko. 5:18-20; 1 Tim. 2:3-6) Eteni mosusu ezali mosala oyo esalemaka mpo na bolamu ya  bandeko. Paulo alobelaki “mosala oyo esengelaki kosalema mpo na basantu.” (2 Ko. 8:4) Na maloba “mosala ya kozongisa na boyokani” mpe “mosala oyo esengelaki kosalema,” liloba oyo ebongolami na “mosala” ezali liloba kaka moko ya Grɛki diakonia. Mpo na nini ezali na ntina?

5. Ndenge Paulo alobaki ete kosunga bandeko ezali “mosala” emonisi nini?

5 Lokola Paulo asalelaki liloba moko mpo na misala yango mibale, amonisaki ete mosala ya kosunga bandeko ezalaki na kati ya misala oyo ezalaki kosalema na lisangá ya bokristo. Na mokanda ya liboso epai ya Bakorinti alobaki ete: “Misala ya kosunga bato ezali ndenge na ndenge, mpe atako bongo Nkolo azali kaka moko; mpe misala ezali ndenge na ndenge, . . . Kasi misala nyonso wana, elimo kaka moko nde esalaka yango.” (1 Ko. 12:4-6, 11) Na maloba mosusu, Paulo amonisaki ete misala ndenge na ndenge oyo ezalaki kosalema na lisangá ezalaki na boyokani na “mosala mosantu.” * (Rom. 12:1, 6-8) Yango wana amonaki ete ebongaki mpe ete apesa ntango na ye mpo na ‘kosalela basantu’!Rom. 15:25, 26.

6. (a) Ndenge Paulo alimbolaki yango, mpo na nini mosala ya kosunga bandeko ezali eteni ya losambo na biso? (b) Lobelá ndenge mosala ya kosunga bandeko na mokili mobimba esalemaka lelo oyo. (Talá etanda “ Ntango likama esalemi!”)

6 Paulo asalisaki bakristo ya Korinti bámona ntina oyo mosala ya kosunga bandeko ezali na kati ya mosala ya bokristo mpe na kati ya losambo ya Yehova. Mpo na Paulo, bakristo oyo basungaka bandeko basalaka bongo mpamba te ‘batosaka nsango malamu oyo etali Kristo.’ (2 Ko. 9:13) Na yango, mposa ya kotosa mateya ya Kristo etindaka bakristo básalisa bandeko na bango. Paulo alobaki ete makambo nyonso oyo bakristo basalaka mpo na kosunga bandeko na bango ezali kaka mpo na komonisa “boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza.” (2 Ko. 9:14; 1 Pe. 4:10) Yango wana, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1975 elobaki mpo na mosala ya kosunga bandeko ete: “Tosengeli soki moke te kotya ntembe ete Yehova Nzambe ná Mwana na ye Yesu Kristo bazwaka mosala yango na motuya mingi.” Ya solo, mosala ya kosunga bandeko mpe ezali na kati ya mosala mosantu.Rom. 12:1, 7; 2 Ko. 8:7; Ebr. 13:16.

Kosunga bandeko na mikano ya sikisiki

7, 8. Wapi ntina ya liboso ya mosala ya kosunga bandeko? Limbolá.

7 Tosungaka bandeko na mikano nini? Paulo apesaki eyano na motuna yango na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti. (Tángá 2 Bakorinti 9:11-15.) Na bavɛrsɛ yango, Paulo alobelaki mikano misato ya “mosala oyo ezali kosalema mpo na bolamu ya bato nyonso,” elingi koloba mosala ya kosunga bandeko. Tólobela yango mokomoko.

8 Ya liboso, mosala ya kosunga bandeko epesaka Yehova nkembo. Na bavɛrsɛ wana mitano ya 2 Bakorinti, Paulo abendaki likebi ya bandeko mbala mingi epai ya Yehova Nzambe. Paulo akundwelaki bango likambo ya ‘kopesa Nzambe matɔndi.’ (Vɛrsɛ 11, 12) Alobelaki ndenge mosala ya kosunga bandeko etindaka bakristo ‘bápesa Nzambe nkembo’ mpe bákumisa “boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza.” (Vɛrsɛ 13, 14) Mpo na kosukisa makambo oyo azalaki koloba  na oyo etali mosala ya kosunga bandeko, Paulo alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi.”Vɛrsɛ 15; 1 Pe. 4:11.

9. Ndenge nini mosala ya kosunga bandeko ekoki kobongola makanisi ya moto? Pesá ndakisa.

9 Ndenge moko na Paulo, basaleli ya Nzambe lelo bamonaka ete mosala ya kosunga bandeko ezali libaku ya kopesa Yehova nkembo mpe ya kokembisa mateya na ye. (1 Ko. 10:31; Tito 2:10) Kutu, mosala yango esalisi bato mosusu bálongola makanisi ya mabe oyo bazalaka na yango mpo na Yehova mpe mpo na Batatoli na ye. Na ndakisa, na mboka moko, mwasi moko atyaki elembo na porte na ye oyo elobaki ete: “Soki bozali Batatoli ya Yehova, bóbɛta awa te.” Na nsima, ntango mopɛpɛ makasi ebɛtaki mboka na bango, mwasi yango amonaki bato bazali kobongisa ndako moko oyo ebebaki na ngámbo mosusu ya balabala. Mokolo na mokolo, azalaki komona ndenge bazalaki kosala na esengo, mpe na nsima akendaki kuna mpo na koyeba soki bazali banani. Ntango ayokaki ete bato yango bazali Batatoli ya Yehova, akamwaki makasi mpe alobaki: “Nazalaki kokanisela bino mabe.” Nini esalemaki? Alongolaki elembo oyo atyaki na porte na ye.

10, 11. (a) Bandakisa nini emonisi ete mosala ya kosunga bandeko ekokisaka malamu bamposa na bango? (b) Mokanda nini esalisaka bandeko oyo basalaka mosala ya kosunga? (Talá etanda “ Lisalisi mpo na baoyo basungaka bandeko.”)

10 Ya mibale, na nzela ya mosala yango, ‘tokokisaka malamu bamposa’ ya bandeko. (2 Ko. 9:12a) Soki likama ebimi, tosalaka nokinoki mpo na kosunga bandeko mpe kokitisa mwa moke mpasi na bango. Mpo na nini? Mpo biso nyonso na lisangá ya bokristo tozali “nzoto kaka moko,” mpe “soki enama moko ezali koyoka mpasi, binama nyonso mosusu [eyokaka] mpasi elongo na yango.” (1 Ko. 12:20, 26) Yango wana, bolingo ya bondeko mpe motema mawa etindaka bandeko bábongola mbala moko baprogramɛ na bango, bázwa bisaleli na bango, mpe bákende nokinoki na bisika oyo makama ebimi mpo na kosunga bandeko. (Yak. 2:15, 16) Na ndakisa, nsima ya tsunami oyo ebɛtaki Japon na 2011, Betele ya États-Unis etindelaki Bakomite ya botongi na bitúká ya États-Unis mokanda mpo na kosɛnga “mwa bandeko oyo bayebi mosala,” oyo bakoki kokende kosalisa na kotonga lisusu Bandako ya Bokonzi na Japon. Nini esalemaki? Nsima ya mwa bapɔsɔ, bandeko soki 600 batondisaki formilɛrɛ, mpe bandimaki kokende na Japon na mbongo na bango moko! Betele ya États-Unis elobaki boye: “Motángo ya bandeko oyo bamipesaki elekelaki biso mpenza.” Ntango ndeko moko ya Japon atunaki moko ya bandeko oyo bayaki kosalisa na Japon ntina oyo andimaki koya, ndeko yango alobaki ete: “Bandeko na biso ya Japon bazali eteni ya ‘nzoto na biso.’ Mpasi na bango ezali mpasi na biso.” Na bantango mosusu, bandeko oyo bakei kosunga basusu bamonisaka bolingo ya solosolo na ndenge batyaka ata bomoi na bango na likama. *1 Yoa. 3:16.

11 Mosala na biso ya kosunga bandeko esepelisaka ata bato oyo bazali Batatoli te. Na ndakisa, ntango likama moko ebɛtaki etúká ya Arkansas, na États-Unis, na 2013, zulunalo moko elobelaki ndenge Batatoli bayaki nokinoki mpo na kosunga  bandeko na bango; elobaki boye: “Batatoli ya Yehova bazwaka malako ya malamu mpenza, yango wana bayebaka kosunga bandeko na bango nokinoki mpe na ndenge oyo ebongi.” Ya solo, ndenge ntoma Paulo alobaki yango, ‘tokokisaka malamu’ bamposa ya bandeko na biso.

12-14. (a) Mpo na nini kosalisa bandeko oyo bazwi likama bázongela makambo ya elimo ezali na ntina mingi? (b) Makambo nini oyo bandeko balobaki emonisi ntina ya kozongela makambo ya elimo?

12 Ya misato, tosalisaka bandeko oyo bazwi likama bázongela makambo ya elimo. Yango ezali na ntina nini? Paulo alobaki ete ntango bandeko bazwi lisalisi, yango ekotinda bango bápesa Nzambe “matɔndi mingi.” (2 Ko. 9:12b) Lolenge ya malamu koleka oyo bandeko oyo bazwi likama bakoki kopesa Nzambe matɔndi ezali kozongela nokinoki makambo ya elimo, boye te? (Flp. 1:10) Na 1945, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki boye: “Paulo andimaki . . . ete bákɔngɔlaka makabo mpo ezalaki kosalisa . . . bakristo oyo bazali na bosɛnga bákokisa bamposa na bango ya mosuni mpo bázwa makasi ya komipesa na molende na mosala ya [kosakola].” Lelo mpe, mokano na biso ezali bongo. Soki bandeko bazongeli mosala ya kosakola, balendisaka bazalani na bango oyo bazali na mawa mpe bango moko bazwaka makasi.Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4.

13 Tótalela mwa maloba ya baoyo bazwaki lisalisi na ntango ya likama, bazongelaki mosala ya kosakola, mpe bazwaki makasi na mosala yango. Ndeko mobali moko alobi boye: “Ezalaki esengo mingi ndenge libota na biso ezongelaki mosala ya kosakola. Lokola tozali koluka kobɔndisa basusu, esalisaki biso tóbosana mwa moke mitungisi na biso.” Ndeko mwasi moko alobaki ete: “Komipesa na makambo ya elimo esalisaki ngai nakanisa lisusu te ndenge likama ebebisi mboka na biso. Epesaki ngai kimya.” Ndeko mwasi mosusu alobaki boye: “Atako tokokaki kosala eloko te mpo na kobongisa makambo mosusu, mosala ya kosakola esalisi libota na biso. Koyebisa bato elikya ya mokili ya sika esalisaki biso tóbosana te ete biloko nyonso ekokóma biloko ya sika.”

14 Koyangana na makita ezali likambo mosusu oyo bandeko oyo bazwi likama basengeli kozongela nokinoki. Tózwa ndakisa ya Kiyoko, ndeko mwasi moko oyo azalaki na mbula pene na 60. Nsima ya kobungisa biloko nyonso na tsunami moko oyo esalemaki mpe atikalaki kaka na bilamba ná lipapa oyo alataki, asilaki mayele. Na nsima, nkulutu moko ayebisaki ye ete bakobanda kosala makita ya pɔsɔ na kati ya motuka na ye. Kiyoko alobi boye: “Na motuka yango, tozalaki ngai, nkulutu wana ná mwasi na ye, ná ndeko mwasi mosusu. Likita yango ezalaki molai te, kasi, makanisi ya tsunami elongwaki na motó na ngai lokola na ndenge ya likamwisi. Nayokaki kimya ya motema. Likita wana emonisaki ngai ntina ya koyangana na bakristo mosusu.” Ndeko mosusu ayebisi ndenge ayokaki mpo na makita oyo akɔtaki nsima ya likama oyo esalemaki; alobaki ete: “Esalisaki ngai nayika mpiko!”Rom. 1:11, 12; 12:12.

 Mosala ya kosunga bandeko epesaka matomba ya solosolo

15, 16. (a) Litomba nini bandeko ya Korinti mpe bakristo mosusu bazwaki na mosala ya kosunga bandeko? (b) Ndenge nini tozwaka mpe matomba na mosala ya kosunga bandeko lelo?

15 Ntango Paulo alobelaki mosala ya kosunga bandeko, ayebisaki mpe bandeko ya Korinti matomba oyo bango mpe bakristo mosusu bakozwa na mosala yango. Alobaki ete: “Elongo na malɔmbɔ oyo bazali kosala mpo na bino bazali [bakristo ya Yerusaleme oyo bazwi lisungi] mpe koyoka bino mposa makasi mpo na boboto monene ya Nzambe oyo eleki mpenza epai na bino.” (2 Ko. 9:14) Ya solo, elimo ya kokaba ya bakristo ya Korinti elingaki kotinda bakristo oyo bazalaki Bayuda bábondela mpo na bandeko na bango ya Korinti, oyo mosusu bazalaki bato ya bikólo mosusu, mpe bálinga bango mingi.

16 Mpo na komonisa ete maloba ya Paulo oyo elobeli matomba ya mosala ya kosunga bandeko etali mpe biso lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1945 elobaki ete: “Ntango basaleli ya Nzambe ya esika moko boye basalisi basaleli ya Nzambe ya esika mosusu, bakómaka na bomoko makasi!” Baoyo bamipesaka na mosala ya kosunga bandeko lelo oyo bamonaka ete ezali mpenza bongo. Nkulutu moko oyo amipesaki mpo na kosalisa bandeko oyo bakutanaki na likama ya mpela alobi boye: “Mosala ya kosunga bandeko esalisi ngai nalinga bango makasi koleka liboso.” Ndeko mwasi moko oyo asepelaki mingi na lisungi oyo azwaki alobaki ete: “Bondeko na biso ezali eloko ya motuya oyo tokozala na yango na Paradiso na mabele.”Tángá Masese 17:17.

17. (a) Ndenge nini maloba ya Yisaya 41:13 etali mosala ya kosunga bandeko? (b) Tángá mwa bandakisa oyo emonisi ndenge mosala ya kosunga bandeko ekumisaka Yehova mpe elendisaka bomoko na biso. (Talá mpe etanda “ Bamipesi mpo na kosunga bandeko na mokili mobimba.”)

 17 Ntango bandeko oyo bayei kosalisa bakómi na esika oyo likama esalemi, bandeko oyo bazwaki likama bamonaka bosolo ya elaka oyo ya Nzambe ete: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali, ngai Moto nazali koloba na yo ete: ‘Kobanga te. Ngai moko nakosalisa yo.’” (Yis. 41:13) Nsima ya kobika na likama, ndeko mwasi moko alobaki ete: “Nazalaki lisusu na elikya te ntango namonaki biloko oyo ebebaki, kasi Yehova atikaki ngai te. Maloba ezangi ngai mpo nalobela ndenge bandeko basalisaki ngai.” Ntango likama moko ebebisaki mboka na bango, bankulutu mibale bakomaki mokanda na nkombo ya masangá na bango; balobaki boye: “Koningana ya mabele esalaki biso mpasi mingi, kasi tomonaki ndenge Yehova asungaki biso na nzela ya bandeko na biso. Tozalaki kotánga likambo ya kosunga bandeko kaka na mikanda, kasi biso moko mpe tomonaki yango na miso.”

Yo mpe okoki kosalisa?

18. Okoki kosala nini soki olingi kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosunga bandeko oyo bazwi likama? (Talá mpe etanda “ Elakisaki ngai nzela.”)

18 Olingi koyoka esengo ya kosunga bandeko? Soki ezali bongo, yebá ete mbala mingi bandeko oyo bakendaka kosunga na ntango ya likama ezalaka bandeko oyo batongaka Bandako ya Bokonzi. Na yango, yebisá bankulutu ete olingi kotondisa formilɛrɛ. Nkulutu moko oyo asali mingi na mosala ya kosunga bandeko alobi boye: “Okokende na esika oyo likama ebimi kaka soki bandeko ya Komite ya bosungi babengisi yo.” Na ndenge yango, mosala na biso ya kosunga bandeko ekosalema na molɔngɔ.

19. Ndenge nini basali na mosala ya kosunga bandeko basalisaka mingi na komonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Kristo?

19 Ya solo, mosala ya kosunga bandeko ezali lolenge malamu ya kotosa etinda oyo Yesu apesaki ete tosengeli ‘kolingana.’ Soki tozali na bolingo ndenge wana, tokomonisa ete tozali mpenza bayekoli ya Kristo. (Yoa. 13:34, 35) Ezali mpenza lipamboli kozala na ebele ya bandeko oyo bamipesi na bolingo na bango moko mpo na kopesa Yehova nkembo na nzela ya mosala ya kosunga na ntango ya likama bato ya sembo oyo bandimi Bokonzi ya Nzambe!

^ par. 3 Mokapo oyo elobeli mosala ya kosunga bandeko na biso Batatoli ya Yehova. Kasi, mbala mingi, ata baoyo bazali Batatoli ya Yehova te bazwaka matomba na yango.Gal. 6:10.

^ par. 5 Paulo asalelaki liloba diakonos (mosaleli) na boike mpo na kolobela “basaleli na misala.”1 Tim. 3:12.

^ par. 10 Talá lisolo “Tosungaki bandeko na biso bandimi na Bosnie,” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/1994, nkasa 23-27.