Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!

 MOKAPO 7

Mayele oyo tosaleli—Ebele ya bato bayoki nsango malamu

Mayele oyo tosaleli—Ebele ya bato bayoki nsango malamu

MOKAPO OYO ELOBELI NINI?

Basaleli ya Nzambe basaleli mayele ndenge na ndenge mpo bato ebele báyoka nsango malamu

1, 2. (a) Mayele nini Yesu asalelaki mpo na koteya ebele ya bato? (b) Ndenge nini bayekoli ya sembo ya Kristo balandaki ndakisa na ye, mpe mpo na nini?

EBELE mpenza ya bato bayaki epai ya Yesu pembeni ya laki moko, kasi ye amataki na masuwa mpe apusanaki mwa mosika na bango. Mpo na nini? Ayebaki ete mai ekosala ete mongongo na ye eyokana makasi mpe yango ekosalisa ebele wana ya bato báyoka malamu nsango na ye.Tángá Marko 4:1, 2.

2 Bambula mwa mingi liboso Bokonzi ebanda koyangela, bayekoli ya sembo ya Kristo balandaki ndakisa na ye; basalelaki mayele ndenge na ndenge ya sika mpo bato ebele báyoka nsango malamu ya Bokonzi. Na litambwisi ya Mokonzi, basaleli ya Nzambe bazali kokoba kobimisa mayele ya sika to kobongola lolenge na bango ya kosakola na kolanda eleko oyo bazali mpe biloko oyo ezali kobima. Mposa na biso ezali ete bato ebele mpenza báyoka nsango malamu liboso nsuka eya. (Mat. 24:14) Tótalela mayele ndenge na ndenge oyo tosaleli mpo bato báyoka nsango malamu, esika nyonso oyo bafandi. Kanisá mpe ndenge oyo okoki komekola kondima ya bato oyo bapalanganisaki nsango malamu mwa bambula liboso Bokonzi ebanda koyangela.

Mpo bato ebele báyoka nsango malamu

3. Nini epesaki banguna na biso nkanda?

3 Bazulunalo ya mokili. Ndeko Russell ná baninga na ye bazalaki kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli kobanda na mobu 1879, mpe yango esalisaki bato mingi báyeba nsango ya Bokonzi. Nzokande, mbula zomi liboso ya 1914, emonani ete Kristo atambwisaki makambo mpo bato mingi koleka báyoka nsango malamu. Makambo nyonso ebandaki na 1903. Na mbula yango, pastɛrɛ Ephraim Eaton, molobeli ya Baprotesta ya Pennsylvanie, awelanaki mikolo motoba na Charles Russell mpo na kotala soki nani ayebi mateya ya Biblia. Na mokanda moko oyo atindelaki Russell, Eaton akomaki boye: “Nakanisi ete soki toyanganisi bato mpo yo olobela mateya oyo ondimaka mpe ngai nalobela oyo nandimaka, . . . bato bakosepela mingi.” Ndeko Russell ná baninga na ye mpe bamonaki ete bato bakosepela; yango wana bazwaki bibongiseli mpo kowelana ya mokolo na mokolo ebimaka na zulunalo  moko (The Pittsburgh Gazette). Lokola bato ebele mpenza bazalaki kotánga masolo ya zulunalo yango, mpe lokola bato mingi bazalaki kosepela na ndenge ndeko Russell azalaki kolimbola mateya ya Biblia polele, babimisi ya zulunalo yango basɛngaki ete masolo ya ndeko Russell ebimaka pɔsɔ nyonso. Likambo yango epesaki banguna nkanda makasi!

Na 1914, masolo ya ndeko Russell ezalaki kobima na bazulunalo koleka 2 000

4, 5. Ezaleli nini Russell amonisaki, mpe ndenge nini bandeko oyo bazali na mikumba bakoki komekola ye?

4 Eumelaki te, bazulunalo mosusu esɛngaki ete ebanda mpe kobimisa masolo ya ndeko Russell. Yango wana na 1908, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete masolo yango ekómaki kobima na “bazulunalo zomi na moko pɔsɔ na pɔsɔ.” Nzokande, bandeko oyo bayebaki mosala ya kobimisa bazulunalo bayebisaki Russell ete soki babiro ya la Société elongwe na Pittsburgh mpe ekei na engumba oyo eyebani mingi, masolo oyo ezali na nsango ya Biblia ekobanda kobima na bazulunalo mingi koleka. Nsima ya kotalela likanisi wana mpe makambo mosusu, na 1909, ndeko Russell andimaki ete babiro ekende na Brooklyn, na etúká ya New York. Nini esalemaki? Mwa basanza kaka na nsima, bazulunalo soki 400 ekómaki kobimisa masolo ya ndeko Russell, mpe motángo yango ezalaki se kobakisama. Ntango Bokonzi etyamaki na 1914, bazulunalo koleka 2 000 na minɔkɔ minei ezalaki kobimisa masolo oyo ndeko Russell azalaki kosala mpe kokoma!

5 Liteya nini ya ntina likambo yango epesi? Bato oyo bazali na mikumba na lisangá ya Nzambe lelo basengeli komekola komikitisa ya ndeko Russell. Na ndenge nini? Mpo na kozwa bikateli ya minene, basengeli kotalela mpe toli ya basusu.Tángá Masese 15:22.

6. Ndenge nini masolo ya Biblia oyo ezalaki kobima na bazulunalo esalisaki moto moko?

6 Solo ya Bokonzi oyo ezalaki kobima na bazulunalo wana ebongolaki bomoi ya bato ebele. (Ebr. 4:12) Na ndakisa, Ora Hetzel, oyo azwaki batisimo na 1917, azali moko ya bato ebele oyo bayebaki solo na nzela ya masolo wana. Ora alobaki boye: “Nsima ya libala na ngai, nakendaki kotala mama na engumba Rochester, na etúká ya Minnesota. Ntango nakómaki kuna, nakutaki ye azali kolongola nkasa na zulunalo moko. Ezalaki masolo ya ndeko Russell. Mama ayebisaki ngai makambo oyo ayekolaki na masolo yango.” Ora andimaki mateya ya solo mpe na boumeli ya mbula soki 60, azalaki mosakoli ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe.

7. Mpo na nini bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá batalelaki lisusu likambo ya kosalela bazulunalo?

7 Na 1916, makambo mibale ya minene etindaki bato oyo bazalaki kokamba lisangá bátalela lisusu likambo ya kopalanganisa nsango malamu na nzela ya bazulunalo. Ya liboso, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba eyaki makasi mpe ekómaki mpasi mingi kobimisa mikanda. Na 1916, lapolo moko oyo eutaki na departema na biso ya kobimisa masolo na bazulunalo na Grande-Bretagne emonisaki mokakatano yango; elobaki ete: “Na ntango oyo, kaka bazulunalo mwa moke koleka 30 nde ezali kobimisa masolo [ya ndeko Russell]. Na ntembe te, motángo yango ekokita lisusu mingi mpo ntalo ya  papye ezali se komata.” Likambo ya mibale ezalaki liwa ya ndeko Russell na mokolo ya 31/10/1916. Na yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1916 epesaki liyebisi oyo: “Lokola ndeko Russell azali lisusu te, masolo oyo ezalaki kobima [na bazulunalo] ekobima lisusu te.” Atako mayele wana oyo bazalaki kosalela mpo na kosakola esukaki, mayele mosusu, na ndakisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” ekobaki kosalisa bato mingi.

8. Mosala nini esalemaki mpo na kobimisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi”?

8 Bililingi. Russell ná baninga na ye basalaki mosala mbula soki misato mpo na kobongisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi,” oyo ebimaki na 1914. (Mas. 21:5) Drame yango ezalaki likambo ya sika: ezalaki na bililingi oyo ezali koningana, ezalaki na maloba, mpe bililingi ya langi kitoko oyo ezalaki koningana te. Bankama ya bato basalaki masano na masolo ya Biblia oyo ebimaki na filme yango; banyama mpe ezalaki. Na 1913, lapolo moko elobaki boye: “Tozwi banyama mingi na  esika moko monene oyo babatelaka banyama (jardin zoologique) mpo na kosalela yango na eteni monene ya filme oyo elobeli Noa.” Bongo bankama ya bililingi oyo ezali koningana te, oyo ezalaki na filme yango, eutaki wapi? Bato oyo basalaka mayemi, oyo bazalaki na Londres, na New York, na Paris, mpe na Philadelphie nde basalaki yango na mabɔkɔ.

9. Mpo na nini bandeko balekisaki ntango ebele mpe babimisaki ebele ya mosolo mpo na kosala “Fɔtɔ-Drame”?

9 Mpo na nini balekisaki ntango ebele mpe babimisaki ebele ya mosolo ndenge wana mpo na kosala “Fɔtɔ-Drame”? Ekateli moko oyo endimamaki na mayangani oyo esalemaki na 1913 elobaki ete: “Ndenge bazulunalo ya Amerika elongi mpenza kobongola makanisi ya bato na nzela ya bililingi (oyo ezali koningana mpe oyo ezali koningana te), mpe lokola bililingi oyo ezali koningana ezali kosepelisa bato mingi mpe ebongi mpenza, tomoni ete lokola tozali basakoli mpe bateyi ya Biblia, tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalela bafilme mpe bililingi mpo na kosakola mpe koteya malamumalamu.”

Likóló: Masini mpo na kolakisa “Fɔtɔ-Drame”; Na nse: Bililingi ya “Fɔtɔ-Drame”

10. Nini emonisi ete basalelaki “Fɔtɔ-Drame” mingi mpenza?

10 Na 1914, balakisaki “Fɔtɔ-Drame” mokolo na mokolo na bingumba 80. Bato pene na milio 8 na États-Unis mpe na Canada batalaki yango. Kaka na mbula yango, balakisaki “Fɔtɔ-Drame” na Allemagne, na Australie, na Danemark, na Finlande, na Grande-Bretagne, na Norvège, na Nouvelle-Zélande, na Suède, mpe na Suisse. Lolenge mosusu ya filme yango, oyo bililingi na yango ezalaki koningana te, bazalaki kolakisa yango na bingumba ya mike. Bazalaki kobenga yango “Drame ya Bozalisi”; kobimisa yango esɛngaki mbongo mingi te mpe ezalaki kilo te mpo na komema. Na 1916, “Fɔtɔ-Drame” mpe “Drame ya Bozalisi” ebimisamaki na monɔkɔ ya Allemand, ya Arménien, ya Dano-Norvégien, ya Espagnol, ya Français, ya Grec, ya Italien, ya Polonais, mpe ya Suèdois.

Na 1914, bato ebele mpenza batalaki “Fɔtɔ-Drame”

11, 12. Ndenge nini “Fɔtɔ-Drame” esalisaki elenge mobali moko, mpe ndakisa nini atiká?

11 “Fɔtɔ-Drame” ya Français esimbaki mpenza motema ya Charles Rohner, elenge mobali moko oyo azalaki na mbula 18. Alobi boye: “Balakisaki yango na mboka na biso Colmar, na etúká ya Alsace, na France. Banda na ebandeli na yango, nazalaki kokamwa ndenge ezalaki kolimbola mateya ya Biblia polele.”

12 Na nsima, Charles azwaki batisimo, mpe na 1922 akɔtaki na mosala ya ntango nyonso. Moko ya mikumba na ye ya liboso ezalaki ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya kolakisa bato ya France “Fɔtɔ-Drame.” Charles alimboli ndenge azalaki kokokisa mokumba yango; alobi boye: “Nazalaki na misala ebele—kobɛta violon, kobomba mbongo ya makabo, mpe kobatela mikanda. Nazalaki mpe kosɛnga bayangani bátika makɛlɛlɛ liboso filme ebanda. Na ntango ya mwa bopemi, tozalaki kolakisa bato mikanda. Na molɔngɔ mokomoko, tozalaki kotya ndeko mwasi to mobali mpo alakisa bato mikanda. Bandeko yango bazalaki kosimba mikanda ebele mpe bazalaki kopusana pembeni ya moto mokomoko mpo na  kolakisa ye. Lisusu, na porte ya kokɔtela, totyaki mikanda ebele na bamesa.” Na 1925, babengaki Charles na Betele ya Brooklyn, na etúká ya New York. Kuna, akómaki mokambi ya babɛti-miziki na WBBR, radio oyo la Société eutaki kofungola. Ndakisa ya ndeko Charles esengeli kotinda mokomoko na biso amituna boye: ‘Ngai mpe nandimaka mosala nyonso oyo bapesi ngai, oyo ekosalisa mpo nsango ya Bokonzi epalangana?’Tángá Yisaya 6:8.

13, 14. Ndenge nini basalelaki radio mpo na kopalanganisa nsango malamu? (Talá mpe etanda “ Baemisyo na WBBR” mpe etanda “ Liyangani moko monene.”)

13 Radio. Na bambula ya 1920, “Fɔtɔ-Drame” ekómaki kosila ngala, kasi radio ekómaki kosalelama mingi mpo na kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi. Na mokolo ya 16/04/1922, ndeko Rutherford asalaki emisyo na ye ya liboso na radio oyo batyaki na ndako babengi Metropolitan Opera, na Philadelphie, na etúká ya Pennsylvanie. Bato soki nkóto ntuku mitano (50 000) balandaki diskur na ye oyo elobaki “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te.” Na nsima, na 1923, balekisaki eteni moko ya liyangani ya etúká na radio mpo na mbala ya liboso. Lisusu, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bamonaki ete atako tozalaki kosalela baradio ya mokili, ekozala malamu tósala mpe radio na biso moko; batyaki yango na Staten Island, na New York mpe babengaki yango WBBR. Emisyo ya liboso na radio yango elekaki na mokolo ya 24/02/1924.

Na 1922, bato soki 50 000 bayokaki na radio diskur oyo elobaki “Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te”

14 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/1924 elimbolaki ntina ya WBBR; elobaki boye: “Tomoni ete radio ezali kosɛnga mbongo mingi te mpe ezali lolenge moko ya malamu mpenza ya kopalanganisa nsango malamu na ndenge oyo tosalá naino te.” Na nsima, ebakisaki boye: “Soki Nkolo amoni malamu tófungola baradio mosusu mpo na kopalanganisa solo, akopesa biso mbongo na ndenge oyo amoni malamu.” (Nz. 127:1) Na 1926, basaleli ya Yehova bafungolaki baradio motoba. Radio mibale ezalaki na États-Unis: radio WBBR na New York mpe radio WORD (Liloba) pene na engumba Chicago. Radio mosusu minei ezalaki na Canada, na etúká ya Alberta, ya British Columbia, ya Ontario, mpe ya Saskatchewan.

15, 16. (a) Bakonzi ya mangomba basalaki nini mpo na baradio na biso na Canada? (b) Na ndenge nini badiskur oyo ezalaki koleka na radio mpe mosala ya kosakola ndako na ndako ezalaki kokende nzela moko?

15 Bakonzi ya mangomba ya bokristo bazangaki te komona ete radio ezalaki mpenza kopalanganisa solo ya Biblia. Albert Hoffman, oyo amesanaki kosala na ndako ya radio ya Saskatchewan, na Canada, alobaki boye: “Bato mingi mpenza bakómaki koyeba Bayekoli ya Biblia [ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana]. Litatoli monene epesamaki tii na 1928, ntango bakonzi ya mangomba batyaki bakonzi ya Leta mbamba mpe bakangaki baradio nyonso ya Bayekoli ya Biblia na Canada.”

16 Atako bakangaki baradio na biso nyonso minei ya Canada, badiskur ya Biblia ekobaki koleka na baradio ya bato ya mokili. (Mat. 10:23) Mpo na bato ebele bálanda baemisyo na biso, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli L’Âge d’Or (lelo oyo Lamuká!)  ezalaki kotya nkombo ya radio nyonso oyo ekolekisa baemisyo ya makambo ya Biblia mpo ntango basakoli bakokende kosakola ndako na ndako, bálendisa bato báyoka badiskur na radio ya engumba na bango. Nini esalemaki? Bulletin ya sanza ya yambo 1931 elobaki ete: “Kosalela radio elendisi mpenza baninga na mosala ya kosakola ndako na ndako. Balapolo mingi oyo tozwi emonisi ete bato mingi balandaki baemisyo na biso na bandako na bango mpe, lokola bayokaki badiskur ya ndeko Rutherford, bandimaki mbala moko babuku oyo [bandeko] bapesaki bango.” Bulletin elobaki ete kolekisa baemisyo na radio mpe mosala ya kosakola ndako na ndako ezali “mayele mibale ya malamu mpenza oyo ebongiseli ya Nkolo esaleli.”

17, 18. Atako makambo ebongwanaki, ndenge nini radio ekobaki kosalisa?

17 Na bambula ya 1930, banguna bakómaki kotɛmɛla biso ndenge tozalaki kosalela baradio ya bato ya mokili. Yango wana na nsuka ya 1937, basaleli ya Yehova babongolaki makambo. Batikaki kosalela radio mpe bamipesaki mingi koleka na kosakola ndako na ndako. * Atako bongo, radio ekobaki kosalisa mingi na kopalanganisa nsango ya Bokonzi na bamboka mosusu ya kati to oyo Leta apekisá kosakola. Na ndakisa, kobanda na 1951 tii na 1991, radio moko na Berlin ya Wɛsti, na Allemagne, ezalaki mbala na mbala kolekisa badiskur ya Biblia mpo bato oyo bafandaka na eteni wana, oyo na kala bazalaki kobenga Allemagne ya Ɛsti, báyoka nsango ya Bokonzi. Kobanda na 1961 tii mbula koleka 30 na nsima, radio moko oyo ezalaki na Suriname, na Amerika ya Sudi, ezalaki kolekisa pɔsɔ na pɔsɔ emisyo moko ya miniti 15 oyo ezalaki kolobela mateya ya Biblia. Kobanda na 1969 tii na 1977, lisangá ya Yehova elekisaki masolo koleka 350 na emisyo ya radio oyo bazalaki kobenga “Makomami nyonso ezali na litomba.” Na États-Unis, baemisyo yango ezalaki koleka na baradio 291, na bitúká 48. Na 1996, radio moko na Apia, mboka moko ya Samoa, na Pasifike ya Sudi, ezalaki kolekisa pɔsɔ na pɔsɔ emisyo moko oyo elobaki “Biyano na mituna na bino ya Biblia.”

18 Na nsuka ya siɛklɛ ya 20, radio ezalaki kosalelama lisusu mingi te mpo na kopalanganisa nsango malamu. Kasi, mayele mosusu oyo ebimaki esalisi mingi mpo bato ebele koleka báyoka nsango malamu.

19, 20. Mpo na nini basaleli ya Yehova basalá site jw.org, mpe ndenge nini ezali kosalisa? (Talá mpe etanda “ JW.ORG.”)

19 Internet. Na 2013, bato koleka miliare mibale ná ndambo na mokili mobimba (40 %) bazalaki kosalela Internet. Baankɛtɛ mosusu emonisi ete bato soki miliare mibale bakɔtaka na Internet na batelefone to na batablɛti. Motángo yango ezali se kobakisama na mokili mobimba, kasi bato oyo bakɔtaka na Internet na batelefone ya mabɔkɔ bazali kokóma ebele, mingimingi na Afrika, epai bato koleka milio 90 basalelaka yango. Likambo yango ebongoli mpenza ndenge ya kopanza nsango.

 20 Kobanda 1997, basaleli ya Yehova bakómaki kosalela mayele yango. Na 2013, site Internet jw.org ekómaki na minɔkɔ soki 300, mpe na site yango, bato bazalaki kozwa makambo ya Biblia na minɔkɔ koleka 520. Mokolo na mokolo, bato koleka nkóto nkama nsambo na ntuku mitano (750 000) bakɔtaka na site yango. Sanza na sanza, longola kotala bavideo, bato bazwaka babuku mbala koleka milio 3, bazulunalo mbala koleka milio 4, mpe nzembo ná badrame mbala koleka milio 22.

21. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Sina?

21 Site Internet yango ekómi mayele moko monene ya kopalanganisa nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, ata na mikili oyo Leta apekisá mosala ya kosakola. Na ndakisa, na ebandeli ya 2013, mobali moko na nkombo Sina akɔtaki na site jw.org mpe abengaki biro monene, oyo ezali na États-Unis, mpo na koyeba makambo mosusu ya Biblia. Ekamwisaki mpenza mpamba te Sina azali Mizilma mpe afandaka na mboka moko ya kati na ekólo oyo mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamá makasi. Na nsima, bibongiseli ezwamaki mpo Motatoli moko ya États-Unis ayekolaka na Sina Biblia mbala mibale na pɔsɔ. Boyekoli yango ezalaki kosalema na nzela ya video na Internet.

Koteya moto mokomoko

22, 23. (a) Mayele oyo tosaleli mpo ebele ya bato báyoka nsango malamu ezalaki mpo ezwa esika ya mosala ya kosakola ndako na ndako? (b) Ndenge nini Mokonzi apamboli milende na biso?

22 Na mayele nyonso oyo tosaleli mpo bato ebele báyoka nsango malamu, na ndakisa bazulunalo ya mokili, “Fɔtɔ-Drame,” radio, mpe Internet, moko te esalelamaki mpo na kozwa esika ya mosala ya kosakola ndako na ndako. Mpo na nini? Mpo basaleli ya Yehova balandaka ndakisa ya Yesu. Azalaki  kosuka kaka te na koteya ebele ya bato na mbala moko; azalaki kotyela moto mokomoko likebi. (Luka 19:1-5) Yesu ateyaki bayekoli básalaka mpe bongo, mpe ayebisaki bango nsango oyo basengelaki komema. (Tángá Luka 10:1, 8-11.) Ndenge tomonaki yango na Mokapo 6, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bazalaki ntango nyonso kolendisa mosaleli nyonso ya Yehova ateya moto mokomoko.Misala 5:42; 20:20.

23 Mbula 100 nsima ya kotyama ya Bokonzi na likoló, basakoli pene na milio mwambe bazali komipesa na koteya bato mokano ya Nzambe. Ya solo mpenza, Mokonzi apamboli mayele nyonso oyo tosaleli mpo na kosakola Bokonzi. Ndenge mokapo oyo elandi ekomonisa yango, Mokonzi apesaka biso mpe bisaleli oyo tosengeli na yango mpo na kopalanganisa nsango malamu na bikólo nyonso, na mabota nyonso, mpe na minɔkɔ nyonso.Em. 14:6.

^ par. 17 Na 1957, bandeko oyo bazalaki kokamba lisangá bakangaki WBBR, radio na biso ya nsuka oyo ezalaki naino kosala na New York.

Makambo mosusu

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—YA BOYEKOLI

Ndenge nini tosengeli “kopesa moto mokomoko eyano”?

Ndenge nini tokoki kokanisaka na bato malamumalamu na Makomami ntango tokutani na mituna ya ntembe? Talelá mayele misato oyo tokoki kosalelaka mpo na kopesa biyano oyo ekondimisa bato.