Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 18

Makabo mpo na mosala ya Bokonzi

Makabo mpo na mosala ya Bokonzi

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Ntina oyo basaleli ya Yehova bapesaka makabo mpo na kosimba mosala ya Bokonzi mpe ndenge oyo basalaka yango

1, 2. (a) Ndeko Russell ayanolaki nini epai ya pastɛrɛ oyo alingaki koyeba ndenge mosala ya Bayekoli ya Biblia ezalaki kotambola? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo?

MOKOLO moko, pastɛrɛ moko ya lingomba ya Protesta ayaki epai ya ndeko Charles Russell mpo na kotuna ye ndenge oyo Bayekoli ya Biblia bazalaki kotambwisa mosala na bango.

Ndeko Russell ayebisaki ye ete: “Tokɔngɔlaka mabonza te.”

Pastɛrɛ wana atunaki ye: “Bongo bozwaka mbongo wapi?”

Ndeko Russell azongisaki: “Soki nayebisi yo solo, okondima te. Ntango bato bayaka na makita na biso, bamonaka kitunga moko te oyo tolekisaka liboso na bango mpo bátya mabonza. Kasi, bamonaka ete tosengeli na mbongo mpo na kotambwisa makambo. Bamilobelaka bango moko ete, ‘Ndako oyo ezali kosɛnga mbongo . . . Ndenge nini nakoki kopesa mwa mbongo mpo na yango?’”

Pastɛrɛ atalaki ndeko Russell mpe azalaki kondima te.

Ndeko Russell alobaki: “Nazali koyebisa yo solo mpenza. Bango moko batunaka ngai: ‘Ndenge nini nakoki kopesa mwa mbongo mpo na mosala oyo?’ Moto oyo azwi mapamboli mpe azali na mwa mbongo, alingaka kosalela yango mpo na Nkolo. Soki moto azali na makoki te, mpo na nini tótya ye mbamba?” *

2 Ndeko Russell azalaki koloba “solo mpenza.” Banda kala, basaleli ya Nzambe bapesaka makabo na bolingo na bango moko mpo na kosimba losambo ya solo. Na mokapo oyo, tokolobela bandakisa ya Biblia mpe bandakisa mosusu ya mikolo na biso oyo emonisi likambo yango. Wana tozali kotalela ndenge makabo epesamaka mpo na mosala ya Bokonzi lelo oyo, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Ndenge nini ngai mpe nakoki kosimba mosala ya Bokonzi?’

“Moto nyonso oyo motema na ye elingi amema . . . likabo ya Yehova”

3, 4. (a) Elikya nini Yehova azalaka na yango epai ya basaleli na ye? (b) Ndenge nini Bayisraele basimbaki mosala ya kotonga tabernakle?

3 Yehova atyelaka basaleli na ye ya solo motema. Ayebi ete soki bazwi libaku, bakopesa makabo na esengo nyonso mpo  na komonisa ete balingaka ye. Tótalela bandakisa mibale ya ekólo Yisraele.

4 Nsima ya kobimisa Bayisraele na Ezipito, Yehova ayebisaki bango bátonga hema, to tabernakle, mpo na losambo. Kotonga yango mpe kotya biloko na yango nyonso esɛngaki mbongo mingi. Yehova ayebisaki Moize apesa bato libaku ya kopesa mabɔkɔ na mosala yango; alobaki ete: “Moto nyonso oyo motema na ye elingi amema . . . likabo ya Yehova.” (Kob. 35:5) Bato ya ekólo yango, oyo bautaki konyokwama “na misala ya boombo ya lolenge nyonso” na Ezipito basalaki nini? (Kob. 1:14) Basimbaki mosala wana na ndenge ya koloba te: bamemaki na esengo nyonso wolo, palata, mpe biloko mosusu ya motuya; ekoki kozala mingi kati na biloko yango nde bazwaki epai ya Baezipito, bato oyo bazalaki kokonza bango. (Kob. 12:35, 36) Bayisraele bamemaki biloko koleka oyo esengelaki tii “bapekisaki bato koya na eloko.”Kob. 36:4-7.

5. Bayisraele basalaki nini ntango Davidi apesaki bango libaku ya kopesa makabo mpo na kotonga tempelo?

5 Mbula soki 475 na nsima, Davidi apesaki makabo oyo eutaki na ‘biloko na ye moko’ mpo na kosimba mosala ya kotonga tempelo, ndako ya liboso oyo ezalaki esika ya losambo ya solo awa na mabele. Na nsima, apesaki bato ya ekólo libaku ya kopesa makabo; atunaki boye: “Nani akomipesa na bolingo mpo na kotondisa lobɔkɔ na ye lelo na likabo mpo na Yehova?” Na yango, bato “bazalaki kopesa Yehova makabo ya bolingo” “na motema mobimba.” (1 Nt. 29:3-9) Lokola Davidi ayebaki ete makabo yango eutaki nde epai ya Yehova, abondelaki ye ete: “Eloko nyonso euti na yo, mpe oyo topesi yo euti na lobɔkɔ na yo moko.”1 Nt. 29:14.

6. Mpo na nini esɛngaka mbongo mpo na kosala mosala ya Bokonzi lelo, mpe mituna nini yango ebimisi?

6 Ezala Moize, to Davidi, moko te atyaki bato mbamba mpo bápesa makabo. Bato bapesaki makabo na bolingo na bango moko. Bongo lelo? Toyebi malamu ete mosala oyo Bokonzi ya Nzambe ezali kosala esɛngaka mbongo. Esɛngaka mbongo mingi mpo na kobimisa mpe kokabola Babiblia mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, kotonga mpe kobatela bisika oyo tosalaka makita mpe babiro ya filiale, mpe kosunga nokinoki bandeko oyo bazwi likama. Na yango, mituna ya ntina mingi yango oyo: Mbongo oyo tosalelaka makambo wana eutaka wapi? Esɛngaka kotya bayekoli ya Kristo mbamba mpo bátya makabo?

“Tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato”

7, 8. Mpo na nini basaleli ya Yehova basɛngaka bato mbongo te?

7 Ndeko Russell ná baninga na ye baboyaki kolanda mayele mabe ya kozwa mbongo ebele, ndenge mangomba mingi ya bokristo esalaka. Na nimero ya mibale ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ndeko Russell abimisaki lisolo moko oyo elobaki “Bolingi ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona’?” Akomaki boye: “Tondimi ete YEHOVA moto azali kopesa mbongo mpo na kobimisa ‘Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Siona,’ mpe lokola ezali bongo, tokoki te kosɛnga to koluka mbongo epai ya bato mpo  na kobimisa yango. Ntango [Yehova] ye oyo alobi ete: ‘Wolo nyonso mpe palata nyonso ya ngomba ezali ya ngai,’ akotika kopesa mbongo oyo esengeli mpo na kobimisa yango, wana nde tokoyeba ete ntango ekoki mpo tótika kobimisa zulunalo yango.” (Hag. 2:7-9) Mbula koleka 130 yango oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ebongiseli oyo ebimisaka yango ezali se kokoba!

8 Basaleli ya Yehova basɛngaka bato mbongo te. Balekisaka bitunga ya mabonza te mpe bakomelaka bato mikanda te mpo na kosɛnga lisalisi. Babɛtaka masano ya mbongo te, batɛkaka mpe biloko te mpo mbongo ebakisama. Basalaka likambo oyo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobá banda kala ete: “Tomonaka ete ebongi te kosɛnga mbongo mpo na mosala ya Nkolo, ndenge mangomba mosusu esalaka . . . Tokanisi ete kosɛnga na nkombo ya Nkolo mpo na koluka kokóma na mbongo mingi ezali kotuka ye, endimami te, mpe ememaka mapamboli te, ezala epai ya bato oyo bapesi to na mosala oyo esalemi.” *

“Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye”

9, 10. Wapi ntina moko oyo tosepelaka kopesa makabo?

9 Biso bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe lelo oyo, tozelaka te ete bátindika biso na makasi mpo tópesa makabo. Kasi, tosepelaka kosalela mbongo mpe biloko na biso mosusu mpo na kosimba mosala ya Bokonzi. Mpo na nini topesaka na motema moko? Tótalela bantina misato.

10 Ya liboso, topesaka makabo na motema moko mpo tolingaka Yehova mpe tolukaka kosala “makambo oyo esepelisaka ye.” (1 Yoa. 3:22) Yehova asepelaka mpenza na mokristo oyo apesaka na motema na ye mobimba. Tótalela makambo oyo ntoma Paulo alobaki mpo na ndenge oyo mokristo asengeli kopesa makabo. (Tángá 2 Bakorinti 9:7.) Mokristo ya solo akakatanaka te mpe apesaka te mpo batindi ye na makasi. Apesaka nde mpo “akani na motema na ye” ete asala yango. * Elingi koloba apesaka nsima ya kokanisa malamu mposa oyo ezali mpe ndenge ya kokokisa yango. Mokristo ya ndenge wana asepelisaka Yehova, mpo “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” Libongoli mosusu ya Biblia elobi ete: “Nzambe alingaka bato oyo balingaka kopesa.”

Na Mozambique, bana mpe basepelaka kotya makabo

11. Nini etindaka biso tópesa Yehova eloko na biso oyo eleki malamu?

11 Ya mibale, topesaka makabo mpo ezali ndenge ya kopesa Yehova matɔndi mpo na mapamboli oyo apesi biso. Tótalela etinda moko ya Mibeko ya Moize oyo ezalaki komonisa ndenge motema ya moto ezali. (Tángá Kolimbola Mibeko 16:16, 17.) Ntango akei na bafɛti misato oyo ezalaki kosalama na mbula, Moyisraele mokomoko ya mobali asengelaki kopesa likabo oyo “ekokokana na lipamboli oyo Yehova Nzambe apesi ye.” Na yango, liboso ya kokende na fɛti moko, Moyisraele mokomoko asengelaki kotánga mapamboli oyo azwi mpe kotalela motema na ye, mpo na koyeba likabo nini  eleki malamu mpo amema yango. Ndenge moko mpe, ntango tokanisi mapamboli ndenge na ndenge oyo Yehova apesi biso, yango etindaka biso tópesa ye likabo oyo eleki malamu. Likabo yango oyo euti na motema, oyo ekoki mpe kozala mbongo to eloko mosusu, emonisaka soki tozalaka mpenza na botɔndi mpo na mapamboli ya Yehova to te.2 Ko. 8:12-15.

12, 13. Na ndenge nini makabo na biso emonisaka ete tolingaka mokonzi na biso Yesu, mpe moto na moto apesaka na kotalela nini?

12 Ya Misato, makabo oyo topesaka na motema mobimba emonisaka ete tolingaka Mokonzi na biso Yesu Kristo. Na ndenge nini? Talá oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye na butu na ye ya nsuka awa na mabele. (Tángá Yoane 14:23.) Yesu alobaki ete: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai.” “Liloba” ya Yesu ezali mpe etinda oyo apesaki ete tósakola nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba. (Mat. 24:14; 28:19, 20) Tokotosa “liloba” yango soki tozali kosala nyonso oyo tokoki, elingi koloba tozali kopesa ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso ya mosuni, mpo mosala  ya kosakola Bokonzi ekende liboso. Na ndenge yango, tomonisaka ete tolingaka Mokonzi Masiya.

13 Ya solo, biso bana-mboka ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe tolingaka kosimba mosala ya Bokonzi na motema moko na nzela ya makabo na biso ya mbongo. Ndenge nini tokoki kosala yango? Ezali likambo ya moto na moto. Moto na moto apesaka na kotalela makoki na ye. Nzokande, bandeko na biso mingi bazali bato ya bozwi te. (Mat. 19:23, 24; Yak. 2:5) Kasi, bandeko yango bakoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova ná Mwana na ye bandimaka likabo ata ya motuya moke soki epesami na motema mobimba.Mrk. 12:41-44.

Ndenge oyo tozwaka mbongo

14. Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazalaki kosala nini liboso bápesa moto mokanda?

14 Na boumeli ya bambula mingi, Batatoli ya Yehova bazalaki kosɛnga mbongo liboso bápesa moto mokanda. Mbongo yango ezalaki moke mpenza mpo ata bato oyo bazali babola bákoka kozwa mikanda na biso. Kasi, soki moto asepeli na mokanda kasi azali na mbongo te, basakoli bazalaki kondima kotikela ye yango. Mposa na bango ezalaki ete mikanda na biso ezala na mabɔkɔ ya bato ya mitema sembo oyo bakoki kotánga yango mpe kozwa matomba.

15, 16. (a) Na 1990, mbongwana nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaki na oyo etali kopesa bato mikanda? (b) Ndenge nini makabo epesamaka? (Talá mpe etanda “ Mbongo ya makabo ekendaka wapi?”)

15 Na 1990, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebandaki kobongola ndenge ya kopesa bato mikanda. Kobanda na mbula yango, na États-Unis, moto oyo azwi mokanda akokaki kopesa likabo soki alingi. Mokanda oyo batindelaki masangá nyonso na États-Unis elobaki boye: “Tokopesa basakoli mpe bato nyonso bazulunalo mpe mikanda kozanga kosɛnga mbongo to ata kopesa moto likanisi ya mbongo boni akoki kopesa liboso ya kozwa mokanda. . . . Moto nyonso oyo alingi kopesa likabo mpo na mosala na biso ya koteya akoki kosala yango, kasi moto akoki kozwa mikanda ata soki apesi likabo to te.” Ebongiseli yango ezalaki komonisa polele ete tosalaka mosala na biso na bolingo na biso moko, ete ezali mpo na losambo, mpe ete “tozali te bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe.” (2 Ko. 2:17) Na nsima, ebongiseli ya kopesa likabo ndenge wana ekómaki na mokili mobimba.

16 Ndenge nini makabo epesamaka? Na Bandako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova, ezalaka na mwa bisika ya kotya makabo. Moto akoki kotya mbongo na bakɛsi yango to kotinda mbala moko likabo na ye na moko ya bibongiseli oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na Leta. Mbula na mbula, ezalaka na lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisaka ndenge makabo yango ya bolingo malamu ekoki kopesama.

Ndenge nini tosalelaka mbongo yango?

17-19. Limbolá ndenge tosalelaka makabo ya (a) mosala ya kosakola na mokili mobimba, (b) mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba, mpe (c) mbongo ya kɛsi ya lisangá.

17 Mosala ya kosakola na mokili mobimba. Mbongo ya makabo esalelamaka mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Na ndakisa kobimisa mikanda, kotonga mpe  kobatela babiro ya filiale ná bandako ya Babetele, mpe kosalisa biteyelo ndenge na ndenge ya teokrasi. Mbongo yango esalelamaka mpe mpo na kosunga bamisionɛrɛ, bakɛngɛli-batamboli, mpe babongisi-nzela monene. Esalelamaka mpe mpo na kosunga bandeko oyo bakutani na makama. *

18 Kotonga Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba. Makabo yango esalelamaka mpo na kosalisa masangá na kotonga to kobongisa Ndako ya Bokonzi. Soki makabo mosusu etyami, mbongo yango ekoki kosalelama mpo na kosalisa mpe masangá mosusu. *

19 Kɛsi ya lisangá. Mbongo yango etyamaka mpo na misala ya lisangá, mpe mpo na kobongisa Ndako ya Bokonzi. Bankulutu bakoki mpe kotinda mbongo yango na biro ya filiale mpo esalelama mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Na ntango wana, bankulutu bakoyebisa lisangá mobimba motángo ya mbongo oyo ekobanda kotindama. Soki endimami, mbongo yango ekotindama na biro ya filiale. Sanza na sanza, ndeko oyo atalelaka makambo ya makabo asalaka lapolo, mpe batángaka yango na lisangá mobimba.

20. Ndenge nini okoki kokumisa Yehova na “biloko na yo ya motuya”?

20 Soki tokanisi nyonso oyo esalemaka mpo na mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli na mokili mobimba, motema na biso ekotinda biso ‘tókumisa Yehova na biloko na biso ya motuya.’ (Mas. 3:9, 10) Biloko na biso ya motuya ezali makasi na biso, mayele na biso, mpe bozwi na biso ya elimo. Na ntembe te, tolingaka kosalela yango na mosala ya Bokonzi. Kasi, tóbosana te ete biloko na biso ya motuya ezali mpe mbongo oyo tozali na yango. Tózala na ekateli ya kopesa oyo tokoki, na ntango oyo tokoki. Makabo oyo topesaka na motema mobimba ekumisaka Yehova mpe emonisaka ete tondimi Bokonzi ya Masiya.

^ par. 1 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/1915, nkasa 218-219.

^ par. 8 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1899, lokasa 201.

^ par. 10 Moto moko ya mayele alobi ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kokana” “epesaka likanisi ya kobongisa liboso.” Abakisi ete: “Moto oyo apesi ayokaka esengo na mbala moko, kasi asengeli kobongisa yango liboso.”1 Ko. 16:2.

^ par. 17 Mpo oyeba makambo mosusu oyo etali mosala ya kosunga bandeko, talá Mokapo 20.

^ par. 18 Mpo oyeba makambo mosusu oyo etali kotonga Bandako ya Bokonzi, talá Mokapo 19.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Okomipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi?

Tóluka koyeba ndenge tokoki kosalela ntango, mbongo, makasi mpe makoki na biso mpo ete matomba ya Bokonzi ekende liboso