Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 19

Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova

Kotonga bandako mpo na kokumisa Yehova

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Mosala ya botongi na mokili mobimba esimbi mosala ya Bokonzi

1, 2. (a) Likambo nini basaleli ya Yehova basepelaka kosala banda kala? (b) Eloko nini Yehova azwaka na motuya mingi?

BANDA kala, basaleli ya Yehova ya sembo basepelaka kotonga bandako mpo na kokumisa nkombo na ye. Na ndakisa, Bayisraele bamipesaki na esengo mpo na kotonga tabernakle mpe bapesaki biloko mingi mpo na yango.Kob. 35:30-35; 36:1, 4-7.

2 Yehova amonaka te ete biloko oyo batongeli bandako yango nde epesaka ye lokumu; azwaka yango mpe na motuya koleka ndelo te. (Mat. 23:16, 17) Eloko oyo Yehova azwaka na motuya mingi, mpe oyo epesaka ye lokumu koleka nyonso, ezali losambo oyo basaleli na ye bapesaka ye, ata mpe elimo na bango ya komipesa mpe molende na bango na mosala. (Kob. 35:21; Mrk. 12:41-44; 1 Tim. 6:17-19) Likambo yango ezali na ntina mingi. Mpo na nini? Mpamba te bandako etikalaka libela te. Na ndakisa, tabernakle mpe tempelo ezalaka lisusu te. Bandako yango elimwá, kasi Yehova abosaná te elimo ya kokaba mpe mosala makasi ya basaleli na ye ya sembo oyo bamipesaki mpo na kotonga yango.Tángá 1 Bakorinti 15:58; Baebre 6:10.

3. Tokotalela nini na mokapo oyo?

3 Lelo mpe basaleli ya Yehova basalaka mosala makasi mpo na kotonga bandako ya losambo. Mpe makambo minene oyo tosali na litambwisi ya Mokonzi na biso Yesu Kristo ezali mpenza kokamwisa! Ezali polele ete Yehova apamboli milende na biso. (Nz. 127:1) Na mokapo oyo, tokotalela kaka mwa moke mosala oyo esalemi mpe ndenge epesi Yehova nkembo. Tokomona mpe makambo oyo bandeko mosusu oyo bamipesá na mosala yango balobi.

Kotonga Bandako ya Bokonzi

4. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na bisika mingi ya losambo? (b) Mpo na nini basangisi babiro ya filiale mosusu? (Talá etanda “ Kotonga babiro ya filiale mpo makambo esɛngi bongo.”)

4 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 16, Yehova asɛngi ete tóyanganaka mpo na losambo. (Ebr. 10:25) Makita na biso elendisaka kondima na biso mpe ebakisaka molende na biso na mosala ya kosakola. Na mikolo oyo ya nsuka, Yehova azali kokoba kofula mosala yango. Na yango, bankóto ya bato bazali koya na ebongiseli na ye mbula na mbula. (Yis. 60:22) Lokola bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe bazali se kokóma  mingi, esengeli kozala na bisika mingi mpo na kotya bamasini mpo na kobimisa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Esengeli mpe kobakisa bandako ya losambo.

5. Mpo na nini nkombo Ndako ya Bokonzi ebongi mpenza? (Talá mpe etanda “ Ndako-nzambe Pole ya sika.”)

5 Banda na ebandeli, Bayekoli ya Biblia babandaki komona ete basengeli kozala na bisika na bango moko mpo na kosala makita. Emonani ete moko ya bandako ya losambo ya liboso oyo batongaki ezalaki na etúká ya Virginie-Occidentale, na États-Unis, na 1890. Na bambula ya 1930, Batatoli ya Yehova batongaki bandako ya sika mpe babongisaki bandako mosusu, kasi bisika yango oyo bazalaki kosala makita ezalaki naino na nkombo te. Nzokande na 1935, ndeko Rutherford akendaki na Hawaii, epai bazalaki kotonga ndako moko na lopango ya biro ya filiale. Ntango ndeko moko atunaki ye soki bápesa ndako yango nkombo nini, ndeko Rutherford ayanolaki boye: “Lokola tosakolaka nde nsango malamu ya Bokonzi, omoni te ete tosengeli kobenga yango ‘Ndako ya Bokonzi’?” (Mat. 24:14) Bapesaki ndako yango nkombo wana  oyo ebongaki mpenza, mpe eumelaki te, bakómaki kosalela nkombo yango mpo na kolobela bisika oyo masangá ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba basalaka mikita.

6, 7. Kotonga Bandako ya Bokonzi nokinoki esalisi na nini?

6 Na bambula ya 1970, esɛngaki kobakisa nokinoki Bandako ya Bokonzi. Na yango, bandeko ya États-Unis bayekolaki ndenge ya kotonga Bandako ya Bokonzi ya kitoko, oyo ezangá mindɔndɔ na boumeli ya mikolo moke kaka. Na 1983, basilaki kotonga Bandako ya Bokonzi soki 200 na États-Unis mpe na Canada. Mpo na kosala mosala yango, bandeko bakómaki kosala bakomite ya botongi na bitúká ndenge na ndenge. Ebongiseli yango esalisaki mingi; yango wana na 1986, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki yango, mpe na 1987, basalaki Bakomite ya botongi na bitúka 60 na États-Unis. * Na 1992, bakomite yango etyamaki mpe na Afrique du Sud, na Allemagne, na Argentine, na Australie, na Espagne, na France, na Japon, mpe na Mexique. Kozanga ntembe, ebongi mpenza tósungaka bandeko oyo batongaka Bandako ya Bokonzi mpe Bandako ya mayangani, mpamba te mosala makasi oyo basalaka ezali mpe na kati ya mosala mosantu.

7 Kotonga Bandako ya Bokonzi nokinoki ndenge wana epesaki litatoli monene na bisika oyo bazalaki kotonga yango. Na ndakisa, zulunalo moko ya Espagne ebimisaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo “Kondima elongoli bangomba” mpo na kolobela ndenge batongaki Ndako ya Bokonzi moko nokinoki na engumba Martos. Zulunalo yango elobaki boye: “Ndenge nini na mokili ya lelo oyo bato balukaka  kaka matomba na bango, bato bauti na bitúká ndenge na ndenge [ya Espagne] mpe bayei na bolingo na bango moko awa na Martos kotonga ndako ya kitoko nokinoki koleka mpenza, mpe na bomoko?” Na eyano oyo lisolo yango epesaki, etángaki maloba ya ndeko moko oyo apesaki mabɔkɔ na mosala yango ete: “Nyonso wana ezali mpo tozali bato oyo Yehova ateyaka.”

Kotonga na mikili ya bobola

8. Na 1999, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ebongiseli nini, mpe mpo na nini?

8 Na nsuka ya bambula ya 1900, bato ebele basopanaki na lisangá ya Yehova na mikili oyo bandeko bazali na bozwi mingi te. Masangá esalaki nyonso oyo ekokaki mpo na kotonga bisika ya kosala makita. Kasi, na mikili mosusu, bato bazalaki kotyola bandeko mpe kokanisela bango mabe mpo Bandako ya Bokonzi ezalaki mabemabe soki otali bisika ya losambo ya mangomba mosusu. Kasi, kobanda na 1999, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ebongiseli moko ya kotonga nokinoki Bandako ya Bokonzi na mikili ya bobola. Makabo ya bandeko ya mikili ya bozwi ekómaki kosalelama mpo “bokokani” ezala. (Tángá 2 Bakorinti 8:13-15.) Bandeko ya mikili ndenge na ndenge bamipesaki mpo na kosala mosala yango.

9. Mosala nini emonanaki ete eleki monene, kasi nini esalemi?

9 Na ebandeli, mosala yango emonanaki lokola eleki monene. Lapolo moko ya 2001 emonisaki ete esengeli kotonga Bandako ya Bokonzi koleka 18 300 na mikili 88 ya bobola. Kasi, na lisalisi ya elimo ya Nzambe mpe ya Mokonzi Yesu Kristo, mosala nyonso ekoki kosalema. (Mat. 19:26) Nsima  ya mbula pene na 15, kobanda na 1999 tii na 2013, basaleli ya Nzambe batongaki Bandako ya Bokonzi 26 849. * Yehova azali kokoba kopambola mosala ya kosakola; na yango na 2013, esengelaki kobakisa Bandako ya Bokonzi mosusu soki 6 500 na mikili ya bobola, mpe sikoyo esengeli kotonga bankama ya Bandako ya Bokonzi mbula na mbula.

Kotonga Bandako ya Bokonzi na mikili ya bobola ezalaka na mikakatano na yango

10-12. Ndenge nini kotonga Bandako ya Bokonzi ekumisi nkombo ya Yehova?

10 Ndenge nini kotonga Bandako ya Bokonzi yango ekumisi nkombo ya Yehova? Lapolo moko oyo eutaki na biro ya filiale ya Zimbabwe elobaki boye: “Sanza moko nsima ya kotongama ya Ndako ya Bokonzi, mbala mingi motángo ya bayangani na makita ebakisamaka mbala mibale.” Na mikili mingi, emonani ete bato bakakatanaka koya na makita na biso soki esika na biso ya losambo ezali malamu te. Nzokande soki Ndako ya Bokonzi etongami, eumelaka te, etondaka na bato, mpe esɛngaka kotonga mosusu. Kasi, ezali kaka te kitoko ya bandako nde ebendaka bato epai ya Yehova. Bolingo ya solosolo oyo bakristo bamonisaka ntango batongaka bandako yango ebongolaka mpe makanisi ya bato mpo na ebongiseli na biso. Tótalela mwa bandakisa.

11 Indonésie. Mobali moko amonaki bato bazali kotonga Ndako ya Bokonzi moko. Ntango ayebaki ete basali nyonso bamipesaki na bolingo na bango moko, alobaki boye: “Bozali bato ya ndenge mosusu mpenza! Nazalaki komona ndenge bino nyonso bozalaki kosala na motema mobimba mpe na esengo, nzokande bafutaka bino te. Nakanisi ete ezali na lingomba mosusu te lokola oyo ya bino!”

12 Ukraine. Mwasi moko oyo azalaki koleka mikolo nyonso na balabala oyo bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi moko amonaki ete bato oyo bazalaki kosala wana bazali Batatoli ya Yehova mpe ete bazalaki kotonga Ndako ya Bokonzi. Alobaki boye: “Nayoká nsango ya Batatoli ya Yehova epai ya leki na ngai ya mwasi oyo azali Motatoli ya Yehova. Ntango namonaki ndenge bazalaki kotonga ndako yango, nazwaki ekateli ya kokɔta mpe na lisangá yango. Namonaki bolingo ya solosolo kati na bango.” Mwasi yango andimaki koyekola Biblia mpe azwaki batisimo na 2010.

13, 14. (a) Likambo oyo mobali moko ná mwasi na ye basalaki nsima ya komona botongi ya Ndako ya Bokonzi moko eteyi yo nini? (b) Okoki kosala nini mpo esika na bino ya losambo ekumisa ntango nyonso nkombo ya Yehova?

13 Argentine. Mobali moko ná mwasi na ye basololaki na ndeko oyo azalaki mokɛngɛli misala ya kotonga Ndako ya Bokonzi moko. Mobali yango alobaki boye: “Totalaka bino na likebi ntango bozali kotonga, mpe . . . tozwi ekateli ya koyekola koyeba Nzambe na esika oyo.” Na nsima atunaki ete: “Tosengeli kosala nini mpo tókɔtaka na makita awa?” Mwasi yango ná mobali na ye bandimaki koyekola Biblia, kasi balobaki ete bakosala yango kaka soki bana na bango mpe bakoki kokɔta na boyekoli yango. Bandeko bandimaki likanisi yango na esengo nyonso.

14 Mbala mosusu, ozwaki te libaku ya kopesa mabɔkɔ na kotonga Ndako ya Bokonzi na bino, kasi okoki kosalisa na  makambo mingi mpo esika yango ya losambo ekoba kokumisa nkombo ya Yehova. Na ndakisa, okoki kobengisa bayekoli na yo ya Biblia, bato oyo osololaka na bango makambo ya Biblia, mpe bato mosusu mpo báya koyangana na makita elongo na yo na Ndako ya Bokonzi. Okoki mpe kosalisa na kotya bopɛto mpe kobongisa esika yango ya losambo. Soki omibongisi malamu, okoki mpe kotya makabo mpo na kosunga na kobatela Ndako ya Bokonzi na bino to mpo na kotonga bisika yango ya losambo na mikili mosusu. (Tángá 1 Bakorinti 16:2.) Makambo nyonso wana ebakisaka nkembo na nkombo ya Yehova.

Basali oyo ‘bamipesi na bolingo na bango moko’

15-17. (a) Mbala mingi banani nde basalaka mosala mingi na botongi? (b) Maloba ya bandeko oyo batongaka na mikili ndenge na ndenge eteyi yo nini?

15 Bandeko ya masangá nde basalaka mosala mingi na ntango ya kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, mpe bandako ya biro ya filiale. Kasi, mbala mingi bandeko ya mikili mosusu oyo bayebi malamu mosala ya kotonga bayaka kosalisa bandeko ya lisangá. Bandeko yango mosusu babongolaka bomoi na bango mpo bákoka kosala na mboka mopaya bapɔsɔ ebele. Bamosusu bamipesá mpo na kosala na boumeli ya bambula ebele, mpe bakendaka kotonga na bisika ndenge na ndenge.

Timo ná Lina Lappalainen (Talá paragrafe 16)

16 Kokende kotonga na mikili mosusu ezali na mikakatano, kasi ezali mpe na matomba ebele. Na ndakisa, Timo ná Lina, basalaki mibembo na Asie, na Mpoto, mpe na Amerika ya Sudi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani, mpe babiro ya filiale. Timo alobi boye: “Na boumeli ya mbula 30, bazalaki kotinda ngai na esika ya sika nsima ya mbula mibale.” Lina, oyo babalaná na Timo esali mbula 25, alobi boye: “Nasali elongo na Timo na mikili 10. Esɛngaka  milende mpe ntango ebele mpo na komesana na bilei ya sika, mopɛpɛ ya sika, monɔkɔ ya sika, teritware ya sika mpo na mosala ya kosakola, mpe kozwa baninga ya sika.” * Milende yango ebimisaka matomba? Lina alobi: “Ebimisi matomba ebele. Tomoni bolingo ya bokristo, ezaleli ya koyamba bapaya, mpe ndenge Yehova abatelaka biso. Tomoni mpe kokokisama ya elaka oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, oyo ezali na Marko 10:29, 30. Tozwi bandeko mibali, bandeko basi, mpe bamama ya elimo mbala nkama.” Timo alobi: “Toyokaka esengo mingi ndenge tozali kosalela makoki na biso mpo na likambo oyo eleki ntina, mpe na ndenge yango kopesa mabɔkɔ na kobakisa biloko ya Mokonzi.”

17 Darren ná Sarah, oyo basali na misala ya kotonga na Afrika, na Asie, na Amerika ya Ntei, na Mpoto, na Amerika ya Sudi mpe na Pacifique Sud, bamonaka ete bolamu oyo bazwi eleki makambo oyo bamipimelaki. Atako bakutanaki na mikakatano, Darren alobi boye: “Ezali libaku malamu mpenza kosala elongo na bandeko ya mikili ndenge na ndenge. Namoni ete biso nyonso na mokili mobimba tozali na bomoko mpo tolingaka Yehova.” Sarah alobi boye: “Nayekoli makambo ebele epai ya bandeko ya mimeseno ndenge na ndenge! Komona makambo oyo bamipimelá mpo na kosalela Yehova elendisi ngai nakoba komipesa mobimba na mosala na ye.”

18. Ndenge nini esakweli ya Nzembo 110:1-3 ezali kokokisama?

18 Mokonzi Davidi asakolaki ete atako bana-mboka ya Bokonzi ya Nzambe bakokutana na mikakatano, “bakomipesa na bolingo na bango moko” na mosala ya Bokonzi. (Tángá Nzembo 110:1-3.) Bato nyonso oyo bazali kosala mosala ya Bokonzi bazali kokokisa esakweli yango. (1 Ko. 3:9) Mosala ya kotonga ebele ya babiro ya filiale, bankama ya Bandako ya mayangani, mpe bankóto na bankóto ya Bandako ya Bokonzi na mokili mobimba emonisi mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali likambo ya solo mpe ete ezali koyangela. Ezali mpenza lokumu monene kosalela Mokonzi Yesu Kristo na mosala oyo ezali kopesa Yehova lokumu oyo asengeli na yango!

^ par. 6 Na 2013, bandeko koleka 230 000 basalaki elongo na Bakomite ya botongi 132 na États-Unis. Na ekólo yango, bakomite yango etambwisaki mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi soki 75 ya sika mbula na mbula, mpe esalisaki na kobongisa Bandako ya Bokonzi soki 900.

^ par. 9 Longola ebele ya Bandako ya Bokonzi oyo etongamaki na mikili mosusu.

^ par. 16 Bandeko oyo bapesaka mabɔkɔ na mosala ya kotonga na mikili mosusu balekisaka ntango na bango mingi na bisika oyo bazali kotonga, kasi babimaka mpe na mosala ya kosakola elongo na lisangá na nsuka ya pɔsɔ to na bampokwa.